2 Samuel 3 (BOLCB2)

1 Bitumba kati na libota ya Saulo mpe libota ya Davidi ewumelaki tango molayi. Wana makasi ya Davidi ezalaki komata se komata, makasi ya libota ya Saulo ezalaki kaka kokita. 2 Tala bana mibali ya Davidi oyo babotamaki na Ebron :Mwana ya liboso ezalaki Aminoni oyo Ayinoami, moto ya Jizireyeli, abotelaki ye~; 3 ya mibale, Kileabi oyo Abigayili oyo akufisaki mobali na ye ya liboso, Nabali, moto ya Karimeli, abotelaki ye ;ya misato, Abisalomi oyo Maaka, mwana ya Talimayi, mokonzi ya Geshuri, abotelaki ye~; 4 ya minei, Adoniya oyo Agite abotelaki ye ;ya mitano, Shefatia oyo Abitali abotelaki ye~; 5 ya motoba, Yitileami oyo Egila, mwasi ya Davidi, abotelaki ye.Bango nde bana mibali ya Davidi oyo babotamaki na Ebron. 6 Na tango ya bitumba kati na mabota ya Saulo mpe ya Davidi, Abineri azalaki kolendisa nguya na ye kati na ndako ya Saulo. 7 Nzokande, Saulo azalaki na makangu moko ; kombo na ye ezalaki « Ritsipa, » mwana mwasi ya Aya. Bongo Ishi-Bosheti alobaki na Abineri :— Mpo na nini osangisi nzoto na makangu ya tata na ngai ? 8 Tango Abineri ayokaki makambo oyo Ishi-Bosheti alobaki, asilikaki makasi mpe azongisaki :— Boni ! Ngai nazali moto ya mbwa na ngambo ya bato ya Yuda ? Ngai oyo, na mokolo ya lelo, nazali kosalela bosembo epai ya libota ya Saulo, tata na yo, epai ya bandeko na ye mpe epai ya baninga na ye ; ngai oyo nakabaki yo te na maboko ya Davidi, ngai nde sik’oyo ozali kofunda ete nasali mabe na tina na mwasi oyo ! 9 Tika ete Nzambe apesa ngai Abineri etumbu ya makasi soki nasali te mpo na Davidi makambo oyo Yawe alakaki ye, na nzela ya ndayi, 10 ete akolongola bokonzi na ndako ya Saulo mpe akotia kiti ya bokonzi ya Davidi kati na Isalaele mpe kati na Yuda, longwa na Dani kino na Beri-Sheba. 11 Ishi-Bosheti akokaki kozongisa ata liloba moko te epai ya Abineri, pamba te azalaki kobanga ye. 12 Abineri atindaki bantoma koloba na Davidi :— Mokili oyo ezali ya nani ? Sala boyokani elongo na ngai, bongo ngai nakosunga yo mpo na kosangisa Isalaele mobimba epai na yo. 13 Davidi azongisaki :— Malamu ! Nandimi kosala boyokani elongo na yo, kasi nasengi yo eloko moko : koya liboso na ngai te soki otindeli ngai nanu te Mikali, mwana mwasi ya Saulo, tango okoya kokutana na ngai. 14 Bongo Davidi atindaki bantoma koloba na Ishi-Bosheti, mwana mobali ya Saulo :— Pesa ngai mwasi na ngai, Mikali, oyo nabalaki ngai moko na motuya ya bangenga nkama moko ya bato ya Filisitia. 15 Boye Ishi-Bosheti atindaki bato kozwa Mikali epai ya mobali na ye, Palitieli, mwana mobali ya Laishi. 16 Mobali na ye alandaki ye na kolela kino na Bawurimi. Kasi Abineri alobaki na mobali yango :— Zonga na ndako na yo.Mpe mobali azongaki. 17 Abineri asololaki na bampaka ya Isalaele mpe alobaki na bango :— Lokola wuta kala bolingaka ete Davidi akoma mokonzi na bino, 18 bosala yango sik’oyo ; pamba te Yawe alobaki boye na tina na ye : « Ezali na nzela ya Davidi, mosali na ngai, nde nakobikisa bato na Ngai, Isalaele, na maboko ya bato ya Filisitia mpe ya banguna na bango nyonso. » 19 Sima na Abineri koloba likambo yango epai ya bato ya libota ya Benjame, akendeki na Ebron mpo na koyebisa Davidi makambo nyonso oyo bato ya Isalaele mpe libota mobimba ya Benjame babongisaki. 20 Mpe tango Abineri elongo na bato na ye, tuku mibale, bakomaki epai ya Davidi, na Ebron, Davidi asaliselaki bango feti. 21 Abineri alobaki na Davidi :— Na ndingisa na yo mokonzi, nkolo na ngai, nalingi kokende sik’oyo kosangisela yo bato nyonso ya Isalaele mpo ete basala boyokani elongo na yo ; mpe na bongo, yo okokonza na bisika nyonso oyo olingi.Davidi atikaki Abineri kokende, mpe Abineri azongaki na kimia. 22 Sima na mwa tango, basali ya Davidi mpe Joabi bazongaki wuta na bitumba mpe bamemaki bomengo ebele ya bitumba. Abineri azalaki lisusu na Ebron te, epai ya Davidi, pamba te Davidi asilaki kotika ye kokende, mpe azongaki na kimia. 23 Tango kaka Joabi mpe basoda na ye nyonso bakomaki, bayebisaki Joabi :— Abineri, mwana mobali ya Neri, ayaki epai ya mokonzi ; bongo mokonzi atikaki ye kokende, mpe azongaki na kimia. 24 Joabi akendeki komona mokonzi mpe alobaki na ye :— Eloko nini oyo osali ? Mpo na nini otikaki penza Abineri oyo ayaki epai na yo kokende ? Mpe tala sik’oyo, akei ! 25 Nzokande oyebi malamu Abineri, mwana mobali ya Neri ! Soki ayaki epai na yo, ezalaki nde mpo na kokosa yo, mpo na kononga mpe koluka koyeba bisika nyonso oyo otambolaka mpe makambo nyonso oyo osalaka. 26 Sima na Joabi kowuta na ndako ya Davidi, atindaki bantoma mpo ete balanda mpe bakanga Abineri. Mpe wana Davidi ayebaki te, bantoma bazongisaki Abineri wuta na libulu ya mayi ya Sira. 27 Tango Abineri azongaki lisusu na Ebron, Joabi abendaki ye na pembeni, na kati-kati ya ekuke ya engumba lokola nde alingi kosolola na ye na nkuku. Mpe kuna, mpo na kozongisa mabe na mabe na tina na makila ya ndeko na ye ya mobali Asaeli, Joabi atubaki Abineri mbeli na libumu, mpe Abineri akufaki. 28 Sima na yango, tango kaka Davidi ayokaki sango ya makambo oyo ewutaki kosalema, alobaki :— Na miso ya Yawe, ngai mpe bokonzi na ngai tozali na ngambo te mpo na libela na tina na makila ya Abineri, mwana mobali ya Neri. 29 Tika ete makila na ye etangama na moto ya Joabi mpe ya libota na ye mobimba ! Tika ete ndako ya Joabi ezangaka te bato oyo bakobela bokono ya sopisi to bokono ya maba to bato oyo bakotambola na banzete to bato oyo bakokufa na mopanga to bato oyo bakozanga bilei. 30 Joabi mpe ndeko na ye ya mobali, Abishayi, babomaki Abineri mpo ete abomaki Asaeli, ndeko na bango ya mobali, na bitumba ya Gabaoni. 31 Bongo Davidi alobaki na Joabi mpe na bato nyonso oyo bazalaki elongo na ye :— Bopasola bilamba na bino mpe bolata basaki, bosala matanga liboso ya Abineri.Ye moko mokonzi Davidi atambolaki na sima ya ebembe. 32 Bakundaki Abineri, na Ebron, mpe mokonzi alelaki makasi na likolo ya kunda ya Abineri. Bato nyonso mpe balelaki. 33 Bongo mokonzi ayembaki nzembo oyo ya mawa mpo na Abineri :« Esengelaki ete Abineri akufa penza lokola zoba ? 34 Bakangaki te maboko na yo na basinga,bakangaki te makolo na yo na basheni.Kasi okweyi ndenge bakweyaka liboso ya babomi. »Mpe bato nyonso balelaki ye lisusu makasi 35 mpe basengaki na Davidi ete alia wana moyi ezali nanu. Kasi Davidi alapaki ndayi na maloba oyo : « Tika ete Nzambe apesa ngai etumbu oyo eleki makasi soki nameki kolia mapa to eloko mosusu liboso ete moyi elala ! » 36 Bato nyonso bayokaki ndayi yango mpe basepelaki na yango : bazalaki kosepela na makambo nyonso oyo mokonzi azalaki kosala. 37 Mpe na mokolo wana, basoda nyonso ya Isalaele mpe Isalaele mobimba bandimaki ete mokonzi ayebaki ata likambo moko te na tina na kufa ya Abineri, mwana mobali ya Neri. 38 Mokonzi alobaki na basali na ye : « Boni, boyebi na bino ete mokambi moko mpe moto moko ya monene akweyi lelo kati na Isalaele ? 39 Na mokolo ya lelo, atako bapakola ngai mafuta lokola mokonzi, nazali na makasi te, mpe bana mibali oyo ya Tseruya baleki ngai na makasi. Tika ete Yawe apesa etumbu na moto oyo asali mabe oyo kolanda mabe na ye ! »

In Other Versions

2 Samuel 3 in the ANGEFD

2 Samuel 3 in the ANTPNG2D

2 Samuel 3 in the AS21

2 Samuel 3 in the BAGH

2 Samuel 3 in the BBPNG

2 Samuel 3 in the BBT1E

2 Samuel 3 in the BDS

2 Samuel 3 in the BEV

2 Samuel 3 in the BHAD

2 Samuel 3 in the BIB

2 Samuel 3 in the BLPT

2 Samuel 3 in the BNT

2 Samuel 3 in the BNTABOOT

2 Samuel 3 in the BNTLV

2 Samuel 3 in the BOATCB

2 Samuel 3 in the BOATCB2

2 Samuel 3 in the BOBCV

2 Samuel 3 in the BOCNT

2 Samuel 3 in the BOECS

2 Samuel 3 in the BOGWICC

2 Samuel 3 in the BOHCB

2 Samuel 3 in the BOHCV

2 Samuel 3 in the BOHLNT

2 Samuel 3 in the BOHNTLTAL

2 Samuel 3 in the BOICB

2 Samuel 3 in the BOILNTAP

2 Samuel 3 in the BOITCV

2 Samuel 3 in the BOKCV

2 Samuel 3 in the BOKCV2

2 Samuel 3 in the BOKHWOG

2 Samuel 3 in the BOKSSV

2 Samuel 3 in the BOLCB

2 Samuel 3 in the BOMCV

2 Samuel 3 in the BONAV

2 Samuel 3 in the BONCB

2 Samuel 3 in the BONLT

2 Samuel 3 in the BONUT2

2 Samuel 3 in the BOPLNT

2 Samuel 3 in the BOSCB

2 Samuel 3 in the BOSNC

2 Samuel 3 in the BOTLNT

2 Samuel 3 in the BOVCB

2 Samuel 3 in the BOYCB

2 Samuel 3 in the BPBB

2 Samuel 3 in the BPH

2 Samuel 3 in the BSB

2 Samuel 3 in the CCB

2 Samuel 3 in the CUV

2 Samuel 3 in the CUVS

2 Samuel 3 in the DBT

2 Samuel 3 in the DGDNT

2 Samuel 3 in the DHNT

2 Samuel 3 in the DNT

2 Samuel 3 in the ELBE

2 Samuel 3 in the EMTV

2 Samuel 3 in the ESV

2 Samuel 3 in the FBV

2 Samuel 3 in the FEB

2 Samuel 3 in the GGMNT

2 Samuel 3 in the GNT

2 Samuel 3 in the HARY

2 Samuel 3 in the HNT

2 Samuel 3 in the IRVA

2 Samuel 3 in the IRVB

2 Samuel 3 in the IRVG

2 Samuel 3 in the IRVH

2 Samuel 3 in the IRVK

2 Samuel 3 in the IRVM

2 Samuel 3 in the IRVM2

2 Samuel 3 in the IRVO

2 Samuel 3 in the IRVP

2 Samuel 3 in the IRVT

2 Samuel 3 in the IRVT2

2 Samuel 3 in the IRVU

2 Samuel 3 in the ISVN

2 Samuel 3 in the JSNT

2 Samuel 3 in the KAPI

2 Samuel 3 in the KBT1ETNIK

2 Samuel 3 in the KBV

2 Samuel 3 in the KJV

2 Samuel 3 in the KNFD

2 Samuel 3 in the LBA

2 Samuel 3 in the LBLA

2 Samuel 3 in the LNT

2 Samuel 3 in the LSV

2 Samuel 3 in the MAAL

2 Samuel 3 in the MBV

2 Samuel 3 in the MBV2

2 Samuel 3 in the MHNT

2 Samuel 3 in the MKNFD

2 Samuel 3 in the MNG

2 Samuel 3 in the MNT

2 Samuel 3 in the MNT2

2 Samuel 3 in the MRS1T

2 Samuel 3 in the NAA

2 Samuel 3 in the NASB

2 Samuel 3 in the NBLA

2 Samuel 3 in the NBS

2 Samuel 3 in the NBVTP

2 Samuel 3 in the NET2

2 Samuel 3 in the NIV11

2 Samuel 3 in the NNT

2 Samuel 3 in the NNT2

2 Samuel 3 in the NNT3

2 Samuel 3 in the PDDPT

2 Samuel 3 in the PFNT

2 Samuel 3 in the RMNT

2 Samuel 3 in the SBIAS

2 Samuel 3 in the SBIBS

2 Samuel 3 in the SBIBS2

2 Samuel 3 in the SBICS

2 Samuel 3 in the SBIDS

2 Samuel 3 in the SBIGS

2 Samuel 3 in the SBIHS

2 Samuel 3 in the SBIIS

2 Samuel 3 in the SBIIS2

2 Samuel 3 in the SBIIS3

2 Samuel 3 in the SBIKS

2 Samuel 3 in the SBIKS2

2 Samuel 3 in the SBIMS

2 Samuel 3 in the SBIOS

2 Samuel 3 in the SBIPS

2 Samuel 3 in the SBISS

2 Samuel 3 in the SBITS

2 Samuel 3 in the SBITS2

2 Samuel 3 in the SBITS3

2 Samuel 3 in the SBITS4

2 Samuel 3 in the SBIUS

2 Samuel 3 in the SBIVS

2 Samuel 3 in the SBT

2 Samuel 3 in the SBT1E

2 Samuel 3 in the SCHL

2 Samuel 3 in the SNT

2 Samuel 3 in the SUSU

2 Samuel 3 in the SUSU2

2 Samuel 3 in the SYNO

2 Samuel 3 in the TBIAOTANT

2 Samuel 3 in the TBT1E

2 Samuel 3 in the TBT1E2

2 Samuel 3 in the TFTIP

2 Samuel 3 in the TFTU

2 Samuel 3 in the TGNTATF3T

2 Samuel 3 in the THAI

2 Samuel 3 in the TNFD

2 Samuel 3 in the TNT

2 Samuel 3 in the TNTIK

2 Samuel 3 in the TNTIL

2 Samuel 3 in the TNTIN

2 Samuel 3 in the TNTIP

2 Samuel 3 in the TNTIZ

2 Samuel 3 in the TOMA

2 Samuel 3 in the TTENT

2 Samuel 3 in the UBG

2 Samuel 3 in the UGV

2 Samuel 3 in the UGV2

2 Samuel 3 in the UGV3

2 Samuel 3 in the VBL

2 Samuel 3 in the VDCC

2 Samuel 3 in the YALU

2 Samuel 3 in the YAPE

2 Samuel 3 in the YBVTP

2 Samuel 3 in the ZBP