Daniel 4 (BOLCB2)

1 Ngai, Nabukodonozori, nazalaki na kimia mpe nazalaki kosepela na bomengo kati na ndako na ngai. 2 Mokolo moko, tango nazalaki ya kolala na mbeto na ngai, nalotaki ndoto moko oyo ebangisaki ngai makasi ; bililingi mpe bimoniseli moko eyaki na makanisi na ngai mpe etungisaki molimo na ngai. 3 Boye, napesaki mitindo epai ya bato ya bwanya nyonso ya Babiloni ete baya liboso na ngai mpo na kolimbolela ngai ndoto yango. 4 Bato oyo balobaka makambo oyo ekoya, banganga-kisi, bato ya soloka, oyo basalelaka minzoto mpe bato ya mayele ya mabe bayaki epai na ngai, mpe nayebisaki bango ndoto yango ; kasi bakokaki te kopesa ngai ndimbola na yango. 5 Sima, Daniele ayaki liboso na ngai, mpe nayebisaki ye ndoto yango. Bazalaki kobenga ye Belitsatsari, kombo ya nzambe na ngai. Molimo ya banzambe ya bule ezalaki kati na ye. 6 Nalobaki :— Belitsatsari, mokonzi ya bato oyo balobaka makambo oyo ekoya, nayebi ete molimo ya banzambe ya bule ezali kati na yo, mpe ete mabombami moko te ezali pasi na kolimbola mpo na yo. Yoka ndoto oyo nalotaki mpe pesa ngai ndimbola na yango. 7 Tala bimoniseli oyo namonaki tango nazalaki ya kolala na mbeto na ngai :«~Nazalaki kotala, namonaki nzete moko ya moneneetelema liboso na ngai, na kati-kati ya mabele,mpe ezalaki molayi makasi penza. 8 Nzete yango ekolaki, ekomaki monene mpe makasi ;songe na yango etutaki mapata,ezalaki komonana wuta na basuka ya mabele~; 9 ezalaki na makasa kitoko mpe na bambuma ebele,mpe ezalaki kopesa bilei na moto nyonso.Banyama ya zamba ezalaki koyakozwa pio na se ya elili na yango~;bandeke ya likolo ezalaki kovanda na bitape na yango~:ezalaki kopesa bilei na bikelamu nyonso ya bomoi. 10 Na emoniseli oyo nazwaki tango nazalaki ya kolala na mbeto na ngai, namonaki anjelu moko, ye mosantu, kokita wuta na Lola. 11 Agangaki na mongongo makasi :‹~Bokweyisa nzete wana, bokata bitape na yango,bobuka makasa na yango mpe bopanza bambuma na yango~!Tika ete banyama ya zamba elongwa na se na yangompe bandeke elongwa na bitape na yango~! 12 Kasi tika ete mobimbi mpe misisa na yango etikala elala na mabele ;kanga yango minyololo ya bibende mpe ya bronze kati na matiti ya zamba~!Tika ete mamwe epolisa yango,tika ete evanda elongo na banyama ya zambampe elia matiti ya mabele elongo na banyama~! 13 Tika ete motema na ye ya bomoto elongwampe azwa motema ya nyama kino mibu sambo ekoleka mpo na ye. 14 Ba-anjelu nde bazwi mokano wana ; basantu nde bakati yango mpo ete bato ya bomoi bayeba ete Ye-Oyo-Aleki-Likolo azali Nkolo ya mokili ya bato, apesaka bokonzi na yango na moto nyonso oyo Ye alingi mpe azali na makoki ya kotombola kati na yango moto ya suka kati na bato. › 15 Yango nde ndoto oyo ngai, mokonzi Nabukodonozori, nalotaki. Sik’oyo yo, Belitsatsari, yebisa ngai ndimbola na yango, pamba te moto moko te kati na bato ya bwanya ya mokili na ngai azalaki na makoki ya kolimbolela ngai yango. Nzokande yo, okokoka mpo ete ozali na molimo ya banzambe ya bule kati na yo. » 16 Bongo Daniele oyo bazalaki kobenga Belitsatsari atungisamaki makasi na mwa tango, mpe makanisi na ye ekomaki kobangisa ye. Mokonzi alobaki na ye :— Belitsatsari, tika ete ndoto oyo mpe ndimbola na yango ebangisa yo te ! 17 Belitsatsari azongisaki :— Nkolo na ngai, tika ete ndoto oyo ezala mpo na bayini na yo, mpe ndimbola na yango, mpo na banguna na yo ! 18 Nzete oyo omonaki, oyo ezalaki na makasa ya kitoko mpe bambuma ebele, oyo ezalaki kopesa bato nyonso bilei, oyo ezalaki kopesa pio na banyama ya zamba, oyo ezalaki kotikela bandeke ya likolo esika ya kotonga bazala na yango ; 19 nzete yango ezali yo, mokonzi ! Okomi penza monene mpe makasi kino otuti mapata ; mpe bokonzi na yo ekeyi kino na suka ya mabele. 20 Mokonzi, omonaki anjelu moko, ye mosantu, kokita wuta na Lola mpe koloba : « Kweyisa nzete wana mpe boma yango, kasi tika mobimbi na yango mpe kanga yango minyololo ya bibende mpe ya bronze kati na matiti ya zamba, mpe tika ete misisa na yango etikala na se ya mabele ! Tika ete mamwe epolisa yango mpe ebika lokola banyama ya zamba, kino mibu sambo ekoleka mpo na ye. » 21 Oh mokonzi, tala ndimbola na yango ; mpe ezali mokano ya Ye-Oyo-Aleki-Likolo, oyo atombokeli nkolo na ngai : 22 « Bakobengana yo na molongo ya bato mpe okokende kovanda esika moko na banyama ya zamba ; okobanda kolia matiti ya zamba lokola ngombe, mpe mamwe ekopolisa nzoto na yo. Mibu sambo ekoleka mpo na yo kino tango okondima ete Ye-Oyo-Aleki-Likolo azali na bokonzi ya kosala makambo oyo Ye alingi kati na bikolo ya bato mpo na kopesa yango na moto oyo Ye alingi. 23 Etinda ya kotika mobimbi ya nzete mpe misisa na yango elingi koloba ete bokonzi na yo ekozongela yo lisusu tango okondima ete Nzambe ya likolo azali Mokonzi ya bakonzi. 24 Yango wana, oh mokonzi, yamba na esengo toli oyo nakopesa yo : ‹ Tika masumu na yo mpe sala makambo oyo ezali sembo ! Tika motema mabe mpe yokela babola mawa ! Na bongo nde kimia mpe bomengo na yo ekowumela. › » 25 Makambo wana nyonso ekokokisama mpo na mokonzi Nabukodonozori. 26 Sima na basanza zomi na mibale, wana mokonzi azalaki kotambola na veranda ya ndako ya bokonzi, na Babiloni, 27 amilobelaki : « Boni ! Oyo ezali te Babiloni monene oyo natongaki lokola ndako ya mokonzi, na makasi na ngai, na nguya na ngai mpe mpo na lokumu ya bokonzi na ngai ? » 28 Wana azalaki nanu komilobela, mongongo moko ewutaki na likolo, elobaki :— Tala makambo oyo ekatami mpo na yo, mokonzi Nabukodonozori : « Nguya ya bokonzi elongwe na maboko na yo. 29 Bakobengana yo na molongo ya bato mpe okokende kovanda esika moko na banyama ya zamba ; okokoma kolia matiti lokola ngombe. Mibu sambo ekoleka mpo na yo kino tango okondima ete Ye-Oyo-Aleki-Likolo azali na bokonzi ya kosala oyo Ye alingi, na bikolo ya bato mpo na kopesa yango na moto oyo Ye alingi. » 30 Mbala moko, makambo nyonso oyo elobamaki na tina na Nabukodonozori ekokisamaki. Babenganaki ye na molongo ya bato mpe akomaki kolia matiti lokola ngombe ; mamwe ekomaki kopolisa nzoto na ye kino suki na ye ekomaki milayi lokola masala ya mpongo ya mobange, mpe manzaka na ye lokola manzaka ya ndeke. 31 Na suka ya tango oyo esakolamaki, ngai Nabukodonozori, natombolaki miso na ngai na likolo, mpe mayele na ngai ezongelaki ngai. Nasanzolaki Ye-Oyo-Aleki-Likolo, napesaki lokumu mpe nkembo epai na Ye oyo azali na bomoi tango nyonso :Bokonzi na Ye ezali na suka te,ewumelaka seko na seko. 32 Bato nyonso ya mokili bazali pamba na miso na Ye ;asalaka makambo oyo alingi na mampinga nyonso ya likolompe na bavandi ya mabele.Moto moko te azali na makokiya kozongisa loboko na Ye sima. 33 Kaka tango mayele na ngai ezongelaki ngai, lokumu mpe nkembo na ngai ezongelaki ngai mpo na nkembo ya bokonzi na ngai ; bapesi toli na ngai mpe bato na ngai ya lokumu bakomaki koluka ngai mpe bazongiselaki ngai kiti na ngai ya bokonzi. Nakomaki lisusu na lokumu makasi koleka oyo nazalaki na yango liboso. 34 Sik’oyo ngai Nabukodonozori, nakumisi, nanetoli mpe nasanzoli Mokonzi ya Lola, oyo misala na Ye nyonso ezali sembo, banzela na Ye ezali alima, mpe azali na makoki ya kosambwisa bato oyo bamitombolaka na lolendo.

In Other Versions

Daniel 4 in the ANGEFD

Daniel 4 in the ANTPNG2D

Daniel 4 in the AS21

Daniel 4 in the BAGH

Daniel 4 in the BBPNG

Daniel 4 in the BBT1E

Daniel 4 in the BDS

Daniel 4 in the BEV

Daniel 4 in the BHAD

Daniel 4 in the BIB

Daniel 4 in the BLPT

Daniel 4 in the BNT

Daniel 4 in the BNTABOOT

Daniel 4 in the BNTLV

Daniel 4 in the BOATCB

Daniel 4 in the BOATCB2

Daniel 4 in the BOBCV

Daniel 4 in the BOCNT

Daniel 4 in the BOECS

Daniel 4 in the BOGWICC

Daniel 4 in the BOHCB

Daniel 4 in the BOHCV

Daniel 4 in the BOHLNT

Daniel 4 in the BOHNTLTAL

Daniel 4 in the BOICB

Daniel 4 in the BOILNTAP

Daniel 4 in the BOITCV

Daniel 4 in the BOKCV

Daniel 4 in the BOKCV2

Daniel 4 in the BOKHWOG

Daniel 4 in the BOKSSV

Daniel 4 in the BOLCB

Daniel 4 in the BOMCV

Daniel 4 in the BONAV

Daniel 4 in the BONCB

Daniel 4 in the BONLT

Daniel 4 in the BONUT2

Daniel 4 in the BOPLNT

Daniel 4 in the BOSCB

Daniel 4 in the BOSNC

Daniel 4 in the BOTLNT

Daniel 4 in the BOVCB

Daniel 4 in the BOYCB

Daniel 4 in the BPBB

Daniel 4 in the BPH

Daniel 4 in the BSB

Daniel 4 in the CCB

Daniel 4 in the CUV

Daniel 4 in the CUVS

Daniel 4 in the DBT

Daniel 4 in the DGDNT

Daniel 4 in the DHNT

Daniel 4 in the DNT

Daniel 4 in the ELBE

Daniel 4 in the EMTV

Daniel 4 in the ESV

Daniel 4 in the FBV

Daniel 4 in the FEB

Daniel 4 in the GGMNT

Daniel 4 in the GNT

Daniel 4 in the HARY

Daniel 4 in the HNT

Daniel 4 in the IRVA

Daniel 4 in the IRVB

Daniel 4 in the IRVG

Daniel 4 in the IRVH

Daniel 4 in the IRVK

Daniel 4 in the IRVM

Daniel 4 in the IRVM2

Daniel 4 in the IRVO

Daniel 4 in the IRVP

Daniel 4 in the IRVT

Daniel 4 in the IRVT2

Daniel 4 in the IRVU

Daniel 4 in the ISVN

Daniel 4 in the JSNT

Daniel 4 in the KAPI

Daniel 4 in the KBT1ETNIK

Daniel 4 in the KBV

Daniel 4 in the KJV

Daniel 4 in the KNFD

Daniel 4 in the LBA

Daniel 4 in the LBLA

Daniel 4 in the LNT

Daniel 4 in the LSV

Daniel 4 in the MAAL

Daniel 4 in the MBV

Daniel 4 in the MBV2

Daniel 4 in the MHNT

Daniel 4 in the MKNFD

Daniel 4 in the MNG

Daniel 4 in the MNT

Daniel 4 in the MNT2

Daniel 4 in the MRS1T

Daniel 4 in the NAA

Daniel 4 in the NASB

Daniel 4 in the NBLA

Daniel 4 in the NBS

Daniel 4 in the NBVTP

Daniel 4 in the NET2

Daniel 4 in the NIV11

Daniel 4 in the NNT

Daniel 4 in the NNT2

Daniel 4 in the NNT3

Daniel 4 in the PDDPT

Daniel 4 in the PFNT

Daniel 4 in the RMNT

Daniel 4 in the SBIAS

Daniel 4 in the SBIBS

Daniel 4 in the SBIBS2

Daniel 4 in the SBICS

Daniel 4 in the SBIDS

Daniel 4 in the SBIGS

Daniel 4 in the SBIHS

Daniel 4 in the SBIIS

Daniel 4 in the SBIIS2

Daniel 4 in the SBIIS3

Daniel 4 in the SBIKS

Daniel 4 in the SBIKS2

Daniel 4 in the SBIMS

Daniel 4 in the SBIOS

Daniel 4 in the SBIPS

Daniel 4 in the SBISS

Daniel 4 in the SBITS

Daniel 4 in the SBITS2

Daniel 4 in the SBITS3

Daniel 4 in the SBITS4

Daniel 4 in the SBIUS

Daniel 4 in the SBIVS

Daniel 4 in the SBT

Daniel 4 in the SBT1E

Daniel 4 in the SCHL

Daniel 4 in the SNT

Daniel 4 in the SUSU

Daniel 4 in the SUSU2

Daniel 4 in the SYNO

Daniel 4 in the TBIAOTANT

Daniel 4 in the TBT1E

Daniel 4 in the TBT1E2

Daniel 4 in the TFTIP

Daniel 4 in the TFTU

Daniel 4 in the TGNTATF3T

Daniel 4 in the THAI

Daniel 4 in the TNFD

Daniel 4 in the TNT

Daniel 4 in the TNTIK

Daniel 4 in the TNTIL

Daniel 4 in the TNTIN

Daniel 4 in the TNTIP

Daniel 4 in the TNTIZ

Daniel 4 in the TOMA

Daniel 4 in the TTENT

Daniel 4 in the UBG

Daniel 4 in the UGV

Daniel 4 in the UGV2

Daniel 4 in the UGV3

Daniel 4 in the VBL

Daniel 4 in the VDCC

Daniel 4 in the YALU

Daniel 4 in the YAPE

Daniel 4 in the YBVTP

Daniel 4 in the ZBP