Leviticus 3 (BOLCB2)

1 Soki moto moko alingi kobonza ngombe ya mobali to ya mwasi lokola mbeka ya boyokani, nyama ya kobonza liboso ya Yawe esengeli kozala ezanga mbeba. 2 Akotia loboko na ye na moto ya mbeka, akokata yango kingo na ekuke ya Ndako ya kapo ya Bokutani. Bongo, Banganga-Nzambe, bana mibali ya Aron, bakosopa makila na yango na bangambo nyonso ya etumbelo. 3 Kati na mbeka yango ya kozongisa boyokani, tala biteni oyo akobonza liboso ya Yawe lokola likabo bazikisa na moto : mafuta nyonso oyo ezipaka biloko ya kati, mafuta nyonso oyo ekangami na biloko ya kati, 4 bambuma mibale oyo ezalaka na kati ya loketo, mafuta oyo ezipaka yango, na kati-kati ya mipanzi na loketo. Akolongola bafwa mpe bambuma mibale wana. 5 Bana mibali ya Aron bakotumba yango na etumbelo, na likolo ya mbeka ya kotumba oyo ezali likolo ya bakoni oyo ezali kopela moto. Ezali likabo bazikisa na moto, oyo solo kitoko na yango ekosepelisa Yawe. 6 Soki alingi kobonza meme to ntaba lokola mbeka ya boyokani liboso ya Yawe, asengeli kobonza nyama ya mobali to ya mwasi oyo ezanga mbeba. 7 Soki azali nde kobonza mwana meme lokola mbeka, akomema yango liboso ya Yawe. 8 Akotia loboko na ye na moto ya mbeka na ye, akokata yango kingo liboso ya Ndako ya kapo ya Bokutani. Bongo bana mibali ya Aron bakosopa makila na yango na bangambo nyonso ya etumbelo. 9 Kati na mbeka yango ya kozongisa boyokani, tala biteni oyo akobonza epai na Yawe lokola likabo bazikisa na moto : mafuta ya mbeka, mokila mobimba, mafuta oyo ezipaka biloko ya kati mpe mafuta nyonso oyo ekangami na kati, 10 bambuma mibale oyo ezalaka na kati ya loketo, mafuta oyo ezipaka yango mpe mafuta oyo ezali kati-kati ya mipanzi na loketo. Akolongola bafwa na bambuma mibale wana. 11 Nganga-Nzambe akotumba biteni nyonso wana na etumbelo. Ezali likabo bazikisa na moto mpo na Yawe. 12 Soki alingi kobonza ntaba ya mobali to ya mwasi, akomema yango liboso ya Yawe. Akotia loboko na ye na moto ya mbeka na ye, 13 akokata yango kingo liboso ya Ndako ya kapo ya Bokutani. Bongo bana mibali ya Aron bakosopa makila na yango na bangambo nyonso ya etumbelo. 14 Akobonza liboso ya Yawe lokola likabo bazikisa na moto : mafuta nyonso oyo ezipaka biloko ya kati, 15 bambuma mibale oyo ezalaka na kati ya loketo, mafuta oyo ekangami na yango mpe bafwa. Bakolongola yango nzela moko na bambuma mibale oyo ezalaka na kati ya loketo. 16 Nganga-Nzambe akotumba yango na etumbelo. Ezali likabo bazikisa na moto, oyo solo kitoko na yango ekosepelisa Yawe.Biteni nyonso ya mafuta ezali ya Yawe. 17 Ezali mobeko ya seko mpo na milongo oyo ekoya, na bisika nyonso oyo bokovanda : bokolia te ezala mafuta to makila. › »

In Other Versions

Leviticus 3 in the ANGEFD

Leviticus 3 in the ANTPNG2D

Leviticus 3 in the AS21

Leviticus 3 in the BAGH

Leviticus 3 in the BBPNG

Leviticus 3 in the BBT1E

Leviticus 3 in the BDS

Leviticus 3 in the BEV

Leviticus 3 in the BHAD

Leviticus 3 in the BIB

Leviticus 3 in the BLPT

Leviticus 3 in the BNT

Leviticus 3 in the BNTABOOT

Leviticus 3 in the BNTLV

Leviticus 3 in the BOATCB

Leviticus 3 in the BOATCB2

Leviticus 3 in the BOBCV

Leviticus 3 in the BOCNT

Leviticus 3 in the BOECS

Leviticus 3 in the BOGWICC

Leviticus 3 in the BOHCB

Leviticus 3 in the BOHCV

Leviticus 3 in the BOHLNT

Leviticus 3 in the BOHNTLTAL

Leviticus 3 in the BOICB

Leviticus 3 in the BOILNTAP

Leviticus 3 in the BOITCV

Leviticus 3 in the BOKCV

Leviticus 3 in the BOKCV2

Leviticus 3 in the BOKHWOG

Leviticus 3 in the BOKSSV

Leviticus 3 in the BOLCB

Leviticus 3 in the BOMCV

Leviticus 3 in the BONAV

Leviticus 3 in the BONCB

Leviticus 3 in the BONLT

Leviticus 3 in the BONUT2

Leviticus 3 in the BOPLNT

Leviticus 3 in the BOSCB

Leviticus 3 in the BOSNC

Leviticus 3 in the BOTLNT

Leviticus 3 in the BOVCB

Leviticus 3 in the BOYCB

Leviticus 3 in the BPBB

Leviticus 3 in the BPH

Leviticus 3 in the BSB

Leviticus 3 in the CCB

Leviticus 3 in the CUV

Leviticus 3 in the CUVS

Leviticus 3 in the DBT

Leviticus 3 in the DGDNT

Leviticus 3 in the DHNT

Leviticus 3 in the DNT

Leviticus 3 in the ELBE

Leviticus 3 in the EMTV

Leviticus 3 in the ESV

Leviticus 3 in the FBV

Leviticus 3 in the FEB

Leviticus 3 in the GGMNT

Leviticus 3 in the GNT

Leviticus 3 in the HARY

Leviticus 3 in the HNT

Leviticus 3 in the IRVA

Leviticus 3 in the IRVB

Leviticus 3 in the IRVG

Leviticus 3 in the IRVH

Leviticus 3 in the IRVK

Leviticus 3 in the IRVM

Leviticus 3 in the IRVM2

Leviticus 3 in the IRVO

Leviticus 3 in the IRVP

Leviticus 3 in the IRVT

Leviticus 3 in the IRVT2

Leviticus 3 in the IRVU

Leviticus 3 in the ISVN

Leviticus 3 in the JSNT

Leviticus 3 in the KAPI

Leviticus 3 in the KBT1ETNIK

Leviticus 3 in the KBV

Leviticus 3 in the KJV

Leviticus 3 in the KNFD

Leviticus 3 in the LBA

Leviticus 3 in the LBLA

Leviticus 3 in the LNT

Leviticus 3 in the LSV

Leviticus 3 in the MAAL

Leviticus 3 in the MBV

Leviticus 3 in the MBV2

Leviticus 3 in the MHNT

Leviticus 3 in the MKNFD

Leviticus 3 in the MNG

Leviticus 3 in the MNT

Leviticus 3 in the MNT2

Leviticus 3 in the MRS1T

Leviticus 3 in the NAA

Leviticus 3 in the NASB

Leviticus 3 in the NBLA

Leviticus 3 in the NBS

Leviticus 3 in the NBVTP

Leviticus 3 in the NET2

Leviticus 3 in the NIV11

Leviticus 3 in the NNT

Leviticus 3 in the NNT2

Leviticus 3 in the NNT3

Leviticus 3 in the PDDPT

Leviticus 3 in the PFNT

Leviticus 3 in the RMNT

Leviticus 3 in the SBIAS

Leviticus 3 in the SBIBS

Leviticus 3 in the SBIBS2

Leviticus 3 in the SBICS

Leviticus 3 in the SBIDS

Leviticus 3 in the SBIGS

Leviticus 3 in the SBIHS

Leviticus 3 in the SBIIS

Leviticus 3 in the SBIIS2

Leviticus 3 in the SBIIS3

Leviticus 3 in the SBIKS

Leviticus 3 in the SBIKS2

Leviticus 3 in the SBIMS

Leviticus 3 in the SBIOS

Leviticus 3 in the SBIPS

Leviticus 3 in the SBISS

Leviticus 3 in the SBITS

Leviticus 3 in the SBITS2

Leviticus 3 in the SBITS3

Leviticus 3 in the SBITS4

Leviticus 3 in the SBIUS

Leviticus 3 in the SBIVS

Leviticus 3 in the SBT

Leviticus 3 in the SBT1E

Leviticus 3 in the SCHL

Leviticus 3 in the SNT

Leviticus 3 in the SUSU

Leviticus 3 in the SUSU2

Leviticus 3 in the SYNO

Leviticus 3 in the TBIAOTANT

Leviticus 3 in the TBT1E

Leviticus 3 in the TBT1E2

Leviticus 3 in the TFTIP

Leviticus 3 in the TFTU

Leviticus 3 in the TGNTATF3T

Leviticus 3 in the THAI

Leviticus 3 in the TNFD

Leviticus 3 in the TNT

Leviticus 3 in the TNTIK

Leviticus 3 in the TNTIL

Leviticus 3 in the TNTIN

Leviticus 3 in the TNTIP

Leviticus 3 in the TNTIZ

Leviticus 3 in the TOMA

Leviticus 3 in the TTENT

Leviticus 3 in the UBG

Leviticus 3 in the UGV

Leviticus 3 in the UGV2

Leviticus 3 in the UGV3

Leviticus 3 in the VBL

Leviticus 3 in the VDCC

Leviticus 3 in the YALU

Leviticus 3 in the YAPE

Leviticus 3 in the YBVTP

Leviticus 3 in the ZBP