2 Kings 25 (BOLCB2)

1 Tango Sedesiasi akokisaki mibu libwa na bokonzi, na mokolo ya zomi ya sanza mpe ya zomi, Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, elongo na mampinga na ye nyonso, ayaki kobundisa Yelusalemi. Batongaki molako na bango libanda ya engumba, mpe atongaki mabulu mpo na kobombama, na zingazinga na yango nyonso. 2 Engumba yango ezingelamaki kino na mobu ya zomi na moko ya bokonzi ya Sedesiasi. 3 Na mokolo ya libwa ya sanza ya minei, wana nzala makasi ekotaki kati na engumba mpe bato bazalaki lisusu na eloko ya kolia te, 4 bongo lokola lidusu moko efungwamaki kati na mir ya engumba, basoda nyonso ya Yuda bakimaki butu-butu mpe babimelaki na ekuke oyo ezalaki na kati-kati ya bamir mibale, pene ya elanga ya mokonzi, atako bato ya Babiloni bazingelaki engumba. Bakimaki na nzela ya lubwaku ya Yordani. 5 Kasi basoda ya Babiloni balandaki mokonzi mpe bakangaki ye kati na etando ya Jeriko epai wapi basoda na ye nyonso bakimaki ye mpe bapanzanaki. 6 Basoda ya Babiloni bakangaki mokonzi ya Yuda mpe bamemaki ye epai ya mokonzi ya Babiloni, na Ribila epai wapi bakatelaki ye etumbu. 7 Bakataki mito ya bana mibali ya Sedesiasi na miso na ye ; mpe Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, atobolaki miso ya Sedesiasi, apesaki mitindo ete bakanga ye minyololo ya bronze mpe bamema ye na Babiloni. 8 Tango Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, akokisaki mibu zomi na libwa na bokonzi, Nebuzaradani, mokonzi ya bakengeli mpe mosali ya mokonzi ya Babiloni, ayaki na Yelusalemi na mokolo ya sambo ya sanza ya mitano. 9 Atumbaki Tempelo ya Yawe, ndako ya mokonzi mpe bandako nyonso ya Yelusalemi ; atumbaki bandako nyonso ya bato minene. 10 Mampinga nyonso ya Babiloni, oyo ezalaki na se ya bokonzi ya mokonzi ya bakengeli ya mokonzi babukaki bamir oyo ezingelaki Yelusalemi. 11 Nebuzaradani, mokonzi ya bakengeli ya mokonzi, amemaki na bowumbu bato oyo batikalaki kati na engumba, bato oyo bamipesaki epai ya mokonzi ya Babiloni mpe bato mosusu oyo batikalaki. 12 Kasi mokonzi ya bakengeli ya mokonzi atikaki kati na mokili ndambo ya babola mpo na kolona vino mpe bilanga. 13 Bato ya Babiloni babukaki makonzi ya bronze oyo ezalaki liboso ya Tempelo ya Yawe, bashario ya bronze mpe nzungu ya monene ya bronze oyo ezalaki kati na Tempelo ya Yawe, mpe bamemaki bronze na yango na Babiloni. 14 Bakamataki lisusu biloko nyonso ya bronze oyo bazalaki kosala na yango losambo kati na Tempelo, basani ya putulu, bapawu, bambeli, bakopo. 15 Mokonzi ya bakengeli ya mokonzi akamataki lisusu biloko nyonso ya wolo mpe ya palata : bambabola mpe basani ya kobwakela mayi. 16 Bakokaki te komeka kilo ya bronze ya biloko nyonso oyo Salomo asalaki mpo na Tempelo ya Yawe : makonzi nyonso mibale, nzungu ya monene mpe bashario. 17 Likonzi moko na moko ezalaki na bametele pene libwa na bosanda. Moto ya likonzi, oyo ezalaki na songe, ezalaki ya bronze mpe na metele pene moko na ndambo na molayi ; mpe bazingelaki yango na bililingi ya basinga oyo basala lokola monyama mpe bambuma ya grenade. Makonzi nyonso mibale mpe bililingi ya basinga oyo basala lokola monyama ezalaki ndenge moko. 18 Mokonzi ya bakengeli ya mokonzi atiaki na boloko Seraya, mokonzi ya Banganga-Nzambe ; Sofoni, molandi ya mokonzi ya Banganga-Nzambe ; mpe Banganga-Nzambe misato oyo bazalaki na mokumba ya kokengela ekotelo ya Tempelo. 19 Kati na bato oyo batikalaki kati na engumba, akangaki lisusu moko kati na bakalaka ya lokumu, oyo azalaki na mokumba ya kotala makambo ya basoda ya bitumba, bapesi toli mitano, mokomi mikanda ya mokonzi ya mampinga, oyo azalaki na mokumba ya kokoma bakombo ya bato ya mboka mpo na kokota na mosala ya mampinga ; mpe mibali tuku motoba ya Yuda, oyo bakutaki kati na engumba. 20 Nebuzaradani, mokonzi ya bakengeli ya mokonzi, akamataki bango nyonso mpe amemaki bango epai ya mokonzi ya Babiloni, na Ribila. 21 Mokonzi ya Babiloni abomaki bango kuna na Ribila, kati na mokili ya Amati. Boye, bato ya Yuda bakendeki na bowumbu mosika ya mokili na bango. 22 Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, atiaki Gedalia, mwana mobali ya Ayikami mpe koko ya Shafani, lokola moyangeli ya bato oyo atikaki kati na mokili ya Yuda. 23 Tango bakonzi nyonso ya mampinga elongo na basoda na bango bayokaki ete mokonzi ya Babiloni akomisi Gedalia moyangeli, bakendeki na Mitsipa epai ya Gedalia. Tala bakombo ya bato yango : Isimaeli, mwana mobali ya Netania ; Yoanani, mwana mobali ya Karea ; Seraya, mwana mobali ya Tanumeti, moto ya Netofa ; mpe Yazania, mwana mobali ya moto moko ya Maakati. Bakendeki kuna elongo na basoda na bango. 24 Gedalia alapaki ndayi liboso na bango mpe basoda na bango na maloba oyo : « Bobanga te kosalela bato ya Babiloni, bovanda kati na mokili, bosalela mokonzi ya Babiloni mpe bokozala na bino malamu. » 25 Kasi na sanza ya misato, Isimaeli, mwana mobali ya Netania mpe koko ya Elishama, oyo azalaki na molongo ya libota ya bokonzi, ayaki elongo na basoda zomi ; babomaki Gedalia elongo na bato ya Yuda mpe bato ya Babiloni oyo bazalaki elongo na ye, na Mitsipa. 26 Boye bato nyonso, kobanda na bato ya se kino bato ya lokumu, elongo na bakonzi ya basoda, bakimaki na Ejipito, pamba te bazalaki kobanga bato ya Babiloni. 27 Tango Yeoyakini, mokonzi ya Yuda, akokisaki mibu tuku misato na sambo na bowumbu, Evili-Merodaki, mokonzi ya Babiloni, ayokelaki Yeoyakini, mokonzi ya Yuda, mawa mpe abimisaki ye na boloko, na mokolo ya tuku mibale na sambo ya sanza ya zomi na mibale, kaka na mobu oyo akomaki mokonzi. 28 Evili-Merodaki asololaki na Yeoyakini na boboto mpe apesaki ye lokumu koleka bakonzi mosusu oyo bazalaki elongo na ye, na bowumbu kati na Babiloni ; 29 apesaki mitindo ete balongola ye bilamba ya boloko mpe andimaki ete abanda kolia mesa moko elongo na ye, mokolo na mokolo kino na suka ya bomoi na ye. 30 Mokonzi ya Babiloni azalaki kopesa ye nyonso oyo asengeli na yango mikolo nyonso ya bomoi na ye.

In Other Versions

2 Kings 25 in the ANGEFD

2 Kings 25 in the ANTPNG2D

2 Kings 25 in the AS21

2 Kings 25 in the BAGH

2 Kings 25 in the BBPNG

2 Kings 25 in the BBT1E

2 Kings 25 in the BDS

2 Kings 25 in the BEV

2 Kings 25 in the BHAD

2 Kings 25 in the BIB

2 Kings 25 in the BLPT

2 Kings 25 in the BNT

2 Kings 25 in the BNTABOOT

2 Kings 25 in the BNTLV

2 Kings 25 in the BOATCB

2 Kings 25 in the BOATCB2

2 Kings 25 in the BOBCV

2 Kings 25 in the BOCNT

2 Kings 25 in the BOECS

2 Kings 25 in the BOGWICC

2 Kings 25 in the BOHCB

2 Kings 25 in the BOHCV

2 Kings 25 in the BOHLNT

2 Kings 25 in the BOHNTLTAL

2 Kings 25 in the BOICB

2 Kings 25 in the BOILNTAP

2 Kings 25 in the BOITCV

2 Kings 25 in the BOKCV

2 Kings 25 in the BOKCV2

2 Kings 25 in the BOKHWOG

2 Kings 25 in the BOKSSV

2 Kings 25 in the BOLCB

2 Kings 25 in the BOMCV

2 Kings 25 in the BONAV

2 Kings 25 in the BONCB

2 Kings 25 in the BONLT

2 Kings 25 in the BONUT2

2 Kings 25 in the BOPLNT

2 Kings 25 in the BOSCB

2 Kings 25 in the BOSNC

2 Kings 25 in the BOTLNT

2 Kings 25 in the BOVCB

2 Kings 25 in the BOYCB

2 Kings 25 in the BPBB

2 Kings 25 in the BPH

2 Kings 25 in the BSB

2 Kings 25 in the CCB

2 Kings 25 in the CUV

2 Kings 25 in the CUVS

2 Kings 25 in the DBT

2 Kings 25 in the DGDNT

2 Kings 25 in the DHNT

2 Kings 25 in the DNT

2 Kings 25 in the ELBE

2 Kings 25 in the EMTV

2 Kings 25 in the ESV

2 Kings 25 in the FBV

2 Kings 25 in the FEB

2 Kings 25 in the GGMNT

2 Kings 25 in the GNT

2 Kings 25 in the HARY

2 Kings 25 in the HNT

2 Kings 25 in the IRVA

2 Kings 25 in the IRVB

2 Kings 25 in the IRVG

2 Kings 25 in the IRVH

2 Kings 25 in the IRVK

2 Kings 25 in the IRVM

2 Kings 25 in the IRVM2

2 Kings 25 in the IRVO

2 Kings 25 in the IRVP

2 Kings 25 in the IRVT

2 Kings 25 in the IRVT2

2 Kings 25 in the IRVU

2 Kings 25 in the ISVN

2 Kings 25 in the JSNT

2 Kings 25 in the KAPI

2 Kings 25 in the KBT1ETNIK

2 Kings 25 in the KBV

2 Kings 25 in the KJV

2 Kings 25 in the KNFD

2 Kings 25 in the LBA

2 Kings 25 in the LBLA

2 Kings 25 in the LNT

2 Kings 25 in the LSV

2 Kings 25 in the MAAL

2 Kings 25 in the MBV

2 Kings 25 in the MBV2

2 Kings 25 in the MHNT

2 Kings 25 in the MKNFD

2 Kings 25 in the MNG

2 Kings 25 in the MNT

2 Kings 25 in the MNT2

2 Kings 25 in the MRS1T

2 Kings 25 in the NAA

2 Kings 25 in the NASB

2 Kings 25 in the NBLA

2 Kings 25 in the NBS

2 Kings 25 in the NBVTP

2 Kings 25 in the NET2

2 Kings 25 in the NIV11

2 Kings 25 in the NNT

2 Kings 25 in the NNT2

2 Kings 25 in the NNT3

2 Kings 25 in the PDDPT

2 Kings 25 in the PFNT

2 Kings 25 in the RMNT

2 Kings 25 in the SBIAS

2 Kings 25 in the SBIBS

2 Kings 25 in the SBIBS2

2 Kings 25 in the SBICS

2 Kings 25 in the SBIDS

2 Kings 25 in the SBIGS

2 Kings 25 in the SBIHS

2 Kings 25 in the SBIIS

2 Kings 25 in the SBIIS2

2 Kings 25 in the SBIIS3

2 Kings 25 in the SBIKS

2 Kings 25 in the SBIKS2

2 Kings 25 in the SBIMS

2 Kings 25 in the SBIOS

2 Kings 25 in the SBIPS

2 Kings 25 in the SBISS

2 Kings 25 in the SBITS

2 Kings 25 in the SBITS2

2 Kings 25 in the SBITS3

2 Kings 25 in the SBITS4

2 Kings 25 in the SBIUS

2 Kings 25 in the SBIVS

2 Kings 25 in the SBT

2 Kings 25 in the SBT1E

2 Kings 25 in the SCHL

2 Kings 25 in the SNT

2 Kings 25 in the SUSU

2 Kings 25 in the SUSU2

2 Kings 25 in the SYNO

2 Kings 25 in the TBIAOTANT

2 Kings 25 in the TBT1E

2 Kings 25 in the TBT1E2

2 Kings 25 in the TFTIP

2 Kings 25 in the TFTU

2 Kings 25 in the TGNTATF3T

2 Kings 25 in the THAI

2 Kings 25 in the TNFD

2 Kings 25 in the TNT

2 Kings 25 in the TNTIK

2 Kings 25 in the TNTIL

2 Kings 25 in the TNTIN

2 Kings 25 in the TNTIP

2 Kings 25 in the TNTIZ

2 Kings 25 in the TOMA

2 Kings 25 in the TTENT

2 Kings 25 in the UBG

2 Kings 25 in the UGV

2 Kings 25 in the UGV2

2 Kings 25 in the UGV3

2 Kings 25 in the VBL

2 Kings 25 in the VDCC

2 Kings 25 in the YALU

2 Kings 25 in the YAPE

2 Kings 25 in the YBVTP

2 Kings 25 in the ZBP