Numbers 25 (BOLCB2)
1 Wana bana ya Isalaele bavandaki nanu na Shitimi, bamipesaki na kindumba na bilenge basi ya Moabi. 2 Mpe, bilenge basi yango bazalaki kobenga bango na milulu ya mbeka oyo babonzelaka banzambe na bango. Mpe bana ya Isalaele bazalaki kolia mpe kogumbamela banzambe yango. 3 Bongo, bana ya Isalaele bamipesaki na kosambela Bala ya Peori mpe, kanda ya Yawe epelaki makasi mpo na bango. 4 Yawe alobaki na Moyize : « Kanga bakambi nyonso ya Isalaele mpe diembika bango liboso na Ngai, na se ya moyi, mpo ete kanda makasi na Yawe elongwa likolo ya Isalaele. » 5 Moyize alobaki na bakambi ya Isalaele : « Tika ete moko na moko kati na bino aboma bato na ye oyo bamipesi na kosambela nzambe Bala ya Peori. » 6 Bongo moto moko ya Isalaele amemaki na libota na ye mwasi moko ya ekolo ya Madiani liboso ya Moyize mpe ya lisanga mobimba ya bana ya Isalaele, wana bazalaki kolela na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani. 7 Tango Pineasi, mwana mobali ya Eleazari, mwana mobali ya Nganga-Nzambe Aron amonaki bongo, abimaki kati na lisanga mpe akamataki mopanga ; 8 alandaki moto ya Isalaele wana kino kati na ndako na ye ya kapo mpe atobolaki bango mibale mabumu mpe bakufaki, ezala moto ya Isalaele wana mpe mwasi wana. Mpe etumbu oyo ezalaki likolo ya Isalaele esilaki. 9 Bato oyo bakufaki na etumbu wana bazalaki, bato nkoto tuku mibale na minei. 10 Yawe alobaki na Moyize : 11 « Nganga-Nzambe Pineasi, mwana mobali ya Eleazari, mwana mobali ya Aron, asili kolongola kanda na Ngai likolo ya bana ya Isalaele, pamba te atalisi bolingo oyo eleka ndelo mpo na lokumu na Ngai kati na bango ; yango wana, na kanda na Ngai ya makasi, nasilisaki koboma bana ya Isalaele te. 12 Na boye, yebisa ye ete nasili kosala boyokani ya kimia elongo na ye. 13 Boyokani yango ekozala mpo na ye mpe mpo na bakitani na ye, mpo ete basala mosala na Ngai ya Bonganga-Nzambe mpo na libela, pamba te atalisi bolingo oyo eleka ndelo mpo na lokumu ya Nzambe na ye, mpe asali mosala ya bolimbisi masumu mpo na bana ya Isalaele. » 14 Kombo ya moto ya Isalaele oyo babomaki elongo na mwasi ya Madiani ezalaki Zimiri, mwana mobali ya Salu, mokambi ya libota ya Simeoni ; 15 mpe oyo ya mwasi ya Madiani ezalaki Kozibi, mwana mwasi ya Tsuri, mokambi ya libota moko ya ekolo ya Madiani. 16 Yawe alobaki na Moyize : 17 « Kamata bato ya Madiani lokola banguna mpe boma bango, 18 pamba te bakamataki bino lokola banguna mpe basalelaki mayele mabe mpo na kokweyisa bino, na likambo ya Peori mpe ya ndeko na bango ya mwasi, Kozibi, mwana mwasi ya moko kati na bakambi ya Madiani, oyo babomaki na tango ya etumbu kati na likambo ya Peori. » 19 Sima na etumbu wana,
In Other Versions
Numbers 25 in the ANGEFD
Numbers 25 in the ANTPNG2D
Numbers 25 in the AS21
Numbers 25 in the BAGH
Numbers 25 in the BBPNG
Numbers 25 in the BBT1E
Numbers 25 in the BDS
Numbers 25 in the BEV
Numbers 25 in the BHAD
Numbers 25 in the BIB
Numbers 25 in the BLPT
Numbers 25 in the BNT
Numbers 25 in the BNTABOOT
Numbers 25 in the BNTLV
Numbers 25 in the BOATCB
Numbers 25 in the BOATCB2
Numbers 25 in the BOBCV
Numbers 25 in the BOCNT
Numbers 25 in the BOECS
Numbers 25 in the BOGWICC
Numbers 25 in the BOHCB
Numbers 25 in the BOHCV
Numbers 25 in the BOHLNT
Numbers 25 in the BOHNTLTAL
Numbers 25 in the BOICB
Numbers 25 in the BOILNTAP
Numbers 25 in the BOITCV
Numbers 25 in the BOKCV
Numbers 25 in the BOKCV2
Numbers 25 in the BOKHWOG
Numbers 25 in the BOKSSV
Numbers 25 in the BOLCB
Numbers 25 in the BOMCV
Numbers 25 in the BONAV
Numbers 25 in the BONCB
Numbers 25 in the BONLT
Numbers 25 in the BONUT2
Numbers 25 in the BOPLNT
Numbers 25 in the BOSCB
Numbers 25 in the BOSNC
Numbers 25 in the BOTLNT
Numbers 25 in the BOVCB
Numbers 25 in the BOYCB
Numbers 25 in the BPBB
Numbers 25 in the BPH
Numbers 25 in the BSB
Numbers 25 in the CCB
Numbers 25 in the CUV
Numbers 25 in the CUVS
Numbers 25 in the DBT
Numbers 25 in the DGDNT
Numbers 25 in the DHNT
Numbers 25 in the DNT
Numbers 25 in the ELBE
Numbers 25 in the EMTV
Numbers 25 in the ESV
Numbers 25 in the FBV
Numbers 25 in the FEB
Numbers 25 in the GGMNT
Numbers 25 in the GNT
Numbers 25 in the HARY
Numbers 25 in the HNT
Numbers 25 in the IRVA
Numbers 25 in the IRVB
Numbers 25 in the IRVG
Numbers 25 in the IRVH
Numbers 25 in the IRVK
Numbers 25 in the IRVM
Numbers 25 in the IRVM2
Numbers 25 in the IRVO
Numbers 25 in the IRVP
Numbers 25 in the IRVT
Numbers 25 in the IRVT2
Numbers 25 in the IRVU
Numbers 25 in the ISVN
Numbers 25 in the JSNT
Numbers 25 in the KAPI
Numbers 25 in the KBT1ETNIK
Numbers 25 in the KBV
Numbers 25 in the KJV
Numbers 25 in the KNFD
Numbers 25 in the LBA
Numbers 25 in the LBLA
Numbers 25 in the LNT
Numbers 25 in the LSV
Numbers 25 in the MAAL
Numbers 25 in the MBV
Numbers 25 in the MBV2
Numbers 25 in the MHNT
Numbers 25 in the MKNFD
Numbers 25 in the MNG
Numbers 25 in the MNT
Numbers 25 in the MNT2
Numbers 25 in the MRS1T
Numbers 25 in the NAA
Numbers 25 in the NASB
Numbers 25 in the NBLA
Numbers 25 in the NBS
Numbers 25 in the NBVTP
Numbers 25 in the NET2
Numbers 25 in the NIV11
Numbers 25 in the NNT
Numbers 25 in the NNT2
Numbers 25 in the NNT3
Numbers 25 in the PDDPT
Numbers 25 in the PFNT
Numbers 25 in the RMNT
Numbers 25 in the SBIAS
Numbers 25 in the SBIBS
Numbers 25 in the SBIBS2
Numbers 25 in the SBICS
Numbers 25 in the SBIDS
Numbers 25 in the SBIGS
Numbers 25 in the SBIHS
Numbers 25 in the SBIIS
Numbers 25 in the SBIIS2
Numbers 25 in the SBIIS3
Numbers 25 in the SBIKS
Numbers 25 in the SBIKS2
Numbers 25 in the SBIMS
Numbers 25 in the SBIOS
Numbers 25 in the SBIPS
Numbers 25 in the SBISS
Numbers 25 in the SBITS
Numbers 25 in the SBITS2
Numbers 25 in the SBITS3
Numbers 25 in the SBITS4
Numbers 25 in the SBIUS
Numbers 25 in the SBIVS
Numbers 25 in the SBT
Numbers 25 in the SBT1E
Numbers 25 in the SCHL
Numbers 25 in the SNT
Numbers 25 in the SUSU
Numbers 25 in the SUSU2
Numbers 25 in the SYNO
Numbers 25 in the TBIAOTANT
Numbers 25 in the TBT1E
Numbers 25 in the TBT1E2
Numbers 25 in the TFTIP
Numbers 25 in the TFTU
Numbers 25 in the TGNTATF3T
Numbers 25 in the THAI
Numbers 25 in the TNFD
Numbers 25 in the TNT
Numbers 25 in the TNTIK
Numbers 25 in the TNTIL
Numbers 25 in the TNTIN
Numbers 25 in the TNTIP
Numbers 25 in the TNTIZ
Numbers 25 in the TOMA
Numbers 25 in the TTENT
Numbers 25 in the UBG
Numbers 25 in the UGV
Numbers 25 in the UGV2
Numbers 25 in the UGV3
Numbers 25 in the VBL
Numbers 25 in the VDCC
Numbers 25 in the YALU
Numbers 25 in the YAPE
Numbers 25 in the YBVTP
Numbers 25 in the ZBP