1 Chronicles 12 (BOLCB2)

1 Na tango oyo Davidi akimaki na Tsikilagi mpo na kobombama Saulo, mwana mobali ya Kishi, bato bayaki kosangana na ye. Bazalaki basoda ya mpiko oyo babongami mpo na kosalisa ye na bitumba. 2 Bazalaki kobunda na batolotolo mpe kosalela malamu loboko ya mwasi mpe ya mobali mpo na kobwaka mabanga mpe kobeta bambanzi ya batolotolo. Bazalaki bato ya ekolo moko na Saulo : ekolo ya Benjame. 3 Tala bakombo na bango :Akiezeri, mokonzi na bango~;Joasi, mwana mibali ya Shemaa, moto ya Gibea~;Yezieli mpe Peleti, bana mibali ya Azimaveti~;Beraka~; Jewu, moto ya Anatoti~; 4 Yishimaeya, moto ya Gabaoni, moko kati na lisanga ya basoda ya mpiko tuku misato mpe azalaki mokonzi ya lisanga yango ; 5 Jeremi, Yaazieli, Yoanani, Yozabadi, moto ya Gedera ; 6 Elewuzayi, Yerimoti, Bealia, Shemaria, Shefatia, moto ya Arofi ; 7 Elikana, Yishiya, Azareeli, Yoezeri mpe Yashobeami : bango nyonso bazalaki bato ya libota ya Kore ; 8 Yoela mpe Zebadia, bana mibali ya Yeroami, moto ya Gedori. 9 Ndambo ya bato ya ekolo ya Gadi bakabwanaki na Saulo mpo na kokende epai ya Davidi, na ndako makasi ya esobe. Bazalaki basoda ya mpiko oyo bayebi kobunda malamu mpe kosalela malamu nguba mpe makonga. Bazalaki makasi lokola nkosi mpe mbangu lokola mboloko na ngomba. 10 Ezeri azalaki mokonzi na bango ; Abidiasi, mokonzi ya mibale ; Eliabi, mokonzi ya misato ; 11 Mishimana, mokonzi ya minei ; Jeremi, mokonzi ya mitano ; 12 Atayi, mokonzi ya motoba ; Elieli, mokonzi ya sambo ; 13 Yoanani, mokonzi ya mwambe ; Elizabadi, mokonzi ya libwa ; 14 Jeremi, mokonzi ya zomi ; mpe Makibanayi, mokonzi ya zomi na moko. 15 Bato oyo ya libota ya Gadi bazalaki bango nyonso bakonzi ya basoda. Mokonzi oyo azalaki na makasi moke akokaki kobunda na bato nkama moko, mpe oyo alekaki makasi akokaki kobunda na bato nkoto moko. 16 Ezalaki bango nde bakatisaki mayi ya Yordani, na sanza ya liboso, tango mayi ya ebale etondaki makasi na bangambo nyonso, mpe bakimisaki bato nyonso oyo bazalaki kovanda na mabwaku, ezala na ngambo ya este to ya weste. 17 Bato mosusu ya libota ya Benjame mpe ya Yuda bayaki lisusu kosangana na Davidi na ndako na ye ya makasi. 18 Davidi abimaki mpo na kokutana na bango mpe alobaki : « Soki boyei epai na ngai na makanisi ya kimia mpo ete bosunga ngai, wana ngai mpe bino tokosala boyokani ; kasi soki boyei mpo na koteka ngai epai ya banguna na ngai wana maboko na ngai esali mabe te, tika ete Nzambe ya batata na biso azala motatoli mpe akata likambo ! » 19 Boye, Molimo na Nzambe akitelaki Amasayi, mokonzi ya lisanga ya basoda tuku misato, mpe alobaki :« Oh Davidi, tozali ya yo !Tozali elongo na yo, oh mwana mobali ya Izayi !Tika ete kimia ezala na yo, ezala na yo penza ;tika ete kimia ezala na moto oyo azali kosunga yo,pamba te Nzambe na yo azali kosunga yo. »Boye Davidi ayambaki bango mpe akomisaki bango bakonzi ya mampinga na ye. 20 Ndambo ya bato ya Manase bakendeki kosala boyokani elongo na Davidi tango akendeki elongo na basoda ya Filisitia, mpo na kobundisa Saulo. Kasi Davidi elongo na bato na ye balongaki te kosunga bato ya Filisitia, pamba te sima na bakambi na bango koyokana, babenganaki Davidi mpe balobaki : « Davidi alingi kobomisa biso mpo ete azongisa boyokani na nkolo na ye Saulo ! » 21 Tango Davidi akendeki na Tsikilagi, tala bato ya ekolo ya Manase oyo bakendeki kosala boyokani elongo na ye : Adina, Yozabadi, Yediayeli, Mikaeli, Yozabadi, Eliwu mpe Tsilitai. Moko na moko kati na bango azalaki mokonzi ya bato nkoto moko kati na libota ya Manase. 22 Basungaki makasi Davidi mpe mampinga na ye, pamba te bango nyonso bazalaki basoda ya mpiko mpe bakomaki bakonzi ya basoda. 23 Mokolo na mokolo, bato bazalaki koya kosunga Davidi kino mampinga na ye ekomaki monene makasi lokola mampinga ya Nzambe. 24 Tala motango ya basoda oyo babongisami mpo na bitumba, mpe bayaki epai ya Davidi, na Ebron, mpo na kokweyisa bokonzi ya Saulo mpe kopesa yango epai ya Davidi ndenge Yawe alobaki : 25 Bato ya Yuda oyo bamemaka nguba mpe makonga : basoda nkoto motoba na nkama mwambe ; 26 bato ya libota ya Simeoni : basoda ya mpiko nkoto sambo na nkama moko ; 27 bato ya libota ya Levi : basoda nkoto minei na nkama motoba ; 28 mpe lisusu Yeoyada, mokonzi ya libota ya Aron, elongo na basoda na ye nkoto misato na nkama sambo, 29 mpe Tsadoki, elenge soda ya mpiko elongo na bakambi ya libota na ye tuku mibale na mibale ; 30 kati na libota ya Benjame, bato ya libota ya Saulo : basoda nkoto misato, pamba te mingi kati na bango bandimaki kaka kosalela ndako ya Saulo ; 31 kati na libota ya Efrayimi : basoda ya mpiko nkoto tuku mibale na nkama mwambe oyo bakenda sango kati na mabota na bango ; 32 kati na ndambo ya libota ya Manase : basoda ya mpiko nkoto zomi na mwambe oyo baponamaki na bakombo na bango mpo na kokomisa Davidi mokonzi ; 33 kati na libota ya Isakari : bakambi nkama mibale bayaki elongo na bato oyo bango bazalaki kokamba kati na libota na bango ; bazalaki na mayele ya kososola tango mpo na kolakisa Isalaele lolenge ya kosala liboso ya makambo ; 34 kati na libota ya Zabuloni : basoda ya mpiko nkoto tuku mitano oyo bayebi kosalela bibundeli nyonso mpe babundaka na motema moko ; 35 kati na libota ya Nefitali : bakonzi ya basoda nkoto moko, elongo na basoda nkoto tuku misato na sambo oyo babundaka na nguba mpe makonga ; 36 kati na libota ya Dani : basoda oyo babongisama mpo na bitumba, nkoto tuku mibale na mwambe na nkama motoba ; 37 kati na libota ya Aseri : basoda oyo babongisama mpo na bitumba, nkoto tuku minei ; 38 kati na mabota oyo ezalaki na este ya Yordani : libota ya Ribeni, ya Gadi mpe ndambo ya libota ya Manase, basoda nkoto nkama moko na tuku mibale elongo na bibundeli nyonso ya bitumba. 39 Basoda oyo nyonso bayaki na Ebron, na milongo ya bitumba mpe na motema moko mpo na kokomisa Davidi mokonzi na Isalaele mobimba. Bana ya Isalaele oyo batikalaki, bango mpe bazalaki na motema moko mpo na kokomisa Davidi mokonzi. 40 Basalaki kuna mikolo misato elongo na Davidi ; bazalaki kolia mpe komela biloko oyo bandeko na bango babongiselaki bango. 41 Ezala bato oyo bawutaki na libota ya Isakari, ya Zabuloni, ya Nefitali : bango mpe bamemaki bilei likolo ya ba-ane, bashamo, bamile mpe bangombe : farine, gato oyo basala na bambuma ya figi, gato oyo basala na bambuma ya vino ekawuka, masanga ya vino, mafuta, bangombe mpe bameme ebele, pamba te esengo ezalaki kati na Isalaele.

In Other Versions

1 Chronicles 12 in the ANGEFD

1 Chronicles 12 in the ANTPNG2D

1 Chronicles 12 in the AS21

1 Chronicles 12 in the BAGH

1 Chronicles 12 in the BBPNG

1 Chronicles 12 in the BBT1E

1 Chronicles 12 in the BDS

1 Chronicles 12 in the BEV

1 Chronicles 12 in the BHAD

1 Chronicles 12 in the BIB

1 Chronicles 12 in the BLPT

1 Chronicles 12 in the BNT

1 Chronicles 12 in the BNTABOOT

1 Chronicles 12 in the BNTLV

1 Chronicles 12 in the BOATCB

1 Chronicles 12 in the BOATCB2

1 Chronicles 12 in the BOBCV

1 Chronicles 12 in the BOCNT

1 Chronicles 12 in the BOECS

1 Chronicles 12 in the BOGWICC

1 Chronicles 12 in the BOHCB

1 Chronicles 12 in the BOHCV

1 Chronicles 12 in the BOHLNT

1 Chronicles 12 in the BOHNTLTAL

1 Chronicles 12 in the BOICB

1 Chronicles 12 in the BOILNTAP

1 Chronicles 12 in the BOITCV

1 Chronicles 12 in the BOKCV

1 Chronicles 12 in the BOKCV2

1 Chronicles 12 in the BOKHWOG

1 Chronicles 12 in the BOKSSV

1 Chronicles 12 in the BOLCB

1 Chronicles 12 in the BOMCV

1 Chronicles 12 in the BONAV

1 Chronicles 12 in the BONCB

1 Chronicles 12 in the BONLT

1 Chronicles 12 in the BONUT2

1 Chronicles 12 in the BOPLNT

1 Chronicles 12 in the BOSCB

1 Chronicles 12 in the BOSNC

1 Chronicles 12 in the BOTLNT

1 Chronicles 12 in the BOVCB

1 Chronicles 12 in the BOYCB

1 Chronicles 12 in the BPBB

1 Chronicles 12 in the BPH

1 Chronicles 12 in the BSB

1 Chronicles 12 in the CCB

1 Chronicles 12 in the CUV

1 Chronicles 12 in the CUVS

1 Chronicles 12 in the DBT

1 Chronicles 12 in the DGDNT

1 Chronicles 12 in the DHNT

1 Chronicles 12 in the DNT

1 Chronicles 12 in the ELBE

1 Chronicles 12 in the EMTV

1 Chronicles 12 in the ESV

1 Chronicles 12 in the FBV

1 Chronicles 12 in the FEB

1 Chronicles 12 in the GGMNT

1 Chronicles 12 in the GNT

1 Chronicles 12 in the HARY

1 Chronicles 12 in the HNT

1 Chronicles 12 in the IRVA

1 Chronicles 12 in the IRVB

1 Chronicles 12 in the IRVG

1 Chronicles 12 in the IRVH

1 Chronicles 12 in the IRVK

1 Chronicles 12 in the IRVM

1 Chronicles 12 in the IRVM2

1 Chronicles 12 in the IRVO

1 Chronicles 12 in the IRVP

1 Chronicles 12 in the IRVT

1 Chronicles 12 in the IRVT2

1 Chronicles 12 in the IRVU

1 Chronicles 12 in the ISVN

1 Chronicles 12 in the JSNT

1 Chronicles 12 in the KAPI

1 Chronicles 12 in the KBT1ETNIK

1 Chronicles 12 in the KBV

1 Chronicles 12 in the KJV

1 Chronicles 12 in the KNFD

1 Chronicles 12 in the LBA

1 Chronicles 12 in the LBLA

1 Chronicles 12 in the LNT

1 Chronicles 12 in the LSV

1 Chronicles 12 in the MAAL

1 Chronicles 12 in the MBV

1 Chronicles 12 in the MBV2

1 Chronicles 12 in the MHNT

1 Chronicles 12 in the MKNFD

1 Chronicles 12 in the MNG

1 Chronicles 12 in the MNT

1 Chronicles 12 in the MNT2

1 Chronicles 12 in the MRS1T

1 Chronicles 12 in the NAA

1 Chronicles 12 in the NASB

1 Chronicles 12 in the NBLA

1 Chronicles 12 in the NBS

1 Chronicles 12 in the NBVTP

1 Chronicles 12 in the NET2

1 Chronicles 12 in the NIV11

1 Chronicles 12 in the NNT

1 Chronicles 12 in the NNT2

1 Chronicles 12 in the NNT3

1 Chronicles 12 in the PDDPT

1 Chronicles 12 in the PFNT

1 Chronicles 12 in the RMNT

1 Chronicles 12 in the SBIAS

1 Chronicles 12 in the SBIBS

1 Chronicles 12 in the SBIBS2

1 Chronicles 12 in the SBICS

1 Chronicles 12 in the SBIDS

1 Chronicles 12 in the SBIGS

1 Chronicles 12 in the SBIHS

1 Chronicles 12 in the SBIIS

1 Chronicles 12 in the SBIIS2

1 Chronicles 12 in the SBIIS3

1 Chronicles 12 in the SBIKS

1 Chronicles 12 in the SBIKS2

1 Chronicles 12 in the SBIMS

1 Chronicles 12 in the SBIOS

1 Chronicles 12 in the SBIPS

1 Chronicles 12 in the SBISS

1 Chronicles 12 in the SBITS

1 Chronicles 12 in the SBITS2

1 Chronicles 12 in the SBITS3

1 Chronicles 12 in the SBITS4

1 Chronicles 12 in the SBIUS

1 Chronicles 12 in the SBIVS

1 Chronicles 12 in the SBT

1 Chronicles 12 in the SBT1E

1 Chronicles 12 in the SCHL

1 Chronicles 12 in the SNT

1 Chronicles 12 in the SUSU

1 Chronicles 12 in the SUSU2

1 Chronicles 12 in the SYNO

1 Chronicles 12 in the TBIAOTANT

1 Chronicles 12 in the TBT1E

1 Chronicles 12 in the TBT1E2

1 Chronicles 12 in the TFTIP

1 Chronicles 12 in the TFTU

1 Chronicles 12 in the TGNTATF3T

1 Chronicles 12 in the THAI

1 Chronicles 12 in the TNFD

1 Chronicles 12 in the TNT

1 Chronicles 12 in the TNTIK

1 Chronicles 12 in the TNTIL

1 Chronicles 12 in the TNTIN

1 Chronicles 12 in the TNTIP

1 Chronicles 12 in the TNTIZ

1 Chronicles 12 in the TOMA

1 Chronicles 12 in the TTENT

1 Chronicles 12 in the UBG

1 Chronicles 12 in the UGV

1 Chronicles 12 in the UGV2

1 Chronicles 12 in the UGV3

1 Chronicles 12 in the VBL

1 Chronicles 12 in the VDCC

1 Chronicles 12 in the YALU

1 Chronicles 12 in the YAPE

1 Chronicles 12 in the YBVTP

1 Chronicles 12 in the ZBP