1 Kings 1 (BOLCB2)

1 Tango mokonzi Davidi akomaki mobange makasi, azalaki lisusu koyoka moto te na nzoto, ezala bafiniki ye bilamba ebele. 2 Boye, basali ya Davidi balobaki na ye : « Tika ete tolukela mokonzi elenge mwasi moko oyo ayebi nanu nzoto ya mibali te mpo ete azala pene ya mokonzi, abatela ye mpe alala mbeto moko na ye ; mpe mpo ete mokonzi, nkolo na biso, ayoka lisusu moto na nzoto ! » 3 Boye, balukaki kati na Isalaele mobimba elenge mwasi moko ya kitoko ; bamonaki Abishagi, moto ya mboka Sunami, mpe bamemaki ye epai ya mokonzi. 4 Elenge mwasi yango azalaki kitoko mingi, akomaki kobatela mokonzi mpe kosalela ye ; kasi mokonzi atikalaki te kosangisa na ye nzoto. 5 Nzokande, Adoniya, mwana mobali oyo Agite abotelaki Davidi, amilobelaki na motema na ye : « Ngai nde nakozala mokonzi ! »Mpo na yango, asombaki bashar, bampunda ; mpe basoda tuku mitano mpo ete batambola liboso na ye lokola bakengeli. 6 Nzokande, tata na ye atikalaki kopamela ye ata mokolo moko te mpe kotuna ye : « Mpo na nini ozali kosala boye ? » Adoniya azalaki penza kitoko mpe abotamaki sima na Abisalomi. 7 Adoniya asololaki na Joabi, mwana mobali ya Tseruya, mpe na Nganga-Nzambe Abiatari ; mpe bango bandimaki kosunga ye. 8 Kasi Nganga-Nzambe Tsadoki, Benaya, mwana mobali ya Yeoyada ; mosakoli Natan, Shimei, Reyi mpe bakengeli ya Davidi baboyaki kosangana na Adoniya. 9 Adoniya abonzaki na libanga ya Zoeleti bambeka ebele ya bameme, ya bangombe, ya bana ngombe ya mafuta, pembeni ya Eyini-Rogeli ; abengisaki bandeko na ye nyonso ya mibali, bana mibali ya mokonzi, mpe bato nyonso ya Yuda oyo bazalaki kosala epai ya mokonzi. 10 Kasi abengisaki te mosakoli Natan, Benaya, bakengeli ya mokonzi mpe Salomo, ndeko na ye ya mobali. 11 Natan atunaki Batisheba, mama ya Salomo :— Boni, oyoki te ete Adoniya, mwana mobali ya Agite, akomi mokonzi ; kasi mokonzi Davidi ayebi te ? 12 Sik’oyo, tika ete napesa yo toli oyo ekobikisa bomoi na yo mpe bomoi ya Salomo, mwana na yo ya mobali. 13 Kota epai ya mokonzi Davidi mpe loba na ye : « Mokonzi, nkolo na ngai, olapaki ndayi te liboso na ngai mwasi mowumbu na yo : ‹ Solo, Salomo, mwana na yo ya mobali, akokitana na ngai mpe akovanda na kiti na ngai ya bokonzi ? › Boye mpo na nini Adoniya akomi mokonzi ? » 14 Wana okozala nanu koloba na mokonzi, ngai mpe nakokota mpe nakobeta sete na maloba na yo. 15 Batisheba akendeki kotala mokonzi kati na shambre. Mokonzi akomaki mobange makasi, mpe Abishagi, moto ya Sunami, azalaki kobatela ye. 16 Batisheba agumbamaki mpe afukamaki liboso ya mokonzi ; mpe mokonzi atunaki ye :— Boni, olingi nini ? 17 Batisheba azongisaki :— Nkolo na ngai, yo moko olapaki ndayi, liboso na ngai mwasi mowumbu na yo, na Kombo na Yawe, Nzambe na yo, na koloba : « Salomo, mwana na yo ya mobali, akokitana na ngai na bokonzi mpe akovanda na kiti na ngai ya bokonzi. » 18 Kasi sik’oyo Adoniya akomi mokonzi ; mpe yo mokonzi, nkolo na ngai, oyebi yango te ! 19 Abonzi bambeka ebele ya bangombe, ya bana ngombe ya mafuta, ya bameme ; mpe abengisi bana mibali nyonso ya mokonzi, Nganga-Nzambe Abiatari ; Joabi, mokonzi ya mampinga ya Isalaele ; kasi abengisi te Salomo, mowumbu na yo. 20 Mokonzi, nkolo na ngai, miso ya bato nyonso ya Isalaele ezali kotalela yo mpo na koyeba soki nani akovanda na kiti ya bokonzi sima na mokonzi, nkolo na ngai. 21 Soki te, tango mokonzi, nkolo na ngai, akolala elongo na bakoko na ye, bakozwa ngai elongo na Salomo, mwana na ngai ya mobali, lokola babomi. 22 Wana Batisheba azalaki nanu koloba na mokonzi, mosakoli Natan akomaki. 23 Bayebisaki mokonzi :— Tala mosakoli Natan !Mosakoli Natan akendeki liboso ya mokonzi, agumbamaki liboso ya mokonzi, elongi kino na se. 24 Bongo, Natan alobaki :— Mokonzi, nkolo na ngai ; boni, olobaki ete Adoniya akokitana na yo mpe akovanda na kiti na yo ya bokonzi ? 25 Na mokolo ya lelo, akei kobonza bambeka ebele ya bangombe, ya bana ngombe ya mafuta mpe ya bameme ; abengisi bana mibali nyonso ya mokonzi, bakonzi ya mampinga mpe Nganga-Nzambe Abiatari ; bazali kolia mpe komela elongo na ye mpe bazali koloba : « Tika ete mokonzi Adoniya awumela na bomoi ! » 26 Kasi abengisi te ngai, mosali na yo ; Nganga-Nzambe Tsadoki, Benaya, mwana mobali ya Yeoyada, mpe Salomo, mosali na yo. 27 Boni, ezali solo na mitindo ya mokonzi, nkolo na ngai, nde likambo oyo esalemi ? Nzokande, oyebisaki te na mosali na yo nani akovanda na kiti ya bokonzi ya nkolo na ngai sima na yo ? 28 Mokonzi Davidi alobaki :— Bobengela ngai Batisheba.Batisheba ayaki pene ya mokonzi mpe atelemaki liboso na ye. 29 Mokonzi alapaki ndayi na maloba oyo :— Na Kombo na Yawe oyo akangolaki ngai na mikakatano nyonso, 30 nakokokisa solo, na mokolo ya lelo, ndayi oyo nalapaki epai na yo na Kombo na Yawe, Nzambe ya Isalaele. Salomo, mwana na yo ya mobali, akokitana na ngai mpe akovanda na kiti na ngai ya bokonzi. 31 Batisheba akitisaki elongi na ye kino na se mpe agumbamaki liboso ya mokonzi ; alobaki :— Tika ete mokonzi Davidi, nkolo na ngai, awumela seko na bomoi ! 32 Mokonzi Davidi alobaki :— Bobenga Nganga-Nzambe Tsadoki, mosakoli Natan mpe Benaya, mwana mobali ya Yeoyada.Tango bayaki liboso ya mokonzi, 33 mokonzi alobaki na bango :— Bozwa elongo na bino basali ya mokonzi na bino mpe bomatisa Salomo, mwana na ngai ya mobali, na likolo ya mile na ngai ya mwasi. Bokende elongo na ye na etima ya Giyoni ! 34 Kuna, Nganga-Nzambe Tsadoki mpe mosakoli Natan bakopakola ye mafuta mpo ete akoma mokonzi ya Isalaele. Bokobeta kelelo mpe boganga : « Tika ete mokonzi Salomo awumela seko na bomoi ! » 35 Sima, bokozonga elongo na ye, mpe akoya kovanda na kiti na ngai ya bokonzi. Ye nde akokoma mokonzi na esika na ngai. Nakomisi ye mokonzi ya Isalaele mpe ya Yuda. 36 Benaya, mwana mobali ya Yeoyada, azongiselaki mokonzi :— Amen ! Tika ete Yawe, Nzambe ya mokonzi, nkolo na ngai, akokisa maloba oyo. 37 Ndenge Yawe azalaki elongo na mokonzi, nkolo na ngai, tika ete azala mpe elongo na Salomo mpe akomisa kiti na ye ya bokonzi monene koleka oyo ya mokonzi Davidi, nkolo na ngai ! 38 Boye, Nganga-Nzambe Tsadoki, mosakoli Natan, Benaya, mwana mobali ya Yeoyada, bato ya Kereti mpe bato ya Peleti bakendeki, bamatisaki Salomo na likolo ya mile ya mokonzi Davidi mpe bamemaki ye na etima ya Giyoni. 39 Nganga-Nzambe Tsadoki azwaki liseke ya mafuta, kati na ndako ya kapo ya bule, mpe apakolaki Salomo mafuta. Bongo, babetaki kelelo, mpe bato nyonso bagangaki : « Tika ete mokonzi Salomo awumela seko na bomoi ! » 40 Bato nyonso oyo bazalaki elongo na ye bazalaki kobeta baflite mpe kosepela makasi sima na ye ; mabele eninganaki na makelele na bango. 41 Adoniya mpe bato nyonso oyo abengisaki mpo ete bazala na ye elongo bayokaki makelele yango wana bazalaki kosilisa kolia. Boye, tango Joabi ayokaki mongongo ya kelelo, atunaki :— Makelele wana kati na engumba elakisi nini ? 42 Wana azalaki nanu koloba, Jonatan, mwana mobali ya Nganga-Nzambe Abiatari, akomaki. Adoniya alobaki na ye :— Kota ! Moto ya lokumu lokola yo amemaka kaka basango ya malamu. 43 Jonatan azongiselaki Adoniya :— Ezali bongo te ! Mokonzi Davidi, nkolo na biso, akomisi Salomo mokonzi ! 44 Mokonzi atindaki elongo na ye Nganga-Nzambe Tsadoki, mosakoli Natan, Benaya, mwana mobali ya Yeoyada, bato ya Kereti mpe bato ya Peleti, mpe bamatisi ye na likolo ya mile ya mokonzi. 45 Nganga-Nzambe Tsadoki mpe mosakoli Natan bapakoli ye mafuta, na etima ya Giyoni, mpo ete akoma mokonzi. Wuta na Giyoni, bagangi na esengo, mpe engumba mobimba esepeli na likambo yango. Yango nde makelele oyo bozali koyoka. 46 Mpe lisusu, Salomo avandi na kiti ya bokonzi ; 47 basali ya mokonzi bayei kopesa longonya epai na Davidi, mokonzi na biso, na maloba oyo : « Tika ete Nzambe na yo akomisa kombo ya Salomo monene koleka kombo na yo, mpe kiti na ye ya bokonzi, monene koleka oyo ya yo ! » Bongo mokonzi agumbamaki mpe agumbamelaki Nzambe na mbeto na ye, 48 mpe alobaki : « Tika ete Yawe, Nzambe ya Isalaele, apambolama, Ye oyo, na mokolo ya lelo, apesi ngai nzela ya komona moto oyo akitani na ngai na bokonzi ! » 49 Tango bato oyo Adoniya abengisaki bayokaki bongo, batelemaki na kobanga mpe bakimaki moto na moto na nzela na ye. 50 Kasi mpo ete Adoniya abangaki Salomo, akendeki kokanga maseke ya etumbelo. 51 Bayebisaki Salomo :— Adoniya azali kobanga mokonzi Salomo mpe akangi maseke ya etumbelo. Alobi : « Tika ete mokonzi Salomo alapa, na mokolo ya lelo, ndayi liboso na ngai ete akoboma mosali na ye te na mopanga. » 52 Salomo azongisaki :— Soki kaka atamboli na sembo, suki ata moko te ya moto na ye ekokweya na mabele ; kasi soki mabe emonani kati na ye, akokufa. 53 Boye, mokonzi Salomo atindaki bato mpo na kokitisa ye wuta na etumbelo. Bongo Adoniya ayaki mpe agumbamaki liboso ya mokonzi Salomo, mpe Salomo alobaki na ye :— Zonga na ndako na yo.

In Other Versions

1 Kings 1 in the ANGEFD

1 Kings 1 in the ANTPNG2D

1 Kings 1 in the AS21

1 Kings 1 in the BAGH

1 Kings 1 in the BBPNG

1 Kings 1 in the BBT1E

1 Kings 1 in the BDS

1 Kings 1 in the BEV

1 Kings 1 in the BHAD

1 Kings 1 in the BIB

1 Kings 1 in the BLPT

1 Kings 1 in the BNT

1 Kings 1 in the BNTABOOT

1 Kings 1 in the BNTLV

1 Kings 1 in the BOATCB

1 Kings 1 in the BOATCB2

1 Kings 1 in the BOBCV

1 Kings 1 in the BOCNT

1 Kings 1 in the BOECS

1 Kings 1 in the BOGWICC

1 Kings 1 in the BOHCB

1 Kings 1 in the BOHCV

1 Kings 1 in the BOHLNT

1 Kings 1 in the BOHNTLTAL

1 Kings 1 in the BOICB

1 Kings 1 in the BOILNTAP

1 Kings 1 in the BOITCV

1 Kings 1 in the BOKCV

1 Kings 1 in the BOKCV2

1 Kings 1 in the BOKHWOG

1 Kings 1 in the BOKSSV

1 Kings 1 in the BOLCB

1 Kings 1 in the BOMCV

1 Kings 1 in the BONAV

1 Kings 1 in the BONCB

1 Kings 1 in the BONLT

1 Kings 1 in the BONUT2

1 Kings 1 in the BOPLNT

1 Kings 1 in the BOSCB

1 Kings 1 in the BOSNC

1 Kings 1 in the BOTLNT

1 Kings 1 in the BOVCB

1 Kings 1 in the BOYCB

1 Kings 1 in the BPBB

1 Kings 1 in the BPH

1 Kings 1 in the BSB

1 Kings 1 in the CCB

1 Kings 1 in the CUV

1 Kings 1 in the CUVS

1 Kings 1 in the DBT

1 Kings 1 in the DGDNT

1 Kings 1 in the DHNT

1 Kings 1 in the DNT

1 Kings 1 in the ELBE

1 Kings 1 in the EMTV

1 Kings 1 in the ESV

1 Kings 1 in the FBV

1 Kings 1 in the FEB

1 Kings 1 in the GGMNT

1 Kings 1 in the GNT

1 Kings 1 in the HARY

1 Kings 1 in the HNT

1 Kings 1 in the IRVA

1 Kings 1 in the IRVB

1 Kings 1 in the IRVG

1 Kings 1 in the IRVH

1 Kings 1 in the IRVK

1 Kings 1 in the IRVM

1 Kings 1 in the IRVM2

1 Kings 1 in the IRVO

1 Kings 1 in the IRVP

1 Kings 1 in the IRVT

1 Kings 1 in the IRVT2

1 Kings 1 in the IRVU

1 Kings 1 in the ISVN

1 Kings 1 in the JSNT

1 Kings 1 in the KAPI

1 Kings 1 in the KBT1ETNIK

1 Kings 1 in the KBV

1 Kings 1 in the KJV

1 Kings 1 in the KNFD

1 Kings 1 in the LBA

1 Kings 1 in the LBLA

1 Kings 1 in the LNT

1 Kings 1 in the LSV

1 Kings 1 in the MAAL

1 Kings 1 in the MBV

1 Kings 1 in the MBV2

1 Kings 1 in the MHNT

1 Kings 1 in the MKNFD

1 Kings 1 in the MNG

1 Kings 1 in the MNT

1 Kings 1 in the MNT2

1 Kings 1 in the MRS1T

1 Kings 1 in the NAA

1 Kings 1 in the NASB

1 Kings 1 in the NBLA

1 Kings 1 in the NBS

1 Kings 1 in the NBVTP

1 Kings 1 in the NET2

1 Kings 1 in the NIV11

1 Kings 1 in the NNT

1 Kings 1 in the NNT2

1 Kings 1 in the NNT3

1 Kings 1 in the PDDPT

1 Kings 1 in the PFNT

1 Kings 1 in the RMNT

1 Kings 1 in the SBIAS

1 Kings 1 in the SBIBS

1 Kings 1 in the SBIBS2

1 Kings 1 in the SBICS

1 Kings 1 in the SBIDS

1 Kings 1 in the SBIGS

1 Kings 1 in the SBIHS

1 Kings 1 in the SBIIS

1 Kings 1 in the SBIIS2

1 Kings 1 in the SBIIS3

1 Kings 1 in the SBIKS

1 Kings 1 in the SBIKS2

1 Kings 1 in the SBIMS

1 Kings 1 in the SBIOS

1 Kings 1 in the SBIPS

1 Kings 1 in the SBISS

1 Kings 1 in the SBITS

1 Kings 1 in the SBITS2

1 Kings 1 in the SBITS3

1 Kings 1 in the SBITS4

1 Kings 1 in the SBIUS

1 Kings 1 in the SBIVS

1 Kings 1 in the SBT

1 Kings 1 in the SBT1E

1 Kings 1 in the SCHL

1 Kings 1 in the SNT

1 Kings 1 in the SUSU

1 Kings 1 in the SUSU2

1 Kings 1 in the SYNO

1 Kings 1 in the TBIAOTANT

1 Kings 1 in the TBT1E

1 Kings 1 in the TBT1E2

1 Kings 1 in the TFTIP

1 Kings 1 in the TFTU

1 Kings 1 in the TGNTATF3T

1 Kings 1 in the THAI

1 Kings 1 in the TNFD

1 Kings 1 in the TNT

1 Kings 1 in the TNTIK

1 Kings 1 in the TNTIL

1 Kings 1 in the TNTIN

1 Kings 1 in the TNTIP

1 Kings 1 in the TNTIZ

1 Kings 1 in the TOMA

1 Kings 1 in the TTENT

1 Kings 1 in the UBG

1 Kings 1 in the UGV

1 Kings 1 in the UGV2

1 Kings 1 in the UGV3

1 Kings 1 in the VBL

1 Kings 1 in the VDCC

1 Kings 1 in the YALU

1 Kings 1 in the YAPE

1 Kings 1 in the YBVTP

1 Kings 1 in the ZBP