2 Kings 5 (BOLCB2)

1 Namani, mokonzi ya basoda ya mokonzi ya Siri, azalaki moto monene mpe moto ya lokumu mingi na miso ya nkolo na ye, pamba te, na nzela na ye, Yawe apesaki bato ya Siri elonga. Azalaki soda ya mpiko, kasi azalaki na bokono ya maba. 2 Nzokande, tango mampinga ya bato ya Siri babimaki na bitumba, bakangaki na bowumbu elenge mwasi moko ya Isalaele. Boye akomaki kosalela mwasi ya Namani. 3 Elenge mwasi yango alobaki na nkolo na ye ya mwasi :— Ah, soki kaka nkolo na ngai, Namani, akokaki komona mosakoli oyo azali kati na Samari ! Akoki penza kobikisa ye na bokono na ye ya maba. 4 Namani akendeki epai ya nkolo na ye mpe abetelaki ye lisolo ya makambo oyo elenge mwasi ya Isalaele alobaki. 5 Mokonzi ya Siri alobaki na ye :— Malamu ! Nakotinda mokanda epai ya mokonzi ya Isalaele.Boye Namani akendeki mpe amemaki bakilo ya palata, nkama misato na tuku mitano ; bakilo ya wolo, tuku sambo, mpe bilamba zomi ya talo. 6 Apesaki epai ya mokonzi ya Isalaele mokanda oyo elobaki :« Na nzela ya mokanda oyo, natindeli yo mosali na ngai, Namani, mpo ete obikisa ye na bokono na ye ya maba. » 7 Tango kaka mokonzi ya Isalaele atangaki mokanda, apasolaki bilamba na ye mpe alobaki : « Boni, ngai nazali Nzambe ? Boni, nazali na makoki ya koboma to ya kozongisa na bomoi ? Mpo na nini moto oyo atindeli ngai moto ete nabikisa ye na bokono na ye ya maba ? Botala ndenge nini azali kolukela ngai makambo ! » 8 Tango Elize, moto na Nzambe, ayokaki ete mokonzi ya Isalaele apasolaki bilamba na ye, atindelaki ye liloba oyo : « Mpo na nini opasoli bilamba na yo ? Tika ete moto wana aya epai na ngai, mpe akoyeba ete ezali na mosakoli moko kati na Isalaele ! » 9 Boye Namani akendeki elongo na bampunda na ye mpe shar na ye, mpe atelemaki na ekotelo ya ndako ya Elize. 10 Elize atindaki moto moko mpo na koyebisa Namani :— Kende kosukola mbala sambo na ebale Yordani ; bongo nzoto na yo ekobongwana, mpe okokoma peto. 11 Kasi Namani asilikaki, azongaki mpe alobaki :— Nakanisaki ete akoya penza epai na ngai, akobelela Yawe, Nzambe na ye, akotia loboko na ye na esika oyo bokono ezali, mpe akobikisa ngai na bokono na ngai ya maba ! 12 Boni, bibale Abana mpe Paripari kati na Damasi ezali motuya te koleka miluka nyonso ya Isalaele ? Nakokaki te kosukola na bibale wana mpe kokoma peto ?Boye, abalukaki mpe akendeki na kanda. 13 Kasi basali na ye bapusanaki mpe balobaki na ye :— Nkolo, soki mosakoli ayebisaki yo ete osala likambo moko ya monene, boni, olingaki kosala yango te ? Bongo mpo na nini te koleka, tango azali koloba na yo : « Sukola, mpe okokoma peto ! » 14 Boye Namani akitaki mpe amizindisaki mbala sambo na ebale Yordani, ndenge moto na Nzambe ayebisaki ye ; mpe nzoto na ye ebongwanaki mpe ekomaki peto lokola nzoto ya elenge mobali. 15 Bongo Namani elongo na basali na ye nyonso bazongaki epai ya moto na Nzambe. Atelemaki liboso ya Elize mpe alobaki :— Nayebi sik’oyo ete ezali na Nzambe te kati na mokili mobimba longola kaka kati na Isalaele. Nabondeli yo, ndima kado kowuta na mosali na yo. 16 Mosakoli Elize azongisaki :— Na Kombo na Yawe oyo nasalelaka, nakondima eloko moko te.Namani atungisaki ye, kasi Elize aboyaki kaka. 17 Namani alobaki :— Lokola oboyi, pesa nzela ete napesa mosali na yo ndambo ya mabele oyo bamile mibale ekoki komema, pamba te mosali na yo akoki te kobonzela banzambe mosusu bambeka ya kotumba to bambeka ya boyokani, bobele Yawe. 18 Kasi tika ete Yawe alimbisa mosali na yo mpo na likambo oyo : tango nkolo na ngai akotaka na ndako ya nzambe Rimoni mpo na kogumbama, nagumbamaka elongo na ye, pamba te alalelaka loboko na ngai. Tika ete Yawe alimbisa mosali na yo mpo na yango. 19 Elize alobaki na ye :— Kende na kimia !Tango Namani akomaki mwa mosika, 20 Geazi, mosali ya Elize, moto na Nzambe, amilobelaki : « Nkolo na ngai atiki penza na pamba Namani, moto oyo ya Arami, wana aboyi kozwa biloko oyo amemelaki ye. Na Kombo na Yawe, nakolanda ye mbangu mpe nakozwa ata eloko moko epai na ye. » 21 Boye Geazi alandaki Namani mbangu. Tango Namani amonaki ye kopota mbangu na sima na ye, akitaki na shar na ye mpo na kokutana na ye mpe atunaki ye :— Boni, nyonso ezali malamu ? 22 Geazi azongisaki :— Iyo, nyonso ezali malamu. Nkolo na ngai atindi ngai koyebisa yo : « Bilenge bayekoli mibale kati na basakoli bayei epai na ngai wuta na etuka ya bangomba ya Efrayimi. Nabondeli yo, pesa bango bakilo ya palata, tuku misato na mitano, mpe bilamba mibale ya talo. » 23 Namani alobaki :— Kamata bakilo ya palata, tuku sambo.Atungisaki Geazi ete azwa yango. Boye, atiaki bakilo ya palata, tuku sambo kati na basaki mibale elongo na bilamba mibale ya talo. Namani apesaki yango epai ya basali na ye mibale oyo bamemaki yango liboso ya Geazi. 24 Tango Geazi akomaki na ngomba, azwaki biloko na maboko ya basali ya Namani mpe atiaki yango kati na ndako. Azongisaki basali yango, mpe bakendeki. 25 Boye, Geazi akotaki mpe atelemaki liboso ya nkolo na ye, Elize. Elize atunaki ye :— Geazi, okendeki wapi ?Geazi azongisaki :— Mosali na yo akendeki epai moko te. 26 Kasi Elize alobaki na ye :— Boni, molimo na ngai ezalaki elongo na yo te tango moto wana akitaki na shar na ye mpo na kokutana na yo ? Ezali penza tango ya kozwa palata to ya kondima bilamba, bilanga ya nzete ya olive, ya vino, bameme, bangombe to basali ya mibali mpe basali ya basi ? 27 Lokola osali bongo, bokono ya maba ya Namani ekokangama na yo mpe bakitani na yo mpo na libela.Bongo Geazi alongwaki na liboso ya Elize. Poso ya nzoto na ye ekomaki na maba, mpe akomaki pembe lokola mvula ya pembe.

In Other Versions

2 Kings 5 in the ANGEFD

2 Kings 5 in the ANTPNG2D

2 Kings 5 in the AS21

2 Kings 5 in the BAGH

2 Kings 5 in the BBPNG

2 Kings 5 in the BBT1E

2 Kings 5 in the BDS

2 Kings 5 in the BEV

2 Kings 5 in the BHAD

2 Kings 5 in the BIB

2 Kings 5 in the BLPT

2 Kings 5 in the BNT

2 Kings 5 in the BNTABOOT

2 Kings 5 in the BNTLV

2 Kings 5 in the BOATCB

2 Kings 5 in the BOATCB2

2 Kings 5 in the BOBCV

2 Kings 5 in the BOCNT

2 Kings 5 in the BOECS

2 Kings 5 in the BOGWICC

2 Kings 5 in the BOHCB

2 Kings 5 in the BOHCV

2 Kings 5 in the BOHLNT

2 Kings 5 in the BOHNTLTAL

2 Kings 5 in the BOICB

2 Kings 5 in the BOILNTAP

2 Kings 5 in the BOITCV

2 Kings 5 in the BOKCV

2 Kings 5 in the BOKCV2

2 Kings 5 in the BOKHWOG

2 Kings 5 in the BOKSSV

2 Kings 5 in the BOLCB

2 Kings 5 in the BOMCV

2 Kings 5 in the BONAV

2 Kings 5 in the BONCB

2 Kings 5 in the BONLT

2 Kings 5 in the BONUT2

2 Kings 5 in the BOPLNT

2 Kings 5 in the BOSCB

2 Kings 5 in the BOSNC

2 Kings 5 in the BOTLNT

2 Kings 5 in the BOVCB

2 Kings 5 in the BOYCB

2 Kings 5 in the BPBB

2 Kings 5 in the BPH

2 Kings 5 in the BSB

2 Kings 5 in the CCB

2 Kings 5 in the CUV

2 Kings 5 in the CUVS

2 Kings 5 in the DBT

2 Kings 5 in the DGDNT

2 Kings 5 in the DHNT

2 Kings 5 in the DNT

2 Kings 5 in the ELBE

2 Kings 5 in the EMTV

2 Kings 5 in the ESV

2 Kings 5 in the FBV

2 Kings 5 in the FEB

2 Kings 5 in the GGMNT

2 Kings 5 in the GNT

2 Kings 5 in the HARY

2 Kings 5 in the HNT

2 Kings 5 in the IRVA

2 Kings 5 in the IRVB

2 Kings 5 in the IRVG

2 Kings 5 in the IRVH

2 Kings 5 in the IRVK

2 Kings 5 in the IRVM

2 Kings 5 in the IRVM2

2 Kings 5 in the IRVO

2 Kings 5 in the IRVP

2 Kings 5 in the IRVT

2 Kings 5 in the IRVT2

2 Kings 5 in the IRVU

2 Kings 5 in the ISVN

2 Kings 5 in the JSNT

2 Kings 5 in the KAPI

2 Kings 5 in the KBT1ETNIK

2 Kings 5 in the KBV

2 Kings 5 in the KJV

2 Kings 5 in the KNFD

2 Kings 5 in the LBA

2 Kings 5 in the LBLA

2 Kings 5 in the LNT

2 Kings 5 in the LSV

2 Kings 5 in the MAAL

2 Kings 5 in the MBV

2 Kings 5 in the MBV2

2 Kings 5 in the MHNT

2 Kings 5 in the MKNFD

2 Kings 5 in the MNG

2 Kings 5 in the MNT

2 Kings 5 in the MNT2

2 Kings 5 in the MRS1T

2 Kings 5 in the NAA

2 Kings 5 in the NASB

2 Kings 5 in the NBLA

2 Kings 5 in the NBS

2 Kings 5 in the NBVTP

2 Kings 5 in the NET2

2 Kings 5 in the NIV11

2 Kings 5 in the NNT

2 Kings 5 in the NNT2

2 Kings 5 in the NNT3

2 Kings 5 in the PDDPT

2 Kings 5 in the PFNT

2 Kings 5 in the RMNT

2 Kings 5 in the SBIAS

2 Kings 5 in the SBIBS

2 Kings 5 in the SBIBS2

2 Kings 5 in the SBICS

2 Kings 5 in the SBIDS

2 Kings 5 in the SBIGS

2 Kings 5 in the SBIHS

2 Kings 5 in the SBIIS

2 Kings 5 in the SBIIS2

2 Kings 5 in the SBIIS3

2 Kings 5 in the SBIKS

2 Kings 5 in the SBIKS2

2 Kings 5 in the SBIMS

2 Kings 5 in the SBIOS

2 Kings 5 in the SBIPS

2 Kings 5 in the SBISS

2 Kings 5 in the SBITS

2 Kings 5 in the SBITS2

2 Kings 5 in the SBITS3

2 Kings 5 in the SBITS4

2 Kings 5 in the SBIUS

2 Kings 5 in the SBIVS

2 Kings 5 in the SBT

2 Kings 5 in the SBT1E

2 Kings 5 in the SCHL

2 Kings 5 in the SNT

2 Kings 5 in the SUSU

2 Kings 5 in the SUSU2

2 Kings 5 in the SYNO

2 Kings 5 in the TBIAOTANT

2 Kings 5 in the TBT1E

2 Kings 5 in the TBT1E2

2 Kings 5 in the TFTIP

2 Kings 5 in the TFTU

2 Kings 5 in the TGNTATF3T

2 Kings 5 in the THAI

2 Kings 5 in the TNFD

2 Kings 5 in the TNT

2 Kings 5 in the TNTIK

2 Kings 5 in the TNTIL

2 Kings 5 in the TNTIN

2 Kings 5 in the TNTIP

2 Kings 5 in the TNTIZ

2 Kings 5 in the TOMA

2 Kings 5 in the TTENT

2 Kings 5 in the UBG

2 Kings 5 in the UGV

2 Kings 5 in the UGV2

2 Kings 5 in the UGV3

2 Kings 5 in the VBL

2 Kings 5 in the VDCC

2 Kings 5 in the YALU

2 Kings 5 in the YAPE

2 Kings 5 in the YBVTP

2 Kings 5 in the ZBP