Deuteronomy 2 (BOLCB2)

1 Na sima, tobalukaki mpe tokendeki na esobe, na nzela ya ebale monene ya Barozo ndenge Yawe atindaki ngai, pamba te tobalukaki mikolo ebele zingazinga ya etuka ya ngomba Seiri. 2 Yawe alobaki na ngai : 3 « Bowumeli mingi na kobaluka zingazinga ya etuka ya bangomba oyo ; sik’oyo bokende na ngambo ya nor. 4 Pesa mitindo oyo epai ya bato : ‹ Bokomi pembeni ya koleka mokili ya bandeko na bino, bakitani ya Ezawu oyo bavandaka na Seiri. Bakobanga bino, kasi bozala mayele. 5 Bobundisa bango te, pamba te nakopesa bino ata eloko moko te kati na mokili na bango, ezala ata esika ya kotia lokolo na bino. Nasila kopesa, epai na Ezawu, etuka ya ngomba Seiri lokola libula na ye. 6 Bokofuta bango palata mpo na biloko oyo bokolia mpe mpo na mayi oyo bokomela. 7 Yawe, Nzambe na bino, apamboli bino na misala nyonso ya maboko na bino. Abateli bino na esobe oyo ya monene mibu tuku minei. Yawe, Nzambe na bino, azali elongo na bino mpe bozangi eloko moko te. › » 8 Na sima, totikaki bandeko na biso, bakitani ya Ezawu oyo bavandaka na Seiri. Tobalukaki wuta na nzela ya Araba oyo ewuta na Eyilati mpe na Etsioni-Geberi, mpe tokendeki na nzela ya esobe ya Moabi. 9 Yawe alobaki na ngai : « Bomona bato ya Moabi lokola banguna na bino te mpe bobundisa bango te, pamba te nakopesa bino ata eloko moko te kati na mokili na bango. Nasila kopesa mokili ya Ari lokola bozwi epai ya bakitani ya Loti. » 10 Bato ya Emimi nde bazalaki kovanda kuna na kala. Bazalaki makasi mpe ebele, bingambe lokola bana ya Anaki. 11 Bango mpe bazalaki komonana lokola bato ya Refayimi ndenge moko na bana ya Anaki. Kasi bato ya Moabi bazalaki kobenga bango bato ya Emimi. 12 Bato ya Ori mpe bazalaki kovanda na Seiri kasi bakitani ya Ezawu babenganaki bango. Babomaki bato ya Ori liboso na bango mpe bakomaki kovanda na bisika na bango ndenge kaka Isalaele asalaki mpo na mokili oyo Yawe apesaki bango lokola bozwi. 13 Yawe alobaki : « Sik’oyo, botelema mpe bokatisa lubwaku ya Zeredi. » Boye totikaki lubwaku. 14 Mibu tuku misato na mwambe elekaki wuta tango tolongwaki na Kadeshi-Barinea kino tokatisaki lubwaku ya Zeredi. Banda wana, molongo nyonso ya bato oyo babundaki bitumba bakufaki kati na molako ndenge Yawe alapaki ndayi mpo na bango. 15 Loboko ya Yawe ebalukelaki bango kino asilisaki koboma bango nyonso kati na molako. 16 Tango bato ya suka kati na bato oyo bazalaki kobunda bitumba basilaki kokufa, 17 Yawe alobaki na ngai : 18 « Lelo oyo, okokatisa Moabi mpe Ari. 19 Tango okokoma na mokili ya bato ya Amoni, komona bango lokola banguna te mpe kobundisa bango te, pamba te nakopesa yo ata eteni moko te ya mabele kati na mokili ya bakitani ya bato ya Amoni. Nasilaki kopesa yango lokola bozwi epai ya bakitani ya Loti. » 20 Mboka yango mpe emonanaki lokola mboka oyo bato ya Refayimi bazalaki kovanda. Kasi bato ya Amoni bazalaki kobenga bato ya Refayimi : bato ya Zamizumi. 21 Bazalaki makasi mpe ebele, bingambe kaka lokola bana ya Anaki. Kasi Yawe abomaki bango liboso ya bato ya Amoni. Bato ya Amoni babenganaki bato ya Zamizumi mpe bakomaki kovanda na bisika na bango. 22 Yawe asalaki mpe ndenge wana mpo na bakitani ya Ezawu oyo bazalaki kovanda na Seiri tango abomaki bato ya Ori liboso na bango. Bakitani ya Ezawu babenganaki bato ya Ori mpe bakomaki kovanda na bisika na bango kino na mokolo ya lelo. 23 Ezalaki mpe ndenge moko mpo na bato na Avi oyo bazalaki kovanda na mboka yango kino na Gaza. Bato ya Kafitori, oyo bawuta na mokili ya Kafitori, babomaki bato ya Avi mpe bakomaki kovanda na bisika na bango. 24 Yawe alobaki : « Botelema, bokende mpe bokatisa lubwaku ya Arinoni. Nakabi na maboko na bino, Sikoni, moto ya Amori mpe mokonzi na Eshiboni, elongo na mokili na ye. Bobanda kobundisa yango mpe bokamata yango. 25 Lelo, nakosala ete mabota nyonso ya mokili ezala na somo mpe kobanga liboso na bino. Bakoyoka sango ya makambo oyo bokosala, bongo bakolenga mpe bakozanga kimia likolo na bino. » 26 Wuta na esobe ya Kedemoti, natindaki bantoma epai ya Sikoni, mokonzi ya Eshiboni, na maloba ya kimia. 27 Nalobaki : « Tobondeli yo, tika biso tolekela na mokili na yo. Tokoleka kaka na nzela ya monene, tokobaluka te ezala na ngambo ya loboko ya mwasi to ya mobali. 28 Okotekela biso biloko ya kolia mpe mayi ya komela na motuya ya palata. Kasi tika biso kaka toleka na makolo 29 ndenge bakitani ya Ezawu, oyo bavandaka na mokili ya Seiri, mpe bato ya Moabi, oyo bavandaka na Ari, basalelaki biso kino tokatisaki Yordani mpe tokotaki kati na mokili oyo Yawe, Nzambe na biso, apesi biso. » 30 Kasi Sikoni, mokonzi ya Eshiboni, aboyaki kopesa biso nzela ya kolekela na mokili na ye, pamba te Yawe, Nzambe na bino, akomisaki moto na ye makasi mpe motema na ye libanga, mpo na kokaba ye na maboko na bino ndenge asali lelo. 31 Bongo Yawe alobaki na ngai : « Tala, nabandi kokaba na maboko na bino Sikoni mpe mokili na ye. Banda kobotola yango mpe kamata yango. » 32 Tango Sikoni elongo na mampinga na ye nyonso babimaki mpo na kobundisa biso na Yakatsi, 33 Yawe, Nzambe na biso, akabaki ye na maboko na biso mpe tobomaki ye, bana na ye ya mibali mpe mampinga na ye nyonso. 34 Bongo, tobotolaki bingumba na ye nyonso, tobukaki bingumba nyonso, tobomaki mibali, basi mpe bana nyonso ; totikaki ata moto moko te. 35 Kasi tomemaki mpo na biso : bibwele mpe bomengo ya bitumba oyo tokutaki na bingumba na bango. 36 Longwa na Aroeri oyo ezali na suka ya lubwaku ya Arinoni, mpe longwa na engumba oyo ezali kati na lubwaku kino na Galadi, ezalaki na engumba moko te oyo elekaki biso na makasi. Yawe, Nzambe na biso, apesaki biso yango nyonso. 37 Kasi bopusanaki te na mokili ya bato ya Amoni, na ngambo nyonso ya lubwaku ya Yaboki, na bingumba ya bangomba, mpe na bisika nyonso oyo Yawe, Nzambe na biso, apekisaki biso.

In Other Versions

Deuteronomy 2 in the ANGEFD

Deuteronomy 2 in the ANTPNG2D

Deuteronomy 2 in the AS21

Deuteronomy 2 in the BAGH

Deuteronomy 2 in the BBPNG

Deuteronomy 2 in the BBT1E

Deuteronomy 2 in the BDS

Deuteronomy 2 in the BEV

Deuteronomy 2 in the BHAD

Deuteronomy 2 in the BIB

Deuteronomy 2 in the BLPT

Deuteronomy 2 in the BNT

Deuteronomy 2 in the BNTABOOT

Deuteronomy 2 in the BNTLV

Deuteronomy 2 in the BOATCB

Deuteronomy 2 in the BOATCB2

Deuteronomy 2 in the BOBCV

Deuteronomy 2 in the BOCNT

Deuteronomy 2 in the BOECS

Deuteronomy 2 in the BOGWICC

Deuteronomy 2 in the BOHCB

Deuteronomy 2 in the BOHCV

Deuteronomy 2 in the BOHLNT

Deuteronomy 2 in the BOHNTLTAL

Deuteronomy 2 in the BOICB

Deuteronomy 2 in the BOILNTAP

Deuteronomy 2 in the BOITCV

Deuteronomy 2 in the BOKCV

Deuteronomy 2 in the BOKCV2

Deuteronomy 2 in the BOKHWOG

Deuteronomy 2 in the BOKSSV

Deuteronomy 2 in the BOLCB

Deuteronomy 2 in the BOMCV

Deuteronomy 2 in the BONAV

Deuteronomy 2 in the BONCB

Deuteronomy 2 in the BONLT

Deuteronomy 2 in the BONUT2

Deuteronomy 2 in the BOPLNT

Deuteronomy 2 in the BOSCB

Deuteronomy 2 in the BOSNC

Deuteronomy 2 in the BOTLNT

Deuteronomy 2 in the BOVCB

Deuteronomy 2 in the BOYCB

Deuteronomy 2 in the BPBB

Deuteronomy 2 in the BPH

Deuteronomy 2 in the BSB

Deuteronomy 2 in the CCB

Deuteronomy 2 in the CUV

Deuteronomy 2 in the CUVS

Deuteronomy 2 in the DBT

Deuteronomy 2 in the DGDNT

Deuteronomy 2 in the DHNT

Deuteronomy 2 in the DNT

Deuteronomy 2 in the ELBE

Deuteronomy 2 in the EMTV

Deuteronomy 2 in the ESV

Deuteronomy 2 in the FBV

Deuteronomy 2 in the FEB

Deuteronomy 2 in the GGMNT

Deuteronomy 2 in the GNT

Deuteronomy 2 in the HARY

Deuteronomy 2 in the HNT

Deuteronomy 2 in the IRVA

Deuteronomy 2 in the IRVB

Deuteronomy 2 in the IRVG

Deuteronomy 2 in the IRVH

Deuteronomy 2 in the IRVK

Deuteronomy 2 in the IRVM

Deuteronomy 2 in the IRVM2

Deuteronomy 2 in the IRVO

Deuteronomy 2 in the IRVP

Deuteronomy 2 in the IRVT

Deuteronomy 2 in the IRVT2

Deuteronomy 2 in the IRVU

Deuteronomy 2 in the ISVN

Deuteronomy 2 in the JSNT

Deuteronomy 2 in the KAPI

Deuteronomy 2 in the KBT1ETNIK

Deuteronomy 2 in the KBV

Deuteronomy 2 in the KJV

Deuteronomy 2 in the KNFD

Deuteronomy 2 in the LBA

Deuteronomy 2 in the LBLA

Deuteronomy 2 in the LNT

Deuteronomy 2 in the LSV

Deuteronomy 2 in the MAAL

Deuteronomy 2 in the MBV

Deuteronomy 2 in the MBV2

Deuteronomy 2 in the MHNT

Deuteronomy 2 in the MKNFD

Deuteronomy 2 in the MNG

Deuteronomy 2 in the MNT

Deuteronomy 2 in the MNT2

Deuteronomy 2 in the MRS1T

Deuteronomy 2 in the NAA

Deuteronomy 2 in the NASB

Deuteronomy 2 in the NBLA

Deuteronomy 2 in the NBS

Deuteronomy 2 in the NBVTP

Deuteronomy 2 in the NET2

Deuteronomy 2 in the NIV11

Deuteronomy 2 in the NNT

Deuteronomy 2 in the NNT2

Deuteronomy 2 in the NNT3

Deuteronomy 2 in the PDDPT

Deuteronomy 2 in the PFNT

Deuteronomy 2 in the RMNT

Deuteronomy 2 in the SBIAS

Deuteronomy 2 in the SBIBS

Deuteronomy 2 in the SBIBS2

Deuteronomy 2 in the SBICS

Deuteronomy 2 in the SBIDS

Deuteronomy 2 in the SBIGS

Deuteronomy 2 in the SBIHS

Deuteronomy 2 in the SBIIS

Deuteronomy 2 in the SBIIS2

Deuteronomy 2 in the SBIIS3

Deuteronomy 2 in the SBIKS

Deuteronomy 2 in the SBIKS2

Deuteronomy 2 in the SBIMS

Deuteronomy 2 in the SBIOS

Deuteronomy 2 in the SBIPS

Deuteronomy 2 in the SBISS

Deuteronomy 2 in the SBITS

Deuteronomy 2 in the SBITS2

Deuteronomy 2 in the SBITS3

Deuteronomy 2 in the SBITS4

Deuteronomy 2 in the SBIUS

Deuteronomy 2 in the SBIVS

Deuteronomy 2 in the SBT

Deuteronomy 2 in the SBT1E

Deuteronomy 2 in the SCHL

Deuteronomy 2 in the SNT

Deuteronomy 2 in the SUSU

Deuteronomy 2 in the SUSU2

Deuteronomy 2 in the SYNO

Deuteronomy 2 in the TBIAOTANT

Deuteronomy 2 in the TBT1E

Deuteronomy 2 in the TBT1E2

Deuteronomy 2 in the TFTIP

Deuteronomy 2 in the TFTU

Deuteronomy 2 in the TGNTATF3T

Deuteronomy 2 in the THAI

Deuteronomy 2 in the TNFD

Deuteronomy 2 in the TNT

Deuteronomy 2 in the TNTIK

Deuteronomy 2 in the TNTIL

Deuteronomy 2 in the TNTIN

Deuteronomy 2 in the TNTIP

Deuteronomy 2 in the TNTIZ

Deuteronomy 2 in the TOMA

Deuteronomy 2 in the TTENT

Deuteronomy 2 in the UBG

Deuteronomy 2 in the UGV

Deuteronomy 2 in the UGV2

Deuteronomy 2 in the UGV3

Deuteronomy 2 in the VBL

Deuteronomy 2 in the VDCC

Deuteronomy 2 in the YALU

Deuteronomy 2 in the YAPE

Deuteronomy 2 in the YBVTP

Deuteronomy 2 in the ZBP