Exodus 26 (BOLCB2)

1 Okotonga Mongombo elongo na batapi zomi ya lino ya kitoko oyo bakotonga bililingi na likolo na yango, ya langi ya ble, ya motane ya pete mpe ya motane makasi, elongo na basheribe ; ekozala mosala ya bato oyo basalaka bililingi na maboko. 2 Tapi moko na moko ekozala na bametele pene zomi na minei na molayi ; mpe bametele pene mibale, na mokuse. Batapi nyonso ekozala ndenge moko na mokuse mpe na molayi. 3 Okokangisa batapi mitano, moko na mosusu, mpe okosala ndenge moko mpo na batapi mitano mosusu. 4 Okotia basinga ya langi ya ble na pembeni ya tapi ya suka ya lisanga ya batapi mitano ya liboso, mpe na pembeni ya tapi ya suka ya lisanga ya batapi mitano ya mibale. 5 Okotia basinga tuku mitano na suka ya lisanga ya batapi mitano ya liboso, mpe na suka ya lisanga ya batapi mitano ya mibale ; basinga yango ekotalana. 6 Okosala na wolo bibende tuku mitano oyo ezali lokola ndobo ; mpe okokangisa na bibende oyo ezali lokola ndobo lisanga ya batapi mitano ya liboso mpe lisanga ya batapi mitano ya mibale. Na boye, Mongombo ekobima eloko moko. 7 Okosala batapi zomi na moko na bapwale ya ntaba mpo na kotia yango na likolo ya Mongombo. 8 Molayi ya tapi moko na moko ekozala na bametele pene zomi na mitano, mpe mokuse na yango ekozala na bametele pene mibale. Batapi nyonso zomi na moko ekozala ndenge moko na mokuse mpe na molayi. 9 Okokangisa batapi mitano na ngambo moko, mpe batapi motoba na ngambo mosusu ; mpe okogumba tapi ya motoba na liboso ya Mongombo. 10 Okotia basinga tuku mitano na suka ya liboke ya batapi ya liboso, mpe basinga tuku mitano na suka ya liboke ya batapi ya mibale. 11 Okosala na bronze bibende tuku mitano oyo ezali lokola ndobo ; okokotisa yango na basinga mpo na kokangisa Mongombo mpo ete ekoma eloko moko. 12 Batapi oyo ekozala na likolo ya Mongombo ekoleka molayi mpe ndambo na yango ekokita na sima ya Mongombo. 13 Mpe na molayi ya batapi oyo ezali na likolo ya Mongombo, basantimetele pene tuku mitano ekolekana na bangambo mibale ya Mongombo mpo na kozipa yango. 14 Okosalela baposo ya bameme oyo bapakola langi ya motane mpo na kozipa Mongombo, mpe okobakisa na likolo na yango baposo ya banyama ya ebale. 15 Okosala bizingelo ya Mongombo na banzete ya akasia mpe okotelemisa yango. 16 Ezingelo moko na moko ekozala na bametele mitano na molayi, mpe basantimetele tuku sambo na mitano na mokuse. 17 Okobeta banzete mibale-mibale na ezingelo ; okosala bongo mpo na bizingelo nyonso ya Mongombo. 18 Okotia bizingelo tuku mibale na ngambo ya Negevi, na sude ; 19 mpe makolo tuku minei ya palata na se ya bizingelo tuku mibale : makolo mibale na se ya ezingelo moko na moko oyo babeta banzete mibale ; 20 bizingelo tuku mibale na ngambo mosusu ya Mongombo, na nor, 21 elongo na makolo na yango tuku minei ya palata : makolo mibale mpo na ezingelo moko na moko ; 22 bizingelo motoba na suka ya Mongombo, na ngambo ya weste, 23 mpe bizingelo mibale na suka mpo na kolendisa Mongombo. 24 Bizingelo yango ekozala ya kofungwama na se, kasi ekosala songe na likolo mpe ekokota na lopete ya liboso : nyonso mibale ekozala ndenge moko mpe ekolendisa Mongombo. 25 Boye, bizingelo ekozala mwambe elongo na makolo na yango zomi na motoba ya palata : makolo mibale-mibale na se ya ezingelo moko na moko. 26 Sima, okosala, na nzete ya akasia, mabaya mitano mpo na bizingelo ya ngambo moko ya Mongombo, 27 mabaya mitano mpo na bizingelo ya ngambo mosusu ya Mongombo, mabaya mitano mpo na bizingelo oyo ekozala na suka ya Mongombo, na ngambo ya weste. 28 Libaya ya kati ekoleka na kati-kati ya bizingelo, ekoleka ngambo na ngambo. 29 Okobamba wolo na bizingelo, okosala bapete na yango na wolo mpo na kolekisa mabaya ; mpe okobamba mabaya wolo. 30 Okotonga Mongombo ndenge kaka balakisaki yo yango na likolo ya ngomba. 31 Okosala rido ya langi ya ble, ya motane ya pete, ya motane makasi, mpe na lino ya kitoko oyo bakotonga bililingi na likolo na yango, elongo na basheribe ; ekozala mosala ya bato oyo basalaka bililingi na maboko. 32 Okotia yango na makonzi minei ya nzete ya akasia, oyo bapakola wolo ; okokangisa yango na bibende ya wolo oyo ezali lokola ndobo mpe okotelemisa yango na makolo minei ya palata. 33 Okokangisa rido na bibende oyo ezali lokola ndobo mpe okotia Sanduku ya Litatoli na sima ya rido yango. Rido nde ekokabola Esika ya bule mpe Esika-Oyo-Eleki-Bule. 34 Kati na Esika-Oyo-Eleki-Bule, okotia mofinuku na likolo ya Sanduku ya Litatoli. 35 Okotia mesa na liboso ya rido, na ngambo ya nor ya Mongombo, mpe okotia etelemiselo ya minda na liboso ya mesa, na ngambo ya sude. 36 Mpo na ekotelo ya Ndako ya kapo, okosala rido ya langi ya ble, ya motane ya pete, ya motane makasi mpe na lino ya kitoko oyo bakotonga bililingi na likolo na yango ; ekozala mosala ya bato oyo batongaka bililingi na bilamba. 37 Okosala na wolo, bibende mitano oyo ezali lokola ndobo mpo na kokangisela rido mpe banzete mitano ya akasia babamba wolo ; okosala makolo mitano ya bronze mpo na kotelemisela banzete yango.

In Other Versions

Exodus 26 in the ANGEFD

Exodus 26 in the ANTPNG2D

Exodus 26 in the AS21

Exodus 26 in the BAGH

Exodus 26 in the BBPNG

Exodus 26 in the BBT1E

Exodus 26 in the BDS

Exodus 26 in the BEV

Exodus 26 in the BHAD

Exodus 26 in the BIB

Exodus 26 in the BLPT

Exodus 26 in the BNT

Exodus 26 in the BNTABOOT

Exodus 26 in the BNTLV

Exodus 26 in the BOATCB

Exodus 26 in the BOATCB2

Exodus 26 in the BOBCV

Exodus 26 in the BOCNT

Exodus 26 in the BOECS

Exodus 26 in the BOGWICC

Exodus 26 in the BOHCB

Exodus 26 in the BOHCV

Exodus 26 in the BOHLNT

Exodus 26 in the BOHNTLTAL

Exodus 26 in the BOICB

Exodus 26 in the BOILNTAP

Exodus 26 in the BOITCV

Exodus 26 in the BOKCV

Exodus 26 in the BOKCV2

Exodus 26 in the BOKHWOG

Exodus 26 in the BOKSSV

Exodus 26 in the BOLCB

Exodus 26 in the BOMCV

Exodus 26 in the BONAV

Exodus 26 in the BONCB

Exodus 26 in the BONLT

Exodus 26 in the BONUT2

Exodus 26 in the BOPLNT

Exodus 26 in the BOSCB

Exodus 26 in the BOSNC

Exodus 26 in the BOTLNT

Exodus 26 in the BOVCB

Exodus 26 in the BOYCB

Exodus 26 in the BPBB

Exodus 26 in the BPH

Exodus 26 in the BSB

Exodus 26 in the CCB

Exodus 26 in the CUV

Exodus 26 in the CUVS

Exodus 26 in the DBT

Exodus 26 in the DGDNT

Exodus 26 in the DHNT

Exodus 26 in the DNT

Exodus 26 in the ELBE

Exodus 26 in the EMTV

Exodus 26 in the ESV

Exodus 26 in the FBV

Exodus 26 in the FEB

Exodus 26 in the GGMNT

Exodus 26 in the GNT

Exodus 26 in the HARY

Exodus 26 in the HNT

Exodus 26 in the IRVA

Exodus 26 in the IRVB

Exodus 26 in the IRVG

Exodus 26 in the IRVH

Exodus 26 in the IRVK

Exodus 26 in the IRVM

Exodus 26 in the IRVM2

Exodus 26 in the IRVO

Exodus 26 in the IRVP

Exodus 26 in the IRVT

Exodus 26 in the IRVT2

Exodus 26 in the IRVU

Exodus 26 in the ISVN

Exodus 26 in the JSNT

Exodus 26 in the KAPI

Exodus 26 in the KBT1ETNIK

Exodus 26 in the KBV

Exodus 26 in the KJV

Exodus 26 in the KNFD

Exodus 26 in the LBA

Exodus 26 in the LBLA

Exodus 26 in the LNT

Exodus 26 in the LSV

Exodus 26 in the MAAL

Exodus 26 in the MBV

Exodus 26 in the MBV2

Exodus 26 in the MHNT

Exodus 26 in the MKNFD

Exodus 26 in the MNG

Exodus 26 in the MNT

Exodus 26 in the MNT2

Exodus 26 in the MRS1T

Exodus 26 in the NAA

Exodus 26 in the NASB

Exodus 26 in the NBLA

Exodus 26 in the NBS

Exodus 26 in the NBVTP

Exodus 26 in the NET2

Exodus 26 in the NIV11

Exodus 26 in the NNT

Exodus 26 in the NNT2

Exodus 26 in the NNT3

Exodus 26 in the PDDPT

Exodus 26 in the PFNT

Exodus 26 in the RMNT

Exodus 26 in the SBIAS

Exodus 26 in the SBIBS

Exodus 26 in the SBIBS2

Exodus 26 in the SBICS

Exodus 26 in the SBIDS

Exodus 26 in the SBIGS

Exodus 26 in the SBIHS

Exodus 26 in the SBIIS

Exodus 26 in the SBIIS2

Exodus 26 in the SBIIS3

Exodus 26 in the SBIKS

Exodus 26 in the SBIKS2

Exodus 26 in the SBIMS

Exodus 26 in the SBIOS

Exodus 26 in the SBIPS

Exodus 26 in the SBISS

Exodus 26 in the SBITS

Exodus 26 in the SBITS2

Exodus 26 in the SBITS3

Exodus 26 in the SBITS4

Exodus 26 in the SBIUS

Exodus 26 in the SBIVS

Exodus 26 in the SBT

Exodus 26 in the SBT1E

Exodus 26 in the SCHL

Exodus 26 in the SNT

Exodus 26 in the SUSU

Exodus 26 in the SUSU2

Exodus 26 in the SYNO

Exodus 26 in the TBIAOTANT

Exodus 26 in the TBT1E

Exodus 26 in the TBT1E2

Exodus 26 in the TFTIP

Exodus 26 in the TFTU

Exodus 26 in the TGNTATF3T

Exodus 26 in the THAI

Exodus 26 in the TNFD

Exodus 26 in the TNT

Exodus 26 in the TNTIK

Exodus 26 in the TNTIL

Exodus 26 in the TNTIN

Exodus 26 in the TNTIP

Exodus 26 in the TNTIZ

Exodus 26 in the TOMA

Exodus 26 in the TTENT

Exodus 26 in the UBG

Exodus 26 in the UGV

Exodus 26 in the UGV2

Exodus 26 in the UGV3

Exodus 26 in the VBL

Exodus 26 in the VDCC

Exodus 26 in the YALU

Exodus 26 in the YAPE

Exodus 26 in the YBVTP

Exodus 26 in the ZBP