Exodus 32 (BOLCB2)

1 Tango bato bamonaki ete Moyize azali kowumela mpo na kokita na ngomba, basanganaki zingazinga ya Aron mpe balobaki :— Yaka mpe salela biso nzambe oyo akotambola liboso na biso. Pamba te Moyize, moto oyo abimisaki biso na Ejipito, toyebi te makambo nini ekomeli ye. 2 Aron azongiselaki bango :— Bolongola biloko ya matoyi oyo ezali na matoyi ya basi na bino, ya bana na bino ya basi mpe ya mibali, mpe bomemela ngai yango. 3 Bato nyonso balongolaki biloko ya matoyi mpe bamemaki yango epai ya Aron. 4 Aron azwaki biloko oyo bapesaki ye, anyangwisaki yango na moto, mpe sima, asalaki ekeko ya mwana ngombe. Bongo balobaki :— Tala nzambe na yo, oh Isalaele, oyo abimisaki yo na Ejipito. 5 Tango Aron amonaki yango, atongaki etumbelo liboso ya mwana ngombe mpe alobaki :— Feti ekozala lobi mpo na Yawe. 6 Mokolo oyo elandaki, bato balamukaki na tongo makasi, babonzaki bambeka ya kotumba mpe bambeka ya boyokani. Sima na yango, bavandaki mpo na kolia mpe mpo na komela ; mpe batelemaki mpo na kosakana. 7 Yawe alobaki na Moyize :— Kita, pamba te bato na yo, oyo obimisaki na Ejipito babungi nzela, 8 bapesi mokongo noki na makambo oyo natindaki bango mpe bamisaleli ekeko ya mwana ngombe. Bagumbameli yango, babonzeli yango makabo mpe balobi : « Tala nzambe na yo, Oh Isalaele, oyo abimisaki yo na Ejipito. » 9 Yawe alobaki lisusu na Moyize :— Namoni ete bato oyo bazali batomboki. 10 Sik’oyo, tika Ngai moko nasala mpo ete kanda na Ngai ekweyela bango mpe naboma bango. Kasi nakokomisa yo libota monene. 11 Moyize abondelaki Yawe, Nzambe na ye, mpe alobaki :— Eh Yawe ! Mpo na nini kanda na Yo ekweyela bato na Yo, oyo obimisaki na Ejipito, na nguya monene mpe na loboko ya makasi ? 12 Mpo na nini bato ya Ejipito baloba : « Nzambe na bango azalaki na makanisi mabe tango abimisaki bango na Ejipito. Ezali nde mpo na koboma bango na mokili ya bangomba mpe kosilisa bango na mokili. » Lembisa kanda na Yo ya makasi mpe kosala lisusu mabe te na bato na Yo. 13 Kanisa Abrayami, Izaki mpe Isalaele, basali na Yo, oyo Yo moko olapelaki ndayi mpe olobaki : « Nakokomisa bakitani na yo ebele lokola minzoto na likolo, nakopesa bango mokili oyo nyonso ndenge kaka nalobaki na bango ; mpe yango ekozala libula na bango mpo na libela. » 14 Mpe Yawe asalaki lisusu te mabe oyo akanaki kosala bato na Ye. 15 Moyize abalukaki mpe akitaki wuta na ngomba, elongo na bitando mibale ya mabanga ya boyokani na maboko na ye ; mabanga yango ekomama na bangambo mibale, na liboso mpe na sima. 16 Bitando yango ya mabanga ezalaki mosala ya Nzambe, mpe makomi oyo ezalaki ya kokomama na bitando yango ya mabanga ezalaki ya Nzambe. 17 Tango Jozue ayokaki makelele ya bato oyo bazalaki koganga, alobaki na Moyize :— Ezali na makelele ya bitumba kati na molako ! 18 Moyize azongisaki :— Te, ezali makelele ya elonga te, makelele ya kokweyisama mpe te ! Oyo ngai nazali koyoka, ezali nde makelele ya banzembo. 19 Tango Moyize apusanaki pembeni ya molako, amonaki ekeko ya mwana ngombe mpe bato bazali kobina ; asilikaki makasi, abwakaki bitando ya mabanga wuta na maboko na ye mpe apanzaki yango na biteni, na ebandeli ya ngomba. 20 Moyize azwaki ekeko ya mwana ngombe oyo basalaki, atumbaki yango na moto mpe anikaki yango malamu kino ekomaki putulu. Bongo apanzaki yango likolo ya mayi mpe amelisaki bana ya Isalaele mayi yango. 21 Moyize atunaki Aron :— Likambo nini bato oyo basali yo mpo ete okamba bango kino kosala lisumu ya monene boye ? 22 Aron azongisaki :— Tika ete nkolo na ngai asilika te ! Oyebi bato, balingaka kaka kosala mabe. 23 Balobaki na ngai : « Salela biso Nzambe oyo akotambola liboso na biso, pamba te toyebi te likambo nini ekweyeli Moyize oyo abimisaki biso na Ejipito. » 24 Bongo nayebisaki bango : « Tika ete moto nyonso oyo azali na biloko ya matoyi ya wolo alongola yango. » Bapesaki ngai wolo, nanyangwisaki yango na moto mpe nasalaki na yango ekeko ya mwana ngombe oyo. 25 Moyize amonaki ete bato bazalaki kati na mobulu, pamba te Aron akambaki bango mabe ; yango wana bakomaki eloko ya kotiola na miso ya banguna na bango. 26 Moyize atelemaki na ekotelo ya molako mpe alobaki :— Tika ete moto nyonso oyo azali mpo na Yawe aya epai na ngai.Mpe Balevi nyonso basanganaki pene na ye. 27 Alobaki na bango :— Tala makambo oyo Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobi : « Tika ete moto nyonso atia mopanga na mopende na ye. Botambola kati na molako wuta na ndako ya kapo moko kino na ndako ya kapo mosusu ; mpe moko na moko na bino aboma ndeko na ye ya mobali, moninga na ye mpe mozalani na ye. » 28 Balevi basalaki ndenge Moyize atindaki ; mpe na mokolo wana, bato pene nkoto misato bakufaki. 29 Moyize alobaki :— Na mokolo ya lelo, Yawe atie bino pembeni mpo ete bobomi bana na bino moko ya mibali mpe bandeko na bino ya mibali. Bongo mpo na yango, apamboli bino. 30 Mokolo elandaki, Moyize alobaki na bato :— Bosalaki lisumu monene. Kasi sik’oyo, nakomata epai na Yawe ; tango mosusu, nakozwa bolimbisi mpo na lisumu na bino. 31 Moyize azongaki epai na Yawe mpe alobaki :— Ah ! Tala lisumu monene bato oyo basali. Bamisalelaki nzambe ya wolo. 32 Kasi sik’oyo, nabondeli Yo, limbisa lisumu na bango, soki te longola kombo na ngai na buku ya bomoi oyo okomaki. 33 Yawe azongiselaki Moyize :— Moto nyonso oyo asalaki lisumu liboso na Ngai, ye nde nakolongola na buku na Ngai. 34 Sik’oyo, kende ! Kamba bato na esika oyo nalobaki na yo. Tala, anjelu na Ngai akozala liboso na yo. Atako bongo, tango mokolo ekokoka mpo ete napesa etumbu, nakopesa bango etumbu mpo na lisumu na bango. 35 Yawe apesaki bato etumbu likolo ya ekeko ya mwana ngombe oyo balobaki na Aron ete asala.

In Other Versions

Exodus 32 in the ANGEFD

Exodus 32 in the ANTPNG2D

Exodus 32 in the AS21

Exodus 32 in the BAGH

Exodus 32 in the BBPNG

Exodus 32 in the BBT1E

Exodus 32 in the BDS

Exodus 32 in the BEV

Exodus 32 in the BHAD

Exodus 32 in the BIB

Exodus 32 in the BLPT

Exodus 32 in the BNT

Exodus 32 in the BNTABOOT

Exodus 32 in the BNTLV

Exodus 32 in the BOATCB

Exodus 32 in the BOATCB2

Exodus 32 in the BOBCV

Exodus 32 in the BOCNT

Exodus 32 in the BOECS

Exodus 32 in the BOGWICC

Exodus 32 in the BOHCB

Exodus 32 in the BOHCV

Exodus 32 in the BOHLNT

Exodus 32 in the BOHNTLTAL

Exodus 32 in the BOICB

Exodus 32 in the BOILNTAP

Exodus 32 in the BOITCV

Exodus 32 in the BOKCV

Exodus 32 in the BOKCV2

Exodus 32 in the BOKHWOG

Exodus 32 in the BOKSSV

Exodus 32 in the BOLCB

Exodus 32 in the BOMCV

Exodus 32 in the BONAV

Exodus 32 in the BONCB

Exodus 32 in the BONLT

Exodus 32 in the BONUT2

Exodus 32 in the BOPLNT

Exodus 32 in the BOSCB

Exodus 32 in the BOSNC

Exodus 32 in the BOTLNT

Exodus 32 in the BOVCB

Exodus 32 in the BOYCB

Exodus 32 in the BPBB

Exodus 32 in the BPH

Exodus 32 in the BSB

Exodus 32 in the CCB

Exodus 32 in the CUV

Exodus 32 in the CUVS

Exodus 32 in the DBT

Exodus 32 in the DGDNT

Exodus 32 in the DHNT

Exodus 32 in the DNT

Exodus 32 in the ELBE

Exodus 32 in the EMTV

Exodus 32 in the ESV

Exodus 32 in the FBV

Exodus 32 in the FEB

Exodus 32 in the GGMNT

Exodus 32 in the GNT

Exodus 32 in the HARY

Exodus 32 in the HNT

Exodus 32 in the IRVA

Exodus 32 in the IRVB

Exodus 32 in the IRVG

Exodus 32 in the IRVH

Exodus 32 in the IRVK

Exodus 32 in the IRVM

Exodus 32 in the IRVM2

Exodus 32 in the IRVO

Exodus 32 in the IRVP

Exodus 32 in the IRVT

Exodus 32 in the IRVT2

Exodus 32 in the IRVU

Exodus 32 in the ISVN

Exodus 32 in the JSNT

Exodus 32 in the KAPI

Exodus 32 in the KBT1ETNIK

Exodus 32 in the KBV

Exodus 32 in the KJV

Exodus 32 in the KNFD

Exodus 32 in the LBA

Exodus 32 in the LBLA

Exodus 32 in the LNT

Exodus 32 in the LSV

Exodus 32 in the MAAL

Exodus 32 in the MBV

Exodus 32 in the MBV2

Exodus 32 in the MHNT

Exodus 32 in the MKNFD

Exodus 32 in the MNG

Exodus 32 in the MNT

Exodus 32 in the MNT2

Exodus 32 in the MRS1T

Exodus 32 in the NAA

Exodus 32 in the NASB

Exodus 32 in the NBLA

Exodus 32 in the NBS

Exodus 32 in the NBVTP

Exodus 32 in the NET2

Exodus 32 in the NIV11

Exodus 32 in the NNT

Exodus 32 in the NNT2

Exodus 32 in the NNT3

Exodus 32 in the PDDPT

Exodus 32 in the PFNT

Exodus 32 in the RMNT

Exodus 32 in the SBIAS

Exodus 32 in the SBIBS

Exodus 32 in the SBIBS2

Exodus 32 in the SBICS

Exodus 32 in the SBIDS

Exodus 32 in the SBIGS

Exodus 32 in the SBIHS

Exodus 32 in the SBIIS

Exodus 32 in the SBIIS2

Exodus 32 in the SBIIS3

Exodus 32 in the SBIKS

Exodus 32 in the SBIKS2

Exodus 32 in the SBIMS

Exodus 32 in the SBIOS

Exodus 32 in the SBIPS

Exodus 32 in the SBISS

Exodus 32 in the SBITS

Exodus 32 in the SBITS2

Exodus 32 in the SBITS3

Exodus 32 in the SBITS4

Exodus 32 in the SBIUS

Exodus 32 in the SBIVS

Exodus 32 in the SBT

Exodus 32 in the SBT1E

Exodus 32 in the SCHL

Exodus 32 in the SNT

Exodus 32 in the SUSU

Exodus 32 in the SUSU2

Exodus 32 in the SYNO

Exodus 32 in the TBIAOTANT

Exodus 32 in the TBT1E

Exodus 32 in the TBT1E2

Exodus 32 in the TFTIP

Exodus 32 in the TFTU

Exodus 32 in the TGNTATF3T

Exodus 32 in the THAI

Exodus 32 in the TNFD

Exodus 32 in the TNT

Exodus 32 in the TNTIK

Exodus 32 in the TNTIL

Exodus 32 in the TNTIN

Exodus 32 in the TNTIP

Exodus 32 in the TNTIZ

Exodus 32 in the TOMA

Exodus 32 in the TTENT

Exodus 32 in the UBG

Exodus 32 in the UGV

Exodus 32 in the UGV2

Exodus 32 in the UGV3

Exodus 32 in the VBL

Exodus 32 in the VDCC

Exodus 32 in the YALU

Exodus 32 in the YAPE

Exodus 32 in the YBVTP

Exodus 32 in the ZBP