Exodus 9 (BOLCB2)

1 Yawe alobaki na Moyize : « Kende koyebisa Faraon : ‹ Tala makambo oyo Yawe, Nzambe ya Ba-Ebre, alobi : ‘ Tika bato na Ngai kokende kogumbamela Ngai ! ’ 2 Soki oboyi kotika bango kokende mpe okobi kokanga bango, 3 loboko na Yawe ekomema mopepe ya bokono ya somo kati na bibwele na yo, oyo ezali na elanga : bampunda, ba-ane, bashamo, bangombe, bameme mpe bantaba. 4 Kasi Yawe akotia bokeseni kati na bibwele ya bana ya Isalaele mpe ya bato ya Ejipito, pamba te nyama moko te ya bana ya Isalaele ekokufa. › » 5 Yawe abongisaki tango mpe alobaki : « Lobi, Yawe akokokisa likambo oyo na mokili. » 6 Mpe mokolo oyo elandaki, Yawe akokisaki yango : bibwele nyonso ya bato ya Ejipito ekufaki, kasi ebwele ata moko te ya bana ya Isalaele ekufaki. 7 Faraon atindaki bato mpo na kolandela likambo oyo mpe bamonaki ete ata ebwele moko te kati na bibwele ya bana ya Isalaele ekufaki. Atako bongo, Faraon ayeisaki lisusu motema na ye makasi mpe aboyaki kaka kotika bato kokende. 8 Yawe alobaki na Moyize mpe Aron : « Botondisa maboko na bino na putulu oyo ewuti na fulu ya moto makasi, mpe tika ete Moyize abwaka yango likolo, na miso ya Faraon. 9 Yango ekopanzana na mokili mobimba ya Ejipito mpe ekobimisa, kati na Ejipito mobimba, na banzoto ya bato mpe ya bibwele, babibon oyo ekokoma bapota ya kopola. » 10 Bazwaki putulu na fulu ya moto mpe batelemaki liboso ya Faraon. Moyize abwakaki yango likolo mpe ebimisaki babibon oyo ekomaki bapota ya kopola na banzoto ya bato mpe ya bibwele. 11 Bato ya soloka bakokaki te kotelema liboso ya Moyize likolo ya bapota oyo ezalaki na banzoto na bango mpe ya bato nyonso ya Ejipito. 12 Kasi Yawe akomisaki lisusu motema ya Faraon makasi mpe Faraon ayokelaki te Moyize mpe Aron, ndenge kaka Yawe alobaki yango na Moyize. 13 Yawe alobaki na Moyize : « Lamuka na tongo-tongo, kende kokutana na Faraon mpe loba na ye : ‹ Tala makambo oyo Yawe, Nzambe ya Ba-Ebre, alobi : Tika bato na Ngai kokende kogumbamela Ngai. 14 Ya mbala oyo, nakotinda mopepe na Ngai nyonso ya bokono epai na yo, epai ya bakalaka na yo mpe epai ya bato na yo, mpo oyeba ete moko te azali lokola Ngai, na mokili mobimba. 15 Pamba te kino sik’oyo, nakokaki kosembola loboko na Ngai mpe kotindela yo elongo na bato na yo nyonso, mopepe ya bokono oyo ekokaki kolimwisa bino na mokili. 16 Kasi natikaki yo na bomoi mpo na tina oyo : kotalisa yo nguya na Ngai mpe kosala ete lokumu ya Kombo na Ngai epanzana na mokili mobimba. 17 Lokola ozali kokoba koboya kotika bato na Ngai kokende, 18 lobi na ngonga oyo, nakobetisa mvula ya mabanga ya moto makasi, oyo etikala nanu kobeta te wuta mokili ya Ejipito ezala. 19 Sik’oyo, pesa mitindo ete bamema na ebombelo, bibwele na yo mpe biloko nyonso oyo ozali na yango kati na elanga. Pamba te mvula ya mabanga ekokweyela mpe ekoboma moto mpe nyama nyonso oyo bokokotisa kuna te to oyo ekotikala kati na elanga. › » 20 Kati na basali ya Faraon, ba-oyo babangaki Liloba na Yawe bakotisaki na lombangu bawumbu mpe bibwele na bango kati na bandako. 21 Kasi ba-oyo babangaki te Liloba na Yawe, batikaki bawumbu mpe bibwele na bango kati na elanga. 22 Yawe alobaki na Moyize : « Sembola loboko na yo na likolo mpo ete mvula ya mabanga enoka na mokili mobimba ya Ejipito : likolo ya bato, ya bibwele mpe ya matiti nyonso oyo ebotaka na elanga kati na Ejipito. » 23 Tango Moyize asembolaki lingenda na ye na likolo, Yawe abetisaki bakake mpe mvula ya mabanga. Bakake ebetaki na mokili. Bongo Yawe anokisaki mvula ya mabanga na mokili ya Ejipito. 24 Boye mvula ya mabanga mpe bakake ebetaki. Ezalaki mvula moko ya makasi penza oyo etikala nanu kobeta te wuta Ejipito ekoma ekolo. 25 Ebomaki, kati na Ejipito, nyonso oyo ezalaki kati na elanga, ezala bato to bibwele ; ebebisaki matiti nyonso ya elanga mpe ebukaki banzete nyonso. 26 Kasi enokaki te kati na etuka ya Gosheni epai wapi bana ya Isalaele bazalaki. 27 Faraon abengisaki Moyize mpe Aron, alobaki na bango :— Ya mbala oyo, nasali lisumu. Yawe azali sembo ; ngai mpe bato na ngai tosali mabe. 28 Bobondela Yawe mpo ete asilisa mvula ya mabanga mpe bakake. Bongo ngai nakotika bino kokende, mpe bino bokowumela lisusu awa te. 29 Moyize azongisaki :— Tango nakobima na engumba, nakotombola maboko na ngai mpo na kobondela Yawe. Bakake ekosila mpe mvula ya mabanga ekonoka lisusu te, mpo ete oyeba ete mokili ezali ya Yawe. 30 Kasi nayebi ete, yo elongo na bakalaka na yo, bokobanga na bino kaka Yawe Nzambe te. 31 Lino mpe Orje ebebaki, pamba te lino ebimisaki mito mpe Orje ebimisaki bafololo. 32 Ble mpe epotele ebebaki te, pamba te tango na yango ya kobota ekokaki nanu te. 33 Bongo Moyize atikaki Faraon mpe abimaki libanda ya engumba. Atombolaki maboko na ye epai na Yawe ; boye bakake mpe mvula ya mabanga etikaki kobeta, mpe mvula esilaki kati na Ejipito. 34 Tango Faraon amonaki ete mvula ya mabanga mpe bakake etiki kobeta, asalaki lisusu lisumu. Ye mpe bakalaka na ye bayeisaki lisusu mitema na bango makasi. 35 Boye motema ya Faraon ekomaki penza makasi mpe aboyaki kotika bana ya Isalaele kokende, ndenge kaka Yawe alobaki na nzela ya Moyize.

In Other Versions

Exodus 9 in the ANGEFD

Exodus 9 in the ANTPNG2D

Exodus 9 in the AS21

Exodus 9 in the BAGH

Exodus 9 in the BBPNG

Exodus 9 in the BBT1E

Exodus 9 in the BDS

Exodus 9 in the BEV

Exodus 9 in the BHAD

Exodus 9 in the BIB

Exodus 9 in the BLPT

Exodus 9 in the BNT

Exodus 9 in the BNTABOOT

Exodus 9 in the BNTLV

Exodus 9 in the BOATCB

Exodus 9 in the BOATCB2

Exodus 9 in the BOBCV

Exodus 9 in the BOCNT

Exodus 9 in the BOECS

Exodus 9 in the BOGWICC

Exodus 9 in the BOHCB

Exodus 9 in the BOHCV

Exodus 9 in the BOHLNT

Exodus 9 in the BOHNTLTAL

Exodus 9 in the BOICB

Exodus 9 in the BOILNTAP

Exodus 9 in the BOITCV

Exodus 9 in the BOKCV

Exodus 9 in the BOKCV2

Exodus 9 in the BOKHWOG

Exodus 9 in the BOKSSV

Exodus 9 in the BOLCB

Exodus 9 in the BOMCV

Exodus 9 in the BONAV

Exodus 9 in the BONCB

Exodus 9 in the BONLT

Exodus 9 in the BONUT2

Exodus 9 in the BOPLNT

Exodus 9 in the BOSCB

Exodus 9 in the BOSNC

Exodus 9 in the BOTLNT

Exodus 9 in the BOVCB

Exodus 9 in the BOYCB

Exodus 9 in the BPBB

Exodus 9 in the BPH

Exodus 9 in the BSB

Exodus 9 in the CCB

Exodus 9 in the CUV

Exodus 9 in the CUVS

Exodus 9 in the DBT

Exodus 9 in the DGDNT

Exodus 9 in the DHNT

Exodus 9 in the DNT

Exodus 9 in the ELBE

Exodus 9 in the EMTV

Exodus 9 in the ESV

Exodus 9 in the FBV

Exodus 9 in the FEB

Exodus 9 in the GGMNT

Exodus 9 in the GNT

Exodus 9 in the HARY

Exodus 9 in the HNT

Exodus 9 in the IRVA

Exodus 9 in the IRVB

Exodus 9 in the IRVG

Exodus 9 in the IRVH

Exodus 9 in the IRVK

Exodus 9 in the IRVM

Exodus 9 in the IRVM2

Exodus 9 in the IRVO

Exodus 9 in the IRVP

Exodus 9 in the IRVT

Exodus 9 in the IRVT2

Exodus 9 in the IRVU

Exodus 9 in the ISVN

Exodus 9 in the JSNT

Exodus 9 in the KAPI

Exodus 9 in the KBT1ETNIK

Exodus 9 in the KBV

Exodus 9 in the KJV

Exodus 9 in the KNFD

Exodus 9 in the LBA

Exodus 9 in the LBLA

Exodus 9 in the LNT

Exodus 9 in the LSV

Exodus 9 in the MAAL

Exodus 9 in the MBV

Exodus 9 in the MBV2

Exodus 9 in the MHNT

Exodus 9 in the MKNFD

Exodus 9 in the MNG

Exodus 9 in the MNT

Exodus 9 in the MNT2

Exodus 9 in the MRS1T

Exodus 9 in the NAA

Exodus 9 in the NASB

Exodus 9 in the NBLA

Exodus 9 in the NBS

Exodus 9 in the NBVTP

Exodus 9 in the NET2

Exodus 9 in the NIV11

Exodus 9 in the NNT

Exodus 9 in the NNT2

Exodus 9 in the NNT3

Exodus 9 in the PDDPT

Exodus 9 in the PFNT

Exodus 9 in the RMNT

Exodus 9 in the SBIAS

Exodus 9 in the SBIBS

Exodus 9 in the SBIBS2

Exodus 9 in the SBICS

Exodus 9 in the SBIDS

Exodus 9 in the SBIGS

Exodus 9 in the SBIHS

Exodus 9 in the SBIIS

Exodus 9 in the SBIIS2

Exodus 9 in the SBIIS3

Exodus 9 in the SBIKS

Exodus 9 in the SBIKS2

Exodus 9 in the SBIMS

Exodus 9 in the SBIOS

Exodus 9 in the SBIPS

Exodus 9 in the SBISS

Exodus 9 in the SBITS

Exodus 9 in the SBITS2

Exodus 9 in the SBITS3

Exodus 9 in the SBITS4

Exodus 9 in the SBIUS

Exodus 9 in the SBIVS

Exodus 9 in the SBT

Exodus 9 in the SBT1E

Exodus 9 in the SCHL

Exodus 9 in the SNT

Exodus 9 in the SUSU

Exodus 9 in the SUSU2

Exodus 9 in the SYNO

Exodus 9 in the TBIAOTANT

Exodus 9 in the TBT1E

Exodus 9 in the TBT1E2

Exodus 9 in the TFTIP

Exodus 9 in the TFTU

Exodus 9 in the TGNTATF3T

Exodus 9 in the THAI

Exodus 9 in the TNFD

Exodus 9 in the TNT

Exodus 9 in the TNTIK

Exodus 9 in the TNTIL

Exodus 9 in the TNTIN

Exodus 9 in the TNTIP

Exodus 9 in the TNTIZ

Exodus 9 in the TOMA

Exodus 9 in the TTENT

Exodus 9 in the UBG

Exodus 9 in the UGV

Exodus 9 in the UGV2

Exodus 9 in the UGV3

Exodus 9 in the VBL

Exodus 9 in the VDCC

Exodus 9 in the YALU

Exodus 9 in the YAPE

Exodus 9 in the YBVTP

Exodus 9 in the ZBP