Ezekiel 20 (BOLCB2)

1 Na mokolo ya zomi, na sanza ya mitano ya mobu oyo ya sambo, ndambo ya bakambi ya Isalaele bayaki kotuna toli ya Yawe mpe bavandaki liboso na ngai. 2 Bongo, Yawe alobaki na ngai : 3 « Mwana na moto, loba na bakambi ya Isalaele mpe yebisa bango : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Boni, boyei solo kotuna toli epai na Ngai ? Na Kombo na Ngai, nakomitika te ete botuna toli epai na Ngai, elobi Nkolo Yawe. › 4 Boni, mwana na moto, okosambisa bango ? Okosambisa bango solo ? Tutanisa bango na misala ya mbindo ya batata na bango 5 mpe yebisa bango : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Na mokolo oyo naponaki Isalaele, nalapaki ndayi, na kotombola loboko, epai ya bakitani ya libota ya Jakobi ete nakomimonisa Ngai moko epai na bango kati na Ejipito, nalapaki ndayi mpe nayebisaki bango : ‘ Nazali Yawe, Nzambe na bino. ’ 6 Na mokolo wana, nalapaki ndayi, na kotombola loboko, ete nakobimisa bango na Ejipito mpe nakomema bango na mokili oyo nalukelaki bango, mokili oyo ebimisaka miliki mpe mafuta ya nzoyi, mokili oyo eleki mikili nyonso na kitoko. 7 Nalobaki na bango : ‘ Tika ete moto na moto alongola bililingi ya mbindo oyo ezali liboso ya miso na ye ! Bomikomisa mbindo te, na nzela ya banzambe ya bikeko ya Ejipito ! Nazali Yawe, Nzambe na bino. ’ 8 Kasi batombokelaki Ngai mpe baboyaki koyokela Ngai, balongolaki te bililingi ya mbindo oyo ezalaki liboso na bango, babwakaki te banzambe ya bikeko ya Ejipito. Boye, namilobelaki ete nakotombokela bango makasi mpe nakopelisela bango kanda na Ngai, kati na Ejipito. 9 Kasi mpo na lokumu ya Kombo na Ngai, nasalaki bongo mpo ete Kombo na Ngai etiolama te na miso ya bikolo epai wapi bazalaki kovanda. Ngai moko namimonisaki epai ya bana ya Isalaele na miso ya bikolo wana, mpo na kobimisa bango na Ejipito. 10 Yango wana nabimisaki bango na Ejipito mpe namemaki bango na esobe. 11 Napesaki bango bikateli na Ngai mpe nalakisaki bango mibeko na Ngai mpo ete moto oyo akotosa yango abika na nzela na yango. 12 Napesaki bango mpe mikolo na Ngai ya Saba lokola elembo ya boyokani kati na Ngai mpe bango, mpo bayeba ete Ngai Yawe nde nabulisaki bango. 13 Kasi bana ya Isalaele batombokelaki Ngai kati na esobe ; batosaki bikateli na Ngai te, kasi babwakaki mibeko na Ngai, oyo moto oyo asengeli kotosa mpo ete abika na nzela na yango. Mpe babebisaki bosantu ya mikolo na Ngai ya Saba. Boye, namilobelaki ete nakotombokela bango makasi mpe nakobebisa bango kati na esobe. 14 Kasi mpo na lokumu ya Kombo na Ngai, nasalaki bongo mpo ete Kombo na Ngai etiolama te na miso ya bikolo oyo liboso na bango, nabimisaki bango na Ejipito. 15 Kati na esobe, nalapaki lisusu ndayi, na kotombola loboko, ete nakokotisa bango lisusu te na mokili oyo nabongiselaki bango, mokili oyo ebimisaka miliki mpe mafuta ya nzoyi, mokili oyo eleki mikili nyonso na kitoko ; 16 pamba te babwakaki mibeko na Ngai, batosaki bikateli na Ngai te mpe babebisaki bosantu ya mikolo na Ngai ya Saba : mitema na bango ekangamaki na banzambe na bango ya bikeko. 17 Kasi lokola natalaki bango na liso ya mawa, yango wana nabebisaki bango te mpe nasilisaki koboma bango te kati na esobe. 18 Nalobaki na bana na bango kati na esobe : ‘ Bolanda bikeko ya batata na bino te, botosa mibeko na bango te to bomikomisa mbindo te na banzambe na bango ya bikeko ! 19 Nazali Yawe, Nzambe na bino. Bolanda bikateli na Ngai mpe bobatela na bokebi mibeko na Ngai. 20 Bobulisa mikolo na Ngai ya Saba mpo ete ezala elembo ya boyokani kati na Ngai mpe bino. Boye, bokoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe, Nzambe na bino. ’ 21 Kasi bana mpe batombokelaki Ngai, balandaki bikateli na Ngai te, babatelaki te na bokebi mibeko na Ngai, oyo moto asengeli kotosa mpo ete abika na nzela na yango, mpe babebisaki bosantu ya mikolo na Ngai ya Saba. Boye, namilobelaki ete nakotombokela bango makasi mpe nakopelisela bango kanda na Ngai kati na esobe. 22 Kasi nazongisaki loboko na Ngai sima, mpe mpo na lokumu ya Kombo na Ngai, nasalaki bongo mpo ete Kombo na Ngai etiolama te na miso ya bikolo oyo liboso na bango, nabimisaki bango na Ejipito. 23 Nzokande, kati na esobe, nalapaki ndayi, na kotombola loboko, ete nakopanza bango kati na bikolo mpe kati na mikili ya bapaya ; 24 pamba te batosaki mibeko na Ngai te, kasi babwakaki bikateli na Ngai mpe babebisaki bosantu ya mikolo na Ngai ya Saba, mpe miso na bango ekobaki kotala kaka banzambe ya bikeko ya batata na bango. 25 Mpe lisusu, Ngai moko napesaki bango bikateli ya malamu te mpe mibeko oyo epesaka bomoi te, 26 natikaki ete bamikomisa mbindo na nzela ya makabo na bango, mbeka ya mwana ya liboso nyonso, mpo ete natondisa bango na somo mpe bayeba solo ete Ngai, nazali Yawe. › 27 Yango wana, mwana na moto, loba na bana ya Isalaele mpe yebisa bango : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Ezalaki mpe kaka boye nde batata na bino bafingaki Ngai, wana batambolaki na boyengebene te na miso na Ngai. 28 Tango nakotisaki bango na mokili oyo nalapaki ndayi, na kotombola loboko, ete nakopesa bango, mpe tango bamonaki bangomba milayi mpe banzete ya mibesu, bakomaki kobonza kuna bambeka mpe bakado oyo etumbolaki kanda na Ngai, kopesa makabo na bango ya solo kitoko mpe kosopa makabo na bango ya masanga. 29 Boye, natunaki bango : Esambelo ya likolo ya ngomba epai wapi bozali kokende elakisi nini ? › Mpe babengaki yango, kino na mokolo ya lelo : ‹ Esambelo ya likolo ya ngomba. › 30 Yango wana, loba na libota ya Isalaele : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Boni, bomikomisi solo mbindo mpo na kolanda nzela ya batata na bino mpe kosalela banzambe na bango ya bikeko ? 31 Tango bozali kobonza makabo na bino, mbeka ya bana na bino ya mibali na moto, bozali kokoba komikomisa mbindo na nzela ya banzambe na bino ya bikeko kino na mokolo ya lelo. Oh libota ya Isalaele ; boni, namitika ete botuna toli epai na Ngai ? Na Kombo na Ngai, elobi Nkolo Yawe, nakotika te ete botuna Ngai. 32 Bozali koloba : ‘ Tolingi kozala lokola bato ya bikolo mosusu, lokola bituka ya mikili mosusu ; tolingi na biso kosalaka mpo na banzete mpe mabanga. ’ Kasi eloko oyo bozali kokanisa ekosalema te. 33 Na Kombo na Ngai, elobi Nkolo Yawe, nakokonza bino, na nguya ya loboko na Ngai, oyo esembolama, mpe na kanda makasi ; 34 nakozongisa bino wuta na bikolo ya bapaya mpe nakosangisa bino longwa na mikili epai wapi bozalaki ya kopanzana, na nguya ya loboko na Ngai oyo esembolama mpe na kanda makasi. 35 Nakomema bino na esobe ya bikolo, mpe kuna, tokotalana na miso mpe nakopesa bino etumbu. 36 Nakopesa bino etumbu ndenge napesaki batata na bino etumbu na esobe ya mokili ya Ejipito, elobi Nkolo Yawe. 37 Nakobatela bino na se ya lingenda na Ngai mpe nakomema bino na mokili na Ngai ya boyokani. 38 Nakolongola kati na bino bato oyo batombokelaka Ngai mpe bato oyo batelemelaka Ngai. Bongo nakobimisa bango na mokili oyo bazali kovanda lokola bapaya ; kasi bakokota na mokili ya Isalaele te. Boye, bokoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe. 39 Kasi mpo na bino, oh libota ya Isalaele, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Tika ete moko na moko kati na bino akende kosalela banzambe na ye ya bikeko ! Kasi na mikolo ekoya, bokotosa Ngai kaka mpe bokotika kobebisa bosantu ya Kombo na Ngai na nzela ya makabo mpe ya banzambe na bino ya bikeko. 40 Pamba te na ngomba na Ngai ya bule, ngomba oyo eleki molayi kati na Isalaele, elobi Nkolo Yawe, kuna na mokili wana, bato nyonso ya libota ya Isalaele bakosalela Ngai, mpe Ngai nakoyamba bango kaka kuna. Kuna, nakosepela koyamba mbeka mpe makabo na bino oyo eleki kitoko mpe mbeka na bino nyonso ya bule. 41 Nakoyamba bino malamu, lokola makabo ya solo kitoko, tango nakobimisa bino longwa na bikolo mpe nakosangisa bino longwa na mikili epai wapi bozalaki ya kopanzana. Mpe Ngai moko nakomonisa bosantu na Ngai kati na bino na miso ya bikolo. 42 Boye, bokoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe tango nakokotisa bino na mokili ya Isalaele, mokili oyo nalapaki ndayi, na kotombola loboko, ete nakopesa epai ya batata na bino. 43 Mpe kuna, bokokanisa lisusu bizaleli na bino mpe misala na bino nyonso oyo na nzela na yango, bomikosaki mbindo mpe bokokoma komiyokela nkele likolo ya mabe nyonso oyo bosalaki. 44 Bokoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe tango nakosalela bino makambo mpo na lokumu ya Kombo na Ngai, kasi kolanda te nzela na bino ya mabe mpe misala na bino ya mbindo, oh libota ya Isalaele, elobi Nkolo Yawe. › »

In Other Versions

Ezekiel 20 in the ANGEFD

Ezekiel 20 in the ANTPNG2D

Ezekiel 20 in the AS21

Ezekiel 20 in the BAGH

Ezekiel 20 in the BBPNG

Ezekiel 20 in the BBT1E

Ezekiel 20 in the BDS

Ezekiel 20 in the BEV

Ezekiel 20 in the BHAD

Ezekiel 20 in the BIB

Ezekiel 20 in the BLPT

Ezekiel 20 in the BNT

Ezekiel 20 in the BNTABOOT

Ezekiel 20 in the BNTLV

Ezekiel 20 in the BOATCB

Ezekiel 20 in the BOATCB2

Ezekiel 20 in the BOBCV

Ezekiel 20 in the BOCNT

Ezekiel 20 in the BOECS

Ezekiel 20 in the BOGWICC

Ezekiel 20 in the BOHCB

Ezekiel 20 in the BOHCV

Ezekiel 20 in the BOHLNT

Ezekiel 20 in the BOHNTLTAL

Ezekiel 20 in the BOICB

Ezekiel 20 in the BOILNTAP

Ezekiel 20 in the BOITCV

Ezekiel 20 in the BOKCV

Ezekiel 20 in the BOKCV2

Ezekiel 20 in the BOKHWOG

Ezekiel 20 in the BOKSSV

Ezekiel 20 in the BOLCB

Ezekiel 20 in the BOMCV

Ezekiel 20 in the BONAV

Ezekiel 20 in the BONCB

Ezekiel 20 in the BONLT

Ezekiel 20 in the BONUT2

Ezekiel 20 in the BOPLNT

Ezekiel 20 in the BOSCB

Ezekiel 20 in the BOSNC

Ezekiel 20 in the BOTLNT

Ezekiel 20 in the BOVCB

Ezekiel 20 in the BOYCB

Ezekiel 20 in the BPBB

Ezekiel 20 in the BPH

Ezekiel 20 in the BSB

Ezekiel 20 in the CCB

Ezekiel 20 in the CUV

Ezekiel 20 in the CUVS

Ezekiel 20 in the DBT

Ezekiel 20 in the DGDNT

Ezekiel 20 in the DHNT

Ezekiel 20 in the DNT

Ezekiel 20 in the ELBE

Ezekiel 20 in the EMTV

Ezekiel 20 in the ESV

Ezekiel 20 in the FBV

Ezekiel 20 in the FEB

Ezekiel 20 in the GGMNT

Ezekiel 20 in the GNT

Ezekiel 20 in the HARY

Ezekiel 20 in the HNT

Ezekiel 20 in the IRVA

Ezekiel 20 in the IRVB

Ezekiel 20 in the IRVG

Ezekiel 20 in the IRVH

Ezekiel 20 in the IRVK

Ezekiel 20 in the IRVM

Ezekiel 20 in the IRVM2

Ezekiel 20 in the IRVO

Ezekiel 20 in the IRVP

Ezekiel 20 in the IRVT

Ezekiel 20 in the IRVT2

Ezekiel 20 in the IRVU

Ezekiel 20 in the ISVN

Ezekiel 20 in the JSNT

Ezekiel 20 in the KAPI

Ezekiel 20 in the KBT1ETNIK

Ezekiel 20 in the KBV

Ezekiel 20 in the KJV

Ezekiel 20 in the KNFD

Ezekiel 20 in the LBA

Ezekiel 20 in the LBLA

Ezekiel 20 in the LNT

Ezekiel 20 in the LSV

Ezekiel 20 in the MAAL

Ezekiel 20 in the MBV

Ezekiel 20 in the MBV2

Ezekiel 20 in the MHNT

Ezekiel 20 in the MKNFD

Ezekiel 20 in the MNG

Ezekiel 20 in the MNT

Ezekiel 20 in the MNT2

Ezekiel 20 in the MRS1T

Ezekiel 20 in the NAA

Ezekiel 20 in the NASB

Ezekiel 20 in the NBLA

Ezekiel 20 in the NBS

Ezekiel 20 in the NBVTP

Ezekiel 20 in the NET2

Ezekiel 20 in the NIV11

Ezekiel 20 in the NNT

Ezekiel 20 in the NNT2

Ezekiel 20 in the NNT3

Ezekiel 20 in the PDDPT

Ezekiel 20 in the PFNT

Ezekiel 20 in the RMNT

Ezekiel 20 in the SBIAS

Ezekiel 20 in the SBIBS

Ezekiel 20 in the SBIBS2

Ezekiel 20 in the SBICS

Ezekiel 20 in the SBIDS

Ezekiel 20 in the SBIGS

Ezekiel 20 in the SBIHS

Ezekiel 20 in the SBIIS

Ezekiel 20 in the SBIIS2

Ezekiel 20 in the SBIIS3

Ezekiel 20 in the SBIKS

Ezekiel 20 in the SBIKS2

Ezekiel 20 in the SBIMS

Ezekiel 20 in the SBIOS

Ezekiel 20 in the SBIPS

Ezekiel 20 in the SBISS

Ezekiel 20 in the SBITS

Ezekiel 20 in the SBITS2

Ezekiel 20 in the SBITS3

Ezekiel 20 in the SBITS4

Ezekiel 20 in the SBIUS

Ezekiel 20 in the SBIVS

Ezekiel 20 in the SBT

Ezekiel 20 in the SBT1E

Ezekiel 20 in the SCHL

Ezekiel 20 in the SNT

Ezekiel 20 in the SUSU

Ezekiel 20 in the SUSU2

Ezekiel 20 in the SYNO

Ezekiel 20 in the TBIAOTANT

Ezekiel 20 in the TBT1E

Ezekiel 20 in the TBT1E2

Ezekiel 20 in the TFTIP

Ezekiel 20 in the TFTU

Ezekiel 20 in the TGNTATF3T

Ezekiel 20 in the THAI

Ezekiel 20 in the TNFD

Ezekiel 20 in the TNT

Ezekiel 20 in the TNTIK

Ezekiel 20 in the TNTIL

Ezekiel 20 in the TNTIN

Ezekiel 20 in the TNTIP

Ezekiel 20 in the TNTIZ

Ezekiel 20 in the TOMA

Ezekiel 20 in the TTENT

Ezekiel 20 in the UBG

Ezekiel 20 in the UGV

Ezekiel 20 in the UGV2

Ezekiel 20 in the UGV3

Ezekiel 20 in the VBL

Ezekiel 20 in the VDCC

Ezekiel 20 in the YALU

Ezekiel 20 in the YAPE

Ezekiel 20 in the YBVTP

Ezekiel 20 in the ZBP