Genesis 27 (BOLCB2)

1 Tango Izaki akomaki mobange mpe miso na ye ezalaki komona lisusu malamu te, abengaki Ezawu, mwana na ye ya liboso ya mobali. Alobaki na ye :— Mwana na ngai !Ezawu azongisaki :— Ngai oyo ! 2 Izaki alobaki :— Nakomi mobange mpe nayebi mokolo ya kufa na ngai te. 3 Yango wana, zwa sik’oyo mandoki na yo ya bokila, saki ya bokila mpe tolotolo ; kende na zamba mpe bomela ngai nyama. 4 Okolambela ngai elubu ya kitoko ndenge nalingaka mpe okomemela ngai yango ; nakolia mpo ete napambola yo liboso ete nakufa. 5 Nzokande, Rebeka azalaki koyoka makambo oyo Izaki azalaki koyebisa mwana na ye Ezawu. Tango Ezawu akendeki na zamba mpo na koboma nyama mpe kozonga na yango, 6 Rebeka ayebisaki Jakobi, mwana na ye ya mibale :— Tala, nayokaki tata na yo koyebisa Ezawu, ndeko na yo : 7 « Memela ngai nyama ! Okolambela ngai elubu ya kitoko, mpe nakolia yango mpo ete napambola yo na miso ya Yawe liboso ete nakufa. » 8 Mwana na ngai, yoka ngai malamu sik’oyo mpe sala makambo oyo nakoyebisa yo : 9 Kende na etonga ya bibwele mpe pona bana ntaba mibale mpe memela ngai yango mpo ete nalambela tata na yo elubu ya kitoko ndenge alingaka. 10 Bongo, okomemela yango tata na yo ; akolia yango mpo ete apambola yo liboso ete akufa. 11 Jakobi azongiselaki Rebeka, mama na ye :— Ezawu, ndeko na ngai, azali na bapwale ebele na nzoto, kasi ngai nazali na yango te. 12 Soki tata na ngai asimbi ngai, akososola ete nalingi kokosa ye ; wana nakomibendela bilakeli mabe na esika ete napambolama. 13 Mama na ye alobaki :— Mwana na ngai, tika ete bilakeli mabe yango ekweya likolo na ngai ; yo, sala kaka makambo oyo ngai nayebisi yo. 14 Boye Jakobi akendeki, azwaki bana ntaba mpe amemaki yango epai ya mama na ye, mpe mama na ye alambaki elubu ya kitoko ndenge tata na ye azalaki kolinga. 15 Bongo Rebeka azwaki na ndako, bilamba oyo elekaki kitoko kati na bilamba ya Ezawu, mwana na ye ya liboso, mpe alatisaki yango Jakobi, mwana na ye ya suka. 16 Azipaki ye maboko mpe kingo na poso ya bana ntaba. 17 Bongo Rebeka apesaki na maboko ya Jakobi, mwana na ye, elubu ya kitoko mpe lipa oyo alambaki. 18 Jakobi akendeki epai ya tata na ye mpe alobaki :— Tata na ngai !Izaki azongisaki :— Ngai oyo, mwana na ngai ; yo nani ? 19 Jakobi alobaki na tata na ye :— Nazali Ezawu, mwana na yo ya liboso. Nasali ndenge oyebisaki ngai. Nabondeli yo, lamuka, vanda mpe lia nyama, mpo ete opambola ngai. 20 Izaki atunaki mwana na ye :— Mwana na ngai, osali ndenge nini mpo ete ozwa nyama noki ?Jakobi azongisaki :— Ezali Yawe, Nzambe na yo, nde atindaki yango na nzela na ngai. 21 Izaki alobaki na Jakobi :— Mwana na ngai, pusana pembeni na ngai mpo ete nasimba yo mpe nayeba soki ozali solo mwana na ngai Ezawu. 22 Jakobi akendeki pembeni na ye, bongo Izaki asimbaki ye mpe alobaki :— Mongongo ezali ya Jakobi, kasi maboko ezali ya Ezawu. 23 Tata na ye ayebaki ye te, pamba te maboko ya Jakobi ezalaki na bapwale lokola ya Ezawu, ndeko na ye ; boye apambolaki ye. 24 Kasi liboso, atunaki ye :— Ozali penza mwana na ngai Ezawu ?Jakobi azongisaki :— Iyo, ezali ngai solo. 25 Izaki alobaki :— Mwana na ngai, memela ngai nyama na yo mpo ete nalia mpe napambola yo.Jakobi amemelaki ye nyama, mpe Izaki aliaki. Amemelaki ye lisusu masanga ya vino mpe amelaki. 26 Sima, tata na ye, Izaki, alobaki na ye :— Mwana na ngai, yaka awa mpe pesa ngai beze. 27 Jakobi akendeki mpe apesaki ye beze. Tango Izaki ayokaki solo ya bilamba na ye, apambolaki ye na maloba oyo :« Ah ! Solo ya mwana na ngai ezalilokola solo ya bilanga oyo Yawe apamboli. 28 Tika ete Nzambe apesa yo mvula ya likolo mpe mabele ya bozwi ;apesa yo mbuma ya ble mpe vino ebele penza ! 29 Tika ete bikolo esalela yo,bato bafukamela yo !Zala mokonzi ya bandeko na yo ya mibali,mpe tika ete bana mibali ya mama na yo bafukama liboso na yo !Tika ete moto oyo akolakela yo mabe alakelama mabe ;tika ete moto oyo akopambola yo apambolama ! » 30 Tango Izaki asilisaki kopambola ye, Jakobi atikaki tata na ye ; bongo ndeko na ye, Ezawu, azongaki wuta na bokila. 31 Ye mpe alambaki elubu mpe amemaki yango epai ya tata na ye. Alobaki na ye :— Tata na ngai, telema mpe lia nyama na ngai mpo ete opambola ngai. 32 Tata na ye, Izaki, atunaki ye :— Yo nani ?Azongisaki :— Ngai Ezawu, mwana na yo ya liboso. 33 Bongo Izaki alengaki makasi mpe alobaki :— Nani wana abomaki nyama mpe amemelaki ngai yango ? Naliaki yango liboso ete yo oya, mpe napambolaki ye. Boye apambolami solo ! 34 Tango Ezawu ayokaki maloba ya tata na ye, atombolaki mongongo makasi mpe agangaki. Alobaki na tata na ye :— Ah ! Tata na ngai, pambola ngai, pambola ngai mpe lokola ! 35 Izaki alobaki :— Ndeko na yo ayaki na mayele mabe, ayibi mapamboli na yo. 36 Ezawu alobaki :— Mpo ete kombo na ye ezali « Jakobi, » yango wana akosi ngai mbala mibale ? Ya liboso, azwaki boyaya na ngai, mpe tala sik’oyo azwi lisusu mapamboli na ngai !Bongo atunaki :— Boni, obombelaki ngai mapamboli te ? 37 Izaki azongiselaki Ezawu :— Tala, nakomisi ye nkolo na yo mpe napesi ye bandeko na ye nyonso lokola basali ; napesi ye ble mpe vino. Mwana na ngai, nasala lisusu nini mpo na yo ? 38 Ezawu alobaki na tata na ye :— Tata na ngai, ozalaki kaka na lipamboli moko wana ? Tata na ngai, pambola ngai mpe !Ezawu atombolaki mongongo na ye mpe alelaki makasi. 39 Tata na ye, Izaki, alobaki na ye :— Okovanda mosika ya mabele oyo ebotaka malamu,mpe mosika ya mvula ya likolo. 40 Okobika na nzela ya mopanga na yompe okosalela ndeko na yo ya mobali.Kasi tango okotambola bipai na bipai,okobuka ekangiseli oyo akotia yo na kingo. 41 Ezawu ayinaki Jakobi likolo ya mapamboli oyo azwaki epai ya tata na ye mpe amilobelaki : « Etikali moke tata na ngai akufa ; bongo nakoboma ndeko na ngai Jakobi. » 42 Tango Rebeka asosolaki makanisi ya Ezawu, mwana na ye ya liboso, abengaki Jakobi, mwana na ye ya suka, mpe alobaki na ye : « Tala, Ezawu, ndeko na yo, azali koluka koboma yo. 43 Mwana na ngai, yoka ngai sik’oyo mpe sala makambo oyo nazali koyebisa yo : ‹ Longwa awa mpe kima na mboka Arani, epai ya ndeko na ngai Labani. 44 Vanda mwa mikolo epai na ye kino kanda ya ndeko na yo ekosila. 45 Tango kanda na ye ekosila mpe akobosana makambo oyo osalaki ye, nakotindela yo maloba mpo ete olongwa kuna mpe ozonga. Mpo na nini nazanga bino mibale mokolo moko ? › » 46 Rebeka akendeki koyebisa Izaki : « Nalembi mokili likolo ya basi oyo ya mokili ya Iti. Soki Jakobi abali mwasi kati na bana basi ya mokili oyo, tina nazala na bomoi ekozala lisusu te. »

In Other Versions

Genesis 27 in the ANGEFD

Genesis 27 in the ANTPNG2D

Genesis 27 in the AS21

Genesis 27 in the BAGH

Genesis 27 in the BBPNG

Genesis 27 in the BBT1E

Genesis 27 in the BDS

Genesis 27 in the BEV

Genesis 27 in the BHAD

Genesis 27 in the BIB

Genesis 27 in the BLPT

Genesis 27 in the BNT

Genesis 27 in the BNTABOOT

Genesis 27 in the BNTLV

Genesis 27 in the BOATCB

Genesis 27 in the BOATCB2

Genesis 27 in the BOBCV

Genesis 27 in the BOCNT

Genesis 27 in the BOECS

Genesis 27 in the BOGWICC

Genesis 27 in the BOHCB

Genesis 27 in the BOHCV

Genesis 27 in the BOHLNT

Genesis 27 in the BOHNTLTAL

Genesis 27 in the BOICB

Genesis 27 in the BOILNTAP

Genesis 27 in the BOITCV

Genesis 27 in the BOKCV

Genesis 27 in the BOKCV2

Genesis 27 in the BOKHWOG

Genesis 27 in the BOKSSV

Genesis 27 in the BOLCB

Genesis 27 in the BOMCV

Genesis 27 in the BONAV

Genesis 27 in the BONCB

Genesis 27 in the BONLT

Genesis 27 in the BONUT2

Genesis 27 in the BOPLNT

Genesis 27 in the BOSCB

Genesis 27 in the BOSNC

Genesis 27 in the BOTLNT

Genesis 27 in the BOVCB

Genesis 27 in the BOYCB

Genesis 27 in the BPBB

Genesis 27 in the BPH

Genesis 27 in the BSB

Genesis 27 in the CCB

Genesis 27 in the CUV

Genesis 27 in the CUVS

Genesis 27 in the DBT

Genesis 27 in the DGDNT

Genesis 27 in the DHNT

Genesis 27 in the DNT

Genesis 27 in the ELBE

Genesis 27 in the EMTV

Genesis 27 in the ESV

Genesis 27 in the FBV

Genesis 27 in the FEB

Genesis 27 in the GGMNT

Genesis 27 in the GNT

Genesis 27 in the HARY

Genesis 27 in the HNT

Genesis 27 in the IRVA

Genesis 27 in the IRVB

Genesis 27 in the IRVG

Genesis 27 in the IRVH

Genesis 27 in the IRVK

Genesis 27 in the IRVM

Genesis 27 in the IRVM2

Genesis 27 in the IRVO

Genesis 27 in the IRVP

Genesis 27 in the IRVT

Genesis 27 in the IRVT2

Genesis 27 in the IRVU

Genesis 27 in the ISVN

Genesis 27 in the JSNT

Genesis 27 in the KAPI

Genesis 27 in the KBT1ETNIK

Genesis 27 in the KBV

Genesis 27 in the KJV

Genesis 27 in the KNFD

Genesis 27 in the LBA

Genesis 27 in the LBLA

Genesis 27 in the LNT

Genesis 27 in the LSV

Genesis 27 in the MAAL

Genesis 27 in the MBV

Genesis 27 in the MBV2

Genesis 27 in the MHNT

Genesis 27 in the MKNFD

Genesis 27 in the MNG

Genesis 27 in the MNT

Genesis 27 in the MNT2

Genesis 27 in the MRS1T

Genesis 27 in the NAA

Genesis 27 in the NASB

Genesis 27 in the NBLA

Genesis 27 in the NBS

Genesis 27 in the NBVTP

Genesis 27 in the NET2

Genesis 27 in the NIV11

Genesis 27 in the NNT

Genesis 27 in the NNT2

Genesis 27 in the NNT3

Genesis 27 in the PDDPT

Genesis 27 in the PFNT

Genesis 27 in the RMNT

Genesis 27 in the SBIAS

Genesis 27 in the SBIBS

Genesis 27 in the SBIBS2

Genesis 27 in the SBICS

Genesis 27 in the SBIDS

Genesis 27 in the SBIGS

Genesis 27 in the SBIHS

Genesis 27 in the SBIIS

Genesis 27 in the SBIIS2

Genesis 27 in the SBIIS3

Genesis 27 in the SBIKS

Genesis 27 in the SBIKS2

Genesis 27 in the SBIMS

Genesis 27 in the SBIOS

Genesis 27 in the SBIPS

Genesis 27 in the SBISS

Genesis 27 in the SBITS

Genesis 27 in the SBITS2

Genesis 27 in the SBITS3

Genesis 27 in the SBITS4

Genesis 27 in the SBIUS

Genesis 27 in the SBIVS

Genesis 27 in the SBT

Genesis 27 in the SBT1E

Genesis 27 in the SCHL

Genesis 27 in the SNT

Genesis 27 in the SUSU

Genesis 27 in the SUSU2

Genesis 27 in the SYNO

Genesis 27 in the TBIAOTANT

Genesis 27 in the TBT1E

Genesis 27 in the TBT1E2

Genesis 27 in the TFTIP

Genesis 27 in the TFTU

Genesis 27 in the TGNTATF3T

Genesis 27 in the THAI

Genesis 27 in the TNFD

Genesis 27 in the TNT

Genesis 27 in the TNTIK

Genesis 27 in the TNTIL

Genesis 27 in the TNTIN

Genesis 27 in the TNTIP

Genesis 27 in the TNTIZ

Genesis 27 in the TOMA

Genesis 27 in the TTENT

Genesis 27 in the UBG

Genesis 27 in the UGV

Genesis 27 in the UGV2

Genesis 27 in the UGV3

Genesis 27 in the VBL

Genesis 27 in the VDCC

Genesis 27 in the YALU

Genesis 27 in the YAPE

Genesis 27 in the YBVTP

Genesis 27 in the ZBP