Nehemiah 12 (BOLCB2)

1 Tala Banganga-Nzambe mpe Balevi oyo bawutaki na bowumbu elongo na Zorobabeli, mwana mobali ya Shealitieli, mpe Jozue : Seraya, Jeremi, Esidrasi, 2 Amaria, Maluki, Atushi, 3 Shekania, Rewumi, Meremoti, 4 Ido, Ginetoyi, Abiya, 5 Miyamini, Maadia, Biliga, 6 Shemaya, Yoyaribi, Yedaeya, 7 Salu, Amoki, Ilikia, Yedaeya. Bango nde bazalaki bakambi ya Banganga-Nzambe elongo na baninga na bango na tango ya Jozue. 8 Kati na Balevi, ezalaki na Jozue, Binuwi, Kadimieli, Sherebia, Yuda mpe Matania oyo, elongo na baninga na ye ya mosala, azalaki mokambi ya banzembo ya matondi. 9 Bakibukia mpe Uni, baninga na bango ya mosala, bazalaki kosala mosala na bango na ngambo mosusu. 10 Jozue abotaki Yoakimi,Yoakimi abotaki Eliashibi,Eliashibi abotaki Yoyada, 11 Yoyada abotaki Jonatan,Jonatan abotaki Yaduwa. 12 Tala bato oyo bazalaki bakambi ya mabota ya Banganga-Nzambe tango Yoakimi azalaki mokonzi : mpo na libota ya Seraya~: Meraya~;mpo na libota ya Jeremi~: Anania~; 13 mpo na libota ya Esidrasi : Meshulami ;mpo na libota ya Amaria~: Yoanani~; 14 mpo na libota ya Meluki : Jonatan ;mpo na libota ya Shebania~: Jozefi~; 15 mpo na libota ya Arimi : Adina ;mpo na libota ya Merayoti~: Elikayi~; 16 mpo na libota ya Ido : Zakari ;mpo na libota ya Ginetoni~: Meshulami~; 17 mpo na libota ya Abiya : Zikiri ;mpo na libota ya Minyamini~: Moadia, Pilitayi~; 18 mpo na libota ya Biliga : Shamuwa ;mpo na libota ya Shemaya~: Jonatan~; 19 mpo na libota ya Yoyaribi : Matinayi ;mpo na libota ya Yedaeya~: Uzi~; 20 mpo na libota ya Salu : Kalayi ;mpo na libota ya Amoki~: Eberi~; 21 mpo na libota ya Ilikia : Ashabia ;mpo na libota ya Yedaeya~: Netaneeli. 22 Na tango ya Eliashibi, Yoyada, Yoanani mpe Yaduwa, bakomaki bakombo ya Balevi oyo bazalaki bakambi ya mabota mpe bakombo ya Banganga-Nzambe na tango ya Dariusi, mokonzi ya Persi. 23 Bakomaki bakombo ya bakitani ya Levi oyo bazalaki bakambi ya mabota kino na tango ya Yoanani, mwana mobali ya Eliashibi, kati na buku ya bokoko. 24 Tala bato oyo bazalaki bakambi ya Balevi : Ashabia, Sherebia mpe Jozue, mwana mobali ya Kadimieli, mpe baninga na bango ya mosala. Batelemaki boye : bamoko bazalaki kotalana na bamosusu, mpo na kokumisa mpe kosanzola Yawe kolanda mitindo ya Davidi, moto na Nzambe. Soki bamoko batindi mongongo, bamosusu bazalaki kozongisa. 25 Matania, Bakibukia, Abidiasi, Meshulami, Talimoni mpe Akubi, bazalaki bakengeli ya bibombelo oyo ezalaki pene ya bikuke ya Ndako ya Nzambe. 26 Bazalaki kosala mosala na bango na tango ya Yoakimi, mwana mobali ya Jozue mpe koko ya Yotsadaki, mpe na tango ya moyangeli Neyemi mpe Esidrasi, molakisi ya Mobeko mpe Nganga-Nzambe. 27 Tango babulisaki mir ya Yelusalemi, babengisaki Balevi na Yelusalemi longwa na bisika oyo bazalaki kovanda, mpo na kosepela na esengo makasi feti ya libulisi na nzela ya banzembo ya kozongisa matondi epai ya Nzambe mpe na nzela ya mindule ya manzanza, ya lindanda mpe ya lire. 28 Babengisaki lisusu bayembi longwa na etuka oyo ezalaki zingazinga ya Yelusalemi, longwa na bamboka mike-mike ya bato ya Netofa, 29 longwa na Beti-Giligali mpe longwa na etuka ya Geba mpe ya Azimaveti, pamba te bayembi batongaki bamboka na bango ya mike-mike zingazinga ya Yelusalemi. 30 Tango Banganga-Nzambe mpe Balevi bamipetolaki, bapetolaki mpe bato, bikuke mpe mir. 31 Namatisaki bakambi ya Yuda likolo ya mir mpe nasalaki masanga mibale ya bayembi mpo na kotonda Nzambe. Lisanga ya liboso ezalaki kotambola na likolo ya mir na ngambo ya loboko ya mobali, na nzela ya Ekuke ya Fulu. 32 Na sima na bango, bato oyo bazalaki kolanda : Oze mpe ndambo ya bakambi ya Yuda, 33 Azaria, Esidrasi, Meshulami, 34 Yuda, Benjame, Shemaya, Jeremi, 35 ndambo ya Banganga-Nzambe oyo bazalaki na bakelelo na bango, Zakari, mwana mobali ya Jonatan, mwana mobali ya Shemaya, mwana mobali ya Matania, mwana mobali ya Mishe, mwana mobali ya Zakuri, mwana mobali ya Azafi ; 36 mpe baninga na ye ya mosala : Shemaya, Azareyeli, Milalayi, Gilalayi, Mayi, Netaneeli, Yuda mpe Anani, oyo bazalaki kobeta bibetelo mindule oyo Davidi, moto na Nzambe, atindaki. Esidrasi, molakisi ya Mobeko, azalaki liboso na bango. 37 Na Ekuke ya Etima, liboso na bango, bamataki bibutelo oyo ezalaki komema na engumba ya Davidi, na esika oyo bamatelaka na mir, mpe balekaki likolo ya ndako ya Davidi kino na Ekuke ya Mayi, na ngambo ya este. 38 Lisanga ya mibale ya bayembi ezalaki kotambola na nzela ya ngambo ya loboko ya mwasi. Nazalaki kolanda bango na likolo ya mir elongo na ndambo ya bato, longwa na ndako molayi ya Fulu kino na mir ya monene, 39 na likolo ya Ekuke ya Efrayimi, ya Ekuke ya Yelusalemi, ya Ekuke ya Mbisi, ya ndako molayi, ya Ananeyeli mpe ya ndako molayi ya Meya kino na Ekuke ya Bameme. Basukelaki na Ekuke ya Boloko. 40 Masanga nyonso mibale ya bayembi, oyo ezalaki kotonda Nzambe ezwaki esika kati na Tempelo ya Nzambe. Nasalaki mpe lolenge moko mpo na kati-kati ya bakambi ya bato 41 mpe mpo na Banganga-Nzambe oyo : Eliakimi, Maaseya, Minyamini, Mishe, Eliowenayi, Zakari mpe Anania oyo bamemaki bakelelo na bango. 42 Ezalaki mpe na Maaseya, Shemaya, Eleazari, Uzi, Yoanani, Malikiya, Elami mpe Ezeri. Masanga ya bayembi ezalaki koyemba na mongongo makasi na bokambami ya Yiziraya. 43 Na mokolo wana, bato babonzaki bambeka ebele mpe bazalaki na esengo mpo ete Nzambe apesaki bango esengo monene. Bongo ezala basi mpe bana, batondaki na esengo mpe koganga ya esengo ya Yelusalemi ezalaki koyokana kino na mosika. 44 Na tango wana, baponaki mibali mpe bapesaki bango mokumba ya kobatela bibombelo ya makabo, ya bambuma ya liboso mpe ya biteni ya zomi ; bapesaki bango mpe mokumba ya kokongola biloko oyo Mobeko ekataki ete ezali mpo na Banganga-Nzambe mpe Balevi, biloko yango esengeli kowuta na bilanga oyo ezingeli bingumba. Solo, bato ya Yuda bazalaki kosepela makasi komona ete Banganga-Nzambe mpe Balevi bazongeli penza mosala na bango, 45 bazali kosala mosala ya Nzambe na bango mpe mosala ya kopetola, mpe bayembi elongo na bakengeli bikuke bazali kosala mosala na bango kolanda mitindo ya Davidi mpe ya Salomo, mwana na ye ya mobali. 46 Na tango ya Davidi mpe ya Azafi, ezalaki na bakambi ya babeti mindule mpe ya banzembo mpo na kokumisa mpe kozongisa matondi epai ya Nzambe. 47 Na tango ya Zorobabeli mpe ya Neyemi, bato nyonso ya Isalaele bazalaki kopesa, mikolo nyonso, biloko oyo ekatama mpo na babeti mindule mpe bakengeli bikuke ; bazalaki mpe kopesa biloko ya bule epai ya Balevi, bongo Balevi mpe, na ngambo na bango, bazalaki kopesa biloko ya bule epai ya bakitani ya Aron.

In Other Versions

Nehemiah 12 in the ANGEFD

Nehemiah 12 in the ANTPNG2D

Nehemiah 12 in the AS21

Nehemiah 12 in the BAGH

Nehemiah 12 in the BBPNG

Nehemiah 12 in the BBT1E

Nehemiah 12 in the BDS

Nehemiah 12 in the BEV

Nehemiah 12 in the BHAD

Nehemiah 12 in the BIB

Nehemiah 12 in the BLPT

Nehemiah 12 in the BNT

Nehemiah 12 in the BNTABOOT

Nehemiah 12 in the BNTLV

Nehemiah 12 in the BOATCB

Nehemiah 12 in the BOATCB2

Nehemiah 12 in the BOBCV

Nehemiah 12 in the BOCNT

Nehemiah 12 in the BOECS

Nehemiah 12 in the BOGWICC

Nehemiah 12 in the BOHCB

Nehemiah 12 in the BOHCV

Nehemiah 12 in the BOHLNT

Nehemiah 12 in the BOHNTLTAL

Nehemiah 12 in the BOICB

Nehemiah 12 in the BOILNTAP

Nehemiah 12 in the BOITCV

Nehemiah 12 in the BOKCV

Nehemiah 12 in the BOKCV2

Nehemiah 12 in the BOKHWOG

Nehemiah 12 in the BOKSSV

Nehemiah 12 in the BOLCB

Nehemiah 12 in the BOMCV

Nehemiah 12 in the BONAV

Nehemiah 12 in the BONCB

Nehemiah 12 in the BONLT

Nehemiah 12 in the BONUT2

Nehemiah 12 in the BOPLNT

Nehemiah 12 in the BOSCB

Nehemiah 12 in the BOSNC

Nehemiah 12 in the BOTLNT

Nehemiah 12 in the BOVCB

Nehemiah 12 in the BOYCB

Nehemiah 12 in the BPBB

Nehemiah 12 in the BPH

Nehemiah 12 in the BSB

Nehemiah 12 in the CCB

Nehemiah 12 in the CUV

Nehemiah 12 in the CUVS

Nehemiah 12 in the DBT

Nehemiah 12 in the DGDNT

Nehemiah 12 in the DHNT

Nehemiah 12 in the DNT

Nehemiah 12 in the ELBE

Nehemiah 12 in the EMTV

Nehemiah 12 in the ESV

Nehemiah 12 in the FBV

Nehemiah 12 in the FEB

Nehemiah 12 in the GGMNT

Nehemiah 12 in the GNT

Nehemiah 12 in the HARY

Nehemiah 12 in the HNT

Nehemiah 12 in the IRVA

Nehemiah 12 in the IRVB

Nehemiah 12 in the IRVG

Nehemiah 12 in the IRVH

Nehemiah 12 in the IRVK

Nehemiah 12 in the IRVM

Nehemiah 12 in the IRVM2

Nehemiah 12 in the IRVO

Nehemiah 12 in the IRVP

Nehemiah 12 in the IRVT

Nehemiah 12 in the IRVT2

Nehemiah 12 in the IRVU

Nehemiah 12 in the ISVN

Nehemiah 12 in the JSNT

Nehemiah 12 in the KAPI

Nehemiah 12 in the KBT1ETNIK

Nehemiah 12 in the KBV

Nehemiah 12 in the KJV

Nehemiah 12 in the KNFD

Nehemiah 12 in the LBA

Nehemiah 12 in the LBLA

Nehemiah 12 in the LNT

Nehemiah 12 in the LSV

Nehemiah 12 in the MAAL

Nehemiah 12 in the MBV

Nehemiah 12 in the MBV2

Nehemiah 12 in the MHNT

Nehemiah 12 in the MKNFD

Nehemiah 12 in the MNG

Nehemiah 12 in the MNT

Nehemiah 12 in the MNT2

Nehemiah 12 in the MRS1T

Nehemiah 12 in the NAA

Nehemiah 12 in the NASB

Nehemiah 12 in the NBLA

Nehemiah 12 in the NBS

Nehemiah 12 in the NBVTP

Nehemiah 12 in the NET2

Nehemiah 12 in the NIV11

Nehemiah 12 in the NNT

Nehemiah 12 in the NNT2

Nehemiah 12 in the NNT3

Nehemiah 12 in the PDDPT

Nehemiah 12 in the PFNT

Nehemiah 12 in the RMNT

Nehemiah 12 in the SBIAS

Nehemiah 12 in the SBIBS

Nehemiah 12 in the SBIBS2

Nehemiah 12 in the SBICS

Nehemiah 12 in the SBIDS

Nehemiah 12 in the SBIGS

Nehemiah 12 in the SBIHS

Nehemiah 12 in the SBIIS

Nehemiah 12 in the SBIIS2

Nehemiah 12 in the SBIIS3

Nehemiah 12 in the SBIKS

Nehemiah 12 in the SBIKS2

Nehemiah 12 in the SBIMS

Nehemiah 12 in the SBIOS

Nehemiah 12 in the SBIPS

Nehemiah 12 in the SBISS

Nehemiah 12 in the SBITS

Nehemiah 12 in the SBITS2

Nehemiah 12 in the SBITS3

Nehemiah 12 in the SBITS4

Nehemiah 12 in the SBIUS

Nehemiah 12 in the SBIVS

Nehemiah 12 in the SBT

Nehemiah 12 in the SBT1E

Nehemiah 12 in the SCHL

Nehemiah 12 in the SNT

Nehemiah 12 in the SUSU

Nehemiah 12 in the SUSU2

Nehemiah 12 in the SYNO

Nehemiah 12 in the TBIAOTANT

Nehemiah 12 in the TBT1E

Nehemiah 12 in the TBT1E2

Nehemiah 12 in the TFTIP

Nehemiah 12 in the TFTU

Nehemiah 12 in the TGNTATF3T

Nehemiah 12 in the THAI

Nehemiah 12 in the TNFD

Nehemiah 12 in the TNT

Nehemiah 12 in the TNTIK

Nehemiah 12 in the TNTIL

Nehemiah 12 in the TNTIN

Nehemiah 12 in the TNTIP

Nehemiah 12 in the TNTIZ

Nehemiah 12 in the TOMA

Nehemiah 12 in the TTENT

Nehemiah 12 in the UBG

Nehemiah 12 in the UGV

Nehemiah 12 in the UGV2

Nehemiah 12 in the UGV3

Nehemiah 12 in the VBL

Nehemiah 12 in the VDCC

Nehemiah 12 in the YALU

Nehemiah 12 in the YAPE

Nehemiah 12 in the YBVTP

Nehemiah 12 in the ZBP