Numbers 14 (BOLCB2)

1 Bato nyonso ya lisanga batombolaki mingongo na bango mpe bakomaki kolela makasi butu mobimba. 2 Bato nyonso ya Isalaele bakomaki koyimayima mpo na Moyize mpe Aron, mpe lisanga mobimba ekomaki koloba : « Ah, elingaki kozala malamu soki tomikufelaki na biso na Ejipito to na esobe ! 3 Boni, Yawe amemi biso na mokili oyo kaka mpo ete tokufa na mopanga ? Boye basi mpe bana na biso bakokoma kaka bomengo ya bitumba. Ekozala malamu te mpo na biso ete tozonga na biso na Ejipito ? » 4 Boye bakomaki kolobana bango na bango : « Tosengeli kopona mokambi mosusu mpe kozonga na Ejipito. » 5 Moyize mpe Aron bakweyaki elongi kino na mabele liboso ya lisanga mobimba ya bana ya Isalaele oyo basanganaki kuna. 6 Jozue, mwana mobali ya Nuni, mpe Kalebi, mwana mobali ya Yefune, oyo bazalaki na molongo ya bato oyo bakendeki kononga mokili bapasolaki bilamba na bango 7 mpe balobaki na lisanga mobimba ya Isalaele : « Mokili oyo totambolaki kati na yango mpe tonongaki ezali malamu mingi penza. 8 Soki tozwi ngolu na miso ya Yawe, akokamba biso kino na mokili yango, mokili oyo ezali kobimisa miliki mpe mafuta ya nzoyi, mpe akopesa biso yango. 9 Kasi botombokela Yawe te mpe bobanga te bato oyo bazali na mokili yango, pamba te tokomela bango ; kobatelama na bango elongwe kati na bango. Nzokande na ngambo na biso, Yawe azali elongo na biso. Bobanga bango te. » 10 Wana lisanga mobimba ya Isalaele ezalaki koloba ete baboma bango na mabanga, nkembo ya Yawe emonanaki na Ndako ya kapo ya Bokutani na miso ya bato nyonso ya Isalaele. 11 Yawe alobaki na Moyize :— Kino tango nini bato oyo bakotiola Ngai ? Kino tango nini bakoboya penza kondimela Ngai, ezala mpo na bikamwa nyonso oyo nasali kati na bango ? 12 Nakokweyisa bango na nzela ya etumbu ya bokono oyo ebomaka mpo na kobebisa bango. Kasi yo, nakokomisa yo ekolo moko monene mpe ya nguya koleka bango. 13 Moyize alobaki na Yawe :— Bato ya Ejipito bakoyoka yango ! Nzokande ezali na nguya na Yo nde obimisaki bato oyo kati na bango. 14 Mpe bakoyebisa na bavandi ya mokili oyo makambo yango. Oh Yawe, basila koyoka wuta kala ete ozalaka elongo na bato oyo, ete Yo, oh Yawe, omimonisaki epai na bango miso na miso, ete lipata na Yo etelema likolo na bango, ete otambolaka liboso na bango kati na likonzi ya lipata, na moyi, mpe kati na likonzi ya moto, na butu. 15 Na bongo, soki obomi bato oyo nyonso na mbala moko, bikolo oyo eyokaki sango oyo mpo na Yo ekoloba : 16 « Yawe azangaki penza makoki ya kokotisa bato oyo na mokili oyo alakaki, na nzela ya ndayi, ete akopesa bango yango, yango wana abomaki bango kati na esobe. » 17 Sik’oyo, nabondeli Yo, tika ete makasi ya Nkolo emonisama na nguya na yango kolanda ndenge olobaki : 18 « Nazali Yawe oyo asilikaka noki te, atonda na bolingo, alimbisaka masumu mpe botomboki ; kasi apesaka moto oyo asali mabe etumbu, apesaka bana etumbu mpo na masumu ya batata kino na molongo ya misato mpe ya minei. » 19 Nabondeli Yo, kolanda bolingo monene na Yo, limbisa masumu ya bato oyo ndenge kaka olimbisaki bango wuta babimaki na Ejipito kino sik’oyo. 20 Yawe azongisaki :— Nalimbisi bango ndenge osengi. 21 Kasi na Kombo na Ngai, mpe lokola mokili mobimba etondi na nkembo ya Yawe, 22 moko te kati na bato oyo bamonaki nkembo na Ngai mpe bikamwa oyo nasalaki kati na Ejipito mpe na esobe kasi baboyaki kotosa Ngai mpe bamekaki Ngai mbala zomi, 23 moko te kati na bango akomona lisusu mokili oyo nalakaki na nzela na ndayi epai ya bakoko na bango, moko te kati na ba-oyo batiolaki Ngai akomona lisusu mokili yango. 24 Kasi lokola Kalebi, mosali na Ngai, atambolisamaka na molimo mosusu mpe atamboli na bosembo na miso na Ngai, nakokotisa ye na mokili oyo asilaki kokende, mpe bakitani na ye bakokamata yango lokola libula. 25 Lokola bato ya Amaleki mpe ya Kanana bazali nanu kovanda na lubwaku, bino bokobaluka mpe bokozonga lobi na tongo na esobe, na nzela oyo ekenda na ebale monene ya Barozo. 26 Yawe alobaki na Moyize mpe Aron : 27 — Kino penza tango nini lisanga oyo ya batomboki ekokoba kotelemela Ngai ? Solo, nayoki bileli mpe koyimayima ya bana ya Isalaele na tina na Ngai. 28 Yebisa bango : « Nalapi ndayi, » elobi Yawe, « nakosalela bino makambo nyonso oyo nayoki bino koloba. 29 Bibembe na bino ekolala na esobe oyo. Bino nyonso oyo bozali na mibu tuku mibale mpe koleka, bino oyo botangamaki na motango mpe boyimaki-yimaki mpo na Ngai, 30 bokokota te na mokili oyo nalakaki na nzela ya ndayi, na kotombola loboko, ete nakokomisa yango mokili na bino, longola kaka Kalebi, mwana mobali ya Yefune, mpe Jozue, mwana mobali ya Nuni. 31 Kasi nakomema bana na bino oyo na tina na bango bolobaki ete bakozwa bango lokola bomengo ya bitumba, mpe nakokotisa bango na esengo kati na mokili yango oyo botiolaki. 32 Nzokande bino, bibembe na bino ekolala na esobe oyo. 33 Bana na bino bakokoma babateli bibwele awa na esobe mibu tuku minei. Lokola botamboli na bosembo te na miso na Ngai, bakomona pasi kino ebembe na bino ya suka elala na esobe. 34 Lokola bosalaki mikolo tuku minei mpo na kononga mokili, bokomona pasi mibu tuku minei mpo na masumu na bino : mobu moko mpo na mokolo moko. Na bongo bokoyeba mbano oyo ezali kati na likambo ya kotelemela Ngai. 35 Ngai Yawe nde nalobi ; mpe nakosala solo makambo oyo epai ya lisanga oyo mobimba ya batomboki oyo basanganaki mpo na kotelemela Ngai. Bakomona suka na bango kati na esobe oyo ; ezali awa nde bakokufa. » 36 Bato oyo Moyize atindaki mpo na kononga mokili mpe, na bozongi na bango, batindikaki lisanga mobimba na koyimayima na tina na ye wana bapanzaki sango mabe na tina na mokili ; 37 bato oyo babimisaki maloba mabe na tina na mokili yango, bazwaki etumbu mpe bakufaki liboso ya Yawe. 38 Kati na bato oyo bakendeki kononga mokili, kaka Jozue, mwana mobali ya Nuni, mpe Kalebi, mwana mobali ya Yefune, nde babikaki. 39 Tango Moyize ayebisaki makambo oyo epai ya bato nyonso ya Isalaele, balelaki makasi. 40 Na tongo-tongo ya mokolo oyo elandaki, bamataki na songe ya ngomba kati na etuka ya bangomba mpe balobaki :— Solo, tosalaki masumu ; kasi sik’oyo, tozali kokende kuna, na esika oyo Yawe alakaki biso. 41 Kasi Moyize alobaki :— Mpo na nini bozali koboya kotosa mitindo ya Yawe ? Likambo oyo ekolonga te ! 42 Bokende te, pamba te Yawe azali elongo na bino te ; banguna na bino bakolonga bino. 43 Bato ya Amaleki mpe ya Kanana bakokutana na bino kuna. Bongo lokola bopesaki Yawe mokongo, bokokweya na mopanga mpo ete akozala elongo na bino te. 44 Na lolendo na bango, bakendeki kaka na songe ya ngomba kati na etuka ya bangomba ; kasi Moyize alongwaki te na molako, ndenge moko mpe mpo na Sanduku ya Boyokani ya Yawe. 45 Boye, bato ya Amaleki mpe ya Kanana oyo bazalaki kovanda na bangomba yango bakitelaki bango, babundisaki bango, balongaki bango mpe balandaki bango kino na Orima.

In Other Versions

Numbers 14 in the ANGEFD

Numbers 14 in the ANTPNG2D

Numbers 14 in the AS21

Numbers 14 in the BAGH

Numbers 14 in the BBPNG

Numbers 14 in the BBT1E

Numbers 14 in the BDS

Numbers 14 in the BEV

Numbers 14 in the BHAD

Numbers 14 in the BIB

Numbers 14 in the BLPT

Numbers 14 in the BNT

Numbers 14 in the BNTABOOT

Numbers 14 in the BNTLV

Numbers 14 in the BOATCB

Numbers 14 in the BOATCB2

Numbers 14 in the BOBCV

Numbers 14 in the BOCNT

Numbers 14 in the BOECS

Numbers 14 in the BOGWICC

Numbers 14 in the BOHCB

Numbers 14 in the BOHCV

Numbers 14 in the BOHLNT

Numbers 14 in the BOHNTLTAL

Numbers 14 in the BOICB

Numbers 14 in the BOILNTAP

Numbers 14 in the BOITCV

Numbers 14 in the BOKCV

Numbers 14 in the BOKCV2

Numbers 14 in the BOKHWOG

Numbers 14 in the BOKSSV

Numbers 14 in the BOLCB

Numbers 14 in the BOMCV

Numbers 14 in the BONAV

Numbers 14 in the BONCB

Numbers 14 in the BONLT

Numbers 14 in the BONUT2

Numbers 14 in the BOPLNT

Numbers 14 in the BOSCB

Numbers 14 in the BOSNC

Numbers 14 in the BOTLNT

Numbers 14 in the BOVCB

Numbers 14 in the BOYCB

Numbers 14 in the BPBB

Numbers 14 in the BPH

Numbers 14 in the BSB

Numbers 14 in the CCB

Numbers 14 in the CUV

Numbers 14 in the CUVS

Numbers 14 in the DBT

Numbers 14 in the DGDNT

Numbers 14 in the DHNT

Numbers 14 in the DNT

Numbers 14 in the ELBE

Numbers 14 in the EMTV

Numbers 14 in the ESV

Numbers 14 in the FBV

Numbers 14 in the FEB

Numbers 14 in the GGMNT

Numbers 14 in the GNT

Numbers 14 in the HARY

Numbers 14 in the HNT

Numbers 14 in the IRVA

Numbers 14 in the IRVB

Numbers 14 in the IRVG

Numbers 14 in the IRVH

Numbers 14 in the IRVK

Numbers 14 in the IRVM

Numbers 14 in the IRVM2

Numbers 14 in the IRVO

Numbers 14 in the IRVP

Numbers 14 in the IRVT

Numbers 14 in the IRVT2

Numbers 14 in the IRVU

Numbers 14 in the ISVN

Numbers 14 in the JSNT

Numbers 14 in the KAPI

Numbers 14 in the KBT1ETNIK

Numbers 14 in the KBV

Numbers 14 in the KJV

Numbers 14 in the KNFD

Numbers 14 in the LBA

Numbers 14 in the LBLA

Numbers 14 in the LNT

Numbers 14 in the LSV

Numbers 14 in the MAAL

Numbers 14 in the MBV

Numbers 14 in the MBV2

Numbers 14 in the MHNT

Numbers 14 in the MKNFD

Numbers 14 in the MNG

Numbers 14 in the MNT

Numbers 14 in the MNT2

Numbers 14 in the MRS1T

Numbers 14 in the NAA

Numbers 14 in the NASB

Numbers 14 in the NBLA

Numbers 14 in the NBS

Numbers 14 in the NBVTP

Numbers 14 in the NET2

Numbers 14 in the NIV11

Numbers 14 in the NNT

Numbers 14 in the NNT2

Numbers 14 in the NNT3

Numbers 14 in the PDDPT

Numbers 14 in the PFNT

Numbers 14 in the RMNT

Numbers 14 in the SBIAS

Numbers 14 in the SBIBS

Numbers 14 in the SBIBS2

Numbers 14 in the SBICS

Numbers 14 in the SBIDS

Numbers 14 in the SBIGS

Numbers 14 in the SBIHS

Numbers 14 in the SBIIS

Numbers 14 in the SBIIS2

Numbers 14 in the SBIIS3

Numbers 14 in the SBIKS

Numbers 14 in the SBIKS2

Numbers 14 in the SBIMS

Numbers 14 in the SBIOS

Numbers 14 in the SBIPS

Numbers 14 in the SBISS

Numbers 14 in the SBITS

Numbers 14 in the SBITS2

Numbers 14 in the SBITS3

Numbers 14 in the SBITS4

Numbers 14 in the SBIUS

Numbers 14 in the SBIVS

Numbers 14 in the SBT

Numbers 14 in the SBT1E

Numbers 14 in the SCHL

Numbers 14 in the SNT

Numbers 14 in the SUSU

Numbers 14 in the SUSU2

Numbers 14 in the SYNO

Numbers 14 in the TBIAOTANT

Numbers 14 in the TBT1E

Numbers 14 in the TBT1E2

Numbers 14 in the TFTIP

Numbers 14 in the TFTU

Numbers 14 in the TGNTATF3T

Numbers 14 in the THAI

Numbers 14 in the TNFD

Numbers 14 in the TNT

Numbers 14 in the TNTIK

Numbers 14 in the TNTIL

Numbers 14 in the TNTIN

Numbers 14 in the TNTIP

Numbers 14 in the TNTIZ

Numbers 14 in the TOMA

Numbers 14 in the TTENT

Numbers 14 in the UBG

Numbers 14 in the UGV

Numbers 14 in the UGV2

Numbers 14 in the UGV3

Numbers 14 in the VBL

Numbers 14 in the VDCC

Numbers 14 in the YALU

Numbers 14 in the YAPE

Numbers 14 in the YBVTP

Numbers 14 in the ZBP