1 Kings 10 (BOLCB2)

1 Tango mwasi mokonzi ya Saba ayokaki sango ya lokumu oyo Kombo ya Yawe epesaki Salomo, ayaki mpo na komeka ye na nzela ya mituna ya makasi ; 2 ayaki na Yelusalemi elongo na bato ebele mpe bashamo oyo ememaki biloko ya mike-mike oyo epesaka solo kitoko, wolo ebele mpe mabanga ya talo. Tango akomaki epai ya Salomo, ayebisaki ye nyonso oyo azalaki na yango kati na motema. 3 Salomo apesaki ye biyano na mituna na ye nyonso, ezalaki ata na motuna moko te oyo mokonzi alongaki te kopesa eyano. 4 Tango mwasi mokonzi ya Saba amonaki bwanya nyonso ya Salomo, ndako oyo atongaki, 5 bilei oyo azalaki kolia na mesa na ye, ndako ya basali na ye, esaleli mpe elateli ya basali na ye, basali oyo bapesaka ye masanga mpe bambeka ya kotumba oyo azalaki kobonza kati na Tempelo ya Yawe, mwasi mokonzi ya Saba akamwaki makasi 6 mpe alobaki na mokonzi : « Makambo oyo nayokaki wuta na mokili na ngai na tina na misala na yo mpe na bwanya na yo ezali ya solo. 7 Nandimaki te makambo oyo bazalaki koloba na tina na yango kino tango ngai moko nayei mpe namoni yango na miso na ngai moko. Nzokande, kolanda oyo ngai namoni, makambo oyo bayebisaki ngai te na tina na bwanya yango ezali penza kati-kati ! Solo, bwanya mpe bozwi na yo eleki sango ya lokumu oyo nayokaki na tina na yo. 8 Esengo na bato na yo, esengo na basali na yo, ba-oyo batelemaka tango nyonso liboso na yo mpe bayokaka maloba na yo, oyo etonda na bwanya ! 9 Tika ete Yawe, Nzambe na yo, apambolama ; Ye oyo asepelaki na yo mpe atiaki yo na kiti ya bokonzi ya Isalaele ! Ezali mpo ete Nzambe na yo alingaka Isalaele mpo na libela nde atiaki yo lokola mokonzi mpo ete osala na bosolo mpe na bosembo. » 10 Mwasi mokonzi ya Saba apesaki mokonzi Salomo bakilo nkoto misato na nkama mitano ya wolo, biloko ebele penza ya solo kitoko mpe mabanga ya talo. Batikala lisusu te komema biloko ebele ya solo kitoko lokola oyo mwasi mokonzi ya Saba amemelaki mokonzi Salomo. 11 Masuwa ya Irami oyo ememaki wolo wuta na Ofiri ememaki mpe mabaya ebele ya santale mpe mabanga ya talo. 12 Mokonzi asalaki na mabaya wana ya santale makonzi ya Tempelo ya Yawe mpe ya ndako ya mokonzi ; asalaki na yango mpe mandanda mpe makembe. Mabaya ya santale etikala lisusu koya te, mpe batikala lisusu komona yango te kino na mokolo ya lelo. 13 Na ngambo na ye, mokonzi Salomo mpe apesaki na mwasi mokonzi ya Saba biloko nyonso oyo azalaki na yango posa mpe oyo asengaki ; apesaki ye lisusu bakado oyo kaka mokonzi lokola Salomo akokaki kopesa. Sima na yango, mwasi mokonzi ya Saba azongaki elongo na basali na ye, na mokili na ye. 14 Mobu na mobu, Salomo azalaki kozwa bakilo ya wolo nkoto tuku mibale, 15 mbongo ya mpako ya bato ya mombongo oyo bazalaki koteka biloko oyo bazalaki kosomba na bamboka ya bapaya, mbongo ya mpako ya bateki biloko ya ndenge na ndenge, mbongo ya mpako oyo bakonzi nyonso ya Arabi bazalaki kofuta, mpe oyo bayangeli ya bituka bazalaki kokongola kati na mokili ya Isalaele. 16 Mokonzi Salomo asalisaki na wolo batuta banguba minene nkama mibale : nguba moko na moko esengaki bakilo motoba ya wolo. 17 Asalisaki lisusu na wolo batuta banguba mike nkama misato : nguba moko na moko ya moke esengaki kilo moko na bagrame nkama mitano ya wolo. Mokonzi atiaki yango kati na ndako na ye, oyo bazalaki kobenga « ndako ya zamba ya Libani. » 18 Mokonzi asalaki na pembe ya nzoko kiti moko monene ya bokonzi mpe abambaki yango wolo ya peto. 19 Kiti yango ya bokonzi ezalaki na ematelo ya binyatelo motoba mpe songe ya mokongo na yango ezalaki lokola libungutulu. Na bangambo nyonso mibale, ezalaki na bisika ya kotia maboko mpe bikeko mibale ya nkosi na pembeni ya bisika ya kotia maboko. 20 Bikeko zomi na mibale ya nkosi ezalaki na likolo ya binyatelo motoba ya ematelo : enyatelo moko na moko ezalaki na bikeko mibale, ekeko moko na ngambo moko na moko. Kati na mikili nyonso, eloko ya ndenge wana etikala nanu kosalema te. 21 Bakopo nyonso ya mokonzi Salomo ezalaki ya wolo ya peto, mpe biloko nyonso ya ndako ya Zamba ya Libani ezalaki ya wolo ya peto. Eloko moko te ezalaki ya palata, pamba te, na tango oyo Salomo azalaki mokonzi, palata ezalaki na motuya ata te. 22 Mpe mokonzi azalaki na bamasuwa oyo ezalaki kosala mombongo na ebale monene elongo na bamasuwa ya Irami. Sima na mibu nyonso misato, bamasuwa ezalaki kozonga longwa na Tarsisi mpe ezalaki komema wolo, palata, pembe ya nzoko, bamakaku mpe bandeke oyo babengaka « paoni. » 23 Mokonzi Salomo alekaki bakonzi nyonso ya mokili na bozwi mpe na bwanya. 24 Mokili mobimba ezalaki koluka kokutana na Salomo mpo na koyoka bwanya oyo Nzambe atiaki kati na motema na ye. 25 Kati na bato oyo bazalaki kokende kotala Salomo, moko na moko azalaki komemela ye lokola kado : biloko ya palata, biloko ya wolo, bilamba, bibundeli, biloko ya mike-mike ya solo kitoko, bampunda mpe bamile. Mpe ezalaki bongo mibu nyonso. 26 Salomo asangisaki bashar mpe basoda oyo batambolaka likolo ya bampunda : azalaki na bashar nkoto moko na nkama minei, mpe basoda oyo batambolaka likolo ya bampunda, nkoto zomi na mibale. Abombaki bango kati na bingumba epai wapi babombaka bashar, mpe na Yelusalemi epai wapi mokonzi azalaki kovanda. 27 Mokonzi asalaki ete palata ekoma ebele na Yelusalemi lokola mabanga, mpe banzete ya sedele ekoma ebele lokola banzete ya sikomori oyo ezali kati na mokili ya lubwaku. 28 Bampunda ya Salomo ezalaki kowuta na Ejipito mpe na engumba Kue. Bato ya mombongo ya mokonzi nde bazalaki kosomba yango kuna na engumba Kue. 29 Bazalaki kosomba na Ejipito shar moko na motuya ya mbongo ya bibende ya palata, nkama motoba, mpe mpunda moko na motuya ya mbongo ya bibende, nkama moko na tuku mitano ; bazalaki mpe kosomba yango mpo na bakonzi nyonso ya bato ya Iti mpe ya Siri.

In Other Versions

1 Kings 10 in the ANGEFD

1 Kings 10 in the ANTPNG2D

1 Kings 10 in the AS21

1 Kings 10 in the BAGH

1 Kings 10 in the BBPNG

1 Kings 10 in the BBT1E

1 Kings 10 in the BDS

1 Kings 10 in the BEV

1 Kings 10 in the BHAD

1 Kings 10 in the BIB

1 Kings 10 in the BLPT

1 Kings 10 in the BNT

1 Kings 10 in the BNTABOOT

1 Kings 10 in the BNTLV

1 Kings 10 in the BOATCB

1 Kings 10 in the BOATCB2

1 Kings 10 in the BOBCV

1 Kings 10 in the BOCNT

1 Kings 10 in the BOECS

1 Kings 10 in the BOGWICC

1 Kings 10 in the BOHCB

1 Kings 10 in the BOHCV

1 Kings 10 in the BOHLNT

1 Kings 10 in the BOHNTLTAL

1 Kings 10 in the BOICB

1 Kings 10 in the BOILNTAP

1 Kings 10 in the BOITCV

1 Kings 10 in the BOKCV

1 Kings 10 in the BOKCV2

1 Kings 10 in the BOKHWOG

1 Kings 10 in the BOKSSV

1 Kings 10 in the BOLCB

1 Kings 10 in the BOMCV

1 Kings 10 in the BONAV

1 Kings 10 in the BONCB

1 Kings 10 in the BONLT

1 Kings 10 in the BONUT2

1 Kings 10 in the BOPLNT

1 Kings 10 in the BOSCB

1 Kings 10 in the BOSNC

1 Kings 10 in the BOTLNT

1 Kings 10 in the BOVCB

1 Kings 10 in the BOYCB

1 Kings 10 in the BPBB

1 Kings 10 in the BPH

1 Kings 10 in the BSB

1 Kings 10 in the CCB

1 Kings 10 in the CUV

1 Kings 10 in the CUVS

1 Kings 10 in the DBT

1 Kings 10 in the DGDNT

1 Kings 10 in the DHNT

1 Kings 10 in the DNT

1 Kings 10 in the ELBE

1 Kings 10 in the EMTV

1 Kings 10 in the ESV

1 Kings 10 in the FBV

1 Kings 10 in the FEB

1 Kings 10 in the GGMNT

1 Kings 10 in the GNT

1 Kings 10 in the HARY

1 Kings 10 in the HNT

1 Kings 10 in the IRVA

1 Kings 10 in the IRVB

1 Kings 10 in the IRVG

1 Kings 10 in the IRVH

1 Kings 10 in the IRVK

1 Kings 10 in the IRVM

1 Kings 10 in the IRVM2

1 Kings 10 in the IRVO

1 Kings 10 in the IRVP

1 Kings 10 in the IRVT

1 Kings 10 in the IRVT2

1 Kings 10 in the IRVU

1 Kings 10 in the ISVN

1 Kings 10 in the JSNT

1 Kings 10 in the KAPI

1 Kings 10 in the KBT1ETNIK

1 Kings 10 in the KBV

1 Kings 10 in the KJV

1 Kings 10 in the KNFD

1 Kings 10 in the LBA

1 Kings 10 in the LBLA

1 Kings 10 in the LNT

1 Kings 10 in the LSV

1 Kings 10 in the MAAL

1 Kings 10 in the MBV

1 Kings 10 in the MBV2

1 Kings 10 in the MHNT

1 Kings 10 in the MKNFD

1 Kings 10 in the MNG

1 Kings 10 in the MNT

1 Kings 10 in the MNT2

1 Kings 10 in the MRS1T

1 Kings 10 in the NAA

1 Kings 10 in the NASB

1 Kings 10 in the NBLA

1 Kings 10 in the NBS

1 Kings 10 in the NBVTP

1 Kings 10 in the NET2

1 Kings 10 in the NIV11

1 Kings 10 in the NNT

1 Kings 10 in the NNT2

1 Kings 10 in the NNT3

1 Kings 10 in the PDDPT

1 Kings 10 in the PFNT

1 Kings 10 in the RMNT

1 Kings 10 in the SBIAS

1 Kings 10 in the SBIBS

1 Kings 10 in the SBIBS2

1 Kings 10 in the SBICS

1 Kings 10 in the SBIDS

1 Kings 10 in the SBIGS

1 Kings 10 in the SBIHS

1 Kings 10 in the SBIIS

1 Kings 10 in the SBIIS2

1 Kings 10 in the SBIIS3

1 Kings 10 in the SBIKS

1 Kings 10 in the SBIKS2

1 Kings 10 in the SBIMS

1 Kings 10 in the SBIOS

1 Kings 10 in the SBIPS

1 Kings 10 in the SBISS

1 Kings 10 in the SBITS

1 Kings 10 in the SBITS2

1 Kings 10 in the SBITS3

1 Kings 10 in the SBITS4

1 Kings 10 in the SBIUS

1 Kings 10 in the SBIVS

1 Kings 10 in the SBT

1 Kings 10 in the SBT1E

1 Kings 10 in the SCHL

1 Kings 10 in the SNT

1 Kings 10 in the SUSU

1 Kings 10 in the SUSU2

1 Kings 10 in the SYNO

1 Kings 10 in the TBIAOTANT

1 Kings 10 in the TBT1E

1 Kings 10 in the TBT1E2

1 Kings 10 in the TFTIP

1 Kings 10 in the TFTU

1 Kings 10 in the TGNTATF3T

1 Kings 10 in the THAI

1 Kings 10 in the TNFD

1 Kings 10 in the TNT

1 Kings 10 in the TNTIK

1 Kings 10 in the TNTIL

1 Kings 10 in the TNTIN

1 Kings 10 in the TNTIP

1 Kings 10 in the TNTIZ

1 Kings 10 in the TOMA

1 Kings 10 in the TTENT

1 Kings 10 in the UBG

1 Kings 10 in the UGV

1 Kings 10 in the UGV2

1 Kings 10 in the UGV3

1 Kings 10 in the VBL

1 Kings 10 in the VDCC

1 Kings 10 in the YALU

1 Kings 10 in the YAPE

1 Kings 10 in the YBVTP

1 Kings 10 in the ZBP