1 Samuel 4 (BOLCB2)

1 Mpe Samuele azalaki kokomisa maloba ya Yawe epai ya bato nyonso ya Isalaele.Na tango wana, bato ya Isalaele bakendeki kobundisa bato ya Filisitia. Bato ya Isalaele batongaki molako na bango na Ebeni-Ezeri, mpe bato ya Filisitia batongaki ya bango molako, na Afeki. 2 Bato ya Filisitia batandamaki mpo na kobundisa bato ya Isalaele. Mpe wana bitumba ekomaki makasi, bato ya Filisitia balongaki bato ya Isalaele mpe babomaki na bitumba yango basoda ya Isalaele, pene nkoto minei. 3 Tango basoda ya Isalaele bazongaki na molako, bampaka ya Isalaele batunaki :— Mpo na nini Yawe asali ete bato ya Filisitia balonga biso na mokolo ya lelo ? Tokende kozwa Sanduku ya Boyokani ya Yawe, na Silo, mpo ete eya kati na biso mpe ekangola biso na maboko ya banguna na biso. 4 Boye batindaki bato na Silo. Mpe longwa kuna, bamemaki Sanduku ya Boyokani ya Yawe, Mokonzi ya mampinga, oyo avandaka na kiti na Ye ya bokonzi kati na basheribe. Ofini mpe Fineasi, bana mibali mibale ya Eli, bazalaki wana elongo na Sanduku ya Boyokani ya Nzambe. 5 Tango kaka Sanduku ya Boyokani ya Yawe ekotaki na molako, bato nyonso ya Isalaele bagangaki na mongongo makasi, mpe mabele eninganaki. 6 Bato ya Filisitia bayokaki koganga wana mpe batunaki :— Koganga nyonso wana elakisi nini kati na molako ya Ba-Ebre ?Wana bayokaki sango ete Sanduku ya Yawe ekoti kati na molako, 7 bato ya Filisitia babangaki mpe balobaki :— Eh, tobebi na biso ! Nzambe akoti na molako ! Likambo ya boye nanu esalema te ! 8 Mawa na biso ! Nani akokangola biso na maboko ya Nzambe oyo ya nguya ? Ezali Nzambe wana nde abomaki bato ya Ejipito na nzela ya bitumbu ya ndenge na ndenge kati na esobe. 9 Bandeko bato ya Filisitia, boyika mpiko ! Bozala mibali, noki te bokokoma bawumbu ya Ba-Ebre ndenge bango bazalaki bawumbu na bino ! Bozala mibali mpe bobunda ! 10 Boye bato ya Filisitia babundisaki bato ya Isalaele mpe balongaki. Moto nyonso akimaki na ndako na ye ya kapo. Kokweyisama ya bato ya Isalaele ezalaki ya makasi penza : motango ya basoda ya Isalaele, oyo babundaka na makolo mpe bakufaki ezalaki nkoto tuku misato. 11 Bato ya Filisitia babotolaki Sanduku ya Nzambe, mpe bana mibali mibale ya Eli, Ofini mpe Fineasi, bakufaki. 12 Moto moko ya ekolo ya Benjame akimaki mbangu longwa na bisika oyo bazalaki kobunda mpe akomaki na Silo, na mokolo yango kaka ; azalaki na bilamba epasuka, mpe na putulu, na moto na ye. 13 Akomaki na tango oyo Eli azalaki ya kovanda na kiti, pembeni ya nzela, mpe azalaki kotala na ekenge, pamba te motema na ye ezalaki na kimia te na tina na Sanduku ya Nzambe. Bongo tango moto yango akotaki na engumba mpe apesaki sango ya makambo nyonso oyo ewutaki kosalema, engumba mobimba egangaki. 14 Tango Eli ayokaki koganga yango, atunaki :— Makelele oyo elakisi nini ?Mpe moto yango ayaki na lombangu kopesa sango epai ya Eli. 15 Nzokande Eli azalaki na mibu tuku libwa na mwambe ya mbotama ; miso na ye elembaki makasi, akokaki komona lisusu te. 16 Alobaki na Eli :— Nawuti na esika ya bitumba, nawuti kokima kuna kaka lelo.Eli atunaki ye :— Mwana na ngai, makambo nini eleki kuna ? 17 Moto oyo amemaki sango azongisaki :— Bato ya Isalaele bakimi liboso ya bato ya Filisitia, mpe ebele kati na bango bakufi ; ezala bana na yo mibale ya mibali, Ofini mpe Fineasi, bakufi. Bato ya Filisitia babotoli Sanduku ya Nzambe. 18 Tango kaka moto wana atangaki kombo ya Sanduku ya Nzambe, Eli akweyaki makalikali longwa na kiti na ye, pembeni ya ekuke ya Ndako ya Yawe, kingo na ye ebukanaki, mpe akufaki, pamba te azalaki mobange mpe nzoto minene. Akambaki Isalaele mibu tuku minei. 19 Bokilo na ye ya mwasi, mwasi ya Fineasi, azalaki na zemi mpe akomaki pembeni ya kobota. Tango kaka ayokaki sango ete babotoli Sanduku ya Nzambe, ete tata-bokilo na ye mpe mobali na ye bakufi, agunzamaki, abandaki mbala moko pasi ya kobota, mpe abotaki. 20 Lokola akomaki pene ya kokufa, basi oyo bazingelaki ye balobaki na ye :— Kobanga te ! Oboti mwana mobali !Kasi ye apesaki eyano moko te mpe atiaki makanisi na ye kuna te. 21 Apesaki mwana yango kombo « I-Kabodi » oyo elingi kolakisa : Nkembo elongwe na Isalaele !Atiaki makanisi na ye na Sanduku ya Nzambe, oyo babotoli, na tata-bokilo na ye mpe na mobali na ye, oyo bakufi. 22 Alobaki : « Nkembo elongwe na Isalaele, pamba te babotoli Sanduku ya Nzambe. »

In Other Versions

1 Samuel 4 in the ANGEFD

1 Samuel 4 in the ANTPNG2D

1 Samuel 4 in the AS21

1 Samuel 4 in the BAGH

1 Samuel 4 in the BBPNG

1 Samuel 4 in the BBT1E

1 Samuel 4 in the BDS

1 Samuel 4 in the BEV

1 Samuel 4 in the BHAD

1 Samuel 4 in the BIB

1 Samuel 4 in the BLPT

1 Samuel 4 in the BNT

1 Samuel 4 in the BNTABOOT

1 Samuel 4 in the BNTLV

1 Samuel 4 in the BOATCB

1 Samuel 4 in the BOATCB2

1 Samuel 4 in the BOBCV

1 Samuel 4 in the BOCNT

1 Samuel 4 in the BOECS

1 Samuel 4 in the BOGWICC

1 Samuel 4 in the BOHCB

1 Samuel 4 in the BOHCV

1 Samuel 4 in the BOHLNT

1 Samuel 4 in the BOHNTLTAL

1 Samuel 4 in the BOICB

1 Samuel 4 in the BOILNTAP

1 Samuel 4 in the BOITCV

1 Samuel 4 in the BOKCV

1 Samuel 4 in the BOKCV2

1 Samuel 4 in the BOKHWOG

1 Samuel 4 in the BOKSSV

1 Samuel 4 in the BOLCB

1 Samuel 4 in the BOMCV

1 Samuel 4 in the BONAV

1 Samuel 4 in the BONCB

1 Samuel 4 in the BONLT

1 Samuel 4 in the BONUT2

1 Samuel 4 in the BOPLNT

1 Samuel 4 in the BOSCB

1 Samuel 4 in the BOSNC

1 Samuel 4 in the BOTLNT

1 Samuel 4 in the BOVCB

1 Samuel 4 in the BOYCB

1 Samuel 4 in the BPBB

1 Samuel 4 in the BPH

1 Samuel 4 in the BSB

1 Samuel 4 in the CCB

1 Samuel 4 in the CUV

1 Samuel 4 in the CUVS

1 Samuel 4 in the DBT

1 Samuel 4 in the DGDNT

1 Samuel 4 in the DHNT

1 Samuel 4 in the DNT

1 Samuel 4 in the ELBE

1 Samuel 4 in the EMTV

1 Samuel 4 in the ESV

1 Samuel 4 in the FBV

1 Samuel 4 in the FEB

1 Samuel 4 in the GGMNT

1 Samuel 4 in the GNT

1 Samuel 4 in the HARY

1 Samuel 4 in the HNT

1 Samuel 4 in the IRVA

1 Samuel 4 in the IRVB

1 Samuel 4 in the IRVG

1 Samuel 4 in the IRVH

1 Samuel 4 in the IRVK

1 Samuel 4 in the IRVM

1 Samuel 4 in the IRVM2

1 Samuel 4 in the IRVO

1 Samuel 4 in the IRVP

1 Samuel 4 in the IRVT

1 Samuel 4 in the IRVT2

1 Samuel 4 in the IRVU

1 Samuel 4 in the ISVN

1 Samuel 4 in the JSNT

1 Samuel 4 in the KAPI

1 Samuel 4 in the KBT1ETNIK

1 Samuel 4 in the KBV

1 Samuel 4 in the KJV

1 Samuel 4 in the KNFD

1 Samuel 4 in the LBA

1 Samuel 4 in the LBLA

1 Samuel 4 in the LNT

1 Samuel 4 in the LSV

1 Samuel 4 in the MAAL

1 Samuel 4 in the MBV

1 Samuel 4 in the MBV2

1 Samuel 4 in the MHNT

1 Samuel 4 in the MKNFD

1 Samuel 4 in the MNG

1 Samuel 4 in the MNT

1 Samuel 4 in the MNT2

1 Samuel 4 in the MRS1T

1 Samuel 4 in the NAA

1 Samuel 4 in the NASB

1 Samuel 4 in the NBLA

1 Samuel 4 in the NBS

1 Samuel 4 in the NBVTP

1 Samuel 4 in the NET2

1 Samuel 4 in the NIV11

1 Samuel 4 in the NNT

1 Samuel 4 in the NNT2

1 Samuel 4 in the NNT3

1 Samuel 4 in the PDDPT

1 Samuel 4 in the PFNT

1 Samuel 4 in the RMNT

1 Samuel 4 in the SBIAS

1 Samuel 4 in the SBIBS

1 Samuel 4 in the SBIBS2

1 Samuel 4 in the SBICS

1 Samuel 4 in the SBIDS

1 Samuel 4 in the SBIGS

1 Samuel 4 in the SBIHS

1 Samuel 4 in the SBIIS

1 Samuel 4 in the SBIIS2

1 Samuel 4 in the SBIIS3

1 Samuel 4 in the SBIKS

1 Samuel 4 in the SBIKS2

1 Samuel 4 in the SBIMS

1 Samuel 4 in the SBIOS

1 Samuel 4 in the SBIPS

1 Samuel 4 in the SBISS

1 Samuel 4 in the SBITS

1 Samuel 4 in the SBITS2

1 Samuel 4 in the SBITS3

1 Samuel 4 in the SBITS4

1 Samuel 4 in the SBIUS

1 Samuel 4 in the SBIVS

1 Samuel 4 in the SBT

1 Samuel 4 in the SBT1E

1 Samuel 4 in the SCHL

1 Samuel 4 in the SNT

1 Samuel 4 in the SUSU

1 Samuel 4 in the SUSU2

1 Samuel 4 in the SYNO

1 Samuel 4 in the TBIAOTANT

1 Samuel 4 in the TBT1E

1 Samuel 4 in the TBT1E2

1 Samuel 4 in the TFTIP

1 Samuel 4 in the TFTU

1 Samuel 4 in the TGNTATF3T

1 Samuel 4 in the THAI

1 Samuel 4 in the TNFD

1 Samuel 4 in the TNT

1 Samuel 4 in the TNTIK

1 Samuel 4 in the TNTIL

1 Samuel 4 in the TNTIN

1 Samuel 4 in the TNTIP

1 Samuel 4 in the TNTIZ

1 Samuel 4 in the TOMA

1 Samuel 4 in the TTENT

1 Samuel 4 in the UBG

1 Samuel 4 in the UGV

1 Samuel 4 in the UGV2

1 Samuel 4 in the UGV3

1 Samuel 4 in the VBL

1 Samuel 4 in the VDCC

1 Samuel 4 in the YALU

1 Samuel 4 in the YAPE

1 Samuel 4 in the YBVTP

1 Samuel 4 in the ZBP