2 Chronicles 7 (BOLCB2)

1 Tango Salomo asilisaki kosambela, moto ekitaki wuta na Likolo mpe ezikisaki mbeka ya kotumba mpe bambeka mosusu, mpe nkembo na Yawe etondisaki Tempelo. 2 Banganga-Nzambe bakokaki te kokota na Tempelo ya Yawe, pamba te nkembo na Yawe etondisaki yango. 3 Tango bana nyonso ya Isalaele bamonaki moto kokita mpe nkembo na Yawe na likolo ya Tempelo, bafukamaki bilongi kino na mabele ; bongo bagumbamelaki mpe basanzolaki Yawe na maloba oyo :« Azali malamu,bolingo na Ye ewumelaka seko na seko ! » 4 Mokonzi mpe bana nyonso ya Isalaele babonzaki bambeka liboso ya Yawe. 5 Mokonzi Salomo abonzaki lokola mbeka bangombe nkoto tuku mibale na mibale mpe bameme nkoto nkama moko na tuku mibale. Ezalaki ndenge wana nde mokonzi mpe bato nyonso babulisaki Tempelo ya Nzambe. 6 Banganga-Nzambe batelemaki na bisika na bango ya mosala, ndenge moko na Balevi mpe bibetelo mindule ya Yawe oyo mokonzi Davidi asalaki mpo na kosanzola na yango Yawe na maloba oyo : « Bolingo na Ye ewumelaka seko na seko. » Ezalaki Davidi moto apesaki bango mokumba ya kobeta bibetelo mindule mpo na kokumisa Yawe. Banganga-Nzambe bazalaki ya kotalana na Balevi mpe bazalaki kobeta bakelelo ; bongo bana nyonso ya Isalaele bazalaki ya kotelema. 7 Salomo abulisaki lopango ya kati oyo ezalaki liboso ya Tempelo ya Yawe mpe abonzaki wana bambeka ya kotumba mpe mafuta ya bambeka ya boyokani ; pamba te etumbelo ya bronze oyo Salomo atongaki ekokaki te koyamba bambeka ya kotumba, makabo ya gato mpe mafuta. 8 Boye, na tango wana, Salomo elongo na Isalaele mobimba basalaki feti oyo ewumelaki mikolo sambo ; ezalaki lisanga monene ya bato oyo bayaki wuta na Amati kino na mayi oyo etiolaka na kati-kati ya bangomba ya Ejipito. 9 Na mokolo ya mwambe, basalaki mayangani monene, pamba te babulisaki etumbelo mikolo sambo mpe basalaki feti mikolo sambo. 10 Bongo na mokolo ya tuku mibale na misato ya sanza ya sambo, Salomo azongisaki bato na bandako na bango ya kapo, na esengo mpe na nsayi kati na mitema mpo na bolamu oyo Yawe asalelaki Davidi, Salomo mpe Isalaele, bato na Ye. 11 Sima na Salomo kosilisa kotonga Tempelo ya Yawe, ndako ya mokonzi mpe kokokisa nyonso oyo azalaki na yango na makanisi ya kosala kati na Tempelo ya Yawe mpe kati na ndako na ye moko, 12 Yawe abimelaki Salomo, na butu, mpe alobaki :— Nayoki losambo na yo mpe naponi esika oyo lokola Ndako ya bambeka mpo na Ngai. 13 Soki nakangi likolo mpo ete mvula ebeta te to natindi mabanki mpo ete ebebisa mokili to natindi bokono mabe kati na bato, 14 soki bato na Ngai, oyo babengami na Kombo na Ngai bamikitisi, basambeli, baluki elongi na Ngai, mpe bapesi mokongo na banzela na bango ya mabe, Ngai, nakoyoka bango wuta na Likolo, nakolimbisa masumu na bango mpe nakobikisa mokili na bango. 15 Kobanda sik’oyo, miso na Ngai ekofungwama, mpe matoyi na Ngai ekoyoka na bokebi mabondeli oyo ekosalema na esika oyo. 16 Naponi mpe nabulisi Tempelo wana mpo ete Kombo na Ngai ezala kuna tango nyonso. Miso mpe motema na Ngai ekozala kuna na Tempelo yango mpo na libela. 17 Mpo na yo, soki okotambola liboso na Ngai ndenge Davidi, tata na yo, atambolaki ; soki okosala nyonso oyo natindaki yo mpe okobatela mibeko mpe malako na Ngai, 18 nakolendisa kiti na yo ya bokonzi kolanda boyokani oyo nasalaki elongo na Davidi, tata na yo, tango nalobaki : « Okotikalaka kozanga te mokitani mpo na kokamba Isalaele lokola mokonzi. » 19 Kasi soki bopengwi mosika na Ngai, soki bosundoli mibeko mpe malako na Ngai, oyo natie liboso na bino ; soki bokeyi kosalela banzambe mosusu mpe kofukamela yango, 20 nakopikola bino na mabele na Ngai, mabele oyo napesaki bino ; nakobwaka mosika ya miso na Ngai Tempelo oyo nabulisi mpo na Kombo na Ngai mpe nakokomisa yango eloko ya kotiola mpe ya soni kati na bikolo nyonso. 21 Atako Tempelo oyo ezali sik’oyo kitoko penza, kasi bato nyonso oyo bakoleka pembeni na yango bakokamwa mpe bakoloba : « Mpo na nini Yawe asali makambo ya boye na mokili oyo mpe na Tempelo oyo ? » 22 Mpe bakoyanola : « Ezali mpo ete basundolaki Yawe, Nzambe ya batata na bango, oyo abimisaki bango na Ejipito mpe bamipesaki na banzambe mosusu, bafukamelaki yango mpe basalelaki yango ; yango wana Yawe ayeisi likolo na bango pasi oyo nyonso. »

In Other Versions

2 Chronicles 7 in the ANGEFD

2 Chronicles 7 in the ANTPNG2D

2 Chronicles 7 in the AS21

2 Chronicles 7 in the BAGH

2 Chronicles 7 in the BBPNG

2 Chronicles 7 in the BBT1E

2 Chronicles 7 in the BDS

2 Chronicles 7 in the BEV

2 Chronicles 7 in the BHAD

2 Chronicles 7 in the BIB

2 Chronicles 7 in the BLPT

2 Chronicles 7 in the BNT

2 Chronicles 7 in the BNTABOOT

2 Chronicles 7 in the BNTLV

2 Chronicles 7 in the BOATCB

2 Chronicles 7 in the BOATCB2

2 Chronicles 7 in the BOBCV

2 Chronicles 7 in the BOCNT

2 Chronicles 7 in the BOECS

2 Chronicles 7 in the BOGWICC

2 Chronicles 7 in the BOHCB

2 Chronicles 7 in the BOHCV

2 Chronicles 7 in the BOHLNT

2 Chronicles 7 in the BOHNTLTAL

2 Chronicles 7 in the BOICB

2 Chronicles 7 in the BOILNTAP

2 Chronicles 7 in the BOITCV

2 Chronicles 7 in the BOKCV

2 Chronicles 7 in the BOKCV2

2 Chronicles 7 in the BOKHWOG

2 Chronicles 7 in the BOKSSV

2 Chronicles 7 in the BOLCB

2 Chronicles 7 in the BOMCV

2 Chronicles 7 in the BONAV

2 Chronicles 7 in the BONCB

2 Chronicles 7 in the BONLT

2 Chronicles 7 in the BONUT2

2 Chronicles 7 in the BOPLNT

2 Chronicles 7 in the BOSCB

2 Chronicles 7 in the BOSNC

2 Chronicles 7 in the BOTLNT

2 Chronicles 7 in the BOVCB

2 Chronicles 7 in the BOYCB

2 Chronicles 7 in the BPBB

2 Chronicles 7 in the BPH

2 Chronicles 7 in the BSB

2 Chronicles 7 in the CCB

2 Chronicles 7 in the CUV

2 Chronicles 7 in the CUVS

2 Chronicles 7 in the DBT

2 Chronicles 7 in the DGDNT

2 Chronicles 7 in the DHNT

2 Chronicles 7 in the DNT

2 Chronicles 7 in the ELBE

2 Chronicles 7 in the EMTV

2 Chronicles 7 in the ESV

2 Chronicles 7 in the FBV

2 Chronicles 7 in the FEB

2 Chronicles 7 in the GGMNT

2 Chronicles 7 in the GNT

2 Chronicles 7 in the HARY

2 Chronicles 7 in the HNT

2 Chronicles 7 in the IRVA

2 Chronicles 7 in the IRVB

2 Chronicles 7 in the IRVG

2 Chronicles 7 in the IRVH

2 Chronicles 7 in the IRVK

2 Chronicles 7 in the IRVM

2 Chronicles 7 in the IRVM2

2 Chronicles 7 in the IRVO

2 Chronicles 7 in the IRVP

2 Chronicles 7 in the IRVT

2 Chronicles 7 in the IRVT2

2 Chronicles 7 in the IRVU

2 Chronicles 7 in the ISVN

2 Chronicles 7 in the JSNT

2 Chronicles 7 in the KAPI

2 Chronicles 7 in the KBT1ETNIK

2 Chronicles 7 in the KBV

2 Chronicles 7 in the KJV

2 Chronicles 7 in the KNFD

2 Chronicles 7 in the LBA

2 Chronicles 7 in the LBLA

2 Chronicles 7 in the LNT

2 Chronicles 7 in the LSV

2 Chronicles 7 in the MAAL

2 Chronicles 7 in the MBV

2 Chronicles 7 in the MBV2

2 Chronicles 7 in the MHNT

2 Chronicles 7 in the MKNFD

2 Chronicles 7 in the MNG

2 Chronicles 7 in the MNT

2 Chronicles 7 in the MNT2

2 Chronicles 7 in the MRS1T

2 Chronicles 7 in the NAA

2 Chronicles 7 in the NASB

2 Chronicles 7 in the NBLA

2 Chronicles 7 in the NBS

2 Chronicles 7 in the NBVTP

2 Chronicles 7 in the NET2

2 Chronicles 7 in the NIV11

2 Chronicles 7 in the NNT

2 Chronicles 7 in the NNT2

2 Chronicles 7 in the NNT3

2 Chronicles 7 in the PDDPT

2 Chronicles 7 in the PFNT

2 Chronicles 7 in the RMNT

2 Chronicles 7 in the SBIAS

2 Chronicles 7 in the SBIBS

2 Chronicles 7 in the SBIBS2

2 Chronicles 7 in the SBICS

2 Chronicles 7 in the SBIDS

2 Chronicles 7 in the SBIGS

2 Chronicles 7 in the SBIHS

2 Chronicles 7 in the SBIIS

2 Chronicles 7 in the SBIIS2

2 Chronicles 7 in the SBIIS3

2 Chronicles 7 in the SBIKS

2 Chronicles 7 in the SBIKS2

2 Chronicles 7 in the SBIMS

2 Chronicles 7 in the SBIOS

2 Chronicles 7 in the SBIPS

2 Chronicles 7 in the SBISS

2 Chronicles 7 in the SBITS

2 Chronicles 7 in the SBITS2

2 Chronicles 7 in the SBITS3

2 Chronicles 7 in the SBITS4

2 Chronicles 7 in the SBIUS

2 Chronicles 7 in the SBIVS

2 Chronicles 7 in the SBT

2 Chronicles 7 in the SBT1E

2 Chronicles 7 in the SCHL

2 Chronicles 7 in the SNT

2 Chronicles 7 in the SUSU

2 Chronicles 7 in the SUSU2

2 Chronicles 7 in the SYNO

2 Chronicles 7 in the TBIAOTANT

2 Chronicles 7 in the TBT1E

2 Chronicles 7 in the TBT1E2

2 Chronicles 7 in the TFTIP

2 Chronicles 7 in the TFTU

2 Chronicles 7 in the TGNTATF3T

2 Chronicles 7 in the THAI

2 Chronicles 7 in the TNFD

2 Chronicles 7 in the TNT

2 Chronicles 7 in the TNTIK

2 Chronicles 7 in the TNTIL

2 Chronicles 7 in the TNTIN

2 Chronicles 7 in the TNTIP

2 Chronicles 7 in the TNTIZ

2 Chronicles 7 in the TOMA

2 Chronicles 7 in the TTENT

2 Chronicles 7 in the UBG

2 Chronicles 7 in the UGV

2 Chronicles 7 in the UGV2

2 Chronicles 7 in the UGV3

2 Chronicles 7 in the VBL

2 Chronicles 7 in the VDCC

2 Chronicles 7 in the YALU

2 Chronicles 7 in the YAPE

2 Chronicles 7 in the YBVTP

2 Chronicles 7 in the ZBP