2 Kings 17 (BOLCB2)

1 Tango Akazi, mokonzi ya Yuda, akokisaki mibu zomi na mibale na bokonzi, Oze, mwana mobali ya Ela, akomaki mokonzi ya Isalaele na Samari. Akonzaki mibu libwa. 2 Oze asalaki makambo mabe na miso ya Yawe, kasi ndenge moko te na bakonzi ya Isalaele, oyo bazalaki liboso na ye. 3 Salimanasari, mokonzi ya Asiri, ayaki kobundisa Oze. Mpe Oze akomaki mowumbu mpe akomaki kofuta mpako epai ya Salimanasari. 4 Kasi mokonzi ya Asiri asosolaki ete Oze asaleli ye likita, pamba te Oze atindaki bantoma epai ya So, mokonzi ya Ejipito, mpe atikaki kofuta mpako epai ya mokonzi ya Asiri ndenge azalaki kosala mobu na mobu. Boye Salimanasari akangaki Oze mpe atiaki ye na boloko. 5 Mokonzi ya Asiri akotaki na makasi na mokili mobimba, abundisaki Samari mpe azingelaki yango mibu misato. 6 Tango Oze akokisaki mibu libwa na bokonzi, mokonzi ya Asiri abotolaki Samari mpe amemaki bana ya Isalaele na bowumbu na Asiri. Atiaki bango na Ala mpe na bapembeni ya ebale ya Abori, na etuka ya Gozani mpe na bingumba ya Medi. 7 Makambo oyo esalemaki mpo ete bato ya Isalaele basalaki masumu liboso ya Yawe, Nzambe na bango, oyo abimisaki bango wuta na bokonzi ya Faraon, mokonzi ya Ejipito ; bagumbamelaki banzambe mosusu. 8 Balandaki bizaleli ya bikolo oyo Yawe abenganaki liboso na bango mpe makambo oyo bakonzi ya Isalaele bakotisaki. 9 Bato ya Isalaele basalaki na nkuku makambo ya nkele na miso ya Yawe, Nzambe na bango. Batongaki bisambelo ya likolo ya bangomba kati na bingumba na bango nyonso, kobanda na likolo ya bamir ya lopango kino na bingumba batonga makasi. 10 Batelemisaki mabanga ya bule mpe makonzi ya nzambe mwasi Ashera na likolo ya bangomba nyonso mpe na se ya banzete nyonso ya mibesu. 11 Batumbaki ansa na bisambelo nyonso ya likolo ya bangomba, ndenge bikolo oyo Yawe abenganaki liboso na bango ezalaki kosala. Basalaki makambo mabe oyo etumbolaki kanda ya Yawe. 12 Bagumbamelaki banzambe ya bikeko oyo na tina na yango Yawe alobaki : « Bokosala bongo te. » 13 Yawe akebisaki Isalaele mpe Yuda na nzela ya basali na Ye nyonso, basakoli mpe bamoni makambo, na maloba oyo : « Botika banzela na bino ya mabe, bobatela mibeko mpe bikateli na Ngai kolanda mibeko nyonso oyo napesaki bino mpe bakoko na bino na nzela ya basali na Ngai, basakoli. » 14 Kasi bayokaki te ; batiaki moto makasi lokola bakoko na bango, oyo baboyaki kondimela Yawe, Nzambe na bango. 15 Babwakaki bikateli na Ye, boyokani oyo asalaki elongo na bakoko na bango mpe makebisi oyo apesaki bango. Balandaki bikolo oyo ezalaki zingazinga na bango. Yawe apesaki bango mitindo ete basala te lokola bango, kasi bango basalaki kaka makambo oyo Yawe apekisaki bango kosala. 16 Batikaki mitindo nyonso ya Yawe, Nzambe na bango, mpe bamisalelaki banzambe ya bikeko ya bana ngombe mibale basala na bibende oyo banyangwisa na moto, mpe likonzi ya nzambe mwasi Ashera. Bango nyonso bagumbamelaki mampinga nyonso ya likolo, mpe basambelaki nzambe Bala. 17 Batumbaki na moto lokola mbeka bana na bango ya mibali mpe bana na bango ya basi. Basalelaki soloka mpe kindoki, mpe bamikabaki mpo na kosala makambo mabe na miso ya Yawe. Boye batumbolaki kanda ya Yawe. 18 Yawe asilikelaki makasi bana ya Isalaele mpe abenganaki bango mosika na Ye. Kaka libota ya Yuda nde batikalaki. 19 Nzokande, libota yango mpe ya Yuda babatelaki te mitindo ya Yawe, Nzambe na bango, balandaki bizaleli oyo Isalaele akotisaki. 20 Boye, Yawe abwakaki bana nyonso ya Isalaele, ayokisaki bango pasi, akabaki bango na maboko ya bato ya mobulu, mpe abenganaki bango mosika na Ye. 21 Tango Yawe alongolaki Isalaele na se ya bokonzi ya Davidi, bana ya Isalaele bakomisaki Jeroboami, mwana mobali ya Nebati, mokonzi na bango. Jeroboami atindikaki Isalaele ete balanda Yawe te, mpe amemisaki bango lisumu ya monene. 22 Bato ya Isalaele bakangamaki na masumu nyonso ya Jeroboami mpe batikaki yango te 23 kino tango Yawe abenganaki bango mosika na Ye, ndenge ayebisaki bango na nzela ya basali na Ye nyonso, basakoli. Boye, bamemaki bana ya Isalaele na bowumbu, mosika ya mokili na bango, na Asiri kino lelo. 24 Mokonzi ya Asiri amemaki bato wuta na bingumba ya Babiloni, ya Kuti, ya Ava, ya Amati mpe ya Sefarivayimi ; mpe atiaki bango na Samari, na esika ya bana ya Isalaele. Bato yango bazwaki Samari mpe bavandaki kati na bingumba na yango. 25 Liboso, tango bazalaki kovanda kuna, bato yango bazalaki kogumbamela Yawe te. Boye Yawe atindaki nkosi kati na bango, mpe ebomaki ndambo ya bato kati na bango. 26 Bayebisaki mokonzi ya Asiri :— Bikolo oyo omemaki na bowumbu mpe otiaki kati na bingumba ya Samari bayebi te makambo oyo Nzambe ya mokili wana alingaka. Boye Nzambe atindi kati na bango nkosi oyo ezali koboma bango, pamba te bato yango bayebi te makambo oyo Nzambe yango alingaka. 27 Boye mokonzi ya Asiri apesaki mitindo oyo :— Botinda kuna moko kati na Banganga-Nzambe oyo bomemaki na bowumbu wuta na Samari mpo ete avanda kuna mpe alakisa bato makambo oyo Nzambe ya mokili wana alingaka. 28 Boye moko kati na Banganga-Nzambe oyo bamemaki na bowumbu wuta na Samari ayaki kovanda na Beteli mpe alakisaki bango kogumbamela Yawe. 29 Kasi ekolo na ekolo esalaki banzambe na yango kati na bingumba nyonso oyo bazalaki kovanda, mpe batiaki banzambe yango kati na bisika ya bule ya bisambelo ya likolo ya bangomba oyo bato ya Samari batongaki. 30 Bato oyo bawutaki na Babiloni basalaki ekeko ya nzambe Sukoti-Benoti ; ba-oyo bawutaki na Kuti basalaki ekeko ya nzambe Nerigali ; ba-oyo bawutaki na Amati basalaki ekeko ya nzambe Ashima ; 31 ba-oyo bawutaki na Ava basalaki bikeko ya nzambe Nibikazi mpe nzambe Taritaki ; ba-oyo bawutaki na Sefarivayimi bazalaki kokoba kotumba bana na bango na moto lokola mbeka epai ya Adrameleki mpe Anameleki, banzambe ya bato ya Sefarivayimi. 32 Bato ya bikolo yango bazalaki na bango kotosa Yawe, kasi baponaki lisusu kati na bango bato mpo na kosala mosala ya bonganga-nzambe kati na bisika ya bule ya bisambelo ya likolo ya bangomba. 33 Atako bazalaki kotosa Yawe, kasi bazalaki mpe kosalela banzambe na bango kolanda bizaleli ya bikolo epai wapi bawutaki. 34 Kino lelo, bakangami kaka na bizaleli na bango ya kala ; bagumbamelaka penza Yawe te mpe batosaka te bikateli mpe malako, mibeko mpe mitindo oyo Yawe apesaki epai ya bakitani ya Jakobi oyo apesaki kombo « Isalaele. » 35 Tango Yawe asalaki boyokani elongo na bana ya Isalaele, alobaki na bango : « Bokogumbamela banzambe mosusu te, bokofukamela yango te, bokosalela yango te mpe bokobonzela yango bambeka te ; 36 kaka Yawe oyo abimisaki bino wuta na Ejipito, na nguya mpe na loboko esembolama, nde bosengeli kogumbamela. Liboso na Ye kaka nde bosengeli kogumbama mpe kobonza bambeka. 37 Bosengeli tango nyonso kozala na bokebi mpo na kobatela bikateli mpe malako, mibeko mpe mitindo oyo Yawe akomaki mpo na bino. Bogumbamela banzambe mosusu te, 38 bobosana te boyokani oyo nasalaki elongo na bino, mpe bogumbamela banzambe mosusu te. 39 Kaka Yawe, Nzambe na bino, nde bosengeli kogumbamela, pamba te Ye nde akangolaki bino na maboko ya banguna na bino nyonso. » 40 Kasi bato ya bikolo wana bayokaki te mpe batingamaki kaka na bizaleli na bango ya kala. 41 Atako bato ya bikolo yango bazalaki kotosa Yawe, kasi bazalaki mpe kosalela banzambe na bango ya bikeko. Kino lelo, bana na bango mpe bakitani na bango bazali kokoba kosala makambo oyo bakoko na bango bazalaki kosala.

In Other Versions

2 Kings 17 in the ANGEFD

2 Kings 17 in the ANTPNG2D

2 Kings 17 in the AS21

2 Kings 17 in the BAGH

2 Kings 17 in the BBPNG

2 Kings 17 in the BBT1E

2 Kings 17 in the BDS

2 Kings 17 in the BEV

2 Kings 17 in the BHAD

2 Kings 17 in the BIB

2 Kings 17 in the BLPT

2 Kings 17 in the BNT

2 Kings 17 in the BNTABOOT

2 Kings 17 in the BNTLV

2 Kings 17 in the BOATCB

2 Kings 17 in the BOATCB2

2 Kings 17 in the BOBCV

2 Kings 17 in the BOCNT

2 Kings 17 in the BOECS

2 Kings 17 in the BOGWICC

2 Kings 17 in the BOHCB

2 Kings 17 in the BOHCV

2 Kings 17 in the BOHLNT

2 Kings 17 in the BOHNTLTAL

2 Kings 17 in the BOICB

2 Kings 17 in the BOILNTAP

2 Kings 17 in the BOITCV

2 Kings 17 in the BOKCV

2 Kings 17 in the BOKCV2

2 Kings 17 in the BOKHWOG

2 Kings 17 in the BOKSSV

2 Kings 17 in the BOLCB

2 Kings 17 in the BOMCV

2 Kings 17 in the BONAV

2 Kings 17 in the BONCB

2 Kings 17 in the BONLT

2 Kings 17 in the BONUT2

2 Kings 17 in the BOPLNT

2 Kings 17 in the BOSCB

2 Kings 17 in the BOSNC

2 Kings 17 in the BOTLNT

2 Kings 17 in the BOVCB

2 Kings 17 in the BOYCB

2 Kings 17 in the BPBB

2 Kings 17 in the BPH

2 Kings 17 in the BSB

2 Kings 17 in the CCB

2 Kings 17 in the CUV

2 Kings 17 in the CUVS

2 Kings 17 in the DBT

2 Kings 17 in the DGDNT

2 Kings 17 in the DHNT

2 Kings 17 in the DNT

2 Kings 17 in the ELBE

2 Kings 17 in the EMTV

2 Kings 17 in the ESV

2 Kings 17 in the FBV

2 Kings 17 in the FEB

2 Kings 17 in the GGMNT

2 Kings 17 in the GNT

2 Kings 17 in the HARY

2 Kings 17 in the HNT

2 Kings 17 in the IRVA

2 Kings 17 in the IRVB

2 Kings 17 in the IRVG

2 Kings 17 in the IRVH

2 Kings 17 in the IRVK

2 Kings 17 in the IRVM

2 Kings 17 in the IRVM2

2 Kings 17 in the IRVO

2 Kings 17 in the IRVP

2 Kings 17 in the IRVT

2 Kings 17 in the IRVT2

2 Kings 17 in the IRVU

2 Kings 17 in the ISVN

2 Kings 17 in the JSNT

2 Kings 17 in the KAPI

2 Kings 17 in the KBT1ETNIK

2 Kings 17 in the KBV

2 Kings 17 in the KJV

2 Kings 17 in the KNFD

2 Kings 17 in the LBA

2 Kings 17 in the LBLA

2 Kings 17 in the LNT

2 Kings 17 in the LSV

2 Kings 17 in the MAAL

2 Kings 17 in the MBV

2 Kings 17 in the MBV2

2 Kings 17 in the MHNT

2 Kings 17 in the MKNFD

2 Kings 17 in the MNG

2 Kings 17 in the MNT

2 Kings 17 in the MNT2

2 Kings 17 in the MRS1T

2 Kings 17 in the NAA

2 Kings 17 in the NASB

2 Kings 17 in the NBLA

2 Kings 17 in the NBS

2 Kings 17 in the NBVTP

2 Kings 17 in the NET2

2 Kings 17 in the NIV11

2 Kings 17 in the NNT

2 Kings 17 in the NNT2

2 Kings 17 in the NNT3

2 Kings 17 in the PDDPT

2 Kings 17 in the PFNT

2 Kings 17 in the RMNT

2 Kings 17 in the SBIAS

2 Kings 17 in the SBIBS

2 Kings 17 in the SBIBS2

2 Kings 17 in the SBICS

2 Kings 17 in the SBIDS

2 Kings 17 in the SBIGS

2 Kings 17 in the SBIHS

2 Kings 17 in the SBIIS

2 Kings 17 in the SBIIS2

2 Kings 17 in the SBIIS3

2 Kings 17 in the SBIKS

2 Kings 17 in the SBIKS2

2 Kings 17 in the SBIMS

2 Kings 17 in the SBIOS

2 Kings 17 in the SBIPS

2 Kings 17 in the SBISS

2 Kings 17 in the SBITS

2 Kings 17 in the SBITS2

2 Kings 17 in the SBITS3

2 Kings 17 in the SBITS4

2 Kings 17 in the SBIUS

2 Kings 17 in the SBIVS

2 Kings 17 in the SBT

2 Kings 17 in the SBT1E

2 Kings 17 in the SCHL

2 Kings 17 in the SNT

2 Kings 17 in the SUSU

2 Kings 17 in the SUSU2

2 Kings 17 in the SYNO

2 Kings 17 in the TBIAOTANT

2 Kings 17 in the TBT1E

2 Kings 17 in the TBT1E2

2 Kings 17 in the TFTIP

2 Kings 17 in the TFTU

2 Kings 17 in the TGNTATF3T

2 Kings 17 in the THAI

2 Kings 17 in the TNFD

2 Kings 17 in the TNT

2 Kings 17 in the TNTIK

2 Kings 17 in the TNTIL

2 Kings 17 in the TNTIN

2 Kings 17 in the TNTIP

2 Kings 17 in the TNTIZ

2 Kings 17 in the TOMA

2 Kings 17 in the TTENT

2 Kings 17 in the UBG

2 Kings 17 in the UGV

2 Kings 17 in the UGV2

2 Kings 17 in the UGV3

2 Kings 17 in the VBL

2 Kings 17 in the VDCC

2 Kings 17 in the YALU

2 Kings 17 in the YAPE

2 Kings 17 in the YBVTP

2 Kings 17 in the ZBP