Daniel 3 (BOLCB2)

1 Mokonzi Nabukodonozori asalisaki ekeko moko ya wolo, oyo ezalaki na bametele pene tuku misato na bosanda mpe bametele pene misato na mokuse. Atelemisaki yango kati na etando ya Dura, na etuka ya Babiloni. 2 Abengisaki bayangeli oyo atiaki na bituka, bakalaka oyo babatelaka biloko ya mokonzi, bayangeli, bapesi toli, babateli bomengo ya mokonzi, bato ya mibeko, basambisi mpe bakalaka nyonso ya bituka, mpo ete baya na feti ya kobandisa losambo ya ekeko oyo mokonzi Nabukodonozori asalisaki. 3 Boye, bayangeli oyo atiaki na bituka, bakalaka oyo babatelaka biloko ya mokonzi, bayangeli, bapesi toli, babateli ya bomengo ya mokonzi, bato ya mibeko, basambisi mpe bakalaka nyonso ya bituka basanganaki mpo na feti ya kobandisa losambo ya ekeko oyo mokonzi Nabukodonozori asalisaki, mpe batelemaki liboso na yango. 4 Molobeli ya mokonzi atatolaki na mongongo makasi :— Bino bato ya bikolo nyonso mpe ya nkota nyonso, tala makambo oyo bosengeli kosala : 5 « Tango kaka bokoyoka lolaka ya kelelo, ya flite, ya lindanda ya moke, ya lindanda, ya nzenze, ya fanfari mpe makelele ya lolenge nyonso ya bibetelo mindule, bosengeli kofukama mpo na kogumbamela ekeko ya wolo oyo mokonzi Nabukodonozori asalisi. 6 Moto nyonso oyo akoboya kofukama mpo na kogumbamela ekeko yango, bakobwaka ye mbala moko kati na libulu ya moto. » 7 Yango wana, tango kaka bayokaki lolaka ya kelelo, ya flite, ya lindanda ya moke, ya lindanda, ya nzenze, ya fanfari mpe makelele ya bibetelo mindule lolenge nyonso, bato ya bikolo nyonso, ya mikili nyonso mpe ya nkota nyonso bafukamaki mpo na kogumbamela ekeko ya wolo oyo mokonzi Nabukodonozori asalisaki. 8 Kaka na tango yango, ndambo ya bato ya soloka, oyo basalelaka minzoto bayaki kofunda Bayuda. 9 Balobaki na mokonzi Nabukodonozori :— Oh mokonzi, tika ete owumela na bomoi seko na seko ! 10 Oh mokonzi, opesaki mitindo ete moto nyonso oyo akoyoka lolaka ya kelelo, ya flite, ya lindanda ya moke, ya lindanda, ya nzenze, ya fanfari mpe makelele ya lolenge nyonso ya bibetelo mindule afukama mpo na kogumbamela ekeko ya wolo ; 11 mpe ete moto nyonso oyo akoboya kofukama mpo na kogumbamela ekeko yango, babwaka ye kati na libulu ya moto ! 12 Kasi, mokonzi, ezali na ndambo ya Bayuda oyo okomisaki bayangeli na etuka ya Babiloni : Shadraki, Meshaki mpe Abedinego, oyo bazali kotosa yo ata moke te : bazali kosalela banzambe na yo te mpe kogumbamela te ekeko ya wolo oyo osali. 13 Mokonzi Nabukodonozori atombokaki makasi mpe abengisaki Shadraki, Meshaki mpe Abedinego. Boye, bamemaki bango liboso ya mokonzi. 14 Nabukodonozori atunaki bango :— Shadraki, Meshaki mpe Abedinego, ezali penza ya solo ete bozali kosalela banzambe na ngai te mpe bozali kogumbamela te ekeko ya wolo oyo nasali ? 15 Sik’oyo, bomibongisa ! Tango kaka bokoyoka lolaka ya kelelo, ya flite, ya lindanda ya moke, ya lindanda, ya nzenze, ya fanfari mpe makelele ya nyonso ya bibetelo mindule, bokofukama mpo na kogumbamela ekeko oyo nasali. Soki boboyi kogumbamela yango, bokobwakama mbala moko kati na libulu ya moto. Boye, tokotala soki nzambe nini akokoka kokangola bino na maboko na ngai. 16 Shadraki, Meshaki mpe Abedinego bazongiselaki mokonzi Nabukodonozori :— Tozali na tina na komibundela te na likambo oyo liboso na yo. 17 Soki babwaki biso kati na libulu ya moto, Nzambe oyo tosalelaka azali na makoki ya kobikisa biso wuta na libulu yango mpe ya kokangola biso na maboko na yo. 18 Kasi ata soki abikisi na Ye biso te, tolingi mokonzi oyeba ete, biso, tokosalela banzambe na yo te mpe tokogumbamela te ekeko ya wolo oyo osalaki. 19 Nabukodonozori atombokelaki makasi Shadraki, Meshaki mpe Abedinego, mpe akangelaki bango elongi ; apesaki mitindo ete bapelisa moto makasi penza mbala sambo koleka ndenge bapelisaka yango tango nyonso. 20 Bongo apesaki mitindo na ndambo ya basoda ya mpiko kati na mampinga na ye ete bakanga Shadraki, Meshaki mpe Abedinego basinga mpe babwaka bango kati na libulu ya moto. 21 Boye, bakangaki Shadraki, Meshaki mpe Abedinego basinga, wana balataki bilamba na bango, banzambala na bango, bakazaka na bango, bitendi na bango oyo bakangaka na moto mpe bilamba mosusu, mpe babwakaki bango kati na libulu ya moto. 22 Lokola mokonzi apesaki mitindo ete bapelisa moto ya libulu ya moto makasi penza, moto yango ebomaki basoda oyo babwakaki Shadraki, Meshaki mpe Abedinego kati na libulu ya moto. 23 Kasi Shadraki, Meshaki mpe Abedinego bakweyaki kati na libulu yango ya moto, bakanga bango basinga makasi. 24 Mokonzi Nabukodonozori akamwaki mpe atelemaki na lombangu ; atunaki bapesi toli na ye :— Boni, tobwakaki te bato misato kati na moto, bakanga bango basinga ?Bazongiselaki mokonzi :— Mokonzi, tosalaki bongo ! 25 Alobaki na bapesi toli na ye :— Botala ! Nazali komona bato minei bazali kotambola kati na moto, bakangama basinga te mpe moto ezali kozikisa bango te ; mpe moto ya minei azali lokola mwana ya banzambe. 26 Nabukodonozori apusanaki pene ya monoko ya libulu ya moto mpe agangaki na mongongo makasi :— Shadraki, Meshaki mpe Abedinego, basali ya Nzambe-Oyo-Aleki-Likolo, bobima kuna mpe boya awa !Shadraki, Meshaki mpe Abedinego babimaki wuta na libulu ya moto. 27 Bayangeli oyo mokonzi atiaki na bituka, bakalaka oyo babatelaka biloko ya mokonzi, bayangeli mpe bapesi toli ya mokonzi bazingelaki bango ; mpe bamonaki ete moto ezikisaki te ezala banzoto na bango, suki ya mito na bango to bilamba na bango, mpe batikalaki koyoka bango ata solo ya moto te. 28 Nabukodonozori alobaki :— Tika ete Nzambe ya Shadraki, Meshaki mpe Abedinego akumisama ; Ye nde atindaki anjelu na Ye mpo ete abikisa basali na Ye, pamba te batielaka Ye motema ! Batosaki mitindo ya mokonzi te mpe bandimaki kobungisa bomoi na bango na esika ya kosalela mpe kogumbamela nzambe mosusu, soki Nzambe na bango te. 29 Yango wana, nazwi mokano ete moto nyonso, azala ya mokili, ekolo to lokota nini, oyo akoloba mabe mpo na Nzambe ya Shadraki, Meshaki mpe Abedinego, bakokata-kata ye na biteni, bakobuka ndako na ye mpe bakokomisa yango mopiku ya mbindo, pamba te Nzambe mosusu azali te, oyo akoki kobikisa bato na Ye na lolenge oyo ! 30 Sima na yango, mokonzi atombolaki Shadraki, Meshaki mpe Abedinego kati na etuka ya Babiloni. 31 Mokonzi Nabukodonozori alobaki na bato ya bikolo, ya bamboka mpe ya nkota nyonso, oyo bavandaka na mokili mobimba :Natombeli bino kimia monene ! 32 Nazali na esengo ya koyebisa bino bikamwa mpe makambo minene oyo Nzambe-Oyo-Aleki-Likolo asali mpo na ngai ! 33 Bikamwa na Ye ezali solo minene,makambo minene na Ye elakisaka nguya na Ye~!Bokonzi na Ye ezali na suka te,ewumelaka seko na seko~!

In Other Versions

Daniel 3 in the ANGEFD

Daniel 3 in the ANTPNG2D

Daniel 3 in the AS21

Daniel 3 in the BAGH

Daniel 3 in the BBPNG

Daniel 3 in the BBT1E

Daniel 3 in the BDS

Daniel 3 in the BEV

Daniel 3 in the BHAD

Daniel 3 in the BIB

Daniel 3 in the BLPT

Daniel 3 in the BNT

Daniel 3 in the BNTABOOT

Daniel 3 in the BNTLV

Daniel 3 in the BOATCB

Daniel 3 in the BOATCB2

Daniel 3 in the BOBCV

Daniel 3 in the BOCNT

Daniel 3 in the BOECS

Daniel 3 in the BOGWICC

Daniel 3 in the BOHCB

Daniel 3 in the BOHCV

Daniel 3 in the BOHLNT

Daniel 3 in the BOHNTLTAL

Daniel 3 in the BOICB

Daniel 3 in the BOILNTAP

Daniel 3 in the BOITCV

Daniel 3 in the BOKCV

Daniel 3 in the BOKCV2

Daniel 3 in the BOKHWOG

Daniel 3 in the BOKSSV

Daniel 3 in the BOLCB

Daniel 3 in the BOMCV

Daniel 3 in the BONAV

Daniel 3 in the BONCB

Daniel 3 in the BONLT

Daniel 3 in the BONUT2

Daniel 3 in the BOPLNT

Daniel 3 in the BOSCB

Daniel 3 in the BOSNC

Daniel 3 in the BOTLNT

Daniel 3 in the BOVCB

Daniel 3 in the BOYCB

Daniel 3 in the BPBB

Daniel 3 in the BPH

Daniel 3 in the BSB

Daniel 3 in the CCB

Daniel 3 in the CUV

Daniel 3 in the CUVS

Daniel 3 in the DBT

Daniel 3 in the DGDNT

Daniel 3 in the DHNT

Daniel 3 in the DNT

Daniel 3 in the ELBE

Daniel 3 in the EMTV

Daniel 3 in the ESV

Daniel 3 in the FBV

Daniel 3 in the FEB

Daniel 3 in the GGMNT

Daniel 3 in the GNT

Daniel 3 in the HARY

Daniel 3 in the HNT

Daniel 3 in the IRVA

Daniel 3 in the IRVB

Daniel 3 in the IRVG

Daniel 3 in the IRVH

Daniel 3 in the IRVK

Daniel 3 in the IRVM

Daniel 3 in the IRVM2

Daniel 3 in the IRVO

Daniel 3 in the IRVP

Daniel 3 in the IRVT

Daniel 3 in the IRVT2

Daniel 3 in the IRVU

Daniel 3 in the ISVN

Daniel 3 in the JSNT

Daniel 3 in the KAPI

Daniel 3 in the KBT1ETNIK

Daniel 3 in the KBV

Daniel 3 in the KJV

Daniel 3 in the KNFD

Daniel 3 in the LBA

Daniel 3 in the LBLA

Daniel 3 in the LNT

Daniel 3 in the LSV

Daniel 3 in the MAAL

Daniel 3 in the MBV

Daniel 3 in the MBV2

Daniel 3 in the MHNT

Daniel 3 in the MKNFD

Daniel 3 in the MNG

Daniel 3 in the MNT

Daniel 3 in the MNT2

Daniel 3 in the MRS1T

Daniel 3 in the NAA

Daniel 3 in the NASB

Daniel 3 in the NBLA

Daniel 3 in the NBS

Daniel 3 in the NBVTP

Daniel 3 in the NET2

Daniel 3 in the NIV11

Daniel 3 in the NNT

Daniel 3 in the NNT2

Daniel 3 in the NNT3

Daniel 3 in the PDDPT

Daniel 3 in the PFNT

Daniel 3 in the RMNT

Daniel 3 in the SBIAS

Daniel 3 in the SBIBS

Daniel 3 in the SBIBS2

Daniel 3 in the SBICS

Daniel 3 in the SBIDS

Daniel 3 in the SBIGS

Daniel 3 in the SBIHS

Daniel 3 in the SBIIS

Daniel 3 in the SBIIS2

Daniel 3 in the SBIIS3

Daniel 3 in the SBIKS

Daniel 3 in the SBIKS2

Daniel 3 in the SBIMS

Daniel 3 in the SBIOS

Daniel 3 in the SBIPS

Daniel 3 in the SBISS

Daniel 3 in the SBITS

Daniel 3 in the SBITS2

Daniel 3 in the SBITS3

Daniel 3 in the SBITS4

Daniel 3 in the SBIUS

Daniel 3 in the SBIVS

Daniel 3 in the SBT

Daniel 3 in the SBT1E

Daniel 3 in the SCHL

Daniel 3 in the SNT

Daniel 3 in the SUSU

Daniel 3 in the SUSU2

Daniel 3 in the SYNO

Daniel 3 in the TBIAOTANT

Daniel 3 in the TBT1E

Daniel 3 in the TBT1E2

Daniel 3 in the TFTIP

Daniel 3 in the TFTU

Daniel 3 in the TGNTATF3T

Daniel 3 in the THAI

Daniel 3 in the TNFD

Daniel 3 in the TNT

Daniel 3 in the TNTIK

Daniel 3 in the TNTIL

Daniel 3 in the TNTIN

Daniel 3 in the TNTIP

Daniel 3 in the TNTIZ

Daniel 3 in the TOMA

Daniel 3 in the TTENT

Daniel 3 in the UBG

Daniel 3 in the UGV

Daniel 3 in the UGV2

Daniel 3 in the UGV3

Daniel 3 in the VBL

Daniel 3 in the VDCC

Daniel 3 in the YALU

Daniel 3 in the YAPE

Daniel 3 in the YBVTP

Daniel 3 in the ZBP