Deuteronomy 1 (BOLCB2)

1 Tala maloba oyo Moyize ayebisaki bana nyonso ya Isalaele na ngambo ya este ya Yordani kati na esobe, kati na etando Araba oyo etalana na Sufi, kati ya Parani mpe Tofeli, kati ya Labani, Atseroti mpe Di-Zaabi. 2 Esengaka mikolo zomi na moko ya mobembo wuta na Orebi kino na Kadeshi-Barinea, na nzela ya ngomba Seiri. 3 Na mokolo ya liboso ya sanza ya zomi na moko, na mobu ya minei, Moyize alobaki na bana ya Isalaele makambo nyonso oyo Yawe atindaki ye na tina na bango. 4 Makambo yango esalemaki sima na Moyize kolonga Sikoni, mokonzi ya bato ya Amori, oyo azalaki koyangela wuta na Eshiboni, mpe sima na ye kolonga Ogi, mokonzi ya Bashani, oyo azalaki kovanda na Ashitaroti mpe na Edreyi. 5 Ezalaki na ngambo ya este ya Yordani, na mokili ya Moabi, nde Moyize alimbolaki mobeko oyo. Alobaki na bango : 6 « Yawe, Nzambe na biso, alobaki na biso, na ngomba Orebi : ‹ Bowumeli mpe mingi na ngomba oyo. 7 Bolongola molako mpe bokende kino na etuka ya bangomba ya bato ya Amori ; bokende na bamboka nyonso oyo ezali pene ya Araba, na bangomba, na mboka ya se, na Negevi mpe pembeni-pembeni ya mayi monene, kati na mokili ya bato ya Kanana mpe na mokili ya Libani kino na Efrate, ebale monene. 8 Tala, napesi bino mokili oyo. Bokota mpe bokamata mokili oyo Yawe alakaki kopesa, na nzela ya ndayi, epai ya bakoko na bino —Abrayami, Izaki, Jakobi— mpe bakitani na bango. › » 9 Na tango wana, nalobaki na bino :— Ngai moko nakokoka te kokamba bino. 10 Yawe, Nzambe na bino, akomisi bino ebele koleka mpe tala lelo motango na bino ekomi lokola minzoto na likolo. 11 Tika ete Yawe, Nzambe ya bakoko na bino, akomisa bino ebele mbala nkoto moko mpe apambola bino ndenge alakaki ! 12 Nakokoka ndenge nini komema ngai moko makambo na bino, mikumba na bino, mpe kowelana na bino ? 13 Bopona bato ya bwanya, ya mayele mpe ya lokumu kati na moko na moko ya mabota na bino, mpe ngai nakotia bango bakambi na bino. 14 Bozongiselaki ngai :— Makambo oyo osili koyebisa biso ezali malamu. 15 Boye, nazwaki bakambi kati na mabota na bino, bato ya lokumu mpe ya bwanya, bongo nakomisaki bango bakambi ya bankoto, ya bankama, ya batuku mitano mpe ya bazomi, mpe bakalaka mpo na mabota na bino. 16 Na tango wana, napesaki bakambi na bino mokumba oyo : « Boyoka kowelana oyo ezali kati na bandeko na bino mpe bokata makambo na bosembo ; ezala kowelana kati ya bana ya Isalaele bango na bango to kati ya mwana ya Isalaele mpe mopaya. 17 Bopona bilongi te na tango ya kosambisa, boyoka bato nyonso : azala moto pamba to moto monene. Bobanga moto te, pamba te kosambisa ezali likambo ya Nzambe. Bomemela ngai likambo oyo eleki bino na makasi mpe ngai nakoyoka yango. » 18 Mpe na tango wana, nayebisaki bino makambo nyonso oyo bosengeli kosala. 19 Boye, ndenge Yawe, Nzambe na biso, atindaki biso, tolongwaki na ngomba Orebi mpe tokendeki na etuka ya bangomba ya bato ya Amori. Tokatisaki esobe monene mpe ya somo oyo bomonaki mpe tokomaki na Kadeshi-Barinea. 20 Nalobaki na bino :— Bosili kokoma na etuka ya bangomba ya bato ya Amori, etuka oyo Yawe, Nzambe na biso, apesi biso. 21 Botala, Yawe, Nzambe na bino, apesi bino mokili ; bokende mpe bokamata yango ndenge Yawe, Nzambe ya bakoko na bino, alobaki na bino. Bobanga te mpe bozala na mpiko. 22 Bato nyonso kati na bino bayaki epai na ngai mpe balobaki :— Tika ete totinda liboso na biso bato mpo na konongela biso mokili mpe komemela biso sango ya nzela oyo tokoki kolanda mpe ya bingumba epai wapi tokokende. 23 Likanisi yango emonanaki malamu na miso na ngai, yango wana naponaki kati na bino mibali zomi na mibale, mobali moko mpo na libota moko. 24 Balongwaki mpe bakendeki, bongo bamataki kino na etuka ya bangomba mpe bakomaki na lubwaku ya Eshikoli oyo banongaki. 25 Bakamataki na maboko na bango ndambo ya bambuma ya mokili wana mpe bamemelaki biso yango. Tala sango oyo bapesaki biso : « Mboka oyo Yawe, Nzambe na biso, apesi biso ezali malamu. » 26 Kasi boboyaki komata, botombokelaki etinda ya Yawe, Nzambe na bino. 27 Bongo boyimaki-yimaki kati na bandako na bino mpe bolobaki : « Yawe alingaka biso te, yango wana abimisaki biso na Ejipito mpo na kokaba biso na maboko ya bato ya Amori mpo ete bango baboma biso. 28 Boni, tokende kaka kuna ? Bandeko na biso basili kolembisa biso nzoto. Balobi : ‹ Bato yango bazali makasi mpe bingambe koleka biso, bingumba na bango ezali minene mpe bamir na yango ekenda kino na likolo. Tomonaki lisusu bana ya Anaki kuna. › » 29 Nalobaki na bino : « Bozala na somo te mpe bobanga bango te, 30 pamba te Yawe, Nzambe na bino, azali kotambola liboso na bino mpe akobunda mpo na bino ndenge asalaki na Ejipito, na miso ya bato nyonso. 31 Mpe na esobe, na banzela nyonso oyo botambolaki kino bokoma na esika oyo, bomonaki ndenge nini Yawe, Nzambe na bino, amemaki bino ndenge tata amemaka mwana na ye. » 32 Atako bongo, botiaki elikya te epai na Yawe, Nzambe na bino, 33 oyo azalaki kotambola liboso na bino na nzela mpo na kolukela bino esika ya kotonga molako. Na butu, azalaki lokola likonzi ya moto ; mpe na moyi, azalaki lokola likonzi ya lipata ; mpo na kolakisa bino nzela oyo bosengelaki kotambola. 34 Tango Yawe ayokaki nyonso oyo bozalaki koloba, asilikaki mpe alapaki ndayi : 35 « Moto moko te kati na molongo oyo ya bato mabe akoki komona mokili ya kitoko oyo nalakaki kopesa na bakoko na bango na nzela ya ndayi, 36 longola kaka Kalebi, mwana mobali ya Yefune ; ye akomona yango, mpe nakopesa na ye mpe na bakitani na ye, mokili oyo lokolo na ye enyataki, pamba te asalelaki Ngai Yawe na motema na ye mobimba. » 37 Likolo na bino, Yawe asilikelaki mpe ngai ; alobaki : « Yo mpe lisusu okokota te kati na mokili yango. 38 Kasi mosungi na yo Jozue, mwana mobali ya Nuni, ye akokota kati na yango. Lendisa ye, pamba te ye nde akokamba Isalaele mpo na kozwa mokili yango lokola libula. 39 Bongo, bana na bino oyo bolobaki ete bakomema bango na bowumbu, bana na bino oyo bayebi nanu te kokesenisa malamu mpe mabe, bango nde bakokota na mokili yango. Nakopesa bango mokili yango, mpe bakokamata yango. 40 Mpo na bino, bobaluka mpe bokende na esobe, na nzela ya ebale monene ya Barozo. » 41 Bozongiselaki ngai : « Tosali masumu epai na Yawe. Tokokende mpe tokobunda ndenge Yawe, Nzambe na biso, atindaki biso. » Boye, moto nyonso kati na bino alataki bibundeli na ye, mpe bokanisaki ete ezali likambo ya pasi te komata na etuka ya bangomba. 42 Kasi Yawe alobaki na ngai : « Yebisa bango ete bamata te mpe babunda te, pamba te nakozala elongo na bango te ; banguna na bango bakolonga bango. » 43 Nzokande nayebisaki bino, kasi boyokaki kaka te ; botombokelaki mitindo ya Yawe ; mpe, na lolendo na bino, bomataki na etuka ya bangomba. 44 Boye, bato ya Amori oyo bavandaka na bangomba yango bakitelaki bino mpe babundisaki bino, babenganaki bino lokola liboke ya banzoyi mpe balongaki bino longwa na Seiri kino na Orima. 45 Bozongaki mpe bolelaki liboso ya Yawe, kasi aboyaki koyoka kolela na bino, akangaki matoyi na Ye. 46 Bongo bovandaki na Kadeshi mikolo ebele.

In Other Versions

Deuteronomy 1 in the ANGEFD

Deuteronomy 1 in the ANTPNG2D

Deuteronomy 1 in the AS21

Deuteronomy 1 in the BAGH

Deuteronomy 1 in the BBPNG

Deuteronomy 1 in the BBT1E

Deuteronomy 1 in the BDS

Deuteronomy 1 in the BEV

Deuteronomy 1 in the BHAD

Deuteronomy 1 in the BIB

Deuteronomy 1 in the BLPT

Deuteronomy 1 in the BNT

Deuteronomy 1 in the BNTABOOT

Deuteronomy 1 in the BNTLV

Deuteronomy 1 in the BOATCB

Deuteronomy 1 in the BOATCB2

Deuteronomy 1 in the BOBCV

Deuteronomy 1 in the BOCNT

Deuteronomy 1 in the BOECS

Deuteronomy 1 in the BOGWICC

Deuteronomy 1 in the BOHCB

Deuteronomy 1 in the BOHCV

Deuteronomy 1 in the BOHLNT

Deuteronomy 1 in the BOHNTLTAL

Deuteronomy 1 in the BOICB

Deuteronomy 1 in the BOILNTAP

Deuteronomy 1 in the BOITCV

Deuteronomy 1 in the BOKCV

Deuteronomy 1 in the BOKCV2

Deuteronomy 1 in the BOKHWOG

Deuteronomy 1 in the BOKSSV

Deuteronomy 1 in the BOLCB

Deuteronomy 1 in the BOMCV

Deuteronomy 1 in the BONAV

Deuteronomy 1 in the BONCB

Deuteronomy 1 in the BONLT

Deuteronomy 1 in the BONUT2

Deuteronomy 1 in the BOPLNT

Deuteronomy 1 in the BOSCB

Deuteronomy 1 in the BOSNC

Deuteronomy 1 in the BOTLNT

Deuteronomy 1 in the BOVCB

Deuteronomy 1 in the BOYCB

Deuteronomy 1 in the BPBB

Deuteronomy 1 in the BPH

Deuteronomy 1 in the BSB

Deuteronomy 1 in the CCB

Deuteronomy 1 in the CUV

Deuteronomy 1 in the CUVS

Deuteronomy 1 in the DBT

Deuteronomy 1 in the DGDNT

Deuteronomy 1 in the DHNT

Deuteronomy 1 in the DNT

Deuteronomy 1 in the ELBE

Deuteronomy 1 in the EMTV

Deuteronomy 1 in the ESV

Deuteronomy 1 in the FBV

Deuteronomy 1 in the FEB

Deuteronomy 1 in the GGMNT

Deuteronomy 1 in the GNT

Deuteronomy 1 in the HARY

Deuteronomy 1 in the HNT

Deuteronomy 1 in the IRVA

Deuteronomy 1 in the IRVB

Deuteronomy 1 in the IRVG

Deuteronomy 1 in the IRVH

Deuteronomy 1 in the IRVK

Deuteronomy 1 in the IRVM

Deuteronomy 1 in the IRVM2

Deuteronomy 1 in the IRVO

Deuteronomy 1 in the IRVP

Deuteronomy 1 in the IRVT

Deuteronomy 1 in the IRVT2

Deuteronomy 1 in the IRVU

Deuteronomy 1 in the ISVN

Deuteronomy 1 in the JSNT

Deuteronomy 1 in the KAPI

Deuteronomy 1 in the KBT1ETNIK

Deuteronomy 1 in the KBV

Deuteronomy 1 in the KJV

Deuteronomy 1 in the KNFD

Deuteronomy 1 in the LBA

Deuteronomy 1 in the LBLA

Deuteronomy 1 in the LNT

Deuteronomy 1 in the LSV

Deuteronomy 1 in the MAAL

Deuteronomy 1 in the MBV

Deuteronomy 1 in the MBV2

Deuteronomy 1 in the MHNT

Deuteronomy 1 in the MKNFD

Deuteronomy 1 in the MNG

Deuteronomy 1 in the MNT

Deuteronomy 1 in the MNT2

Deuteronomy 1 in the MRS1T

Deuteronomy 1 in the NAA

Deuteronomy 1 in the NASB

Deuteronomy 1 in the NBLA

Deuteronomy 1 in the NBS

Deuteronomy 1 in the NBVTP

Deuteronomy 1 in the NET2

Deuteronomy 1 in the NIV11

Deuteronomy 1 in the NNT

Deuteronomy 1 in the NNT2

Deuteronomy 1 in the NNT3

Deuteronomy 1 in the PDDPT

Deuteronomy 1 in the PFNT

Deuteronomy 1 in the RMNT

Deuteronomy 1 in the SBIAS

Deuteronomy 1 in the SBIBS

Deuteronomy 1 in the SBIBS2

Deuteronomy 1 in the SBICS

Deuteronomy 1 in the SBIDS

Deuteronomy 1 in the SBIGS

Deuteronomy 1 in the SBIHS

Deuteronomy 1 in the SBIIS

Deuteronomy 1 in the SBIIS2

Deuteronomy 1 in the SBIIS3

Deuteronomy 1 in the SBIKS

Deuteronomy 1 in the SBIKS2

Deuteronomy 1 in the SBIMS

Deuteronomy 1 in the SBIOS

Deuteronomy 1 in the SBIPS

Deuteronomy 1 in the SBISS

Deuteronomy 1 in the SBITS

Deuteronomy 1 in the SBITS2

Deuteronomy 1 in the SBITS3

Deuteronomy 1 in the SBITS4

Deuteronomy 1 in the SBIUS

Deuteronomy 1 in the SBIVS

Deuteronomy 1 in the SBT

Deuteronomy 1 in the SBT1E

Deuteronomy 1 in the SCHL

Deuteronomy 1 in the SNT

Deuteronomy 1 in the SUSU

Deuteronomy 1 in the SUSU2

Deuteronomy 1 in the SYNO

Deuteronomy 1 in the TBIAOTANT

Deuteronomy 1 in the TBT1E

Deuteronomy 1 in the TBT1E2

Deuteronomy 1 in the TFTIP

Deuteronomy 1 in the TFTU

Deuteronomy 1 in the TGNTATF3T

Deuteronomy 1 in the THAI

Deuteronomy 1 in the TNFD

Deuteronomy 1 in the TNT

Deuteronomy 1 in the TNTIK

Deuteronomy 1 in the TNTIL

Deuteronomy 1 in the TNTIN

Deuteronomy 1 in the TNTIP

Deuteronomy 1 in the TNTIZ

Deuteronomy 1 in the TOMA

Deuteronomy 1 in the TTENT

Deuteronomy 1 in the UBG

Deuteronomy 1 in the UGV

Deuteronomy 1 in the UGV2

Deuteronomy 1 in the UGV3

Deuteronomy 1 in the VBL

Deuteronomy 1 in the VDCC

Deuteronomy 1 in the YALU

Deuteronomy 1 in the YAPE

Deuteronomy 1 in the YBVTP

Deuteronomy 1 in the ZBP