Esther 4 (BOLCB2)
1 Tango Maridoshe ayokaki makambo nyonso oyo elekaki, apasolaki bilamba na ye ; alataki saki, amipakolaki putulu mpe atambolaki kati na engumba na koganga makasi mpe na mawa. 2 Bongo akendeki kino na liboso ya ekuke ya ndako ya mokonzi ; pamba te moto moko te, wana alati saki lokola elamba, azalaki na ndingisa ya kokota na ekuke ya mokonzi. 3 Kati na bituka nyonso epai wapi mitindo mpe mobeko ya mokonzi ezalaki kokoma, matanga monene ezalaki kati na Bayuda : bazalaki kokila bilei, kolela mpe koganga ya mawa ; ebele bazalaki komitanda na basaki mpe na putulu. 4 Tango basi bawumbu ya Ester, mwasi ya Mokonzi, mpe basoda na ye, oyo baboma bango mokongo, bayebisaki Ester makambo oyo Maridoshe asalaki, Ester amitungisaki makasi. Atindelaki Maridoshe bilamba mpo ete alata yango mpe alongola basaki oyo alataki, kasi Maridoshe aboyaki. 5 Ester abengisaki Ataki, moko kati na bakalaka ya lokumu, oyo baboma mokongo mpe mokonzi aponaki mpo na kosalela Ester ; atindaki ye mpo na koyeba likambo oyo ezali kotungisa Maridoshe mpe tina nini azali komitungisa. 6 Boye Ataki akendeki epai ya Maridoshe na etando ya engumba, epai wapi bato ebele bakutanaka, liboso ya ekuke ya ndako ya mokonzi. 7 Maridoshe ayebisaki ye makambo nyonso oyo ekomelaki ye, ata motuya ya mbongo oyo Amani alakaki kopesa na libenga ya bomengo ya mokonzi mpo ete baboma Bayuda. 8 Maridoshe apesaki lisusu Ataki mokanda ya mobeko oyo mokonzi abimisaki, mpo ete ye Ataki alakisa yango epai ya Ester, alimbolela ye yango mpe akomisa epai ya Ester mitindo na ye ete Ester akende epai ya mokonzi mpo na kotungisa ye mpe kobondela mawa ya mokonzi mpo na bato na ye Ester ; pamba te mokonzi asili kobimisa mobeko ya koboma Bayuda mpe sango na yango esili kopanzana kati na engumba Size. 9 Tango Ataki azongaki mpe ayebisaki Ester makambo oyo Maridoshe alobaki, 10 Ester atindaki lisusu Ataki koloba na Maridoshe : 11 — Bakalaka nyonso ya mokonzi mpe bato ya bituka nyonso ya mokili ya mokonzi bayebi ete, kolanda mobeko, moto nyonso, azala mobali to mwasi, oyo akoti na lopango ya kati ya ndako ya mokonzi asengeli na kufa soki mokonzi abengisi ye te ; mpe mobeko yango ezali kaka moko mpo na bato nyonso. Nzokande soki mokonzi asemboli epai ya moto yango lingenda ya wolo ya bokonzi na ye, akotikala na bomoi. Ngai sik’oyo, eleki mikolo tuku misato wuta babenga ngai mpo na kokende epai ya mokonzi ; wuta mikolo wana, babenga ngai lisusu te. 12 Tango bayebisaki Maridoshe makambo oyo Ester alobaki, 13 Maridoshe azongiselaki Ester :— Kokanisa te ete lokola ozali kati na ndako ya mokonzi, yo moko kaka nde okobika kati na Bayuda nyonso. 14 Pamba te soki yo okangi monoko na yo mpe olobi eloko moko te na tango oyo, lisungi mpe lobiko mpo na Bayuda ekowuta na esika mosusu ; kasi yo mpe libota ya botata na yo, bokokufa. Kutu, nani ayebi soki tango mosusu ezali mpo na makambo ya boye nde okomaki na ndako ya mokonzi ? 15 Ester atindelaki Maridoshe eyano oyo : 16 — Kende kosangisa Bayuda nyonso oyo bazali na engumba Size. Bokila bilei mikolo misato mpo na ngai ; butu mpe moyi, bolia mpe bomela eloko te. Ngai mpe nakokila bilei elongo na basi bawumbu na ngai ndenge moko na bino. Sima na yango kaka nde nakokende epai ya mokonzi atako nakobuka mobeko. Soki mpe nakokufa, nakufa kaka ! 17 Maridoshe akendeki mpe asalaki makambo nyonso oyo Ester atindaki ye.
In Other Versions
Esther 4 in the ANGEFD
Esther 4 in the ANTPNG2D
Esther 4 in the AS21
Esther 4 in the BAGH
Esther 4 in the BBPNG
Esther 4 in the BBT1E
Esther 4 in the BDS
Esther 4 in the BEV
Esther 4 in the BHAD
Esther 4 in the BIB
Esther 4 in the BLPT
Esther 4 in the BNT
Esther 4 in the BNTABOOT
Esther 4 in the BNTLV
Esther 4 in the BOATCB
Esther 4 in the BOATCB2
Esther 4 in the BOBCV
Esther 4 in the BOCNT
Esther 4 in the BOECS
Esther 4 in the BOGWICC
Esther 4 in the BOHCB
Esther 4 in the BOHCV
Esther 4 in the BOHLNT
Esther 4 in the BOHNTLTAL
Esther 4 in the BOICB
Esther 4 in the BOILNTAP
Esther 4 in the BOITCV
Esther 4 in the BOKCV
Esther 4 in the BOKCV2
Esther 4 in the BOKHWOG
Esther 4 in the BOKSSV
Esther 4 in the BOLCB
Esther 4 in the BOMCV
Esther 4 in the BONAV
Esther 4 in the BONCB
Esther 4 in the BONLT
Esther 4 in the BONUT2
Esther 4 in the BOPLNT
Esther 4 in the BOSCB
Esther 4 in the BOSNC
Esther 4 in the BOTLNT
Esther 4 in the BOVCB
Esther 4 in the BOYCB
Esther 4 in the BPBB
Esther 4 in the BPH
Esther 4 in the BSB
Esther 4 in the CCB
Esther 4 in the CUV
Esther 4 in the CUVS
Esther 4 in the DBT
Esther 4 in the DGDNT
Esther 4 in the DHNT
Esther 4 in the DNT
Esther 4 in the ELBE
Esther 4 in the EMTV
Esther 4 in the ESV
Esther 4 in the FBV
Esther 4 in the FEB
Esther 4 in the GGMNT
Esther 4 in the GNT
Esther 4 in the HARY
Esther 4 in the HNT
Esther 4 in the IRVA
Esther 4 in the IRVB
Esther 4 in the IRVG
Esther 4 in the IRVH
Esther 4 in the IRVK
Esther 4 in the IRVM
Esther 4 in the IRVM2
Esther 4 in the IRVO
Esther 4 in the IRVP
Esther 4 in the IRVT
Esther 4 in the IRVT2
Esther 4 in the IRVU
Esther 4 in the ISVN
Esther 4 in the JSNT
Esther 4 in the KAPI
Esther 4 in the KBT1ETNIK
Esther 4 in the KBV
Esther 4 in the KJV
Esther 4 in the KNFD
Esther 4 in the LBA
Esther 4 in the LBLA
Esther 4 in the LNT
Esther 4 in the LSV
Esther 4 in the MAAL
Esther 4 in the MBV
Esther 4 in the MBV2
Esther 4 in the MHNT
Esther 4 in the MKNFD
Esther 4 in the MNG
Esther 4 in the MNT
Esther 4 in the MNT2
Esther 4 in the MRS1T
Esther 4 in the NAA
Esther 4 in the NASB
Esther 4 in the NBLA
Esther 4 in the NBS
Esther 4 in the NBVTP
Esther 4 in the NET2
Esther 4 in the NIV11
Esther 4 in the NNT
Esther 4 in the NNT2
Esther 4 in the NNT3
Esther 4 in the PDDPT
Esther 4 in the PFNT
Esther 4 in the RMNT
Esther 4 in the SBIAS
Esther 4 in the SBIBS
Esther 4 in the SBIBS2
Esther 4 in the SBICS
Esther 4 in the SBIDS
Esther 4 in the SBIGS
Esther 4 in the SBIHS
Esther 4 in the SBIIS
Esther 4 in the SBIIS2
Esther 4 in the SBIIS3
Esther 4 in the SBIKS
Esther 4 in the SBIKS2
Esther 4 in the SBIMS
Esther 4 in the SBIOS
Esther 4 in the SBIPS
Esther 4 in the SBISS
Esther 4 in the SBITS
Esther 4 in the SBITS2
Esther 4 in the SBITS3
Esther 4 in the SBITS4
Esther 4 in the SBIUS
Esther 4 in the SBIVS
Esther 4 in the SBT
Esther 4 in the SBT1E
Esther 4 in the SCHL
Esther 4 in the SNT
Esther 4 in the SUSU
Esther 4 in the SUSU2
Esther 4 in the SYNO
Esther 4 in the TBIAOTANT
Esther 4 in the TBT1E
Esther 4 in the TBT1E2
Esther 4 in the TFTIP
Esther 4 in the TFTU
Esther 4 in the TGNTATF3T
Esther 4 in the THAI
Esther 4 in the TNFD
Esther 4 in the TNT
Esther 4 in the TNTIK
Esther 4 in the TNTIL
Esther 4 in the TNTIN
Esther 4 in the TNTIP
Esther 4 in the TNTIZ
Esther 4 in the TOMA
Esther 4 in the TTENT
Esther 4 in the UBG
Esther 4 in the UGV
Esther 4 in the UGV2
Esther 4 in the UGV3
Esther 4 in the VBL
Esther 4 in the VDCC
Esther 4 in the YALU
Esther 4 in the YAPE
Esther 4 in the YBVTP
Esther 4 in the ZBP