Exodus 10 (BOLCB2)

1 Yawe alobaki na Moyize : « Kende epai ya Faraon, pamba te nakomisi motema na ye mpe ya bakalaka na ye makasi, mpo ete nasala bilembo na Ngai ya kokamwa kati na bango, 2 mpe ete oyebisa bana na yo mpe bakoko na yo makambo oyo nasalaki na Ejipito mpe bilembo ya kokamwa oyo nasalaki kati na bango. Bongo bokoyeba ete Ngai nazali Yawe. » 3 Boye Moyize mpe Aron bakendeki epai ya Faraon mpe balobaki na ye : « Tala makambo oyo Yawe, Nzambe ya Ba-Ebre, alobi : ‹ Kino tango nini okoboya komikitisa liboso na Ngai ? Tika bato na Ngai kokende kogumbamela Ngai. 4 Soki oboyi kotika bango kokende, lobi nakotinda mabanki na mokili na yo. 5 Ekotondisa mokili ya Ejipito na ndenge ete mabele ekomonana lisusu te. Mabanki yango ekolia mwa biloko moke oyo mvula ya mabanga etikaki ; ekolia mpe banzete na bino nyonso oyo ezali kokola kati na bilanga. 6 Ekotonda na bandako na yo, ya bakalaka na yo mpe ya bato nyonso ya Ejipito ; ezala batata na yo to bakoko na yo batikala nanu komona te likambo ya boye wuta bazala na mokili oyo kino lelo. › »Moyize abalukaki mpe atikaki ndako ya Faraon. 7 Bakalaka ya Faraon balobaki na ye :— Kino tango nini moto oyo akozala motambo mpo na biso ? Tika bango bakende kogumbamela Yawe, Nzambe na bango. Ozali komona te ete Ejipito ebebi ? 8 Bongo bazongisaki Moyize mpe Aron epai ya Faraon ; mpe Faraon alobaki na bango :— Bokende kogumbamela Yawe, Nzambe na bino. Kasi banani oyo bakokende ? 9 Moyize azongisaki :— Tokokende elongo na bilenge na biso, bampaka na biso, bana na biso ya mibali mpe ya basi, bameme na biso, bantaba na biso mpe bangombe na biso ; pamba te tokosala feti mpo na lokumu ya Yawe. 10 Faraon alobaki na bango :— Soki nakotika bino kokende elongo na bana na bino, wana tika ete Yawe azala elongo na bino ! Nzokande emonani solo ete bozali na makanisi mabe. 11 Ekosalema bongo te ! Kaka mibali nde bakokende kogumbamela Yawe, pamba te yango nde likambo oyo bozali kosenga ngai.Boye babenganaki Moyize mpe Aron liboso ya Faraon. 12 Yawe alobaki na Moyize :— Sembola loboko na yo na mokili ya Ejipito mpo ete obimisa mabanki kati na mokili yango mpe mabanki yango elia matiti nyonso ya bilanga, biloko nyonso oyo mvula ya mabanga ebebisaki te. 13 Boye Moyize asembolaki lingenda na ye na mokili ya Ejipito mpe Yawe atindaki mopepe ya este mokolo mobimba mpe butu mobimba. Mpe tango tongo etanaki, mopepe yango eyaki na mabanki. 14 Mabanki ekotaki kati na Ejipito nyonso mpe evandaki ebele na bisika nyonso ya Ejipito. Etumbu ya mabanki ya ndenge wana etikala nanu kozala te mpe ekotikala kozala lisusu te. 15 Ezipaki mabele nyonso mpe mabele eyindaki. Eliaki nyonso oyo mvula ya mabanga ebebisaki te : matiti nyonso ya bilanga mpe bambuma nyonso ya banzete. Kati na mokili mobimba ya Ejipito, eloko moko te ya mobesu etikalaki na banzete to na matiti ya bilanga. 16 Faraon abengisaki Moyize mpe Aron na lombangu, alobaki :— Nasali lisumu epai na Yawe, Nzambe na bino, mpe epai na bino. 17 Sik’oyo lisusu, bolimbisa lisumu na ngai. Bobondela Yawe, Nzambe na bino, mpo ete alongola etumbu oyo ya kufa kati na ngai. 18 Moyize atikaki Faraon mpe abondelaki Yawe. 19 Bongo Yawe akomisaki mopepe ya este ekumbaki moko ya weste oyo ememaki mabanki mpe ebwakaki yango na ebale monene ya Barozo. Ata libanki moko te etikalaki na bisika nyonso ya Ejipito. 20 Kasi Yawe akomisaki lisusu motema ya Faraon makasi mpe Faraon aboyaki kotika bana ya Isalaele kokende. 21 Yawe alobaki na Moyize :— Sembola loboko na yo likolo mpo ete molili epanzana na mokili ya Ejipito, molili oyo ekosala ete bato batambola na kosimbasimba. 22 Boye Moyize asembolaki loboko na ye likolo mpe molili makasi ezipaki mokili mobimba ya Ejipito mikolo misato. 23 Na mikolo misato yango, moto moko te akokaki komona moto mosusu mpe kolongwa na esika oyo azali mpo na kokende na esika mosusu. Nzokande pole ezalaki na bisika nyonso oyo bana ya Isalaele bazalaki kovanda. 24 Faraon abengisaki Moyize mpe alobaki :— Bokende kogumbamela Yawe ; bokende bino nyonso nzela moko, ezala basi mpe bana na bino. Kasi botika kaka bangombe, bameme mpe bantaba na bino. 25 Kasi Moyize alobaki :— Okopesa biso mbeka mpe makabo ya kotumba oyo tokobonzela Yawe, Nzambe na biso. 26 Bitonga na biso ya bibwele mpe ekokende nzela moko na biso ; ata linzaka moko te ya ebwele ekotikala. Pamba te ezali kati na bibwele yango nde tokopona oyo tokobonzela Yawe, Nzambe na biso ; mpe wana tokomi nanu kuna te, toyebi te ebwele nini tokobonza mpo na kogumbamela Yawe. 27 Kasi Yawe akomisaki lisusu motema ya Faraon makasi ; mpe Faraon aboyaki kaka kotika bango kokende. 28 Faraon alobaki na Moyize :— Longwa liboso na ngai mpe keba na yo ! Koya lisusu liboso na ngai te ! Mokolo oyo okoya lisusu liboso na ngai, okokufa. 29 Moyize azongisaki :— Ndenge kaka olobi, nakotikala koya lisusu liboso na yo te !

In Other Versions

Exodus 10 in the ANGEFD

Exodus 10 in the ANTPNG2D

Exodus 10 in the AS21

Exodus 10 in the BAGH

Exodus 10 in the BBPNG

Exodus 10 in the BBT1E

Exodus 10 in the BDS

Exodus 10 in the BEV

Exodus 10 in the BHAD

Exodus 10 in the BIB

Exodus 10 in the BLPT

Exodus 10 in the BNT

Exodus 10 in the BNTABOOT

Exodus 10 in the BNTLV

Exodus 10 in the BOATCB

Exodus 10 in the BOATCB2

Exodus 10 in the BOBCV

Exodus 10 in the BOCNT

Exodus 10 in the BOECS

Exodus 10 in the BOGWICC

Exodus 10 in the BOHCB

Exodus 10 in the BOHCV

Exodus 10 in the BOHLNT

Exodus 10 in the BOHNTLTAL

Exodus 10 in the BOICB

Exodus 10 in the BOILNTAP

Exodus 10 in the BOITCV

Exodus 10 in the BOKCV

Exodus 10 in the BOKCV2

Exodus 10 in the BOKHWOG

Exodus 10 in the BOKSSV

Exodus 10 in the BOLCB

Exodus 10 in the BOMCV

Exodus 10 in the BONAV

Exodus 10 in the BONCB

Exodus 10 in the BONLT

Exodus 10 in the BONUT2

Exodus 10 in the BOPLNT

Exodus 10 in the BOSCB

Exodus 10 in the BOSNC

Exodus 10 in the BOTLNT

Exodus 10 in the BOVCB

Exodus 10 in the BOYCB

Exodus 10 in the BPBB

Exodus 10 in the BPH

Exodus 10 in the BSB

Exodus 10 in the CCB

Exodus 10 in the CUV

Exodus 10 in the CUVS

Exodus 10 in the DBT

Exodus 10 in the DGDNT

Exodus 10 in the DHNT

Exodus 10 in the DNT

Exodus 10 in the ELBE

Exodus 10 in the EMTV

Exodus 10 in the ESV

Exodus 10 in the FBV

Exodus 10 in the FEB

Exodus 10 in the GGMNT

Exodus 10 in the GNT

Exodus 10 in the HARY

Exodus 10 in the HNT

Exodus 10 in the IRVA

Exodus 10 in the IRVB

Exodus 10 in the IRVG

Exodus 10 in the IRVH

Exodus 10 in the IRVK

Exodus 10 in the IRVM

Exodus 10 in the IRVM2

Exodus 10 in the IRVO

Exodus 10 in the IRVP

Exodus 10 in the IRVT

Exodus 10 in the IRVT2

Exodus 10 in the IRVU

Exodus 10 in the ISVN

Exodus 10 in the JSNT

Exodus 10 in the KAPI

Exodus 10 in the KBT1ETNIK

Exodus 10 in the KBV

Exodus 10 in the KJV

Exodus 10 in the KNFD

Exodus 10 in the LBA

Exodus 10 in the LBLA

Exodus 10 in the LNT

Exodus 10 in the LSV

Exodus 10 in the MAAL

Exodus 10 in the MBV

Exodus 10 in the MBV2

Exodus 10 in the MHNT

Exodus 10 in the MKNFD

Exodus 10 in the MNG

Exodus 10 in the MNT

Exodus 10 in the MNT2

Exodus 10 in the MRS1T

Exodus 10 in the NAA

Exodus 10 in the NASB

Exodus 10 in the NBLA

Exodus 10 in the NBS

Exodus 10 in the NBVTP

Exodus 10 in the NET2

Exodus 10 in the NIV11

Exodus 10 in the NNT

Exodus 10 in the NNT2

Exodus 10 in the NNT3

Exodus 10 in the PDDPT

Exodus 10 in the PFNT

Exodus 10 in the RMNT

Exodus 10 in the SBIAS

Exodus 10 in the SBIBS

Exodus 10 in the SBIBS2

Exodus 10 in the SBICS

Exodus 10 in the SBIDS

Exodus 10 in the SBIGS

Exodus 10 in the SBIHS

Exodus 10 in the SBIIS

Exodus 10 in the SBIIS2

Exodus 10 in the SBIIS3

Exodus 10 in the SBIKS

Exodus 10 in the SBIKS2

Exodus 10 in the SBIMS

Exodus 10 in the SBIOS

Exodus 10 in the SBIPS

Exodus 10 in the SBISS

Exodus 10 in the SBITS

Exodus 10 in the SBITS2

Exodus 10 in the SBITS3

Exodus 10 in the SBITS4

Exodus 10 in the SBIUS

Exodus 10 in the SBIVS

Exodus 10 in the SBT

Exodus 10 in the SBT1E

Exodus 10 in the SCHL

Exodus 10 in the SNT

Exodus 10 in the SUSU

Exodus 10 in the SUSU2

Exodus 10 in the SYNO

Exodus 10 in the TBIAOTANT

Exodus 10 in the TBT1E

Exodus 10 in the TBT1E2

Exodus 10 in the TFTIP

Exodus 10 in the TFTU

Exodus 10 in the TGNTATF3T

Exodus 10 in the THAI

Exodus 10 in the TNFD

Exodus 10 in the TNT

Exodus 10 in the TNTIK

Exodus 10 in the TNTIL

Exodus 10 in the TNTIN

Exodus 10 in the TNTIP

Exodus 10 in the TNTIZ

Exodus 10 in the TOMA

Exodus 10 in the TTENT

Exodus 10 in the UBG

Exodus 10 in the UGV

Exodus 10 in the UGV2

Exodus 10 in the UGV3

Exodus 10 in the VBL

Exodus 10 in the VDCC

Exodus 10 in the YALU

Exodus 10 in the YAPE

Exodus 10 in the YBVTP

Exodus 10 in the ZBP