Ezekiel 48 (BOLCB2)

1 « Tala bikolo ndenge ekomami kolanda bakombo na yango : Libota ya Dani ekozwa eteni moko ya mabele~:mondelo na yango ekolekela na nzela ya Etiloni kino na Lebo-Amati, Atsari-Enani mpe mondelo ya nor ya mokili ya Damasi pembeni ya Amati~;boye mondelo na yango ekobanda longwa na ngambo ya este kino na ngambo ya weste. 2 Libota ya Aseri ekozwa eteni moko ya mabele :ekozala na mondelo ya libota ya Dani, longwa na este kino na weste. 3 Libota ya Nefitali ekozwa eteni moko ya mabele :ekozala na mondelo ya libota ya Aseri, longwa na ngambo ya este kino na ngambo ya weste. 4 Libota ya Manase ekozwa eteni moko ya mabele :ekozala na mondelo ya libota ya Nefitali, longwa na ngambo ya este kino na ngambo ya weste. 5 Libota ya Efrayimi ekozwa eteni moko ya mabele :ekozala na mondelo ya libota ya Manase, longwa na ngambo ya este kino na ngambo ya weste. 6 Libota ya Ribeni ekozwa eteni moko ya mabele :ekozala na mondelo ya libota ya Efrayimi, longwa na ngambo ya este kino na ngambo ya weste. 7 Libota ya Yuda ekozwa eteni moko ya mabele :ekozala na mondelo ya libota ya Ribeni, longwa na ngambo ya este kino na ngambo ya weste. 8 Eteni ya mabele oyo bakopesa Yawe lokola likabo ya motuya ekozala na mondelo ya etuka ya Yuda :longwa na ngambo ya este kino na ngambo ya weste~; ekozala na bametele pene nkoto zomi na mibale na nkama mitano na mokuse, mpe molayi na yango ekozala ndenge moko na biteni ya mabele ya mabota mosusu.Boye, Esika ya bule ekozala na kati-kati na yango. 9 Eteni ya mabele ya motuya oyo bokopesa Yawe lokola likabo ekozala na bametele pene nkoto zomi na mibale na nkama mitano na molayi mpe bametele pene nkoto mitano na mokuse. 10 Eteni yango ya mabele ekozala bule mpe ekopesama mpo na Banganga-Nzambe : ekozala na bametele pene nkoto zomi na mibale na nkama mitano na molayi na ngambo ya nor, bametele pene nkoto mitano na mokuse na ngambo ya weste, bametele pene nkoto mitano na mokuse na ngambo ya este mpe bametele pene nkoto zomi na mibale na nkama mitano na molayi na ngambo ya sude. Esika ya bule ya Yawe ekozala na kati-kati na yango. 11 Eteni yango ya mabele ekozala mpo na Banganga-Nzambe oyo babulisama, oyo bazali bakitani ya Tsadoki, mpo ete basalelaki Ngai na boyengebene mpe bapengwaki te na nzela na Ngai tango bana ya Isalaele bapengwaki ndenge mpe Balevi basalaki. 12 Ekozala mpo na bango lokola likabo ya motuya oyo ewuti na eteni ya mabele oyo ebulisama kati na mokili, eteni ya mabele oyo eleki na bule na bandelo ya etuka ya Balevi. 13 Na zingazinga ya etuka ya Banganga-Nzambe, Balevi bakozwa eteni moko ya mabele ya bametele pene nkoto zomi na mibale na nkama mitano na molayi mpe bametele pene nkoto mitano na mokuse. 14 Bakoki te koteka to kopesa eloko moko kati na eteni ya mabele yango na bato mosusu, pamba te yango ezali mabele oyo eleki kitoko, mpo ete ebulisama mpo na Yawe. 15 Eteni ya mabele oyo ekotikala, eteni ya bametele pene nkoto mibale na nkama mitano na mokuse mpe bametele pene nkoto zomi na mibale na nkama mitano na molayi, ekozala ebulisama te ; ekozala mpo na kosala misala ya engumba lokola kotonga bandako mpe kobokola bibwele ; engumba ekozala na kati-kati na yango 16 mpe ekozala na molayi ya bametele pene nkoto mibale na nkama mibale na tuku mitano, na bangambo nyonso : nor, sude, este mpe weste. 17 Bongo, lopango ya kobokolela bibwele ya engumba ekozala na bametele pene nkama moko na tuku mibale na mitano, na bangambo nyonso : nor, sude, este mpe weste. 18 Eteni ya mabele oyo ekotikala na etuka, zingazinga ya eteni ya bule, longwa na molayi na yango, ekozala na bametele pene nkoto mitano na ngambo ya este mpe bametele pene nkoto mitano na ngambo ya weste. Bambuma ya mabele na yango ekoleisa bato oyo bakosala mpo na engumba. 19 Basali oyo bakobanda kowuta na engumba epai wapi basalaka mpo na kosala mosala ya bilanga bakobimela na mabota nyonso ya Isalaele. 20 Eteni nyonso ya mabele oyo bakobulisa mpo na Yawe ekozala na molayi moko, na bangambo nyonso : bametele pene nkoto zomi na mibale na nkama mitano ndenge likabo ya motuya ezalaka ;bokolongola ndambo moko kati na bandambo minei ya eteni ya bule mpe bokosalela yango misala ya engumba. 21 Eteni ya mabele oyo ekotikala na bangambo nyonso mibale ya eteni ya mabele oyo ebulisama mpe ya eteni ya mabele oyo ebongisami mpo na misala ya engumba ekozala ya mokambi. Ekozala longwa na mondelo ya ngambo ya este ya eteni ya mabele oyo ebulisama, oyo ezali na bametele pene nkoto zomi na mibale na nkama mitano na molayi kino na mondelo ya ngambo ya weste oyo ezali mpe na bametele pene nkoto zomi na mibale na nkama mitano na molayi.Eteni ya mabele oyo ebulisama mpe Esika ya bule ya Tempelo ekozala na kati-kati ya biteni nyonso mabele. 22 Boye, eteni ya mabele ya Balevi mpe eteni ya mabele oyo ebongisama mpo na misala ya engumba ekozala na kati-kati ya eteni ya mabele ya mokambi. Eteni ya mabele ya mokambi ekozala na kati-kati ya bandelo ya libota ya Yuda mpe ya libota ya Benjame. 23 Mpo na mabota mosusu : Libota ya Benjame ekozwa eteni moko ya mabele~:ekobanda longwa na ngambo ya este kino na ngambo ya weste~; 24 Libota ya Simeoni ekozwa eteni moko ya mabele :ekobanda longwa na mondelo ya mabele ya libota ya Benjame na ngambo ya este kino na ngambo ya weste~; 25 Libota ya Isakari ekozwa eteni moko ya mabele :ekobanda longwa na mondelo ya mabele ya libota ya Simeoni na ngambo ya este kino na ngambo ya weste~; 26 Libota ya Zabuloni ekozwa eteni moko ya mabele :ekobanda longwa na mondelo ya mabele ya libota ya Isakari, na ngambo ya este kino na ngambo ya weste~; 27 Libota ya Gadi ekozwa eteni moko ya mabele :ekobanda longwa na mondelo ya mabele ya libota ya Zabuloni, na ngambo ya este kino na ngambo ya weste. 28 Bandelo ya mabele ya Gadi ekozala na ngambo ya sude, pene ya Negevi, longwa na Tamari kino na mayi ya Meriba ya Kadeshi ; ekolekela na Wadi kino na ebale monene Mediterane. 29 Yango nde mokili oyo bokokabola na zeke lokola libula kati na mabota ya Isalaele, libota na libota na eteni na yango ya mabele, » elobi Nkolo Yawe. 30 « Tala oyo ekozala bikuke ya engumba : Na molayi ya bametele pene nkoto mibale na nkama mibale na tuku mitano, 31 bikuke ya engumba ekobengama na bakombo ya mabota ya Isalaele. Na ngambo ya nor, ekozala na bikuke misato :ekuke ya Ribeni, ekuke ya Yuda, mpe ekuke ya Levi~; 32 Ngambo ya este, na molayi ya bametele pene nkoto mibale na nkama mibale na tuku mitano, ekozala na bikuke misato :ekuke ya Jozefi, ekuke ya Benjame, mpe ekuke ya Dani. 33 Na ngambo ya sude, na molayi ya bametele pene nkoto mibale na nkama mibale na tuku mitano, ekozala na bikuke misato :ekuke ya Simeoni, ekuke ya Isakari, mpe ya ekuke ya Zabuloni. 34 Na ngambo ya weste, na molayi ya bametele pene nkoto mibale na nkama mibale na tuku mitano, ekozala na bikuke misato :ekuke ya Gadi, ekuke ya Aseri mpe ya ekuke ya Nefitali. 35 Molayi nyonso ya mir oyo ezingeli engumba ekozala na bametele pene nkoto libwa. Mpe kobanda na tango wana, kombo ya engumba ekokoma ‹ Yawe azali awa. › »

In Other Versions

Ezekiel 48 in the ANGEFD

Ezekiel 48 in the ANTPNG2D

Ezekiel 48 in the AS21

Ezekiel 48 in the BAGH

Ezekiel 48 in the BBPNG

Ezekiel 48 in the BBT1E

Ezekiel 48 in the BDS

Ezekiel 48 in the BEV

Ezekiel 48 in the BHAD

Ezekiel 48 in the BIB

Ezekiel 48 in the BLPT

Ezekiel 48 in the BNT

Ezekiel 48 in the BNTABOOT

Ezekiel 48 in the BNTLV

Ezekiel 48 in the BOATCB

Ezekiel 48 in the BOATCB2

Ezekiel 48 in the BOBCV

Ezekiel 48 in the BOCNT

Ezekiel 48 in the BOECS

Ezekiel 48 in the BOGWICC

Ezekiel 48 in the BOHCB

Ezekiel 48 in the BOHCV

Ezekiel 48 in the BOHLNT

Ezekiel 48 in the BOHNTLTAL

Ezekiel 48 in the BOICB

Ezekiel 48 in the BOILNTAP

Ezekiel 48 in the BOITCV

Ezekiel 48 in the BOKCV

Ezekiel 48 in the BOKCV2

Ezekiel 48 in the BOKHWOG

Ezekiel 48 in the BOKSSV

Ezekiel 48 in the BOLCB

Ezekiel 48 in the BOMCV

Ezekiel 48 in the BONAV

Ezekiel 48 in the BONCB

Ezekiel 48 in the BONLT

Ezekiel 48 in the BONUT2

Ezekiel 48 in the BOPLNT

Ezekiel 48 in the BOSCB

Ezekiel 48 in the BOSNC

Ezekiel 48 in the BOTLNT

Ezekiel 48 in the BOVCB

Ezekiel 48 in the BOYCB

Ezekiel 48 in the BPBB

Ezekiel 48 in the BPH

Ezekiel 48 in the BSB

Ezekiel 48 in the CCB

Ezekiel 48 in the CUV

Ezekiel 48 in the CUVS

Ezekiel 48 in the DBT

Ezekiel 48 in the DGDNT

Ezekiel 48 in the DHNT

Ezekiel 48 in the DNT

Ezekiel 48 in the ELBE

Ezekiel 48 in the EMTV

Ezekiel 48 in the ESV

Ezekiel 48 in the FBV

Ezekiel 48 in the FEB

Ezekiel 48 in the GGMNT

Ezekiel 48 in the GNT

Ezekiel 48 in the HARY

Ezekiel 48 in the HNT

Ezekiel 48 in the IRVA

Ezekiel 48 in the IRVB

Ezekiel 48 in the IRVG

Ezekiel 48 in the IRVH

Ezekiel 48 in the IRVK

Ezekiel 48 in the IRVM

Ezekiel 48 in the IRVM2

Ezekiel 48 in the IRVO

Ezekiel 48 in the IRVP

Ezekiel 48 in the IRVT

Ezekiel 48 in the IRVT2

Ezekiel 48 in the IRVU

Ezekiel 48 in the ISVN

Ezekiel 48 in the JSNT

Ezekiel 48 in the KAPI

Ezekiel 48 in the KBT1ETNIK

Ezekiel 48 in the KBV

Ezekiel 48 in the KJV

Ezekiel 48 in the KNFD

Ezekiel 48 in the LBA

Ezekiel 48 in the LBLA

Ezekiel 48 in the LNT

Ezekiel 48 in the LSV

Ezekiel 48 in the MAAL

Ezekiel 48 in the MBV

Ezekiel 48 in the MBV2

Ezekiel 48 in the MHNT

Ezekiel 48 in the MKNFD

Ezekiel 48 in the MNG

Ezekiel 48 in the MNT

Ezekiel 48 in the MNT2

Ezekiel 48 in the MRS1T

Ezekiel 48 in the NAA

Ezekiel 48 in the NASB

Ezekiel 48 in the NBLA

Ezekiel 48 in the NBS

Ezekiel 48 in the NBVTP

Ezekiel 48 in the NET2

Ezekiel 48 in the NIV11

Ezekiel 48 in the NNT

Ezekiel 48 in the NNT2

Ezekiel 48 in the NNT3

Ezekiel 48 in the PDDPT

Ezekiel 48 in the PFNT

Ezekiel 48 in the RMNT

Ezekiel 48 in the SBIAS

Ezekiel 48 in the SBIBS

Ezekiel 48 in the SBIBS2

Ezekiel 48 in the SBICS

Ezekiel 48 in the SBIDS

Ezekiel 48 in the SBIGS

Ezekiel 48 in the SBIHS

Ezekiel 48 in the SBIIS

Ezekiel 48 in the SBIIS2

Ezekiel 48 in the SBIIS3

Ezekiel 48 in the SBIKS

Ezekiel 48 in the SBIKS2

Ezekiel 48 in the SBIMS

Ezekiel 48 in the SBIOS

Ezekiel 48 in the SBIPS

Ezekiel 48 in the SBISS

Ezekiel 48 in the SBITS

Ezekiel 48 in the SBITS2

Ezekiel 48 in the SBITS3

Ezekiel 48 in the SBITS4

Ezekiel 48 in the SBIUS

Ezekiel 48 in the SBIVS

Ezekiel 48 in the SBT

Ezekiel 48 in the SBT1E

Ezekiel 48 in the SCHL

Ezekiel 48 in the SNT

Ezekiel 48 in the SUSU

Ezekiel 48 in the SUSU2

Ezekiel 48 in the SYNO

Ezekiel 48 in the TBIAOTANT

Ezekiel 48 in the TBT1E

Ezekiel 48 in the TBT1E2

Ezekiel 48 in the TFTIP

Ezekiel 48 in the TFTU

Ezekiel 48 in the TGNTATF3T

Ezekiel 48 in the THAI

Ezekiel 48 in the TNFD

Ezekiel 48 in the TNT

Ezekiel 48 in the TNTIK

Ezekiel 48 in the TNTIL

Ezekiel 48 in the TNTIN

Ezekiel 48 in the TNTIP

Ezekiel 48 in the TNTIZ

Ezekiel 48 in the TOMA

Ezekiel 48 in the TTENT

Ezekiel 48 in the UBG

Ezekiel 48 in the UGV

Ezekiel 48 in the UGV2

Ezekiel 48 in the UGV3

Ezekiel 48 in the VBL

Ezekiel 48 in the VDCC

Ezekiel 48 in the YALU

Ezekiel 48 in the YAPE

Ezekiel 48 in the YBVTP

Ezekiel 48 in the ZBP