Genesis 13 (BOLCB2)
1 Boye Abrami alongwaki na Ejipito mpe akendeki na Negevi elongo na mwasi na ye mpe biloko nyonso oyo azalaki na yango ; Loti mpe akendeki na ye elongo. 2 Abrami akomaki na bozwi mingi : bibwele, palata mpe wolo. 3 Longwa na Negevi, akendeki malembe-malembe kino na Beteli, na esika oyo ezalaki kati ya Beteli mpe Ayi, epai wapi ndako na ye ya kapo ezalaki 4 mpe atongaki etumbelo ya liboso. Ezalaki na esika yango nde Abrami abelelaki Kombo ya Yawe. 5 Loti, oyo azalaki kotambola elongo na Abrami, azalaki mpe na bameme, bantaba, bangombe mpe basali. 6 Boye etuka ekomaki moke mpo na bango mibale, pamba te bomengo na bango ezalaki ebele penza, mpe bakokaki lisusu te kovanda esika moko ; 7 mpe koswana ekotaki kati na babateli bibwele ya Abrami mpe babateli bibwele ya Loti. Nzokande, na tango wana, bato ya Kanana mpe ya Perizi bazalaki kovanda kati na mokili yango. 8 Abrami alobaki na Loti : « Tika ete koswana ezala te kati na ngai mpe yo to kati na babateli bibwele na yo mpe babateli bibwele na ngai, pamba te tozali bandeko. 9 Mokili mobimba ezali liboso na yo. Ezali malamu tokabwana : soki yo okeyi na ngambo ya loboko ya mwasi, ngai nakokende na ngambo ya loboko ya mobali ; soki okeyi na ngambo ya loboko ya mobali, ngai nakokende na ngambo ya loboko ya mwasi. » 10 Boye Loti atalaki mpe amonaki etando nyonso ya Yordani oyo ezalaki na mabele kitoko mpe ekenda kino na Tsoari. Liboso ete Yawe abebisa Sodome mpe Gomore, ezalaki lokola elanga ya Yawe, lokola mokili ya Ejipito. 11 Loti aponaki etando ya Yordani mpe akendeki na ngambo ya este. Ezalaki ndenge wana nde bakabwanaki. 12 Abrami avandaki na mokili ya Kanana, mpe Loti avandaki kati na bingumba ya etando mpe atelemisaki bandako na ye ya kapo pene ya Sodome. 13 Bato ya Sodome bazalaki penza bato mabe mpe bato ya masumu na miso ya Yawe. 14 Sima na bokabwani ya Abrami na Loti, Yawe alobaki na Abrami : « Na esika oyo ozali, tombola miso na yo mpe tala na ngambo ya nor, ya sude, ya este mpe ya weste. 15 Mokili nyonso oyo ozali komona, nakopesa yango epai na yo mpe na bakitani na yo mpo na libela. 16 Nakokomisa bakitani na yo ebele lokola putulu ya mabele ; bongo soki moto akoki kotanga putulu, akokoka mpe kotanga bakitani na yo. 17 Telema, tambola kati na mokili na bangambo nyonso, pamba te nakopesa yango epai na yo. » 18 Abrami alongolaki bandako na ye ya kapo mpe akendeki kovanda na Ebron, pene ya banzete minene ya Mamire epai wapi atongaki etumbelo mpo na Yawe.
In Other Versions
Genesis 13 in the ANGEFD
Genesis 13 in the ANTPNG2D
Genesis 13 in the AS21
Genesis 13 in the BAGH
Genesis 13 in the BBPNG
Genesis 13 in the BBT1E
Genesis 13 in the BDS
Genesis 13 in the BEV
Genesis 13 in the BHAD
Genesis 13 in the BIB
Genesis 13 in the BLPT
Genesis 13 in the BNT
Genesis 13 in the BNTABOOT
Genesis 13 in the BNTLV
Genesis 13 in the BOATCB
Genesis 13 in the BOATCB2
Genesis 13 in the BOBCV
Genesis 13 in the BOCNT
Genesis 13 in the BOECS
Genesis 13 in the BOGWICC
Genesis 13 in the BOHCB
Genesis 13 in the BOHCV
Genesis 13 in the BOHLNT
Genesis 13 in the BOHNTLTAL
Genesis 13 in the BOICB
Genesis 13 in the BOILNTAP
Genesis 13 in the BOITCV
Genesis 13 in the BOKCV
Genesis 13 in the BOKCV2
Genesis 13 in the BOKHWOG
Genesis 13 in the BOKSSV
Genesis 13 in the BOLCB
Genesis 13 in the BOMCV
Genesis 13 in the BONAV
Genesis 13 in the BONCB
Genesis 13 in the BONLT
Genesis 13 in the BONUT2
Genesis 13 in the BOPLNT
Genesis 13 in the BOSCB
Genesis 13 in the BOSNC
Genesis 13 in the BOTLNT
Genesis 13 in the BOVCB
Genesis 13 in the BOYCB
Genesis 13 in the BPBB
Genesis 13 in the BPH
Genesis 13 in the BSB
Genesis 13 in the CCB
Genesis 13 in the CUV
Genesis 13 in the CUVS
Genesis 13 in the DBT
Genesis 13 in the DGDNT
Genesis 13 in the DHNT
Genesis 13 in the DNT
Genesis 13 in the ELBE
Genesis 13 in the EMTV
Genesis 13 in the ESV
Genesis 13 in the FBV
Genesis 13 in the FEB
Genesis 13 in the GGMNT
Genesis 13 in the GNT
Genesis 13 in the HARY
Genesis 13 in the HNT
Genesis 13 in the IRVA
Genesis 13 in the IRVB
Genesis 13 in the IRVG
Genesis 13 in the IRVH
Genesis 13 in the IRVK
Genesis 13 in the IRVM
Genesis 13 in the IRVM2
Genesis 13 in the IRVO
Genesis 13 in the IRVP
Genesis 13 in the IRVT
Genesis 13 in the IRVT2
Genesis 13 in the IRVU
Genesis 13 in the ISVN
Genesis 13 in the JSNT
Genesis 13 in the KAPI
Genesis 13 in the KBT1ETNIK
Genesis 13 in the KBV
Genesis 13 in the KJV
Genesis 13 in the KNFD
Genesis 13 in the LBA
Genesis 13 in the LBLA
Genesis 13 in the LNT
Genesis 13 in the LSV
Genesis 13 in the MAAL
Genesis 13 in the MBV
Genesis 13 in the MBV2
Genesis 13 in the MHNT
Genesis 13 in the MKNFD
Genesis 13 in the MNG
Genesis 13 in the MNT
Genesis 13 in the MNT2
Genesis 13 in the MRS1T
Genesis 13 in the NAA
Genesis 13 in the NASB
Genesis 13 in the NBLA
Genesis 13 in the NBS
Genesis 13 in the NBVTP
Genesis 13 in the NET2
Genesis 13 in the NIV11
Genesis 13 in the NNT
Genesis 13 in the NNT2
Genesis 13 in the NNT3
Genesis 13 in the PDDPT
Genesis 13 in the PFNT
Genesis 13 in the RMNT
Genesis 13 in the SBIAS
Genesis 13 in the SBIBS
Genesis 13 in the SBIBS2
Genesis 13 in the SBICS
Genesis 13 in the SBIDS
Genesis 13 in the SBIGS
Genesis 13 in the SBIHS
Genesis 13 in the SBIIS
Genesis 13 in the SBIIS2
Genesis 13 in the SBIIS3
Genesis 13 in the SBIKS
Genesis 13 in the SBIKS2
Genesis 13 in the SBIMS
Genesis 13 in the SBIOS
Genesis 13 in the SBIPS
Genesis 13 in the SBISS
Genesis 13 in the SBITS
Genesis 13 in the SBITS2
Genesis 13 in the SBITS3
Genesis 13 in the SBITS4
Genesis 13 in the SBIUS
Genesis 13 in the SBIVS
Genesis 13 in the SBT
Genesis 13 in the SBT1E
Genesis 13 in the SCHL
Genesis 13 in the SNT
Genesis 13 in the SUSU
Genesis 13 in the SUSU2
Genesis 13 in the SYNO
Genesis 13 in the TBIAOTANT
Genesis 13 in the TBT1E
Genesis 13 in the TBT1E2
Genesis 13 in the TFTIP
Genesis 13 in the TFTU
Genesis 13 in the TGNTATF3T
Genesis 13 in the THAI
Genesis 13 in the TNFD
Genesis 13 in the TNT
Genesis 13 in the TNTIK
Genesis 13 in the TNTIL
Genesis 13 in the TNTIN
Genesis 13 in the TNTIP
Genesis 13 in the TNTIZ
Genesis 13 in the TOMA
Genesis 13 in the TTENT
Genesis 13 in the UBG
Genesis 13 in the UGV
Genesis 13 in the UGV2
Genesis 13 in the UGV3
Genesis 13 in the VBL
Genesis 13 in the VDCC
Genesis 13 in the YALU
Genesis 13 in the YAPE
Genesis 13 in the YBVTP
Genesis 13 in the ZBP