Jeremiah 7 (BOLCB2)

1 Tala liloba oyo Yawe alobaki na Jeremi : 2 « Telema na ekuke ya Tempelo ya Yawe mpe tatola maloba oyo : ‹ Boyoka Liloba na Yawe, bino bato nyonso ya Yuda oyo bokotaka na bikuke oyo mpo na kogumbamela Yawe. 3 Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi : Bobongola bizaleli mpe misala na bino, mpe Ngai nakotika bino ete bowumela na esika oyo. 4 Botia motema te na maloba ya lokuta oyo ezali kolobama : ‘ Tempelo ya Yawe, Tempelo ya Yawe, Tempelo ya Yawe ! Yawe azali awa. ’ 5 Soki solo bobongoli bizaleli mpe misala na bino mpe bokomi kokata bino na bino makambo na bosembo ; 6 soki botiki konyokola bapaya, bana bitike to basi bakufisa mibali, mpe botiki kosopa makila ya bato oyo bayebi likambo te, soki botiki kolanda banzambe mosusu oyo na nzela na yango bomibendelaka pasi, 7 nakotika bino ete bowumela na esika oyo, kati na mokili oyo napesaki epai ya bakoko na bino wuta kala mpe mpo na libela. 8 Kasi botala ndenge bozali kotia motema na maloba ya lokuta oyo ezali ata na litomba moko te. 9 Bozali koyiba, koboma bato, kosala ekobo, kolapa bandayi ya lokuta, kotumba malasi ya ansa mpo na Bala mpe kolanda banzambe mosusu oyo boyebaki te ; 10 bongo bozali koya liboso na Ngai kati na Tempelo oyo ebulisama mpo na Ngai, mpe bozali koloba : ‘ Tobiki na biso ! ’ Bobiki na bino solo mpo na kosala makambo oyo nyonso ya nkele ? 11 Boni, bokomisi Tempelo oyo ebulisama mpo na Ngai ekimelo ya miyibi ? Ngai nazali komona ete bozali kozwa yango bongo, elobi Yawe. 12 Eleki malamu bokende nanu na Silo epai wapi natiaki liboso Esika na Ngai ya bule mpe botala makambo oyo nasalaki kuna mpo na mabe ya bana ya Isalaele. 13 Lokola nazalaki kokebisa bino mbala na mbala tango bozalaki kosala makambo oyo nyonso, elobi Yawe, kasi botikalaki koyokela Ngai te ; lokola nabengaki bino, kasi boyanolaki Ngai te, 14 makambo oyo nasalaki na Silo, nakosala yango mpe sik’oyo na Ndako na Ngai, na Tempelo oyo bozali kotiela motema, esika oyo napesaki bino elongo na batata na bino. 15 Nakobwaka bino mosika na Ngai ndenge nabwakaki bandeko na bino nyonso ya Efrayimi. › 16 Bongo yo Jeremi, komeka kobondela mpo na bato oyo te, kolobela Ngai na tina na bango ata moke te, komeka kutu te kosengela bango eloko : kotungisa Ngai te, pamba te nakotikala koyokela yo te. 17 Boni, ozali komona te makambo oyo bazali kosala kati na bingumba ya Yuda mpe kati na babalabala ya Yelusalemi ? 18 Bana bazali kolokota bakoni, batata bazali kopelisa moto, mpe basi bazali kosangisa farine mpo na kosala mapa mpo na Ishitari ; bazali kobonza makabo ya masanga ya vino epai ya banzambe mosusu, bongo ezali kopesa Ngai kanda. 19 Boni, bakanisi ete bazali kosala Ngai mabe, etuni Yawe ? Te ! Bazali nde komisala bango moko mabe, mpo na soni na bango moko. 20 ‹ Yango wana, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Nakopelisa kanda na Ngai ya makasi na esika oyo, likolo ya bato, ya banyama, ya banzete ya zamba mpe ya mbuma ya mabele : kanda yango ekopela lokola moto, bongo ekokufa te. 21 Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi : Bokoba kaka na makambo oyo bozali kosala, bobakisa mbeka na bino ya kotumba mpe makabo mosusu, mpe bolia misuni yango bino moko ! 22 Pamba te, tango nabimisaki bakoko na bino na Ejipito, nalobaki na bango likambo moko te na oyo etali mbeka ya kotumba mpe makabo mosusu. 23 Nzokande, napesaki bango kaka mobeko oyo : Botosa Ngai, bongo Ngai nakozala Nzambe na bino mpe bino bokozala bato na Ngai ; botambola na nzela nyonso oyo nakolakisa bino mpo ete bozala bato ya esengo. 24 Kasi batiaki matoyi te mpo na koyoka Ngai ; balandaki kaka makanisi mabe ya mitema na bango. Boye, na esika ete babonga, babebaki lisusu koleka. 25 Wuta tango batata na bino babimaki na Ejipito kino na mokolo ya lelo, natindelaka bino basali na Ngai, basakoli, tango nyonso mpe mikolo nyonso. 26 Kasi bayokaki Ngai te mpe bapesaki Ngai matoyi na bango te ; bazalaki kaka mito makasi mpe basalaki lisusu mabe koleka bakoko na bango. › 27 Ata oyebisi bango makambo oyo nyonso, bakotikala koyoka yo te ; ata mpe obengi bango, bakoyanola te. 28 Yango wana, loba na bango : ‹ Tala ekolo oyo eyokaka te maloba ya Yawe, Nzambe na yango, mpe eyokaka pamela te ; solo ezali lisusu te na minoko na bango mpe elimwe penza na bibebu na bango. 29 Kata suki na yo ya Naziri mpe bwaka yango, yemba nzembo ya mawa na likolo ya bangomba ekawuka, pamba te Yawe abwaki mpe asundoli bato oyo bazali na se ya kanda na Ye. 30 Bato ya Yuda basali mabe na miso na Ngai, elobi Yawe, batie banzambe na bango ya bikeko ya mbindo kati na Ndako na Ngai mpe bakomisi Ndako na Ngai mbindo. 31 Batongi bisambelo ya likolo ya bangomba, ya Tofeti, kati na Lubwaku ya Beni-Inomi, mpo ete batumba bana na bango ya mibali mpe ya basi mpo na kobonza bango lokola mbeka : nzokande wana ezali likambo oyo Ngai natindaki bango te mpe natikalaki ata kokanisa yango te. 32 Yango wana, bosala keba, elobi Yawe : na mikolo ekoya, bato bakobenga lisusu te esika oyo Tofeti to Lubwaku ya Beni-Inomi, kasi bakobenga yango lubwaku oyo babomelaka bato, pamba te bakokunda bato na Tofeti kino tango esika ekotikala lisusu te. 33 Bongo bibembe ya bato oyo ekokoma bilei ya bandeke ya likolo mpe ya banyama ya zamba ; mpe moto moko te akobengana yango. 34 Kati na bingumba ya Yuda mpe na babalabala ya Yelusalemi, nakosilisa koganga ya esengo mpe ya kosepela, mongongo ya mobali ya libala mpe ya mwasi ya libala, pamba te mokili ekobeba.

In Other Versions

Jeremiah 7 in the ANGEFD

Jeremiah 7 in the ANTPNG2D

Jeremiah 7 in the AS21

Jeremiah 7 in the BAGH

Jeremiah 7 in the BBPNG

Jeremiah 7 in the BBT1E

Jeremiah 7 in the BDS

Jeremiah 7 in the BEV

Jeremiah 7 in the BHAD

Jeremiah 7 in the BIB

Jeremiah 7 in the BLPT

Jeremiah 7 in the BNT

Jeremiah 7 in the BNTABOOT

Jeremiah 7 in the BNTLV

Jeremiah 7 in the BOATCB

Jeremiah 7 in the BOATCB2

Jeremiah 7 in the BOBCV

Jeremiah 7 in the BOCNT

Jeremiah 7 in the BOECS

Jeremiah 7 in the BOGWICC

Jeremiah 7 in the BOHCB

Jeremiah 7 in the BOHCV

Jeremiah 7 in the BOHLNT

Jeremiah 7 in the BOHNTLTAL

Jeremiah 7 in the BOICB

Jeremiah 7 in the BOILNTAP

Jeremiah 7 in the BOITCV

Jeremiah 7 in the BOKCV

Jeremiah 7 in the BOKCV2

Jeremiah 7 in the BOKHWOG

Jeremiah 7 in the BOKSSV

Jeremiah 7 in the BOLCB

Jeremiah 7 in the BOMCV

Jeremiah 7 in the BONAV

Jeremiah 7 in the BONCB

Jeremiah 7 in the BONLT

Jeremiah 7 in the BONUT2

Jeremiah 7 in the BOPLNT

Jeremiah 7 in the BOSCB

Jeremiah 7 in the BOSNC

Jeremiah 7 in the BOTLNT

Jeremiah 7 in the BOVCB

Jeremiah 7 in the BOYCB

Jeremiah 7 in the BPBB

Jeremiah 7 in the BPH

Jeremiah 7 in the BSB

Jeremiah 7 in the CCB

Jeremiah 7 in the CUV

Jeremiah 7 in the CUVS

Jeremiah 7 in the DBT

Jeremiah 7 in the DGDNT

Jeremiah 7 in the DHNT

Jeremiah 7 in the DNT

Jeremiah 7 in the ELBE

Jeremiah 7 in the EMTV

Jeremiah 7 in the ESV

Jeremiah 7 in the FBV

Jeremiah 7 in the FEB

Jeremiah 7 in the GGMNT

Jeremiah 7 in the GNT

Jeremiah 7 in the HARY

Jeremiah 7 in the HNT

Jeremiah 7 in the IRVA

Jeremiah 7 in the IRVB

Jeremiah 7 in the IRVG

Jeremiah 7 in the IRVH

Jeremiah 7 in the IRVK

Jeremiah 7 in the IRVM

Jeremiah 7 in the IRVM2

Jeremiah 7 in the IRVO

Jeremiah 7 in the IRVP

Jeremiah 7 in the IRVT

Jeremiah 7 in the IRVT2

Jeremiah 7 in the IRVU

Jeremiah 7 in the ISVN

Jeremiah 7 in the JSNT

Jeremiah 7 in the KAPI

Jeremiah 7 in the KBT1ETNIK

Jeremiah 7 in the KBV

Jeremiah 7 in the KJV

Jeremiah 7 in the KNFD

Jeremiah 7 in the LBA

Jeremiah 7 in the LBLA

Jeremiah 7 in the LNT

Jeremiah 7 in the LSV

Jeremiah 7 in the MAAL

Jeremiah 7 in the MBV

Jeremiah 7 in the MBV2

Jeremiah 7 in the MHNT

Jeremiah 7 in the MKNFD

Jeremiah 7 in the MNG

Jeremiah 7 in the MNT

Jeremiah 7 in the MNT2

Jeremiah 7 in the MRS1T

Jeremiah 7 in the NAA

Jeremiah 7 in the NASB

Jeremiah 7 in the NBLA

Jeremiah 7 in the NBS

Jeremiah 7 in the NBVTP

Jeremiah 7 in the NET2

Jeremiah 7 in the NIV11

Jeremiah 7 in the NNT

Jeremiah 7 in the NNT2

Jeremiah 7 in the NNT3

Jeremiah 7 in the PDDPT

Jeremiah 7 in the PFNT

Jeremiah 7 in the RMNT

Jeremiah 7 in the SBIAS

Jeremiah 7 in the SBIBS

Jeremiah 7 in the SBIBS2

Jeremiah 7 in the SBICS

Jeremiah 7 in the SBIDS

Jeremiah 7 in the SBIGS

Jeremiah 7 in the SBIHS

Jeremiah 7 in the SBIIS

Jeremiah 7 in the SBIIS2

Jeremiah 7 in the SBIIS3

Jeremiah 7 in the SBIKS

Jeremiah 7 in the SBIKS2

Jeremiah 7 in the SBIMS

Jeremiah 7 in the SBIOS

Jeremiah 7 in the SBIPS

Jeremiah 7 in the SBISS

Jeremiah 7 in the SBITS

Jeremiah 7 in the SBITS2

Jeremiah 7 in the SBITS3

Jeremiah 7 in the SBITS4

Jeremiah 7 in the SBIUS

Jeremiah 7 in the SBIVS

Jeremiah 7 in the SBT

Jeremiah 7 in the SBT1E

Jeremiah 7 in the SCHL

Jeremiah 7 in the SNT

Jeremiah 7 in the SUSU

Jeremiah 7 in the SUSU2

Jeremiah 7 in the SYNO

Jeremiah 7 in the TBIAOTANT

Jeremiah 7 in the TBT1E

Jeremiah 7 in the TBT1E2

Jeremiah 7 in the TFTIP

Jeremiah 7 in the TFTU

Jeremiah 7 in the TGNTATF3T

Jeremiah 7 in the THAI

Jeremiah 7 in the TNFD

Jeremiah 7 in the TNT

Jeremiah 7 in the TNTIK

Jeremiah 7 in the TNTIL

Jeremiah 7 in the TNTIN

Jeremiah 7 in the TNTIP

Jeremiah 7 in the TNTIZ

Jeremiah 7 in the TOMA

Jeremiah 7 in the TTENT

Jeremiah 7 in the UBG

Jeremiah 7 in the UGV

Jeremiah 7 in the UGV2

Jeremiah 7 in the UGV3

Jeremiah 7 in the VBL

Jeremiah 7 in the VDCC

Jeremiah 7 in the YALU

Jeremiah 7 in the YAPE

Jeremiah 7 in the YBVTP

Jeremiah 7 in the ZBP