Leviticus 23 (BOLCB2)

1 Yawe alobaki na Moyize : 2 « Yebisa bana ya Isalaele : ‹ Tango bokobanda kosangana mpo na kosala bafeti mpo na lokumu na Ngai, bokobanda kobengisa bato mpo na kogumbamela Ngai Yawe, pamba te ezali mayangani ya bule. 3 Bokosala mikolo motoba, kasi mokolo ya sambo ezali Saba, mokolo ya kopema ; mokolo ya mayangani ya bule. Na esika nyonso oyo bokozala, bokosala ata mosala moko te : ezali mokolo ya Saba ya Yawe. 4 Tala bafeti mosusu ya Yawe, mayangani ya bule oyo bokobengisela bato na mikolo oyo ekatama mpo na kopesa Ngai lokumu. 5 Pasika ya Yawe ekobanda na pokwa ya mokolo ya zomi na minei ya sanza ya liboso. 6 Na mokolo ya zomi na mitano ya sanza wana nde feti ya Mapa ezanga levire mpo na Yawe ekobanda. Bokolia mapa ezanga levire mikolo sambo. 7 Na mokolo ya liboso, bokozala na mayangani ya bule ; bokosala mosala moko te oyo bosalaka mokolo na mokolo. 8 Mikolo sambo, bokobonzela Yawe makabo bazikisa na moto. Mpe na mokolo oyo ya sambo, bokozala na mayangani ya bule ; bokosala mosala moko te oyo bosalaka mokolo na mokolo. › » 9 Yawe alobaki na Moyize : 10 « Yebisa bana ya Isalaele : ‹ Tango bokokota na mokili oyo nakopesa bino mpe tango bokobuka bambuma kati na mokili yango, bokomema epai ya Nganga-Nzambe liboke ya liboso ya bambuma oyo bokobuka. 11 Na mokolo oyo ekolanda Saba, Nganga-Nzambe akobonza liboke yango na kotombola liboso ya Yawe mpo ete Ngai nandima yango. 12 Na mokolo yango, bakobonza liboke yango na kotombola, bokobonzela Yawe mwana meme ya mobu moko mpe ezanga mbeba lokola mbeka ya kotumba. 13 Bokobakisa bakilo motoba ya farine basangisa na mafuta lokola likabo bazikisa na moto mpo na Yawe, oyo solo kitoko na yango ekosepelisa Yawe, mpe bokobakisa lisusu litele moko na ndambo ya vino lokola likabo na yango ya masanga. 14 Bokoki kolia ata lipa moko te, ezala bambuma bakalinga to bambuma ya sika, kino na mokolo oyo bokobonza likabo yango epai ya Nzambe na bino. Oyo mpe ezali mobeko ya libela mpo na milongo ya bakitani na bino oyo bakoya sima na bino na bisika nyonso oyo bokozala. 15 Bosengeli kotanga baposo sambo, kobanda na mokolo oyo elandi mokolo ya Saba, mokolo oyo bokomema liboke ya bambuma mpo ete batombola yango ; baposo nyonso sambo esengeli kozala ya kokoka. 16 Bokotanga mikolo tuku mitano kino na mokolo oyo ekolanda mokolo ya Saba. Na mokolo wana ya Saba, bokobonza epai na Yawe likabo ya bambuma ya sika. 17 Bokomema, wuta na bisika nyonso oyo bokozala, mapa mibale mpo na kobonza yango na kotombola ; bakosala moko na moko kati na yango na bakilo motoba ya farine basangisa na levire mpe batumba na moto. Ekozala likabo ya bambuma na bino ya liboso mpo na Yawe. 18 Elongo na mapa wana, bokobonza lokola mbeka ya kotumba : bana meme sambo ya mibali ya mobu moko mpe ezanga mbeba, ngombe moko ya mobali mpe bameme mibale ya mibali. Bokobonza yango mpo na Yawe, elongo na makabo na yango ya bambuma mpe ya masanga, lokola likabo bazikisa na moto, oyo solo kitoko na yango ekosepelisa Yawe. 19 Bokobonzela Ngai lisusu ntaba moko ya mobali lokola mbeka mpo na masumu mpe bana meme mibale ya mobu moko lokola mbeka ya boyokani. 20 Nganga-Nzambe akobonza na kotombola, liboso ya Yawe, bana meme yango mibale elongo na mapa ya bambuma ya liboso. Ekozala makabo ya bule mpo na Ngai Yawe mpe ekozala ya Nganga-Nzambe. 21 Kaka na mokolo wana, bokobengisa bato na mayangani mpo na lokumu na Ngai. Ekozala mayangani ya bule, mpe bokosala mosala moko te oyo bosalaka mokolo na mokolo. Na bisika nyonso oyo bokovanda, ekozala mitindo ya libela mpo na milongo ya bakitani na bino oyo bakoya sima na bino. 22 Tango bokobuka bambuma na mboka na bino, bobuka te kino na bandelo ya bilanga na bino mpe bolokota te oyo ekobanda kokweya. Botika yango mpo na mobola to mopaya. Nazali Yawe, Nzambe na bino. › » 23 Yawe alobaki na Moyize : 24 « Yebisa bana ya Isalaele : ‹ Mokolo ya liboso ya sanza ya sambo ekozala mpo na bino mokolo ya kopema, mokolo ya ekaniseli mpe ya kobeta kelelo, mokolo ya mayangani ya bule mpo na lokumu na Ngai. 25 Bokosala mosala moko te oyo bomesana kosala, kasi bokobonzela Yawe makabo bazikisa na moto. › » 26 Yawe alobaki na Moyize : 27 « Mokolo ya zomi ya sanza ya sambo ezali mokolo ya bolimbisi masumu. Bokozala na mayangani ya bule mpo na lokumu na Ngai ; bokomikitisa mpe bokobonzela Yawe makabo bazikisa na moto. 28 Bokosala mosala moko te na mokolo wana, pamba te ezali mokolo ya kosala mosala ya bolimbisi masumu liboso na Ngai Yawe, Nzambe na bino. 29 Moto nyonso oyo akokila bilei te na mokolo wana, bakolongola ye kati na bato na ye. 30 Nakoboma moto nyonso oyo akosala mosala na mokolo wana. 31 Bokoki kosala ata mosala moko te. Na bisika nyonso oyo bokozala, oyo nde ekozala mobeko ya libela mpo na milongo ya bakitani na bino oyo bakoya sima na bino. 32 Ekozala mpo na bino mokolo ya kopema lokola mokolo ya Saba, mokolo ya komikitisa. Bokobatela mokolo na bino ya Saba, kobanda na pokwa ya mokolo ya libwa kino na pokwa ya mokolo oyo ekolanda. » 33 Yawe alobaki na Moyize : 34 « Yebisa bana ya Isalaele : ‹ Na mokolo ya zomi na mitano ya sanza ya sambo, feti ya Bandako ya kapo esengeli kobanda, mpe bakosepela yango mikolo sambo mpo na lokumu ya Yawe. 35 Mokolo ya liboso ekozala mokolo ya mayangani ya bule mpo na lokumu na Ngai Yawe ; bokosala mosala moko te oyo bomesana kosala mokolo na mokolo. 36 Mikolo sambo, bokobonzela Yawe makabo bazikisa na moto. Na mokolo ya mwambe, bokozala na mayangani ya bule mpo na lokumu na Ngai Yawe, mpe bokobonza makabo bazikisa na moto. Ekozala mokolo ya suka ya mayangani ; bokosala mosala moko te oyo bomesana kosala. 37 Oyo nde bafeti oyo bokobanda kosala mpo na lokumu ya Yawe, mpe oyo bokobanda kobengisela bato na mayangani ya bule mpo ete basambela Yawe mpe babonzela Ye makabo bazikisa na moto, bambeka ya kotumba mpe makabo ya bagato, bambeka mpe bambeka ya masanga ya vino, kolanda ndenge ekatama mpo na mokolo na mokolo. 38 Bokobakisa makabo oyo na likolo ya makabo oyo bokobonzela Ngai na mikolo ya Saba ya Yawe, na likolo ya bakado na bino, na likolo ya makabo na bino mpo na kokokisa ndayi to na likolo ya makabo oyo bokokata kopesa wuta na mokano ya mitema na bino moko. 39 Kasi na mokolo ya zomi na mitano ya sanza ya sambo, sima na kobuka bambuma ya mabele, bokosala feti mpo na Yawe, mikolo sambo. Mokolo ya liboso mpe mokolo ya mwambe ekozala mikolo ya kopema. 40 Na mokolo ya liboso, bokopona bambuma ya banzete, mandalala ya banzete ya mbila, bitape ya banzete oyo ezali na makasa ebele mpe banzete oyo babengaka sole mpe ebotaka pembeni ya mayi. Bokosepela liboso ya Yawe, Nzambe na bino, mikolo sambo. 41 Na mikolo sambo, bokobanda kosala feti oyo mibu nyonso mpo na lokumu na Yawe. Oyo ezali mobeko ya libela mpo na milongo ya bakitani oyo bakoya sima na bino ; bokosala feti yango na sanza ya sambo. 42 Bokovanda na bandako ya matiti mikolo sambo ; bato nyonso oyo bazali bana mboka ya Isalaele bakovanda kati na bandako yango ya matiti 43 mpo ete bakitani na bino bayeba ete navandisaki bana ya Isalaele na bandako ya matiti tango nabimisaki bango na Ejipito. Nazali Yawe, Nzambe na bino. › » 44 Moyize ayebisaki bana ya Isalaele malako nyonso oyo etali bafeti ya Yawe.

In Other Versions

Leviticus 23 in the ANGEFD

Leviticus 23 in the ANTPNG2D

Leviticus 23 in the AS21

Leviticus 23 in the BAGH

Leviticus 23 in the BBPNG

Leviticus 23 in the BBT1E

Leviticus 23 in the BDS

Leviticus 23 in the BEV

Leviticus 23 in the BHAD

Leviticus 23 in the BIB

Leviticus 23 in the BLPT

Leviticus 23 in the BNT

Leviticus 23 in the BNTABOOT

Leviticus 23 in the BNTLV

Leviticus 23 in the BOATCB

Leviticus 23 in the BOATCB2

Leviticus 23 in the BOBCV

Leviticus 23 in the BOCNT

Leviticus 23 in the BOECS

Leviticus 23 in the BOGWICC

Leviticus 23 in the BOHCB

Leviticus 23 in the BOHCV

Leviticus 23 in the BOHLNT

Leviticus 23 in the BOHNTLTAL

Leviticus 23 in the BOICB

Leviticus 23 in the BOILNTAP

Leviticus 23 in the BOITCV

Leviticus 23 in the BOKCV

Leviticus 23 in the BOKCV2

Leviticus 23 in the BOKHWOG

Leviticus 23 in the BOKSSV

Leviticus 23 in the BOLCB

Leviticus 23 in the BOMCV

Leviticus 23 in the BONAV

Leviticus 23 in the BONCB

Leviticus 23 in the BONLT

Leviticus 23 in the BONUT2

Leviticus 23 in the BOPLNT

Leviticus 23 in the BOSCB

Leviticus 23 in the BOSNC

Leviticus 23 in the BOTLNT

Leviticus 23 in the BOVCB

Leviticus 23 in the BOYCB

Leviticus 23 in the BPBB

Leviticus 23 in the BPH

Leviticus 23 in the BSB

Leviticus 23 in the CCB

Leviticus 23 in the CUV

Leviticus 23 in the CUVS

Leviticus 23 in the DBT

Leviticus 23 in the DGDNT

Leviticus 23 in the DHNT

Leviticus 23 in the DNT

Leviticus 23 in the ELBE

Leviticus 23 in the EMTV

Leviticus 23 in the ESV

Leviticus 23 in the FBV

Leviticus 23 in the FEB

Leviticus 23 in the GGMNT

Leviticus 23 in the GNT

Leviticus 23 in the HARY

Leviticus 23 in the HNT

Leviticus 23 in the IRVA

Leviticus 23 in the IRVB

Leviticus 23 in the IRVG

Leviticus 23 in the IRVH

Leviticus 23 in the IRVK

Leviticus 23 in the IRVM

Leviticus 23 in the IRVM2

Leviticus 23 in the IRVO

Leviticus 23 in the IRVP

Leviticus 23 in the IRVT

Leviticus 23 in the IRVT2

Leviticus 23 in the IRVU

Leviticus 23 in the ISVN

Leviticus 23 in the JSNT

Leviticus 23 in the KAPI

Leviticus 23 in the KBT1ETNIK

Leviticus 23 in the KBV

Leviticus 23 in the KJV

Leviticus 23 in the KNFD

Leviticus 23 in the LBA

Leviticus 23 in the LBLA

Leviticus 23 in the LNT

Leviticus 23 in the LSV

Leviticus 23 in the MAAL

Leviticus 23 in the MBV

Leviticus 23 in the MBV2

Leviticus 23 in the MHNT

Leviticus 23 in the MKNFD

Leviticus 23 in the MNG

Leviticus 23 in the MNT

Leviticus 23 in the MNT2

Leviticus 23 in the MRS1T

Leviticus 23 in the NAA

Leviticus 23 in the NASB

Leviticus 23 in the NBLA

Leviticus 23 in the NBS

Leviticus 23 in the NBVTP

Leviticus 23 in the NET2

Leviticus 23 in the NIV11

Leviticus 23 in the NNT

Leviticus 23 in the NNT2

Leviticus 23 in the NNT3

Leviticus 23 in the PDDPT

Leviticus 23 in the PFNT

Leviticus 23 in the RMNT

Leviticus 23 in the SBIAS

Leviticus 23 in the SBIBS

Leviticus 23 in the SBIBS2

Leviticus 23 in the SBICS

Leviticus 23 in the SBIDS

Leviticus 23 in the SBIGS

Leviticus 23 in the SBIHS

Leviticus 23 in the SBIIS

Leviticus 23 in the SBIIS2

Leviticus 23 in the SBIIS3

Leviticus 23 in the SBIKS

Leviticus 23 in the SBIKS2

Leviticus 23 in the SBIMS

Leviticus 23 in the SBIOS

Leviticus 23 in the SBIPS

Leviticus 23 in the SBISS

Leviticus 23 in the SBITS

Leviticus 23 in the SBITS2

Leviticus 23 in the SBITS3

Leviticus 23 in the SBITS4

Leviticus 23 in the SBIUS

Leviticus 23 in the SBIVS

Leviticus 23 in the SBT

Leviticus 23 in the SBT1E

Leviticus 23 in the SCHL

Leviticus 23 in the SNT

Leviticus 23 in the SUSU

Leviticus 23 in the SUSU2

Leviticus 23 in the SYNO

Leviticus 23 in the TBIAOTANT

Leviticus 23 in the TBT1E

Leviticus 23 in the TBT1E2

Leviticus 23 in the TFTIP

Leviticus 23 in the TFTU

Leviticus 23 in the TGNTATF3T

Leviticus 23 in the THAI

Leviticus 23 in the TNFD

Leviticus 23 in the TNT

Leviticus 23 in the TNTIK

Leviticus 23 in the TNTIL

Leviticus 23 in the TNTIN

Leviticus 23 in the TNTIP

Leviticus 23 in the TNTIZ

Leviticus 23 in the TOMA

Leviticus 23 in the TTENT

Leviticus 23 in the UBG

Leviticus 23 in the UGV

Leviticus 23 in the UGV2

Leviticus 23 in the UGV3

Leviticus 23 in the VBL

Leviticus 23 in the VDCC

Leviticus 23 in the YALU

Leviticus 23 in the YAPE

Leviticus 23 in the YBVTP

Leviticus 23 in the ZBP