Leviticus 4 (BOLCB2)

1 Yawe ayebisaki Moyize : 2 « Loba na bana ya Isalaele mpe yebisa bango : ‹ Soki moto asali masumu to likambo moko oyo epekisami na mibeko ya Yawe, tala ndenge bokosala : 3 ‘ Soki Nganga-Nzambe oyo bapakola mafuta asali masumu, bongo na nzela ya masumu na ye amemisi bato nyonso ngambo, akobonza liboso ya Yawe mpo na masumu oyo asili kosala, mwana ngombe ya mobali oyo ezanga mbeba lokola mbeka mpo na masumu. 4 Boye akobonza liboso ya Yawe, mwana ngombe yango ya mobali na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani. Akotia loboko na ye na moto ya mwana ngombe mpe akokata yango kingo liboso ya Yawe. 5 Nganga-Nzambe oyo bapakola mafuta akozwa ndambo ya makila ya mwana ngombe yango ya mobali mpe akomema yango kati na Ndako ya kapo ya Bokutani. 6 Nganga-Nzambe akozindisa mosapi na ye na makila mpe akosopa ndambo ya makila mbala sambo liboso ya Yawe, liboso ya rido ya Esika ya bule. 7 Nganga-Nzambe akotia ndambo ya makila na maseke ya etumbelo ya ansa oyo ezali liboso ya Yawe kati na Ndako ya kapo ya Bokutani. Bongo ndambo mosusu ya makila ya ngombe oyo ekotikala, akosopa yango na makolo ya etumbelo ya bambeka ya kotumba, oyo ezali na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani. 8 Akolongola mafuta nyonso ya mwana ngombe oyo asili kobonza lokola mbeka mpo na masumu, mafuta oyo ezipaka biloko ya kati, mpe nyonso oyo ekangami kati na yango 9 elongo na bambuma mibale oyo ezalaka na loketo, na mafuta oyo ezali kati-kati ya mipanzi na loketo ; akolongola bafwa mpe bambuma wana mibale 10 ndenge balongolaka mafuta ya ngombe oyo babonzi lokola mbeka ya boyokani. Nganga-Nzambe akotumba yango na etumbelo ya mbeka ya kotumba. 11 Kasi poso ya ngombe ya mobali, mosuni na yango nyonso, moto na yango, makolo na yango, biloko ya kati ; 12 elingi koloba biteni mosusu ya ngombe oyo etikali, Nganga-Nzambe asengeli komema yango libanda ya molako, na esika moko ya bule oyo ebongisama mpo na kotumba biteni ya mbeka oyo etikalaka, na esika oyo babwakaka putulu ; bongo bakotumba yango na likolo ya bakoni oyo ezali kopela moto, na esika oyo babwakaka putulu. ’ 13 ‘ Soki lisanga mobimba ya Isalaele basali masumu na nko te mpe basali likambo moko oyo epekisami kati na mibeko ya Yawe, ata soki likambo yango eyebani te kati na lisanga, lisanga ekomema solo ngambo. 14 Bakobonza ngombe ya mobali lokola mbeka mpo na masumu mpe bakomema yango liboso ya Ndako ya kapo ya Bokutani. 15 Bakambi ya lisanga bakotia maboko na bango na moto ya ngombe yango liboso ya Yawe. 16 Nganga-Nzambe oyo bapakola mafuta akomema ndambo ya makila ya ngombe yango kati na Ndako ya kapo ya Bokutani. 17 Nganga-Nzambe akozindisa mosapi na ye kati na makila mpe akosopa ndambo ya makila mbala sambo liboso ya Yawe mpe ya rido. 18 Nganga-Nzambe akotia makila na maseke ya etumbelo ya ansa oyo ezali liboso ya Yawe kati na Ndako ya kapo ya Bokutani mpe akosopa makila nyonso oyo ekotikala na se ya etumbelo ya mbeka ya kotumba oyo ezali na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani. 19 Akolongola mafuta nyonso ya ngombe mpe akotumba yango na etumbelo. 20 Akosala ndenge kaka asalaki na ngombe oyo ebonzamaki lokola mbeka mpo na masumu. Na bongo, Nganga-Nzambe akosala mosala ya bolimbisi masumu ya bato ; mpe bakolimbisama. 21 Nganga-Nzambe akomema ngombe yango libanda ya molako mpe akotumba yango ndenge atumbaki ngombe ya liboso oyo ezalaki mbeka mpo na masumu na ye moko Nganga-Nzambe. ’ 22 ‘ Soki mokambi moko asali masumu na nko te, mpo ete asali likambo oyo epekisami na mibeko ya Yawe, Nzambe na ye ; amemi solo ngambo. 23 Tango kaka akososola masumu na ye oyo asili kosala, asengeli kobonza lokola mbeka, ntaba ya mobali oyo ezanga mbeba. 24 Akotia loboko na ye na moto ya ntaba yango mpe akokata yango kingo na esika oyo bakataka kingo ya bambeka ya kotumba, liboso ya Yawe. Ezali mbeka mpo na bolimbisi masumu. 25 Nganga-Nzambe akozwa na mosapi na ye ndambo ya makila ya mbeka oyo ebonzami mpo na bolimbisi masumu, akotia yango na maseke ya etumbelo ya mbeka ya kotumba mpe akosopa makila oyo ekotikala na makolo ya etumbelo. 26 Akotumba mafuta nyonso na etumbelo ndenge batumbaka mafuta ya mbeka ya boyokani. Boye, Nganga-Nzambe akosala mosala ya bolimbisi masumu ya mokonzi ; mpe mokonzi wana akolimbisama. ’ 27 ‘ Soki moto moko kati na lisanga asali masumu na nko te, mpo ete asali likambo moko oyo epekisami na mibeko ya Yawe ; amemi solo ngambo. 28 Tango kaka akososola masumu na ye oyo asali, asengeli kobonza lokola mbeka, ntaba ya mwasi ezanga mbeba. 29 Akotia loboko na ye na moto ya mbeka mpo na masumu na esika oyo bakataka kingo ya bambeka ya kotumba. 30 Nganga-Nzambe akozwa na mosapi na ye ndambo ya makila ya mbeka mpo na masumu, akotia yango na maseke ya etumbelo ya mbeka ya kotumba, mpe akosopa makila nyonso oyo etikali na makolo ya etumbelo. 31 Akolongola mafuta nyonso ndenge kaka balongolaka mafuta na mbeka ya boyokani ; bongo Nganga-Nzambe akotumba yango na etumbelo lokola likabo oyo solo kitoko na yango ekosepelisa Yawe. Nganga-Nzambe akosala mosala ya bolimbisi masumu ya moto wana ; mpe moto yango akolimbisama. 32 Soki abonzi mwana meme lokola mbeka mpo na masumu na ye, asengeli komema mwana meme ya mwasi ezanga mbeba. 33 Akotia loboko na ye na moto ya mbeka mpo na masumu, na esika oyo bakataka kingo ya bambeka ya kotumba. 34 Nganga-Nzambe akozwa na mosapi na ye ndambo ya makila ya mbeka mpo na masumu, mpe akotia yango na maseke ya etumbelo ya bambeka ya kotumba. Bongo akosopa makila nyonso oyo etikali, na makolo ya etumbelo. 35 Akolongola mafuta nyonso ndenge kaka balongolaka mafuta ya mwana meme kati na mbeka ya boyokani. Mpe Nganga-Nzambe akotumba yango na etumbelo, na likolo ya makabo bazikisa na moto mpo na Yawe. Nganga-Nzambe akosala mosala ya bolimbisi masumu ya moto wana ; mpe moto yango akolimbisama. ’ › »

In Other Versions

Leviticus 4 in the ANGEFD

Leviticus 4 in the ANTPNG2D

Leviticus 4 in the AS21

Leviticus 4 in the BAGH

Leviticus 4 in the BBPNG

Leviticus 4 in the BBT1E

Leviticus 4 in the BDS

Leviticus 4 in the BEV

Leviticus 4 in the BHAD

Leviticus 4 in the BIB

Leviticus 4 in the BLPT

Leviticus 4 in the BNT

Leviticus 4 in the BNTABOOT

Leviticus 4 in the BNTLV

Leviticus 4 in the BOATCB

Leviticus 4 in the BOATCB2

Leviticus 4 in the BOBCV

Leviticus 4 in the BOCNT

Leviticus 4 in the BOECS

Leviticus 4 in the BOGWICC

Leviticus 4 in the BOHCB

Leviticus 4 in the BOHCV

Leviticus 4 in the BOHLNT

Leviticus 4 in the BOHNTLTAL

Leviticus 4 in the BOICB

Leviticus 4 in the BOILNTAP

Leviticus 4 in the BOITCV

Leviticus 4 in the BOKCV

Leviticus 4 in the BOKCV2

Leviticus 4 in the BOKHWOG

Leviticus 4 in the BOKSSV

Leviticus 4 in the BOLCB

Leviticus 4 in the BOMCV

Leviticus 4 in the BONAV

Leviticus 4 in the BONCB

Leviticus 4 in the BONLT

Leviticus 4 in the BONUT2

Leviticus 4 in the BOPLNT

Leviticus 4 in the BOSCB

Leviticus 4 in the BOSNC

Leviticus 4 in the BOTLNT

Leviticus 4 in the BOVCB

Leviticus 4 in the BOYCB

Leviticus 4 in the BPBB

Leviticus 4 in the BPH

Leviticus 4 in the BSB

Leviticus 4 in the CCB

Leviticus 4 in the CUV

Leviticus 4 in the CUVS

Leviticus 4 in the DBT

Leviticus 4 in the DGDNT

Leviticus 4 in the DHNT

Leviticus 4 in the DNT

Leviticus 4 in the ELBE

Leviticus 4 in the EMTV

Leviticus 4 in the ESV

Leviticus 4 in the FBV

Leviticus 4 in the FEB

Leviticus 4 in the GGMNT

Leviticus 4 in the GNT

Leviticus 4 in the HARY

Leviticus 4 in the HNT

Leviticus 4 in the IRVA

Leviticus 4 in the IRVB

Leviticus 4 in the IRVG

Leviticus 4 in the IRVH

Leviticus 4 in the IRVK

Leviticus 4 in the IRVM

Leviticus 4 in the IRVM2

Leviticus 4 in the IRVO

Leviticus 4 in the IRVP

Leviticus 4 in the IRVT

Leviticus 4 in the IRVT2

Leviticus 4 in the IRVU

Leviticus 4 in the ISVN

Leviticus 4 in the JSNT

Leviticus 4 in the KAPI

Leviticus 4 in the KBT1ETNIK

Leviticus 4 in the KBV

Leviticus 4 in the KJV

Leviticus 4 in the KNFD

Leviticus 4 in the LBA

Leviticus 4 in the LBLA

Leviticus 4 in the LNT

Leviticus 4 in the LSV

Leviticus 4 in the MAAL

Leviticus 4 in the MBV

Leviticus 4 in the MBV2

Leviticus 4 in the MHNT

Leviticus 4 in the MKNFD

Leviticus 4 in the MNG

Leviticus 4 in the MNT

Leviticus 4 in the MNT2

Leviticus 4 in the MRS1T

Leviticus 4 in the NAA

Leviticus 4 in the NASB

Leviticus 4 in the NBLA

Leviticus 4 in the NBS

Leviticus 4 in the NBVTP

Leviticus 4 in the NET2

Leviticus 4 in the NIV11

Leviticus 4 in the NNT

Leviticus 4 in the NNT2

Leviticus 4 in the NNT3

Leviticus 4 in the PDDPT

Leviticus 4 in the PFNT

Leviticus 4 in the RMNT

Leviticus 4 in the SBIAS

Leviticus 4 in the SBIBS

Leviticus 4 in the SBIBS2

Leviticus 4 in the SBICS

Leviticus 4 in the SBIDS

Leviticus 4 in the SBIGS

Leviticus 4 in the SBIHS

Leviticus 4 in the SBIIS

Leviticus 4 in the SBIIS2

Leviticus 4 in the SBIIS3

Leviticus 4 in the SBIKS

Leviticus 4 in the SBIKS2

Leviticus 4 in the SBIMS

Leviticus 4 in the SBIOS

Leviticus 4 in the SBIPS

Leviticus 4 in the SBISS

Leviticus 4 in the SBITS

Leviticus 4 in the SBITS2

Leviticus 4 in the SBITS3

Leviticus 4 in the SBITS4

Leviticus 4 in the SBIUS

Leviticus 4 in the SBIVS

Leviticus 4 in the SBT

Leviticus 4 in the SBT1E

Leviticus 4 in the SCHL

Leviticus 4 in the SNT

Leviticus 4 in the SUSU

Leviticus 4 in the SUSU2

Leviticus 4 in the SYNO

Leviticus 4 in the TBIAOTANT

Leviticus 4 in the TBT1E

Leviticus 4 in the TBT1E2

Leviticus 4 in the TFTIP

Leviticus 4 in the TFTU

Leviticus 4 in the TGNTATF3T

Leviticus 4 in the THAI

Leviticus 4 in the TNFD

Leviticus 4 in the TNT

Leviticus 4 in the TNTIK

Leviticus 4 in the TNTIL

Leviticus 4 in the TNTIN

Leviticus 4 in the TNTIP

Leviticus 4 in the TNTIZ

Leviticus 4 in the TOMA

Leviticus 4 in the TTENT

Leviticus 4 in the UBG

Leviticus 4 in the UGV

Leviticus 4 in the UGV2

Leviticus 4 in the UGV3

Leviticus 4 in the VBL

Leviticus 4 in the VDCC

Leviticus 4 in the YALU

Leviticus 4 in the YAPE

Leviticus 4 in the YBVTP

Leviticus 4 in the ZBP