Psalms 64 (BOLCB2)
1 Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi. 2 Oh Nzambe, yoka mongongo na ngaikati kolela na ngai,batela ngai mosika ya mongunaoyo azali kopesa ngai somo. 3 Bomba ngai mosika ya mikano ya bato mabe,mosika ya makita ya bato ya misala mabe. 4 Bapelisaka lolemo na bangondenge bapelisaka mopanga,babimisaka maloba ya bololo lokola makonga 5 mpo na kobwakela, na kobombama,moto oyo azangi pamela ;babangaka te kobwakela ye yango na mbalakata. 6 Balendisanaka mpo na mabongisi mabe,bayokanaka kotia mitambo ;balobaka : « Nani akomona yango ? » 7 Basalaka mabongisi ya kosala bato mabe,balobaka : « Toselingwi na mabongisi na biso ! »Makanisi mpe motema ya moto ezali mozindo makasi. 8 Kasi Nzambe akobwakela bangomakonga na Ye na mbalakata ;ekozwa mpe ekozokisa bango. 9 Maloba na bango moko ekobalukela bangompe ekomema bango na libebi ;mpe moto nyonso oyo akomona bangoakoningisa moto. 10 Bato nyonso bakokoma kobanga,kopanza sango ya misala ya Nzambempe kososola makambo oyo asalaka. 11 Moto ya sembo akosepelampe akomibomba kati na Yawe ;bato nyonso oyo bazali na mitema alimabakomikumisa mpo na yango.