Psalms 67 (BOLCB2)
1 Wuta na buku ya mokambi ya bayembi : nzembo ya koyemba na lindanda. Loyembo. 2 Tika ete Nzambe asalela biso ngolumpe apambola biso,tika ete angengisela biso elongi na Ye ; 3 mpo ete toyeba nzela na Yo kati na mokili,mpe lobiko na Yo kati na bikolo nyonso. 4 Oh Nzambe, tika ete bikolo ekumisa Yo ;tika ete bikolo nyonso ekumisa Yo ! 5 Tika ete bato basepela,tika ete babeta milolo ya esengo,pamba te okambaka bikolo na bosembo,mpe otambolisaka bato awa na mabele. 6 Oh Nzambe, tika ete bikolo ekumisa Yo ;tika ete bikolo nyonso ekumisa Yo ! 7 Mabele eboti bambuma na yango ;tika ete Nzambe, Nzambe na biso, apambola biso. 8 Tika ete Nzambe apambola biso ;tika ete mokili mobimba etosa Ye !