1 Kings 20 (BOLCB2)

1 Beni-Adadi, mokonzi ya Siri, asangisaki mampinga na ye nyonso elongo na bakonzi tuku misato na mibale na bampunda mpe bashar ; akendeki kozingela Samari mpe abundisaki yango. 2 Atindaki bantoma kati na engumba epai ya Akabi, mokonzi ya Isalaele 3 na maloba oyo :— Tala maloba oyo Beni-Adadi alobi : « Palata mpe wolo na yo ezali ya ngai ; basi na yo mpe bana mibali na yo, oyo baleki kitoko bazali ya ngai. » 4 Mokonzi ya Isalaele azongisaki :— Ezali ndenge kaka olobi, mokonzi, nkolo na ngai ; ngai mpe nyonso oyo nazali na yango ezali ya yo. 5 Bantoma bazongaki lisusu mpe balobaki :— Tala maloba oyo Beni-Adadi alobi : « Napesaki yo mitindo ete opesa ngai palata na yo, wolo na yo, basi na yo mpe bana na yo ya mibali. 6 Kasi yeba malamu ete lobi, na ngonga oyo, nakotinda basali na ngai mpo na kotala malamu-malamu ndako na yo mpe bandako ya basali na yo. Bakozwa nyonso ya motuya na miso na yo mpe bakomema yango. » 7 Mokonzi ya Isalaele abengisaki bampaka nyonso ya mboka mpe alobaki na bango :— Botala ndenge nini moto oyo azali koluka makambo ! Tango asengaki ngai basi na ngai mpe bana na ngai ya mibali, wolo mpe palata na ngai, napimelaki ye yango te. 8 Bampaka mpe bato nyonso balobaki na ye :— Koyokela ye te mpe kondima bisengeli na ye te. 9 Boye Akabi azongisaki epai ya bantoma ya Beni-Adadi :— Boloba na mokonzi, nkolo na ngai : « Mosali na yo akosala nyonso oyo osengaki liboso ; kasi na oyo ya mibale, nakosala yango te. »Bazongaki mpe bamemaki eyano epai ya Beni-Adadi. 10 Beni-Adadi atindaki maloba mosusu epai ya Akabi :— Tika ete banzambe bapesa ngai etumbu ya makasi koleka soki etikali na Samari putulu oyo ekoki kotondisa ata loboko ya moko na moko ya bato oyo bazali kolanda ngai. 11 Mokonzi ya Isalaele azongisaki :— Boloba na ye : « Moto oyo alati bibundeli asengeli komikumisa te lokola moto oyo alongoli bibundeli ! » 12 Beni-Adadi ayokaki sango yango tango ye elongo na bakonzi bazalaki komela na bandako ya kapo. Apesaki mitindo epai ya bato na ye :— Bomibongisa mpo na etumba.Boye, bamibongisaki mpo na kobundisa engumba. 13 Na tango wana kaka, mosakoli moko ayaki epai ya Akabi, mokonzi ya Isalaele, mpe alobaki na ye :— Tala liloba oyo Yawe alobi : « Ozali komona mampinga monene oyo ? Nakopesa yango lelo na maboko na yo, bongo okoyeba ete nazali Yawe. » 14 Akabi atunaki :— Kasi nani akosala yango ?Mosakoli azongisaki :— Tala liloba oyo Yawe alobi : « Bakonzi ya basoda ya bilenge, bakonzi ya basoda ya bamboka mike nde bakosala yango. »Akabi atunaki :— Nani akobanda etumba ?Mosakoli azongisaki :— Ezali yo nde moto okobanda. 15 Akabi abengisaki bakonzi ya basoda ya bilenge, bakonzi ya basoda ya bamboka mike ; bango nyonso bazalaki bato nkama mibale na tuku misato na mibale. Asangisaki lisusu bato ya Isalaele oyo batikalaki : bazalaki bango nyonso bato nkoto sambo. 16 Babimaki na midi na tango Beni-Adadi elongo na bakonzi tuku misato na mibale, oyo bazalaki na ngambo na ye, bazalaki kolangwa masanga na bandako na bango ya kapo. 17 Bakonzi ya basoda ya bilenge babimaki bato ya liboso. Nzokande Beni-Adadi azwaki sango epai ya banongi na ye oyo balobaki na ye :— Bato bazali kopusana wuta na engumba Samari. 18 Beni-Adadi alobaki :— Soki bayei mpo na kimia, bakanga bango ya bomoi ; kasi soki mpe bayei mpo na bitumba, kokanga bango ya bomoi. 19 Bakonzi ya basoda ya bilenge babimaki na engumba elongo na mampinga sima na bango. 20 Soda moko na moko abomaki monguna na ye. Boye bato ya Siri bakimaki, mpe bato ya Isalaele balandaki bango. Kasi Beni-Adadi, mokonzi ya Siri, akimaki na mpunda elongo na ndambo ya basoda na ye, oyo batambolaka na bashar. 21 Mokonzi ya Isalaele apusanaki, abebisaki bampunda elongo na bashar mpe alongaki bato ya Siri na elonga monene. 22 Sima na yango, mosakoli ayaki epai ya mokonzi ya Isalaele mpe alobaki :— Lendisa basoda na yo mpe tala nini okoki kosala, pamba te na mobu oyo ekoya, mokonzi ya Siri akoya kobundisa yo lisusu. 23 Na tango wana bakalaka ya mokonzi ya Siri bapesaki ye toli : « Banzambe na bango bazali banzambe ya bangomba. Yango wana balekaki biso na makasi, kasi soki tobundi na bango na bitando, tokoleka bango solo na makasi. 24 Sala boye : longola bakonzi nyonso na bisika na bango mpe tia bakonzi mosusu ya basoda na bisika ya bato oyo ya liboso. 25 Osengeli mpe lisusu kobongisa mampinga lokola oyo owutaki kobungisa : mpunda mpo na mpunda, shar mpo na shar, mpo ete tokoka kobundisa Isalaele na etando. Solo, tokoleka bango na makasi. » Beni-Adadi ayokaki bango mpe asalaki bongo. 26 Na mobu oyo elandaki, Beni-Adadi asangisaki mampinga na ye ya Siri mpe amataki na Afeki mpo na kobundisa Isalaele. 27 Akabi mpe na ngambo na ye, asangisaki bato ya Isalaele mpe apesaki bango bibundeli ; boye babimaki mpo na kobundisa bato ya Siri. Bato ya Isalaele batongaki milako oyo ezalaki kotalana na bato ya Siri. Mampinga na bango ezalaki lokola bitonga mibale ya mike ya bantaba wana bato ya Siri batondaki na etando mobimba. 28 Moto na Nzambe ayaki mpe alobaki na mokonzi ya Isalaele :— Tala liloba oyo Yawe alobi : « Lokola bato ya Siri bakanisi ete Ngai nazali nzambe ya bangomba, kasi ya etando te, nakokaba mampinga monene oyo na maboko na yo mpe okoyeba ete Ngai nazali Yawe. » 29 Mikolo sambo, milako ya mampinga nyonso mibale ezalaki etalana. Na mokolo ya sambo, etumba ebandaki mpe bato ya Isalaele babomaki basoda ya mpiko ya Siri nkoto nkama moko. 30 Basoda ya mpiko ya Siri oyo batikalaki, bakimaki na Afeki epai wapi mir ekweyelaki bato nkoto tuku mibale na sambo.Beni-Adadi akimaki na engumba mpe abombamaki na shambre ya kati penza. 31 Bakalaka na ye balobaki na ye :— Tala, toyokaki ete bakonzi ya Isalaele bazalaka malamu. Pesa nzela ete tokende epai ya mokonzi ya Isalaele, tolata bilamba ya saki na loketo na biso mpe basinga na mito na biso ; tango mosusu bakoki kobikisa bomoi na yo. 32 Boye balataki bango nyonso bilamba ya saki, bakangaki basinga na mito na bango mpe bakendeki epai ya mokonzi ya Isalaele. Balobaki na ye :— Mosali na yo Beni-Adadi abondeli yo ete oboma ye te.Akabi atunaki :— Boni, azali nanu na bomoi ? Azali kaka ndeko na ngai. 33 Bantoma ya Beni-Adadi bazwaki eyano yango lokola elembo ya malamu, bakangamaki na maloba wana mpe bagangaki na esengo :— Beni-Adadi azali solo ndeko na yo.Akabi azongisaki :— Bokende kozwa ye.Beni-Adadi abimaki na esika oyo abombamaki mpe ayaki epai ya Akabi, bongo Akabi amatisaki ye na shar na ye. 34 Beni-Adadi alobaki :— Bingumba nyonso oyo tata na ngai abotolaki tata na yo, nazongiseli yo yango ; okotonga zando na yo na Damasi mpo na koteka biloko na yo ndenge kaka tata na ngai asalaki na Samari.Akabi azongisaki :— Nakotika yo kokende soki nasali boyokani elongo na yo.Akabi asalaki boyokani elongo na Beni-Adadi mpe atikaki ye kozonga epai na ye. 35 Na tango wana, moko kati na bana ya basakoli alobaki na moninga na ye, na etinda ya Yawe :— Nasengi na yo ete obeta ngai.Kasi moninga na ye aboyaki kobeta ye. 36 Bongo alobaki na ye :— Lokola oboyi kotosa Liloba na Yawe, tango kaka okotika ngai, nkosi ekoboma yo.Moninga na ye akendeki, akutanaki na nkosi, mpe ebomaki ye. 37 Mwana wana ya basakoli akendeki kokutana na moto mosusu mpe asengaki na ye ete abeta ye. Moto wana abetaki ye makasi mpe azokisaki ye. 38 Mwana ya basakoli amibongolaki na elateli na ye, azipaki elongi na ye na nzela ya eteni ya elamba mpo ete bayeba ye te, mpe akendeki kotelema na nzela oyo mokonzi Akabi akolekela. 39 Tango mokonzi azalaki koleka, mosakoli agangaki :— Mokonzi, wana nazalaki kati na bitumba, moto moko abimaki kati na mampinga mpe amemelaki ngai mokangami ya bitumba. Alobaki na ngai : « Batela moto oyo ete akima te ! Soki akimi, okokufa na esika na ye to okofuta ngai palata nkoto misato. » 40 Wana mosali na yo azalaki kosala awa, kuna, mokangami yango akimaki.Bongo Akabi, mokonzi ya Isalaele, alobaki :— Etumbu na yo ekozala ndenge kaka olobi. 41 Mbala moko, mosakoli alongolaki eteni ya elamba oyo ezipaki elongi na ye ; mpe Akabi, mokonzi ya Isalaele, asosolaki ete moto yango azali moko kati na bana ya basakoli. 42 Mosakoli alobaki na mokonzi :— Tala maloba oyo Yawe alobi : « Lokola obikisi moto oyo Ngai nakatelaki etumbu ya kufa, yo nde moto okokufa na esika na ye ; mpe bato na yo bakokufa na esika ya bato na ye. » 43 Mokonzi ya Isalaele azongaki epai na ye, na Samari, na mawa mpe na kanda.

In Other Versions

1 Kings 20 in the ANGEFD

1 Kings 20 in the ANTPNG2D

1 Kings 20 in the AS21

1 Kings 20 in the BAGH

1 Kings 20 in the BBPNG

1 Kings 20 in the BBT1E

1 Kings 20 in the BDS

1 Kings 20 in the BEV

1 Kings 20 in the BHAD

1 Kings 20 in the BIB

1 Kings 20 in the BLPT

1 Kings 20 in the BNT

1 Kings 20 in the BNTABOOT

1 Kings 20 in the BNTLV

1 Kings 20 in the BOATCB

1 Kings 20 in the BOATCB2

1 Kings 20 in the BOBCV

1 Kings 20 in the BOCNT

1 Kings 20 in the BOECS

1 Kings 20 in the BOGWICC

1 Kings 20 in the BOHCB

1 Kings 20 in the BOHCV

1 Kings 20 in the BOHLNT

1 Kings 20 in the BOHNTLTAL

1 Kings 20 in the BOICB

1 Kings 20 in the BOILNTAP

1 Kings 20 in the BOITCV

1 Kings 20 in the BOKCV

1 Kings 20 in the BOKCV2

1 Kings 20 in the BOKHWOG

1 Kings 20 in the BOKSSV

1 Kings 20 in the BOLCB

1 Kings 20 in the BOMCV

1 Kings 20 in the BONAV

1 Kings 20 in the BONCB

1 Kings 20 in the BONLT

1 Kings 20 in the BONUT2

1 Kings 20 in the BOPLNT

1 Kings 20 in the BOSCB

1 Kings 20 in the BOSNC

1 Kings 20 in the BOTLNT

1 Kings 20 in the BOVCB

1 Kings 20 in the BOYCB

1 Kings 20 in the BPBB

1 Kings 20 in the BPH

1 Kings 20 in the BSB

1 Kings 20 in the CCB

1 Kings 20 in the CUV

1 Kings 20 in the CUVS

1 Kings 20 in the DBT

1 Kings 20 in the DGDNT

1 Kings 20 in the DHNT

1 Kings 20 in the DNT

1 Kings 20 in the ELBE

1 Kings 20 in the EMTV

1 Kings 20 in the ESV

1 Kings 20 in the FBV

1 Kings 20 in the FEB

1 Kings 20 in the GGMNT

1 Kings 20 in the GNT

1 Kings 20 in the HARY

1 Kings 20 in the HNT

1 Kings 20 in the IRVA

1 Kings 20 in the IRVB

1 Kings 20 in the IRVG

1 Kings 20 in the IRVH

1 Kings 20 in the IRVK

1 Kings 20 in the IRVM

1 Kings 20 in the IRVM2

1 Kings 20 in the IRVO

1 Kings 20 in the IRVP

1 Kings 20 in the IRVT

1 Kings 20 in the IRVT2

1 Kings 20 in the IRVU

1 Kings 20 in the ISVN

1 Kings 20 in the JSNT

1 Kings 20 in the KAPI

1 Kings 20 in the KBT1ETNIK

1 Kings 20 in the KBV

1 Kings 20 in the KJV

1 Kings 20 in the KNFD

1 Kings 20 in the LBA

1 Kings 20 in the LBLA

1 Kings 20 in the LNT

1 Kings 20 in the LSV

1 Kings 20 in the MAAL

1 Kings 20 in the MBV

1 Kings 20 in the MBV2

1 Kings 20 in the MHNT

1 Kings 20 in the MKNFD

1 Kings 20 in the MNG

1 Kings 20 in the MNT

1 Kings 20 in the MNT2

1 Kings 20 in the MRS1T

1 Kings 20 in the NAA

1 Kings 20 in the NASB

1 Kings 20 in the NBLA

1 Kings 20 in the NBS

1 Kings 20 in the NBVTP

1 Kings 20 in the NET2

1 Kings 20 in the NIV11

1 Kings 20 in the NNT

1 Kings 20 in the NNT2

1 Kings 20 in the NNT3

1 Kings 20 in the PDDPT

1 Kings 20 in the PFNT

1 Kings 20 in the RMNT

1 Kings 20 in the SBIAS

1 Kings 20 in the SBIBS

1 Kings 20 in the SBIBS2

1 Kings 20 in the SBICS

1 Kings 20 in the SBIDS

1 Kings 20 in the SBIGS

1 Kings 20 in the SBIHS

1 Kings 20 in the SBIIS

1 Kings 20 in the SBIIS2

1 Kings 20 in the SBIIS3

1 Kings 20 in the SBIKS

1 Kings 20 in the SBIKS2

1 Kings 20 in the SBIMS

1 Kings 20 in the SBIOS

1 Kings 20 in the SBIPS

1 Kings 20 in the SBISS

1 Kings 20 in the SBITS

1 Kings 20 in the SBITS2

1 Kings 20 in the SBITS3

1 Kings 20 in the SBITS4

1 Kings 20 in the SBIUS

1 Kings 20 in the SBIVS

1 Kings 20 in the SBT

1 Kings 20 in the SBT1E

1 Kings 20 in the SCHL

1 Kings 20 in the SNT

1 Kings 20 in the SUSU

1 Kings 20 in the SUSU2

1 Kings 20 in the SYNO

1 Kings 20 in the TBIAOTANT

1 Kings 20 in the TBT1E

1 Kings 20 in the TBT1E2

1 Kings 20 in the TFTIP

1 Kings 20 in the TFTU

1 Kings 20 in the TGNTATF3T

1 Kings 20 in the THAI

1 Kings 20 in the TNFD

1 Kings 20 in the TNT

1 Kings 20 in the TNTIK

1 Kings 20 in the TNTIL

1 Kings 20 in the TNTIN

1 Kings 20 in the TNTIP

1 Kings 20 in the TNTIZ

1 Kings 20 in the TOMA

1 Kings 20 in the TTENT

1 Kings 20 in the UBG

1 Kings 20 in the UGV

1 Kings 20 in the UGV2

1 Kings 20 in the UGV3

1 Kings 20 in the VBL

1 Kings 20 in the VDCC

1 Kings 20 in the YALU

1 Kings 20 in the YAPE

1 Kings 20 in the YBVTP

1 Kings 20 in the ZBP