2 Chronicles 20 (BOLCB2)

1 Sima na yango, bato ya Moabi mpe ya Amoni elongo na ndambo ya bato ya Maoni bayaki kobundisa Jozafati. 2 Bongo sango ekomaki na matoyi ya Jozafati na maloba oyo : « Mampinga minene ezali koya kobundisa yo longwa na Siri mpe na ngambo mosusu ya ebale monene ; esili kokoma na Atsatsoni-Tamari oyo babengaka Eyini-Gedi. » 3 Jozafati abangaki makasi ; azwaki mokano ya kotuna toli ya Yawe mpe akataki ete mokili mobimba ya Yuda ekila bilei. 4 Bato ya Yuda oyo bawutaki na bingumba nyonso ya Yuda basanganaki mpo na koluka Yawe. 5 Jozafati atelemaki kati na lisanga ya Yuda mpe ya Yelusalemi, kati na Tempelo ya Yawe, liboso ya lopango ya sika. 6 Asambelaki :« Oh Yawe, Nzambe ya bakoko na biso ! Ezali Yo te Nzambe oyo azali kati na likolo ? Ezali Yo te oyo okonzaka bikolo nyonso ya mokili ? Nguya mpe makasi ezali kati na loboko na Yo, mpe moko te akoki kotelemela Yo ! 7 Oh Nzambe na biso, ezali Yo te oyo obenganaki bavandi ya mokili oyo liboso ya Isalaele, bato na Yo, mpo na kopesa yango mpo na libela epai ya bakitani ya Abrayami, molingami na Yo ? 8 Bavandaki mpe na mokili yango, batongaki awa Esika ya bule mpo na Yo, mpo na Kombo na Yo, na koloba : 9 ‹ Soki mabe moko ekomeli biso : bitumba, etumbu, bokono to nzala makasi, tokoya kotelema liboso ya Tempelo oyo mpe liboso na Yo, pamba te Kombo na Yo ezali kati na Tempelo oyo ; mpe kati na pasi na biso, tokoganga epai na Yo ; bongo Yo, okoyoka, okoyanola mpe okobikisa biso ! › 10 Sik’oyo, tala bato ya Amoni, ya Moabi mpe bavandi ya etuka ya bangomba Seiri, ba-oyo na tina na bango, tango bana ya Isalaele babimaki na Ejipito, opekisaki bana ya Isalaele kobotola mokili na bango ; mpe mpo na yango, balekaki pembeni-pembeni ya mokili na bango mpe babomaki bango te ! 11 Tala lolenge nini bazali kofuta biso : bayei kobundisa mpe kobengana biso na mabele oyo opesaki biso lokola libula ! 12 Oh Nzambe na biso, okosambisa bango te ? Pamba te tozali na makasi te ya kotelemela mampinga minene oyo ezali koya kobundisa biso, mpe toyebi te tosala nini ! Miso na biso ezali kotalela kaka Yo. » 13 Bato nyonso ya Yuda elongo na mabota nyonso, basi mpe bana na bango, batelemaki liboso ya Yawe. 14 Bongo Molimo na Yawe akitelaki, kati na lisanga, Yaazieli, mwana mobali ya Zakari, mwana ya mobali ya Benaya, mwana mobali ya Yeyeli mpe mwana mobali ya Matania, Molevi mpe moko kati na bakitani ya Azafi. 15 Yaazieli alobaki : « Bino bavandi nyonso ya Yuda mpe ya Yelusalemi, mpe yo mokonzi Jozafati, boyoka ! Tala makambo oyo Yawe azali koloba na bino : ‹ Bobanga te mpe bolenga te liboso ya mampinga minene oyo, pamba te bitumba ezali ya bino te kasi ezali ya Nzambe. 16 Lobi, bokende kobundisa bango. Bakomata ngomba Atsize, mpe bino bokokutana na bango na suka ya lubwaku, liboso ya esobe ya Yerueli. 17 Bokobunda bitumba ata moke te : bomibongisa kaka na bisika na bino, botelema mpe botala elonga oyo Yawe akopesa bino. Bino bato ya Yuda mpe ya Yelusalemi, bobanga te mpe bolenga te ! Lobi, bokende kokutana na bango ; mpe Yawe akozala elongo na bino ! › » 18 Jozafati agumbamaki elongi kino na mabele, mpe bato nyonso ya Yuda mpe ya Yelusalemi bafukamaki mpo na kogumbamela Yawe. 19 Balevi kati na bato ya Keati mpe ya Kore batelemaki mpo na kokumisa Yawe, Nzambe ya Isalaele, na mongongo makasi. 20 Na tongo-tongo ya mokolo oyo elandaki, bakendeki na esobe ya Tekoa. Na tango ya kokende, Jozafati atelemaki mpe alobaki : « Bino, bato ya Yuda mpe bavandi ya Yelusalemi, boyoka ngai ! Botia elikya na Yawe, Nzambe na bino, mpe bokolendisama ! Bondimela basakoli na Ye, mpe bokolonga ! » 21 Sima na ye kosolola na bato, Jozafati aponaki bayembi, atiaki bango liboso ya mampinga ya basoda, mpo na kokumisa Yawe mpe kotombola nkembo ya bosantu na Ye. Mpe batambolaki liboso ya mampinga ya basoda na koyemba :« Bosanzola Yawe,pamba te bolingo na Ye ewumelaka seko na seko ! » 22 Tango kaka babandaki koyemba mpe kokumisa, Yawe atiaki mobulu kati na bato ya Amoni, ya Moabi mpe ya bangomba Seiri oyo bakotaki na Yuda, mpe babomanaki bango na bango. 23 Bato ya Amoni mpe ya Moabi batelemaki mpo na kobundisa, koboma mpe kobebisa bavandi ya bangomba Seiri. Tango basilisaki koboma bavandi ya Seiri, bakomaki kobomana bango na bango. 24 Tango bato ya Yuda bayaki na esika ya kotalela esobe na mosika, batalaki na ngambo ya mampinga minene ya banguna mpe bamonaki kaka bibembe elali na mabele : moko te abikaki. 25 Jozafati elongo na bato na ye bakendeki kozwa bomengo ya bitumba ; mpe bamonaki bibembe ebele, biloko ebele, bilamba ebele mpe biloko ebele ya talo. Balokotaki biloko ebele oyo bakokaki ata komema te. Basalaki mikolo misato mpo na kozwa yango, pamba te bomengo ya bitumba ezalaki ebele penza. 26 Na mokolo ya minei, basanganaki na lubwaku ya Beraka epai wapi bapambolaki Yawe. Yango wana, kino na mokolo ya lelo, babengaka esika yango lubwaku ya Beraka. 27 Na bokambami ya Jozafati, bato nyonso ya Yuda mpe ya Yelusalemi bazongaki na esengo na Yelusalemi, pamba te Yawe atondisaki bango na esengo wana akangolaki bango na maboko ya banguna na bango. 28 Bakotaki na Yelusalemi na lokito ya makembe, ya mandanda mpe ya bakelelo, mpe bakendeki na Tempelo ya Yawe. 29 Somo ya Nzambe ekangaki bikolo nyonso ya mokili tango bayokaki sango ete Yawe abundisi banguna ya Isalaele. 30 Bokonzi ya Jozafati ezwaki kimia, pamba te Nzambe na ye apesaki ye bopemi na bangambo nyonso. 31 Jozafati, mwana mobali ya Asa, akonzaki Yuda ; azalaki na mibu tuku misato na mitano ya mbotama tango akomaki mokonzi ya Yuda, mpe akonzaki mibu tuku mibale na mitano na Yelusalemi. Kombo ya mama na ye ezalaki « Azuba. » Azuba azalaki mwana mwasi ya Shili. 32 Jozafati alandaki nzela oyo Asa, tata na ye, atambolaki na yango ; apengwaki na yango ata moke te mpe asalaki makambo ya sembo na miso ya Yawe. 33 Nzokande, balongolaki te bisambelo ya likolo ya bangomba ; mpe bato babongisaki nanu te mitema na bango mpo na kokangama na Nzambe ya bakoko na bango. 34 Makambo mosusu oyo etali bokonzi ya Jozafati, kobanda na ebandeli kino na suka, ekomama kati na buku ya masolo ya Jewu, mwana mobali ya Anani ; mpe masolo yango ezali kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Isalaele. 35 Sima na yango, Jozafati, mokonzi ya Yuda, asalaki boyokani elongo na Akazia, mokonzi ya Isalaele, oyo etamboli na ye ezalaki mabe na miso ya Nzambe. 36 Basanganaki bango mibale mpo na kotonga bamasuwa oyo esengelaki kokende na Tarsisi. Sima na kotonga bamasuwa na Etsioni-Geberi, 37 Eliezeri, mwana mobali ya Dodavawu, moto ya Maresha, asakolaki mpo na kotelemela Jozafati ; alobaki : « Lokola osali boyokani elongo na Akazia, Yawe akobebisa misala na yo. »Mpe bamasuwa ebebaki mpe ekokaki lisusu te kokende na Tarsisi.

In Other Versions

2 Chronicles 20 in the ANGEFD

2 Chronicles 20 in the ANTPNG2D

2 Chronicles 20 in the AS21

2 Chronicles 20 in the BAGH

2 Chronicles 20 in the BBPNG

2 Chronicles 20 in the BBT1E

2 Chronicles 20 in the BDS

2 Chronicles 20 in the BEV

2 Chronicles 20 in the BHAD

2 Chronicles 20 in the BIB

2 Chronicles 20 in the BLPT

2 Chronicles 20 in the BNT

2 Chronicles 20 in the BNTABOOT

2 Chronicles 20 in the BNTLV

2 Chronicles 20 in the BOATCB

2 Chronicles 20 in the BOATCB2

2 Chronicles 20 in the BOBCV

2 Chronicles 20 in the BOCNT

2 Chronicles 20 in the BOECS

2 Chronicles 20 in the BOGWICC

2 Chronicles 20 in the BOHCB

2 Chronicles 20 in the BOHCV

2 Chronicles 20 in the BOHLNT

2 Chronicles 20 in the BOHNTLTAL

2 Chronicles 20 in the BOICB

2 Chronicles 20 in the BOILNTAP

2 Chronicles 20 in the BOITCV

2 Chronicles 20 in the BOKCV

2 Chronicles 20 in the BOKCV2

2 Chronicles 20 in the BOKHWOG

2 Chronicles 20 in the BOKSSV

2 Chronicles 20 in the BOLCB

2 Chronicles 20 in the BOMCV

2 Chronicles 20 in the BONAV

2 Chronicles 20 in the BONCB

2 Chronicles 20 in the BONLT

2 Chronicles 20 in the BONUT2

2 Chronicles 20 in the BOPLNT

2 Chronicles 20 in the BOSCB

2 Chronicles 20 in the BOSNC

2 Chronicles 20 in the BOTLNT

2 Chronicles 20 in the BOVCB

2 Chronicles 20 in the BOYCB

2 Chronicles 20 in the BPBB

2 Chronicles 20 in the BPH

2 Chronicles 20 in the BSB

2 Chronicles 20 in the CCB

2 Chronicles 20 in the CUV

2 Chronicles 20 in the CUVS

2 Chronicles 20 in the DBT

2 Chronicles 20 in the DGDNT

2 Chronicles 20 in the DHNT

2 Chronicles 20 in the DNT

2 Chronicles 20 in the ELBE

2 Chronicles 20 in the EMTV

2 Chronicles 20 in the ESV

2 Chronicles 20 in the FBV

2 Chronicles 20 in the FEB

2 Chronicles 20 in the GGMNT

2 Chronicles 20 in the GNT

2 Chronicles 20 in the HARY

2 Chronicles 20 in the HNT

2 Chronicles 20 in the IRVA

2 Chronicles 20 in the IRVB

2 Chronicles 20 in the IRVG

2 Chronicles 20 in the IRVH

2 Chronicles 20 in the IRVK

2 Chronicles 20 in the IRVM

2 Chronicles 20 in the IRVM2

2 Chronicles 20 in the IRVO

2 Chronicles 20 in the IRVP

2 Chronicles 20 in the IRVT

2 Chronicles 20 in the IRVT2

2 Chronicles 20 in the IRVU

2 Chronicles 20 in the ISVN

2 Chronicles 20 in the JSNT

2 Chronicles 20 in the KAPI

2 Chronicles 20 in the KBT1ETNIK

2 Chronicles 20 in the KBV

2 Chronicles 20 in the KJV

2 Chronicles 20 in the KNFD

2 Chronicles 20 in the LBA

2 Chronicles 20 in the LBLA

2 Chronicles 20 in the LNT

2 Chronicles 20 in the LSV

2 Chronicles 20 in the MAAL

2 Chronicles 20 in the MBV

2 Chronicles 20 in the MBV2

2 Chronicles 20 in the MHNT

2 Chronicles 20 in the MKNFD

2 Chronicles 20 in the MNG

2 Chronicles 20 in the MNT

2 Chronicles 20 in the MNT2

2 Chronicles 20 in the MRS1T

2 Chronicles 20 in the NAA

2 Chronicles 20 in the NASB

2 Chronicles 20 in the NBLA

2 Chronicles 20 in the NBS

2 Chronicles 20 in the NBVTP

2 Chronicles 20 in the NET2

2 Chronicles 20 in the NIV11

2 Chronicles 20 in the NNT

2 Chronicles 20 in the NNT2

2 Chronicles 20 in the NNT3

2 Chronicles 20 in the PDDPT

2 Chronicles 20 in the PFNT

2 Chronicles 20 in the RMNT

2 Chronicles 20 in the SBIAS

2 Chronicles 20 in the SBIBS

2 Chronicles 20 in the SBIBS2

2 Chronicles 20 in the SBICS

2 Chronicles 20 in the SBIDS

2 Chronicles 20 in the SBIGS

2 Chronicles 20 in the SBIHS

2 Chronicles 20 in the SBIIS

2 Chronicles 20 in the SBIIS2

2 Chronicles 20 in the SBIIS3

2 Chronicles 20 in the SBIKS

2 Chronicles 20 in the SBIKS2

2 Chronicles 20 in the SBIMS

2 Chronicles 20 in the SBIOS

2 Chronicles 20 in the SBIPS

2 Chronicles 20 in the SBISS

2 Chronicles 20 in the SBITS

2 Chronicles 20 in the SBITS2

2 Chronicles 20 in the SBITS3

2 Chronicles 20 in the SBITS4

2 Chronicles 20 in the SBIUS

2 Chronicles 20 in the SBIVS

2 Chronicles 20 in the SBT

2 Chronicles 20 in the SBT1E

2 Chronicles 20 in the SCHL

2 Chronicles 20 in the SNT

2 Chronicles 20 in the SUSU

2 Chronicles 20 in the SUSU2

2 Chronicles 20 in the SYNO

2 Chronicles 20 in the TBIAOTANT

2 Chronicles 20 in the TBT1E

2 Chronicles 20 in the TBT1E2

2 Chronicles 20 in the TFTIP

2 Chronicles 20 in the TFTU

2 Chronicles 20 in the TGNTATF3T

2 Chronicles 20 in the THAI

2 Chronicles 20 in the TNFD

2 Chronicles 20 in the TNT

2 Chronicles 20 in the TNTIK

2 Chronicles 20 in the TNTIL

2 Chronicles 20 in the TNTIN

2 Chronicles 20 in the TNTIP

2 Chronicles 20 in the TNTIZ

2 Chronicles 20 in the TOMA

2 Chronicles 20 in the TTENT

2 Chronicles 20 in the UBG

2 Chronicles 20 in the UGV

2 Chronicles 20 in the UGV2

2 Chronicles 20 in the UGV3

2 Chronicles 20 in the VBL

2 Chronicles 20 in the VDCC

2 Chronicles 20 in the YALU

2 Chronicles 20 in the YAPE

2 Chronicles 20 in the YBVTP

2 Chronicles 20 in the ZBP