2 Kings 14 (BOLCB2)

1 Na mobu ya mibale ya bokonzi ya Joasi, mwana mobali ya Yoakazi, mokonzi ya Isalaele, Amatsia, mwana mobali ya Joasi, mokonzi ya Yuda, akomaki mokonzi. 2 Amatsia azalaki na mibu tuku mibale na mitano ya mbotama tango akomaki mokonzi, mpe akonzaki mibu tuku mibale na libwa na Yelusalemi. Kombo ya mama na ye ezalaki « Yeoyadani. » Yeoyadani azalaki moto ya Yelusalemi. 3 Amatsia asalaki makambo ya sembo na miso ya Yawe, kasi ezalaki te lokola Davidi, koko na ye. Na makambo nyonso, alandaki ndakisa ya Joasi, tata na ye. 4 Nzokande, balongolaki te bisambelo ya likolo ya bangomba ; bato bakobaki kaka kobonza kuna bambeka mpe kotumba ansa. 5 Sima na Amatsia kolendisa bokonzi na ye, abomaki bakalaka oyo babomaki tata na ye. 6 Kasi abomaki te bana mibali ya babomi ya tata na ye, pamba te, kolanda ndenge ekomama kati na buku ya Mobeko ya Moyize, Yawe apesaki mitindo oyo : « Bakoboma batata te mpo na bana na bango to mpe bakoboma bana te mpo na batata na bango ; bakoboma moto na moto mpo na masumu na ye moko. » 7 Ezali Amatsia nde moto alongaki bato ya Edomi, nkoto zomi na Lubwaku ya Mungwa, mpe abotolaki na bitumba engumba ya Sela ; mpe abengaki yango « Yokiteyeli, » kombo oyo babengelaka yango kino lelo. 8 Bongo Amatsia atindaki bantoma epai ya Joasi, mwana mobali ya Yoakazi mpe koko ya Jewu, mokonzi ya Isalaele, mpo na koyebisa ye :— Yaka tobunda ! 9 Kasi Joasi, mokonzi ya Isalaele, azongiselaki Amatsia, mokonzi ya Yuda :— Mokolo moko, nzete ya sende ya Libani etindaki maloba epai ya nzete ya sedele ya Libani : « Balisa mwana na yo ya mwasi epai ya mwana na ngai ya mobali. » Kasi nyama moko ya zamba elekaki mpe enyataki nzete ya sende. 10 Solo, olongi Edomi, mpe motema na yo ezali komikumisa. Sepela na yo, kasi vanda na ndako na yo. Mpo na nini koluka ete pasi makasi ekweyela yo elongo na Yuda ? 11 Kasi Amatsia ayokaki ye te. Boye, Joasi, mokonzi ya Isalaele, akendeki kobundisa Amatsia, mokonzi ya Yuda. Ye mpe Amatsia, mokonzi ya Yuda, babundaki na Beti-Shemeshi kati na mokili ya Yuda. 12 Isalaele alongaki Yuda, mpe bato ya Yuda bakimaki, moto na moto na ndako na ye. 13 Joasi, mokonzi ya Isalaele, akangaki Amatsia, mokonzi ya Yuda, mwana mobali ya Joasi mpe koko ya Akazia, na Beti-Shemeshi. Boye Joasi akendeki na Yelusalemi mpe abukaki mir ya Yelusalemi, na molayi ya bametele pene nkama moko na tuku mwambe, longwa na ekuke ya Efrayimi kino na ekuke ya suka. 14 Akamataki wolo nyonso, palata nyonso mpe biloko nyonso oyo ezalaki kati na Tempelo ya Yawe, kati na bibombelo ya ndako ya mokonzi ; akangaki bato na bowumbu mpe azongaki na Samari. 15 Makambo mosusu oyo etali bokonzi ya Joasi, misala na ye mpe elonga na ye tango abundisaki Amatsia, mokonzi ya Yuda, ekomama kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Isalaele. 16 Joasi akendeki kokutana na bakoko na ye, mpe bakundaki ye na Samari esika moko na bakoko na ye, bakonzi ya Isalaele. Mpe Jeroboami, mwana na ye ya mobali, akitanaki na ye na bokonzi. 17 Amatsia, mwana mobali ya Joasi, mokonzi ya Yuda, awumelaki lisusu na bomoi mibu zomi na mitano sima na kufa ya Joasi, mwana mobali ya Yoakazi, mokonzi ya Isalaele. 18 Makambo mosusu oyo etali bokonzi ya Amatsia mpe misala na ye, ekomama kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Yuda. 19 Basalelaki ye likita, na Yelusalemi, mpo na kotelemela ye, mpe akimaki na Lakishi. Kasi batindaki bato mpo ete balanda ye kino na Lakishi, mpe babomaki ye kuna. 20 Bamemaki nzoto na ye na likolo ya mpunda mpe bakundaki ye na Yelusalemi, esika moko na bakoko na ye kati na engumba ya Davidi. 21 Bato nyonso ya Yuda bakamataki Azaria oyo azalaki na mibu zomi na motoba ya mbotama mpe bakomisaki ye mokonzi na esika ya tata na ye, Amatsia. 22 Ezalaki ye nde moto atongaki lisusu engumba ya Eyilati mpe azongisaki yango na Yuda sima na kufa ya tata na ye, mokonzi Amatsia. 23 Tango Amatsia, mokonzi ya Yuda, mwana mobali ya Joasi, akokisaki mibu zomi na mitano na bokonzi, Jeroboami, mwana mobali ya Joasi, akomaki mokonzi ya Isalaele na Samari mpe akonzaki mibu tuku minei na moko. 24 Asalaki makambo mabe na miso ya Yawe mpe atikaki te masumu nyonso ya Jeroboami, mwana mobali ya Nebati, masumu oyo na nzela na yango akweyisaki Isalaele. 25 Ezalaki ye nde moto abotolaki lisusu bamboka ya Isalaele longwa na Lebo-Amati kino na ebale monene ya Araba, kolanda Liloba na Yawe, Nzambe ya Isalaele, oyo alobaki na nzela ya mosali na Ye, mosakoli Yona, mwana mobali ya Amitayi, moto ya Gati-Eferi. 26 Yawe amonaki ndenge nini bana nyonso ya Isalaele bazalaki konyokwama. Ezala bawumbu to bansomi, moto moko te akokaki kosunga bango. 27 Lokola Yawe alobaki te ete akolimwisa kombo ya Isalaele na se ya moyi, abikisaki bango na nzela ya loboko ya Jeroboami, mwana mobali ya Joasi. 28 Makambo mosusu oyo etali bokonzi ya Jeroboami, misala na ye nyonso mpe elonga na ye na bitumba, ezala ndenge azongisaki na se ya bokonzi ya Isalaele Damasi mpe Amati, bingumba mibale oyo ezalaki ya Yuda, nyonso wana ekomama kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Isalaele. 29 Jeroboami akendeki kokutana na bakoko na ye, mpe bakundaki ye esika moko na bakoko na ye, bakonzi ya Isalaele ; mpe Zakari, mwana na ye ya mobali, akitanaki na ye na bokonzi.

In Other Versions

2 Kings 14 in the ANGEFD

2 Kings 14 in the ANTPNG2D

2 Kings 14 in the AS21

2 Kings 14 in the BAGH

2 Kings 14 in the BBPNG

2 Kings 14 in the BBT1E

2 Kings 14 in the BDS

2 Kings 14 in the BEV

2 Kings 14 in the BHAD

2 Kings 14 in the BIB

2 Kings 14 in the BLPT

2 Kings 14 in the BNT

2 Kings 14 in the BNTABOOT

2 Kings 14 in the BNTLV

2 Kings 14 in the BOATCB

2 Kings 14 in the BOATCB2

2 Kings 14 in the BOBCV

2 Kings 14 in the BOCNT

2 Kings 14 in the BOECS

2 Kings 14 in the BOGWICC

2 Kings 14 in the BOHCB

2 Kings 14 in the BOHCV

2 Kings 14 in the BOHLNT

2 Kings 14 in the BOHNTLTAL

2 Kings 14 in the BOICB

2 Kings 14 in the BOILNTAP

2 Kings 14 in the BOITCV

2 Kings 14 in the BOKCV

2 Kings 14 in the BOKCV2

2 Kings 14 in the BOKHWOG

2 Kings 14 in the BOKSSV

2 Kings 14 in the BOLCB

2 Kings 14 in the BOMCV

2 Kings 14 in the BONAV

2 Kings 14 in the BONCB

2 Kings 14 in the BONLT

2 Kings 14 in the BONUT2

2 Kings 14 in the BOPLNT

2 Kings 14 in the BOSCB

2 Kings 14 in the BOSNC

2 Kings 14 in the BOTLNT

2 Kings 14 in the BOVCB

2 Kings 14 in the BOYCB

2 Kings 14 in the BPBB

2 Kings 14 in the BPH

2 Kings 14 in the BSB

2 Kings 14 in the CCB

2 Kings 14 in the CUV

2 Kings 14 in the CUVS

2 Kings 14 in the DBT

2 Kings 14 in the DGDNT

2 Kings 14 in the DHNT

2 Kings 14 in the DNT

2 Kings 14 in the ELBE

2 Kings 14 in the EMTV

2 Kings 14 in the ESV

2 Kings 14 in the FBV

2 Kings 14 in the FEB

2 Kings 14 in the GGMNT

2 Kings 14 in the GNT

2 Kings 14 in the HARY

2 Kings 14 in the HNT

2 Kings 14 in the IRVA

2 Kings 14 in the IRVB

2 Kings 14 in the IRVG

2 Kings 14 in the IRVH

2 Kings 14 in the IRVK

2 Kings 14 in the IRVM

2 Kings 14 in the IRVM2

2 Kings 14 in the IRVO

2 Kings 14 in the IRVP

2 Kings 14 in the IRVT

2 Kings 14 in the IRVT2

2 Kings 14 in the IRVU

2 Kings 14 in the ISVN

2 Kings 14 in the JSNT

2 Kings 14 in the KAPI

2 Kings 14 in the KBT1ETNIK

2 Kings 14 in the KBV

2 Kings 14 in the KJV

2 Kings 14 in the KNFD

2 Kings 14 in the LBA

2 Kings 14 in the LBLA

2 Kings 14 in the LNT

2 Kings 14 in the LSV

2 Kings 14 in the MAAL

2 Kings 14 in the MBV

2 Kings 14 in the MBV2

2 Kings 14 in the MHNT

2 Kings 14 in the MKNFD

2 Kings 14 in the MNG

2 Kings 14 in the MNT

2 Kings 14 in the MNT2

2 Kings 14 in the MRS1T

2 Kings 14 in the NAA

2 Kings 14 in the NASB

2 Kings 14 in the NBLA

2 Kings 14 in the NBS

2 Kings 14 in the NBVTP

2 Kings 14 in the NET2

2 Kings 14 in the NIV11

2 Kings 14 in the NNT

2 Kings 14 in the NNT2

2 Kings 14 in the NNT3

2 Kings 14 in the PDDPT

2 Kings 14 in the PFNT

2 Kings 14 in the RMNT

2 Kings 14 in the SBIAS

2 Kings 14 in the SBIBS

2 Kings 14 in the SBIBS2

2 Kings 14 in the SBICS

2 Kings 14 in the SBIDS

2 Kings 14 in the SBIGS

2 Kings 14 in the SBIHS

2 Kings 14 in the SBIIS

2 Kings 14 in the SBIIS2

2 Kings 14 in the SBIIS3

2 Kings 14 in the SBIKS

2 Kings 14 in the SBIKS2

2 Kings 14 in the SBIMS

2 Kings 14 in the SBIOS

2 Kings 14 in the SBIPS

2 Kings 14 in the SBISS

2 Kings 14 in the SBITS

2 Kings 14 in the SBITS2

2 Kings 14 in the SBITS3

2 Kings 14 in the SBITS4

2 Kings 14 in the SBIUS

2 Kings 14 in the SBIVS

2 Kings 14 in the SBT

2 Kings 14 in the SBT1E

2 Kings 14 in the SCHL

2 Kings 14 in the SNT

2 Kings 14 in the SUSU

2 Kings 14 in the SUSU2

2 Kings 14 in the SYNO

2 Kings 14 in the TBIAOTANT

2 Kings 14 in the TBT1E

2 Kings 14 in the TBT1E2

2 Kings 14 in the TFTIP

2 Kings 14 in the TFTU

2 Kings 14 in the TGNTATF3T

2 Kings 14 in the THAI

2 Kings 14 in the TNFD

2 Kings 14 in the TNT

2 Kings 14 in the TNTIK

2 Kings 14 in the TNTIL

2 Kings 14 in the TNTIN

2 Kings 14 in the TNTIP

2 Kings 14 in the TNTIZ

2 Kings 14 in the TOMA

2 Kings 14 in the TTENT

2 Kings 14 in the UBG

2 Kings 14 in the UGV

2 Kings 14 in the UGV2

2 Kings 14 in the UGV3

2 Kings 14 in the VBL

2 Kings 14 in the VDCC

2 Kings 14 in the YALU

2 Kings 14 in the YAPE

2 Kings 14 in the YBVTP

2 Kings 14 in the ZBP