2 Kings 18 (BOLCB2)

1 Tango Oze, mwana mobali ya Ela, mokonzi ya Isalaele, akokisaki mibu misato na bokonzi, Ezekiasi, mwana mobali ya Akazi, mokonzi ya Yuda, akomaki mokonzi. 2 Ezekiasi azalaki na mibu tuku mibale na mitano ya mbotama tango akomaki mokonzi, mpe akonzaki mibu tuku mibale na libwa na Yelusalemi. Kombo ya mama na ye ezalaki « Abi. » Abi azalaki mwana mwasi ya Zakari. 3 Ezekiasi asalaki makambo ya sembo na miso ya Yawe ndenge Davidi, koko na ye, asalaki. 4 Alongolaki bisambelo ya likolo ya bangomba, abukaki makonzi ya bule ya banzambe ya bikeko, mpe akataki likonzi ya bule ya nzambe mwasi Ashera. Abukaki-bukaki nyoka ya ebende oyo Moyize asalaki, pamba te kino na tango wana, bana ya Isalaele bazalaki kotumba ansa mpo na nyoka yango mpe kobenga yango « Nekushitani. » 5 Ezekiasi atiaki motema na ye epai na Yawe, Nzambe ya Isalaele. Mokonzi moko te akokanaki na ye kati na bakonzi nyonso ya Yuda, ezala liboso to sima na ye. 6 Atikalaki ya kokangama na Yawe mpe atikaki te kolanda Ye ; abatelaki mitindo oyo Yawe apesaki na nzela ya Moyize. 7 Yawe azalaki elongo na ye mpe azalaki kolonga na makambo nyonso oyo azalaki kosala. Atombokelaki mokonzi ya Asiri mpe aboyaki kosalela ye. 8 Alongaki bato ya Filisitia mpe alandaki bango kino na Gaza, abebisaki engumba mpe etuka na yango, mpe abotolaki bingumba batonga makasi mpe bandako milayi ya bakengeli. 9 Tango Ezekiasi akokisaki mibu minei na bokonzi, oyo ezalaki mobu ya sambo ya bokonzi ya Oze, mwana mobali ya Ela, mokonzi ya Isalaele, Salimanasari, mokonzi ya Asiri, abundisaki Samari mpe azingelaki yango. 10 Bato ya Asiri babotolaki Samari sima na mibu misato ya bitumba, na mobu ya motoba ya bokonzi ya Ezekiasi, oyo ezalaki mobu ya libwa ya bokonzi ya Oze, mokonzi ya Isalaele. 11 Mokonzi ya Asiri amemaki bato ya Isalaele na bowumbu na Asiri mpe atiaki bango na Ala, na ngambo ya ebale Abori, na etuka ya Gozani mpe na bingumba ya Medi. 12 Makambo oyo esalemaki mpo ete bato ya Isalaele batosaki te Yawe, Nzambe na bango, mpe babukaki boyokani na Ye ; elingi koloba ete batosaki te makambo nyonso oyo Moyize, mosali na Nzambe, atindaki bango. 13 Tango mokonzi Ezekiasi akokisaki mibu zomi na minei na bokonzi, Senakeribe, mokonzi ya Asiri, abundisaki bingumba nyonso ya Yuda, oyo batonga makasi mpe abotolaki yango. 14 Ezekiasi, mokonzi ya Yuda, atindaki sango oyo epai ya mokonzi ya Asiri, na Lakishi : « Nasali mabe, bima na mboka na ngai ; nakofuta yo nyonso oyo okosenga ngai. »Mokonzi ya Asiri akatelaki Ezekiasi, mokonzi ya Yuda, mpako ya motuya ya bakilo nkoto zomi ya palata mpe bakilo nkoto moko ya wolo. 15 Ezekiasi apesaki ye palata nyonso oyo ezalaki kati na Tempelo ya Yawe mpe kati na bibombelo ya ndako ya mokonzi. 16 Na tango wana, Ezekiasi, mokonzi ya Yuda, alongolaki wolo oyo asalelaki mpo na kolatisa bikuke mpe mabaya oyo esimbaka bikuke ya Tempelo ya Yawe, mpe apesaki yango epai ya mokonzi ya Asiri. 17 Wuta na Lakishi, mokonzi ya Asiri atindaki epai ya mokonzi Ezekiasi, na Yelusalemi, mokonzi ya mampinga na ye, mokonzi ya bakalaka ya lokumu, mokonzi ya basoda oyo bakengelaka ye, mpe mampinga ya basoda ya nguya. Tango bakomaki na Yelusalemi mpe batelemaki pene ya nzela oyo ememaka mayi na liziba ya mayi ya monene, oyo ezali na nzela ya elanga ya moto oyo atiaka langi na bilamba, 18 babelelaki mokonzi. Mpe Eliakimi, mwana mobali ya Ilikia, mobateli biloko ya ndako ya mokonzi ; Shebina, mokomi mikanda ; mpe Yoa, mwana mobali ya Azafi mpe mobombi mikanda, babimaki mpo na kokutana na bango. 19 Mokonzi ya basoda oyo bakengelaka mokonzi ya Asiri alobaki na bango :« Boloba na Ezekiasi : ‹ Tala makambo oyo mokonzi monene, mokonzi ya Asiri, alobi : ‘ Otie elikya na yo na nini ? 20 Okanisi ete maloba ya pamba ekoki kozwa esika ya mayele mpe makasi ya bitumba ? Otie penza elikya na nani mpo ete otombokela ngai ? 21 Tala, ozali nde kotia elikya na Ejipito oyo ezali lokola mwa nzete ya bambu oyo ebukana, oyo etobolaka mpe ezokisaka loboko ya moto oyo ayekamelaka yango ! Faraon, mokonzi ya Ejipito, azalaka nde bongo mpo na bato nyonso oyo batielaka ye motema ! ’ 22 Tango mosusu bokoloba na ngai : ‘ Totiaka elikya na biso kati na Yawe, Nzambe na biso. ’ Boni ! Ezali ye te oyo Ezekiasi alongolaki bisambelo na ye ya likolo ya bangomba mpe bitumbelo na ye tango alobaki na Yuda mpe na Yelusalemi : ‘ Kati na Yelusalemi, bosengeli kogumbama liboso ya etumbelo oyo ? ’ 23 Sik’oyo, nabondeli yo, beta mondenge na nkolo na ngai, mokonzi ya Asiri : ‘ Nakopesa yo bampunda nkoto mibale soki okoki kopesa basoda mpo ete batambolisa yango ! 24 Okokoka ndenge nini kokimisa ata mokonzi moko kaka, kati na bakonzi ya basoda ya nkolo na ngai, yo oyo otiaka elikya na yo kati na Ejipito mpo na bashar mpe bato oyo batambolisaka yango ? 25 Boni, okanisi ete ngai nayei kobundisa mpe kobebisa esika oyo na ndingisa ya Yawe te ? Ezali Ye moko Yawe nde alobaki na ngai ete nabundisa mokili oyo mpe nabebisa yango. ’ › » 26 Eliakimi, mwana mobali ya Ilikia, Shebina mpe Yoa balobaki na mokonzi ya basoda oyo bakengelaka mokonzi :— Tobondeli yo, loba na basali na yo na lokota ya Arami, pamba te tososolaka yango ; koloba na biso na lokota ya Ebre te, noki te bato oyo bazali na likolo ya mir bakoyoka. 27 Mokonzi ya basoda oyo bakengelaka mokonzi azongisaki :— Bokanisi ete nkolo na ngai atindi ngai koloba maloba oyo kaka epai na mokonzi na bino mpe epai na bino ? Te ! Maloba yango ezali mpe mpo na bato oyo batelemi na likolo ya mir, oyo bakolia nyei na bango mpe komela masuba na bango elongo na bino ? 28 Boye mokonzi ya basoda oyo bakengelaka mokonzi atelemaki mpe agangaki makasi na lokota ya Ebre :— Boyoka maloba ya mokonzi monene, mokonzi ya Asiri ! 29 Tala makambo oyo mokonzi alobi : « Tika ete Ezekiasi akosa bino te, pamba te akokoka te kokangola bino na loboko na ngai ! 30 Bondima te ete Ezekiasi atinda bino kotia elikya na Yawe tango azali koloba : ‹ Solo, Yawe akokangola biso. Engumba oyo ekokweya te na maboko ya mokonzi ya Asiri. › 31 Boyokela Ezekiasi te, pamba te tala makambo oyo mokonzi ya Asiri alobi : Bosala boyokani ya kimia elongo na ngai mpe boya epai na ngai ; bongo moko na moko kati na bino akolia mbuma ya elanga na ye ya vino, ya nzete na ye ya figi, mpe akomela mayi ya libulu na ye 32 liboso ete naya kozwa bino mpo na komema bino na mokili oyo ekokana na oyo ya bino, mokili oyo etonda na ble mpe na vino ya sika, mokili ya mapa mpe ya bilanga ya vino, mokili ya banzete ya olive mpe ya mafuta ya nzoyi. Boye, bokozala na bomoi, bokokufa te ! Bondima Ezekiasi te, pamba te azali kokosa bino tango azali koloba : ‹ Yawe akokangola biso. › 33 Boni, ezali na nzambe ya ekolo songolo, oyo alonga kokangola ekolo na ye na loboko ya mokonzi ya Asiri ? 34 Wapi banzambe ya Amati mpe ya Aripadi ? Wapi banzambe ya Sefarivayimi, ya Ena, ya Iva ? Boni, balongaki kokangola Samari na loboko na ngai ? 35 Kati na banzambe nyonso ya bikolo oyo, nani azalaki na makoki ya kokangola mokili na ye na maboko na ngai ? Bongo ndenge nini Yawe akoka solo kokangola Yelusalemi na maboko na ngai ? » 36 Kasi bato batikalaki kimia mpe bazongiselaki ye ata liloba moko te, pamba te mokonzi apesaki mitindo :— Bopesa ye eyano te ! 37 Boye Eliakimi, mwana mobali ya Ilikia mpe mobateli biloko ya ndako ya mokonzi ; Shebina, mokomi mikanda ; mpe Yoa, mwana mobali ya Azafi mpe mobombi mikanda, bayaki epai ya Ezekiasi na bilamba epasuka, mpe bayebisaki ye makambo oyo mokonzi ya basoda oyo bakengelaka mokonzi ya Asiri alobaki.

In Other Versions

2 Kings 18 in the ANGEFD

2 Kings 18 in the ANTPNG2D

2 Kings 18 in the AS21

2 Kings 18 in the BAGH

2 Kings 18 in the BBPNG

2 Kings 18 in the BBT1E

2 Kings 18 in the BDS

2 Kings 18 in the BEV

2 Kings 18 in the BHAD

2 Kings 18 in the BIB

2 Kings 18 in the BLPT

2 Kings 18 in the BNT

2 Kings 18 in the BNTABOOT

2 Kings 18 in the BNTLV

2 Kings 18 in the BOATCB

2 Kings 18 in the BOATCB2

2 Kings 18 in the BOBCV

2 Kings 18 in the BOCNT

2 Kings 18 in the BOECS

2 Kings 18 in the BOGWICC

2 Kings 18 in the BOHCB

2 Kings 18 in the BOHCV

2 Kings 18 in the BOHLNT

2 Kings 18 in the BOHNTLTAL

2 Kings 18 in the BOICB

2 Kings 18 in the BOILNTAP

2 Kings 18 in the BOITCV

2 Kings 18 in the BOKCV

2 Kings 18 in the BOKCV2

2 Kings 18 in the BOKHWOG

2 Kings 18 in the BOKSSV

2 Kings 18 in the BOLCB

2 Kings 18 in the BOMCV

2 Kings 18 in the BONAV

2 Kings 18 in the BONCB

2 Kings 18 in the BONLT

2 Kings 18 in the BONUT2

2 Kings 18 in the BOPLNT

2 Kings 18 in the BOSCB

2 Kings 18 in the BOSNC

2 Kings 18 in the BOTLNT

2 Kings 18 in the BOVCB

2 Kings 18 in the BOYCB

2 Kings 18 in the BPBB

2 Kings 18 in the BPH

2 Kings 18 in the BSB

2 Kings 18 in the CCB

2 Kings 18 in the CUV

2 Kings 18 in the CUVS

2 Kings 18 in the DBT

2 Kings 18 in the DGDNT

2 Kings 18 in the DHNT

2 Kings 18 in the DNT

2 Kings 18 in the ELBE

2 Kings 18 in the EMTV

2 Kings 18 in the ESV

2 Kings 18 in the FBV

2 Kings 18 in the FEB

2 Kings 18 in the GGMNT

2 Kings 18 in the GNT

2 Kings 18 in the HARY

2 Kings 18 in the HNT

2 Kings 18 in the IRVA

2 Kings 18 in the IRVB

2 Kings 18 in the IRVG

2 Kings 18 in the IRVH

2 Kings 18 in the IRVK

2 Kings 18 in the IRVM

2 Kings 18 in the IRVM2

2 Kings 18 in the IRVO

2 Kings 18 in the IRVP

2 Kings 18 in the IRVT

2 Kings 18 in the IRVT2

2 Kings 18 in the IRVU

2 Kings 18 in the ISVN

2 Kings 18 in the JSNT

2 Kings 18 in the KAPI

2 Kings 18 in the KBT1ETNIK

2 Kings 18 in the KBV

2 Kings 18 in the KJV

2 Kings 18 in the KNFD

2 Kings 18 in the LBA

2 Kings 18 in the LBLA

2 Kings 18 in the LNT

2 Kings 18 in the LSV

2 Kings 18 in the MAAL

2 Kings 18 in the MBV

2 Kings 18 in the MBV2

2 Kings 18 in the MHNT

2 Kings 18 in the MKNFD

2 Kings 18 in the MNG

2 Kings 18 in the MNT

2 Kings 18 in the MNT2

2 Kings 18 in the MRS1T

2 Kings 18 in the NAA

2 Kings 18 in the NASB

2 Kings 18 in the NBLA

2 Kings 18 in the NBS

2 Kings 18 in the NBVTP

2 Kings 18 in the NET2

2 Kings 18 in the NIV11

2 Kings 18 in the NNT

2 Kings 18 in the NNT2

2 Kings 18 in the NNT3

2 Kings 18 in the PDDPT

2 Kings 18 in the PFNT

2 Kings 18 in the RMNT

2 Kings 18 in the SBIAS

2 Kings 18 in the SBIBS

2 Kings 18 in the SBIBS2

2 Kings 18 in the SBICS

2 Kings 18 in the SBIDS

2 Kings 18 in the SBIGS

2 Kings 18 in the SBIHS

2 Kings 18 in the SBIIS

2 Kings 18 in the SBIIS2

2 Kings 18 in the SBIIS3

2 Kings 18 in the SBIKS

2 Kings 18 in the SBIKS2

2 Kings 18 in the SBIMS

2 Kings 18 in the SBIOS

2 Kings 18 in the SBIPS

2 Kings 18 in the SBISS

2 Kings 18 in the SBITS

2 Kings 18 in the SBITS2

2 Kings 18 in the SBITS3

2 Kings 18 in the SBITS4

2 Kings 18 in the SBIUS

2 Kings 18 in the SBIVS

2 Kings 18 in the SBT

2 Kings 18 in the SBT1E

2 Kings 18 in the SCHL

2 Kings 18 in the SNT

2 Kings 18 in the SUSU

2 Kings 18 in the SUSU2

2 Kings 18 in the SYNO

2 Kings 18 in the TBIAOTANT

2 Kings 18 in the TBT1E

2 Kings 18 in the TBT1E2

2 Kings 18 in the TFTIP

2 Kings 18 in the TFTU

2 Kings 18 in the TGNTATF3T

2 Kings 18 in the THAI

2 Kings 18 in the TNFD

2 Kings 18 in the TNT

2 Kings 18 in the TNTIK

2 Kings 18 in the TNTIL

2 Kings 18 in the TNTIN

2 Kings 18 in the TNTIP

2 Kings 18 in the TNTIZ

2 Kings 18 in the TOMA

2 Kings 18 in the TTENT

2 Kings 18 in the UBG

2 Kings 18 in the UGV

2 Kings 18 in the UGV2

2 Kings 18 in the UGV3

2 Kings 18 in the VBL

2 Kings 18 in the VDCC

2 Kings 18 in the YALU

2 Kings 18 in the YAPE

2 Kings 18 in the YBVTP

2 Kings 18 in the ZBP