2 Samuel 13 (BOLCB2)

1 Abisalomi, mwana mobali ya Davidi, azalaki na ndeko moko ya mwasi ya kitoko makasi ; kombo na ye ezalaki « Tamari. » Aminoni, mwana mobali mosusu ya Davidi, akomaki kolinga ye ndenge mwasi mpe mobali balinganaka. 2 Aminoni atungisamaki makasi na motema kino abelaki maladi ya bolingo likolo ya Tamari, ndeko na ye ya mwasi ; pamba te ayebaki nanu nzoto ya mibali te mpe ekokaki kosalema te ete Aminoni abenga ye mpo na kosolola. 3 Nzokande Aminoni azalaki na moninga na ye moko ya mobali ; kombo na ye ezalaki « Yonadabi, » mwana mobali ya Shimea, ndeko mobali ya Davidi. Yonadabi azalaki na mayele mabe mingi. 4 Atunaki Aminoni :— Mpo na nini yo mwana mobali ya mokonzi ozalaka tango nyonso mawa-mawa boye ? Okoki koyebisa ngai te mpo na nini ozalaka bongo ?Aminoni alobaki na ye :— Nalingaka Tamari, ndeko mwasi ya Abisalomi, ndeko na ngai ya mobali. 5 Yonadabi alobaki na ye :— Oh, sala boye : « Kende na mbeto mpe kosana kobela. Tango tata na yo akoya kotala yo, okoloba na ye : ‹ Nalingi ete Tamari, ndeko na ngai ya mwasi, aya kopesa ngai eloko ya kolia. Tika ete alamba biloko na miso na ngai mpo ete namona ye mpe nakoka kolia na loboko na ye. › » 6 Aminoni amitandaki na mbeto mpe akosanaki kobela. Tango mokonzi ayaki mpo na kotala ye, Aminoni alobaki na ye : « Nalingi ete Tamari, ndeko na ngai ya mwasi, aya kolambela ngai na miso na ngai bagalete mibale ya kitoko mpo ete nakoka kolia yango na loboko na ye. » 7 Davidi atindaki maloba epai ya Tamari oyo azalaki kati na shambre na ye : « Kende na ndako ya Aminoni, ndeko na yo ya mobali, mpe lambela ye biloko. » 8 Boye Tamari akendeki na ndako ya Aminoni, ndeko na ye ya mobali, oyo azalaki ya kolala. Akamataki farine, asangisaki yango, asalaki bagalete na miso na ye mpe atumbaki yango. 9 Alongolaki yango na kikalungu mpe apesaki yango na Aminoni, kasi Aminoni aboyaki kolia. Aminoni alobaki :— Bimisa bato nyonso libanda.Bato nyonso babimaki. 10 Aminoni alobaki na Tamari :— Memela ngai biloko ya kolia awa kati na shambre na ngai ya kolala mpo ete nalia yango wuta na loboko na yo.Tamari azwaki bagalete oyo asalaki mpe amemaki yango epai ya Aminoni, ndeko na ye ya mobali, kati na shambre na ye ya kolala. 11 Tango kaka Tamari asembolaki loboko epai ya Aminoni mpo na koleisa ye galeti, Aminoni akangaki ye na nzoto mpe alobaki na ye :— Yaka kolala elongo na ngai, ndeko na ngai ya mwasi. 12 Tamari alobaki na ye :— Te, ndeko na ngai ya mobali ! Kosangisa na ngai nzoto na makasi te. Likambo ya boye ekoki kosalema te kati na Isalaele ! Kosala bozoba ya boye te. 13 Ekosukela ngai ndenge nini ? Nakokende wapi na soni na ngai ? Mpe yo okozala ndenge nini ? Okokoma lokola moto ya liboma kati na Isalaele ! Nabondeli yo, loba na mokonzi, pamba te akoboya te ete obala ngai. 14 Kasi Aminoni aboyaki koyoka ye ; mpe lokola alekaki Tamari na makasi, azwaki ye na makasi mpe asangisaki na ye nzoto. 15 Sima na yango, Aminoni ayinaki Tamari makasi, ayinaki ye penza makasi koleka ndenge azalaki kolinga ye. Aminoni alobaki na Tamari :— Telema mpe bima ! 16 Tamari azongiselaki ye :— Te, kobengana ngai ezali mabe makasi koleka ata makambo oyo owuti kosala ngai !Kasi Aminoni aboyaki koyoka ye. 17 Abengaki mosali na ye mpe alobaki : « Bimisa elenge mwasi oyo na libanda mpe kanga ekuke na bibende sima na ye. » 18 Mosali abimisaki Tamari na libanda mpe akangaki ekuke na bibende sima na ye. Tamari alataki nzambala moko ya kitoko, pamba te ezalaki lolenge ya bilamba oyo bana basi ya mokonzi oyo bayebi nanu nzoto ya mibali te bazalaki kolata. 19 Tamari atiaki putulu na moto na ye mpe apasolaki nzambala na ye ya kitoko oyo alataki. Atiaki maboko na ye na moto mpe, wana azalaki kokende, azalaki kolela na mongongo makasi. 20 Abisalomi, ndeko na ye ya mobali, atunaki ye : « Boni, Aminoni, ndeko na yo ya mobali, azalaki elongo na yo ? Sik’oyo, ndeko na ngai ya mwasi, kolobela yango te ; azali ndeko na yo ya mobali. Kotia likambo oyo na motema te ! »Tamari avandaki kati na ndako ya Abisalomi, ndeko na ye ya mobali, lokola mwasi basundola. 21 Tango mokonzi Davidi ayokaki makambo oyo nyonso, asilikaki makasi. 22 Abisalomi alobaki ata liloba moko te epai ya Aminoni, ndeko na ye ya mobali, ezala ya malamu to ya mabe, pamba te ayinaki Aminoni mpo ete asambwisaki Tamari, ndeko na ye ya mwasi. 23 Sima na mibu mibale, lokola Abisalomi azalaki na basali oyo bakataka bapwale ya bameme, na Bala-Atsori, pene ya mondelo ya Efrayimi, abengisaki bana mibali nyonso ya mokonzi. 24 Abisalomi akendeki epai ya mokonzi mpe alobaki na ye :— Mosali na yo abengisi basali oyo bakataka bapwale ya bameme. Tika ete mokonzi mpe bakalaka na ye basepela koya kosangana na ngai, mosali na yo. 25 Mokonzi azongisaki :— Te, mwana na ngai, tokoki te kokende biso nyonso, noki te tokozala mokumba mpo na yo.Atako Abisalomi atungisaki ye, kasi mokonzi aboyaki kaka kokende, kasi apambolaki ye. 26 Abisalomi alobaki lisusu :— Nabondeli yo, pesa kaka nzela ete ata Aminoni, ndeko na ngai ya mobali, akende elongo na biso.Mokonzi atunaki ye :— Mpo na nini akende elongo na yo ? 27 Kasi Abisalomi akobaki kaka kotungisa ye, mpe mokonzi atindaki bana mibali mosusu ya mokonzi ete bakende elongo na Aminoni. 28 Abisalomi apesaki mitindo epai ya basali na ye :— Boyoka ! Tango Aminoni akolangwa masanga ya vino, soki nalobi na bino : « Bobeta Aminoni ; » wana boboma ye. Bobanga te, pamba te ezali ngai moko nde nakopesa mitindo oyo. Bozala makasi mpe boyika mpiko. 29 Basali ya Abisalomi basalaki Aminoni ndenge kaka Abisalomi atindaki bango. Bana mibali nyonso ya mokonzi batelemaki, bamataki na bamile na bango mpe bakimaki. 30 Wana bazalaki nanu na nzela, sango ekomaki epai ya Davidi : « Abisalomi abomi bana mibali nyonso ya mokonzi, moko te kati na bango atikali. » 31 Mokonzi atelemaki, apasolaki bilamba na ye mpe amitandaki na mabele. Bakalaka na ye nyonso batelemaki wana na bilamba epasuka. 32 Kasi Yonadabi, mwana mobali ya Shimea, ndeko mobali ya Davidi, alobaki : « Tika ete nkolo na ngai akanisa te ete babomi bana mibali nyonso ya mokonzi ! Ezali Aminoni kaka moto akufi, pamba te, wuta mokolo oyo Aminoni asangisaki na makasi nzoto na Tamari, ndeko na ye ya mwasi, Abisalomi azwaki mokano ya koboma ye. 33 Tika ete mokonzi, nkolo na ngai, amitungisa na ye te mpo na sango oyo asili koyoka, sango oyo ezali koloba ete bana mibali nyonso ya mokonzi bakufi ! Ezali Aminoni kaka moto akufi. » 34 Na tango yango, Abisalomi akimaki. Nzokande tango mokengeli atalaki na mosika, amonaki bato ebele kokita na mopanzi ya ngomba, na nzela ya weste. Mokengeli akendeki koyebisa mokonzi : « Namoni bato na nzela ya Oronayimi, na mopanzi ya ngomba. » 35 Yonadabi alobaki na mokonzi :— Tala ! Bana mibali ya mokonzi bazali koya ! Esalemi ndenge kaka mosali na yo alobaki. 36 Tango kaka asilisaki koloba, bana mibali ya mokonzi bakotaki na kolela na mongongo makasi. Mokonzi mpe alelaki makasi elongo na basali na ye. 37 Abisalomi akimaki mpe akendeki epai ya Talimayi, mwana mobali ya Amiwudi, mokonzi ya Geshuri. Kasi mokonzi Davidi asalaki mikolo nyonso matanga mpo na mwana na ye ya mobali. 38 Abisalomi akimaki mpe akendeki na mboka Geshuri, avandaki kuna mibu misato. 39 Mokonzi Davidi atikaki kolanda Abisalomi, pamba te amibondisaki na tina na kufa ya Aminoni.

In Other Versions

2 Samuel 13 in the ANGEFD

2 Samuel 13 in the ANTPNG2D

2 Samuel 13 in the AS21

2 Samuel 13 in the BAGH

2 Samuel 13 in the BBPNG

2 Samuel 13 in the BBT1E

2 Samuel 13 in the BDS

2 Samuel 13 in the BEV

2 Samuel 13 in the BHAD

2 Samuel 13 in the BIB

2 Samuel 13 in the BLPT

2 Samuel 13 in the BNT

2 Samuel 13 in the BNTABOOT

2 Samuel 13 in the BNTLV

2 Samuel 13 in the BOATCB

2 Samuel 13 in the BOATCB2

2 Samuel 13 in the BOBCV

2 Samuel 13 in the BOCNT

2 Samuel 13 in the BOECS

2 Samuel 13 in the BOGWICC

2 Samuel 13 in the BOHCB

2 Samuel 13 in the BOHCV

2 Samuel 13 in the BOHLNT

2 Samuel 13 in the BOHNTLTAL

2 Samuel 13 in the BOICB

2 Samuel 13 in the BOILNTAP

2 Samuel 13 in the BOITCV

2 Samuel 13 in the BOKCV

2 Samuel 13 in the BOKCV2

2 Samuel 13 in the BOKHWOG

2 Samuel 13 in the BOKSSV

2 Samuel 13 in the BOLCB

2 Samuel 13 in the BOMCV

2 Samuel 13 in the BONAV

2 Samuel 13 in the BONCB

2 Samuel 13 in the BONLT

2 Samuel 13 in the BONUT2

2 Samuel 13 in the BOPLNT

2 Samuel 13 in the BOSCB

2 Samuel 13 in the BOSNC

2 Samuel 13 in the BOTLNT

2 Samuel 13 in the BOVCB

2 Samuel 13 in the BOYCB

2 Samuel 13 in the BPBB

2 Samuel 13 in the BPH

2 Samuel 13 in the BSB

2 Samuel 13 in the CCB

2 Samuel 13 in the CUV

2 Samuel 13 in the CUVS

2 Samuel 13 in the DBT

2 Samuel 13 in the DGDNT

2 Samuel 13 in the DHNT

2 Samuel 13 in the DNT

2 Samuel 13 in the ELBE

2 Samuel 13 in the EMTV

2 Samuel 13 in the ESV

2 Samuel 13 in the FBV

2 Samuel 13 in the FEB

2 Samuel 13 in the GGMNT

2 Samuel 13 in the GNT

2 Samuel 13 in the HARY

2 Samuel 13 in the HNT

2 Samuel 13 in the IRVA

2 Samuel 13 in the IRVB

2 Samuel 13 in the IRVG

2 Samuel 13 in the IRVH

2 Samuel 13 in the IRVK

2 Samuel 13 in the IRVM

2 Samuel 13 in the IRVM2

2 Samuel 13 in the IRVO

2 Samuel 13 in the IRVP

2 Samuel 13 in the IRVT

2 Samuel 13 in the IRVT2

2 Samuel 13 in the IRVU

2 Samuel 13 in the ISVN

2 Samuel 13 in the JSNT

2 Samuel 13 in the KAPI

2 Samuel 13 in the KBT1ETNIK

2 Samuel 13 in the KBV

2 Samuel 13 in the KJV

2 Samuel 13 in the KNFD

2 Samuel 13 in the LBA

2 Samuel 13 in the LBLA

2 Samuel 13 in the LNT

2 Samuel 13 in the LSV

2 Samuel 13 in the MAAL

2 Samuel 13 in the MBV

2 Samuel 13 in the MBV2

2 Samuel 13 in the MHNT

2 Samuel 13 in the MKNFD

2 Samuel 13 in the MNG

2 Samuel 13 in the MNT

2 Samuel 13 in the MNT2

2 Samuel 13 in the MRS1T

2 Samuel 13 in the NAA

2 Samuel 13 in the NASB

2 Samuel 13 in the NBLA

2 Samuel 13 in the NBS

2 Samuel 13 in the NBVTP

2 Samuel 13 in the NET2

2 Samuel 13 in the NIV11

2 Samuel 13 in the NNT

2 Samuel 13 in the NNT2

2 Samuel 13 in the NNT3

2 Samuel 13 in the PDDPT

2 Samuel 13 in the PFNT

2 Samuel 13 in the RMNT

2 Samuel 13 in the SBIAS

2 Samuel 13 in the SBIBS

2 Samuel 13 in the SBIBS2

2 Samuel 13 in the SBICS

2 Samuel 13 in the SBIDS

2 Samuel 13 in the SBIGS

2 Samuel 13 in the SBIHS

2 Samuel 13 in the SBIIS

2 Samuel 13 in the SBIIS2

2 Samuel 13 in the SBIIS3

2 Samuel 13 in the SBIKS

2 Samuel 13 in the SBIKS2

2 Samuel 13 in the SBIMS

2 Samuel 13 in the SBIOS

2 Samuel 13 in the SBIPS

2 Samuel 13 in the SBISS

2 Samuel 13 in the SBITS

2 Samuel 13 in the SBITS2

2 Samuel 13 in the SBITS3

2 Samuel 13 in the SBITS4

2 Samuel 13 in the SBIUS

2 Samuel 13 in the SBIVS

2 Samuel 13 in the SBT

2 Samuel 13 in the SBT1E

2 Samuel 13 in the SCHL

2 Samuel 13 in the SNT

2 Samuel 13 in the SUSU

2 Samuel 13 in the SUSU2

2 Samuel 13 in the SYNO

2 Samuel 13 in the TBIAOTANT

2 Samuel 13 in the TBT1E

2 Samuel 13 in the TBT1E2

2 Samuel 13 in the TFTIP

2 Samuel 13 in the TFTU

2 Samuel 13 in the TGNTATF3T

2 Samuel 13 in the THAI

2 Samuel 13 in the TNFD

2 Samuel 13 in the TNT

2 Samuel 13 in the TNTIK

2 Samuel 13 in the TNTIL

2 Samuel 13 in the TNTIN

2 Samuel 13 in the TNTIP

2 Samuel 13 in the TNTIZ

2 Samuel 13 in the TOMA

2 Samuel 13 in the TTENT

2 Samuel 13 in the UBG

2 Samuel 13 in the UGV

2 Samuel 13 in the UGV2

2 Samuel 13 in the UGV3

2 Samuel 13 in the VBL

2 Samuel 13 in the VDCC

2 Samuel 13 in the YALU

2 Samuel 13 in the YAPE

2 Samuel 13 in the YBVTP

2 Samuel 13 in the ZBP