2 Samuel 15 (BOLCB2)

1 Na tango wana, Abisalomi azwaki shar, bampunda mpe basoda tuku mitano oyo bazalaki kotambola liboso na ye lokola bakengeli na ye. 2 Abisalomi azalaki kolamuka na tongo makasi mpe azalaki kokende kotelema pembeni ya nzela oyo ekenda na ekotelo ya engumba. Bongo, tango nyonso moto azalaki koleka mpo na kokende epai ya mokonzi mpo ete akatela ye likambo, ye Abisalomi azalaki kobenga ye mpe kotuna ye :— Ozali moto ya engumba nini ?Soki moto yango azongisi :— Mosali na yo azali moto ya moko kati na bikolo ya Isalaele. 3 Abisalomi azalaki koloba na ye :— Tala, likambo na yo ezali malamu mpe sembo ; kasi ezali na moto moko te oyo akoki koyoka yo epai ya mokonzi. 4 Abisalomi azalaki kobakisa :— Ah ! Soki nazalaki mosambisi kati na mokili oyo, moto nyonso oyo azali na likambo alingaki koya epai na ngai, mpe nalingaki kolongisa ye na likambo yango ! 5 Mpe tango nyonso moto azalaki kopusana mpo na kogumbama liboso na ye Abisalomi, Abisalomi azalaki kopesa loboko, koyamba mpe kopesa ye beze. 6 Azalaki kosala bongo epai ya bato nyonso ya Isalaele oyo bazalaki kokende epai ya mokonzi mpo ete akata likambo na bango, mpe ezalaki bongo nde Abisalomi azalaki komikotisa na mayele kati na mitema ya bato ya Isalaele. 7 Sima na mibu minei, Abisalomi alobaki na mokonzi :— Pesa ngai nzela mpo ete nakende na Ebron mpo na kokokisa ndayi oyo nalapaki epai na Yawe, 8 pamba te tango mosali na yo azalaki kovanda na Geshuri kati na Siri, nalapaki ndayi oyo : « Soki Yawe azongisi ngai na Yelusalemi, nakogumbamela Ye. » 9 Mokonzi alobaki na ye :— Kende na kimia.Boye akendeki na Ebron. 10 Mpe longwa kuna, Abisalomi atindaki bantoma kati na bikolo nyonso ya Isalaele mpo na koloba : « Tango kaka bokoyoka lokito ya kelelo, boloba : ‹ Abisalomi akomi mokonzi kati na Ebron. › » 11 Mibali nkama mibale babengisamaki wuta na Yelusalemi mpe bakendeki elongo na Abisalomi. Bakendeki na boboto mpe bayebaki ata likambo moko te. 12 Wana Abisalomi azalaki kobonza mbeka, abengisaki Ayitofeli, moto ya Gilo, mopesi toli ya Davidi, wuta na engumba na ye ya Gilo. Boye, likita ya batomboki ekomaki makasi ; mpe lisanga ya Abisalomi ekomaki na bato ebele. 13 Ntoma moko ayaki koyebisa Davidi :— Mitema ya bato ya Isalaele esangani elongo na Abisalomi. 14 Davidi alobaki na bakalaka na ye nyonso oyo bazalaki na Yelusalemi :— Boya ! Tosengeli kokima, soki te moko te kati na biso akobika liboso ya Abisalomi. Tosengeli kobima na lombangu, soki te akoya na lombangu kokanga biso, kobebisa biso mpe koboma engumba na mopanga. 15 Bakalaka ya mokonzi bazongiselaki Davidi :— Basali na yo bazali ya kobongama mpo na kosala makambo nyonso oyo mokonzi, nkolo na biso, akopona. 16 Mokonzi akendeki na makolo elongo na libota na ye mobimba oyo ezalaki kolanda ye ; kasi atikaki bamakangu zomi mpo na kobatela ndako na ye. 17 Boye mokonzi akendeki na makolo elongo na bato na ye nyonso oyo bazalaki kolanda ye mpe batelemaki pene ya ndako ya suka ya engumba. 18 Basoda na ye nyonso bazalaki kotambola na bapembeni na ye elongo na bato nyonso ya Kereti mpe ya Peleti. Mpe bato nyonso ya Gati, nkama motoba, oyo batambolaki elongo na ye longwa na Gati, bazalaki kotambola liboso ya mokonzi. 19 Mokonzi alobaki na Itayi, moto ya Gati :— Mpo na nini yo mpe olingi koya elongo na biso ? Zonga mpe vanda elongo na Abisalomi, mokonzi ya sika ! Ozali mopaya, otikaki mboka na yo mpo na koya kokima awa. 20 Oyaki mpe kaka lobi oyo ewuti koleka, bongo ndenge nini, lelo, namema yo elongo na biso wana nayebi kutu te epai nini nazali kokende ? Zonga mpe zwa bato ya mboka na yo ! Tika ete bolamu mpe boyengebene ya Yawe ezala elongo na yo ! 21 Itayi azongiselaki mokonzi :— Na Kombo na Yawe mpe na kombo ya mokonzi, nkolo na ngai, mosali na yo akozala bipai nyonso oyo mokonzi, nkolo na ngai, akozala, ezala mpo na bomoi to mpo na kufa. 22 Davidi alobaki na Itayi :— Malamu ! Leka liboso mpe tambola !Boye Itayi, moto ya Gati, atambolaki liboso elongo na basoda nyonso mpe mabota oyo ezalaki elongo na ye. 23 Tango bato nyonso bazalaki koleka, mboka mobimba ezalaki kolela makasi. Mokonzi akatisaki lubwaku ya Sedron, mpe bato nyonso bakendeki na nzela oyo ekenda na esobe. 24 Tsadoki mpe azalaki wana elongo na Balevi oyo bazalaki elongo na ye mpe bamemaki Sanduku ya Boyokani ya Nzambe. Bakitisaki Sanduku ya Nzambe, mpe Abiatari abonzaki mbeka kino tango bato nyonso basilisaki kobima na engumba. 25 Mokonzi alobaki na Tsadoki :— Zongisa Sanduku ya Nzambe kati na engumba. Soki nazwi ngolu na miso ya Yawe, akozongisa ngai mpe akopesa ngai nzela ya komona lisusu Sanduku yango mpe ndako na yango. 26 Kasi soki Nzambe alobi : « Nasepeli na yo te, » wana tika ete asala epai na ngai makambo oyo amoni ete ezali malamu, pamba te nazali ya kobongama. 27 Mokonzi alobaki lisusu epai ya Nganga-Nzambe Tsadoki :— Ozali momoni makambo te ? Zonga na kimia na engumba elongo na Ayimaatsi, mwana na yo ya mobali, mpe Jonatan, mwana mobali ya Abiatari. Yo mpe Abiatari, bozwa mpe bomema bana na bino mibale ya mibali. 28 Nakozela na bitando ya esobe kino nakoyoka liloba kowuta epai na bino. 29 Boye Tsadoki mpe Abiatari bazongisaki Sanduku ya Nzambe, na Yelusalemi, mpe batikalaki kuna. 30 Kasi Davidi azalaki komata ngomba ya banzete ya olive na kolela, moto na ye ya kozipama mpe makolo ngulu. Bato nyonso oyo bazalaki elongo na ye bazipaki bango mpe mito na bango mpe bazalaki kolela wana bazalaki komata. 31 Bayaki koyebisa Davidi ete Ayitofeli azali kati na bato oyo basalaki likita elongo na Abisalomi. Boye Davidi asambelaki : « Eh Yawe, sala ete batoli ya Ayitofeli ezanga tina. » 32 Tango Davidi akomaki na songe ya ngomba epai wapi bato bazalaki na momesano ya kokende kogumbamela Nzambe, Ushayi, moto ya Ariki, mopesi toli ya Davidi, azalaki kuna mpo na kokutana na ye, na nzambala na ye epasuka mpe moto na ye etonda na putulu. 33 Davidi alobaki na ye :— Soki okeyi elongo na ngai, okozala mokumba mpo na ngai. 34 Kasi soki ozongi na engumba mpe olobi na Abisalomi : « Nakozala mosali na yo, oh mokonzi ! Kala, nazalaki mosali ya tata na yo, kasi sik’oyo, nakozala mosali na yo, » wana okosunga ngai na kobebisa toli ya Ayitofeli. 35 Lokola Banganga-Nzambe Tsadoki mpe Abiatari bakozala kuna elongo na yo, okoyebisa bango makambo nyonso oyo okoyoka na ndako ya mokonzi. 36 Bana na bango ya mibali mibale, Ayimaatsi, mwana mobali ya Tsadoki, mpe Jonatan, mwana mobali ya Abiatari, bazali mpe kuna elongo na bango. Okotinda bango mpo ete baya koyebisa ngai makambo nyonso oyo okoyoka. 37 Boye Ushayi, moninga ya Davidi, azongaki na engumba, kaka na tango oyo Abisalomi mpe akotaki kati na Yelusalemi.

In Other Versions

2 Samuel 15 in the ANGEFD

2 Samuel 15 in the ANTPNG2D

2 Samuel 15 in the AS21

2 Samuel 15 in the BAGH

2 Samuel 15 in the BBPNG

2 Samuel 15 in the BBT1E

2 Samuel 15 in the BDS

2 Samuel 15 in the BEV

2 Samuel 15 in the BHAD

2 Samuel 15 in the BIB

2 Samuel 15 in the BLPT

2 Samuel 15 in the BNT

2 Samuel 15 in the BNTABOOT

2 Samuel 15 in the BNTLV

2 Samuel 15 in the BOATCB

2 Samuel 15 in the BOATCB2

2 Samuel 15 in the BOBCV

2 Samuel 15 in the BOCNT

2 Samuel 15 in the BOECS

2 Samuel 15 in the BOGWICC

2 Samuel 15 in the BOHCB

2 Samuel 15 in the BOHCV

2 Samuel 15 in the BOHLNT

2 Samuel 15 in the BOHNTLTAL

2 Samuel 15 in the BOICB

2 Samuel 15 in the BOILNTAP

2 Samuel 15 in the BOITCV

2 Samuel 15 in the BOKCV

2 Samuel 15 in the BOKCV2

2 Samuel 15 in the BOKHWOG

2 Samuel 15 in the BOKSSV

2 Samuel 15 in the BOLCB

2 Samuel 15 in the BOMCV

2 Samuel 15 in the BONAV

2 Samuel 15 in the BONCB

2 Samuel 15 in the BONLT

2 Samuel 15 in the BONUT2

2 Samuel 15 in the BOPLNT

2 Samuel 15 in the BOSCB

2 Samuel 15 in the BOSNC

2 Samuel 15 in the BOTLNT

2 Samuel 15 in the BOVCB

2 Samuel 15 in the BOYCB

2 Samuel 15 in the BPBB

2 Samuel 15 in the BPH

2 Samuel 15 in the BSB

2 Samuel 15 in the CCB

2 Samuel 15 in the CUV

2 Samuel 15 in the CUVS

2 Samuel 15 in the DBT

2 Samuel 15 in the DGDNT

2 Samuel 15 in the DHNT

2 Samuel 15 in the DNT

2 Samuel 15 in the ELBE

2 Samuel 15 in the EMTV

2 Samuel 15 in the ESV

2 Samuel 15 in the FBV

2 Samuel 15 in the FEB

2 Samuel 15 in the GGMNT

2 Samuel 15 in the GNT

2 Samuel 15 in the HARY

2 Samuel 15 in the HNT

2 Samuel 15 in the IRVA

2 Samuel 15 in the IRVB

2 Samuel 15 in the IRVG

2 Samuel 15 in the IRVH

2 Samuel 15 in the IRVK

2 Samuel 15 in the IRVM

2 Samuel 15 in the IRVM2

2 Samuel 15 in the IRVO

2 Samuel 15 in the IRVP

2 Samuel 15 in the IRVT

2 Samuel 15 in the IRVT2

2 Samuel 15 in the IRVU

2 Samuel 15 in the ISVN

2 Samuel 15 in the JSNT

2 Samuel 15 in the KAPI

2 Samuel 15 in the KBT1ETNIK

2 Samuel 15 in the KBV

2 Samuel 15 in the KJV

2 Samuel 15 in the KNFD

2 Samuel 15 in the LBA

2 Samuel 15 in the LBLA

2 Samuel 15 in the LNT

2 Samuel 15 in the LSV

2 Samuel 15 in the MAAL

2 Samuel 15 in the MBV

2 Samuel 15 in the MBV2

2 Samuel 15 in the MHNT

2 Samuel 15 in the MKNFD

2 Samuel 15 in the MNG

2 Samuel 15 in the MNT

2 Samuel 15 in the MNT2

2 Samuel 15 in the MRS1T

2 Samuel 15 in the NAA

2 Samuel 15 in the NASB

2 Samuel 15 in the NBLA

2 Samuel 15 in the NBS

2 Samuel 15 in the NBVTP

2 Samuel 15 in the NET2

2 Samuel 15 in the NIV11

2 Samuel 15 in the NNT

2 Samuel 15 in the NNT2

2 Samuel 15 in the NNT3

2 Samuel 15 in the PDDPT

2 Samuel 15 in the PFNT

2 Samuel 15 in the RMNT

2 Samuel 15 in the SBIAS

2 Samuel 15 in the SBIBS

2 Samuel 15 in the SBIBS2

2 Samuel 15 in the SBICS

2 Samuel 15 in the SBIDS

2 Samuel 15 in the SBIGS

2 Samuel 15 in the SBIHS

2 Samuel 15 in the SBIIS

2 Samuel 15 in the SBIIS2

2 Samuel 15 in the SBIIS3

2 Samuel 15 in the SBIKS

2 Samuel 15 in the SBIKS2

2 Samuel 15 in the SBIMS

2 Samuel 15 in the SBIOS

2 Samuel 15 in the SBIPS

2 Samuel 15 in the SBISS

2 Samuel 15 in the SBITS

2 Samuel 15 in the SBITS2

2 Samuel 15 in the SBITS3

2 Samuel 15 in the SBITS4

2 Samuel 15 in the SBIUS

2 Samuel 15 in the SBIVS

2 Samuel 15 in the SBT

2 Samuel 15 in the SBT1E

2 Samuel 15 in the SCHL

2 Samuel 15 in the SNT

2 Samuel 15 in the SUSU

2 Samuel 15 in the SUSU2

2 Samuel 15 in the SYNO

2 Samuel 15 in the TBIAOTANT

2 Samuel 15 in the TBT1E

2 Samuel 15 in the TBT1E2

2 Samuel 15 in the TFTIP

2 Samuel 15 in the TFTU

2 Samuel 15 in the TGNTATF3T

2 Samuel 15 in the THAI

2 Samuel 15 in the TNFD

2 Samuel 15 in the TNT

2 Samuel 15 in the TNTIK

2 Samuel 15 in the TNTIL

2 Samuel 15 in the TNTIN

2 Samuel 15 in the TNTIP

2 Samuel 15 in the TNTIZ

2 Samuel 15 in the TOMA

2 Samuel 15 in the TTENT

2 Samuel 15 in the UBG

2 Samuel 15 in the UGV

2 Samuel 15 in the UGV2

2 Samuel 15 in the UGV3

2 Samuel 15 in the VBL

2 Samuel 15 in the VDCC

2 Samuel 15 in the YALU

2 Samuel 15 in the YAPE

2 Samuel 15 in the YBVTP

2 Samuel 15 in the ZBP