Amos 7 (BOLCB2)
1 Tala makambo oyo Nkolo Yawe alakisaki ngai : Tango matiti ebandaki kobota, ebimisaki mabanki ebele. Esalemaki sima na kobuka milona ya mokonzi. 2 Tango mabanki yango esilisaki kolia matiti nyonso ya mokili, nagangaki :— Oh Nkolo Yawe, limbisa bato na Yo ! Ndenge nini Jakobi oyo azali penza moke akoki solo kobika ? 3 Boye, Yawe abongolaki makanisi na Ye mpe alobaki :— Makambo yango ekosalema te. 4 Tala makambo oyo Nkolo Yawe alakisaki ngai. Nkolo Yawe asalelaki moto mpo na kopesa etumbu, bongo moto yango ekawusaki mayi minene mpe ezikisaki mokili. 5 Boye, nagangaki :— Oh Nkolo Yawe, nabondeli Yo, kosala boye te ! Ndenge nini Jakobi oyo azali penza moke akoki solo kobika ? 6 Boye Yawe abongolaki makanisi na Ye.Mpe Nkolo Yawe alobaki :— Makambo yango ekosalema lisusu te. 7 Tala makambo oyo alakisaki ngai : Nkolo azalaki ya kotelema na likolo ya mir moko batonga na mbodi mpe, na loboko na Ye, asimbaki nivo oyo batongi ndako basalelaka. 8 Yawe atunaki ngai :— Amosi, ozali komona nini ?Nazongisaki :— Nazali komona nivo oyo batongi ndako basalelaka.Nkolo alobaki na ngai :— Tala, nakotia nivo oyo batongi ndako basalelaka na likolo ya Isalaele, bato na Ngai. Nakolimbisa bango lisusu te. 9 Tango nakotelemela libota ya Jeroboami na nzela ya mopanga na Ngai, nakobebisa bisambelo ya likolo ya bangomba ya Izaki mpe bisika ya bule ya Isalaele. 10 Amatsia, Nganga-Nzambe ya Beteli, atindelaki Jeroboami, mokonzi ya Isalaele, maloba oyo : « Amosi azali kosalela yo likita mpo na kosala yo mabe kati na mokili ya Isalaele. Mokili ekoki te kondima koyokaka tango nyonso maloba na ye. 11 Pamba te, tala maloba oyo Amosi azali koloba :‹ Jeroboami akokufa na mopanga,mpe Isalaele akokende na bowumbu, mosika ya mabele na ye. › » 12 Amatsia alobaki na Amosi :— Yo, momoni makambo, bima na mokili na biso ! Zonga na mokili ya Yuda. Kuna, okosala mbongo na masakoli na yo. 13 Kosakola lisusu na Beteli te, pamba te Beteli ezali Esika ya bule ya mokonzi mpe tempelo ya bokonzi. 14 Amosi azongiselaki Amatsia :— Nazalaki mosakoli te to mwana ya mosakoli te, kasi nazalaki nde mobateli bibwele mpe moloni ya basikomori. 15 Kasi Yawe alongolaki ngai na mosala ya kobatela bibwele mpe alobaki na ngai : « Kende kosakola epai ya bato na Ngai, Isalaele. » 16 Yoka sik’oyo Liloba na Yawe, yo oyo ozali koloba na ngai : « Tika kosakola mpo na kotelemela libota ya Isalaele mpe tika koloba mabe mpo na ndako ya Izaki ! » 17 Mpo na yango, tala liloba oyo Yawe alobi :« Mwasi na yo akosala kindumba kati na engumba,bana na yo ya mibali mpe ya basi bakokufa na mopanga,bakokabola mabele na yo na biteni.Yo moko, okokufa na mabele ya mbindo,mpe Isalaele akokende solo na bowumbu,mosika ya mokili na ye ya mbotama. »
In Other Versions
Amos 7 in the ANGEFD
Amos 7 in the ANTPNG2D
Amos 7 in the AS21
Amos 7 in the BAGH
Amos 7 in the BBPNG
Amos 7 in the BBT1E
Amos 7 in the BDS
Amos 7 in the BEV
Amos 7 in the BHAD
Amos 7 in the BIB
Amos 7 in the BLPT
Amos 7 in the BNT
Amos 7 in the BNTABOOT
Amos 7 in the BNTLV
Amos 7 in the BOATCB
Amos 7 in the BOATCB2
Amos 7 in the BOBCV
Amos 7 in the BOCNT
Amos 7 in the BOECS
Amos 7 in the BOGWICC
Amos 7 in the BOHCB
Amos 7 in the BOHCV
Amos 7 in the BOHLNT
Amos 7 in the BOHNTLTAL
Amos 7 in the BOICB
Amos 7 in the BOILNTAP
Amos 7 in the BOITCV
Amos 7 in the BOKCV
Amos 7 in the BOKCV2
Amos 7 in the BOKHWOG
Amos 7 in the BOKSSV
Amos 7 in the BOLCB
Amos 7 in the BOMCV
Amos 7 in the BONAV
Amos 7 in the BONCB
Amos 7 in the BONLT
Amos 7 in the BONUT2
Amos 7 in the BOPLNT
Amos 7 in the BOSCB
Amos 7 in the BOSNC
Amos 7 in the BOTLNT
Amos 7 in the BOVCB
Amos 7 in the BOYCB
Amos 7 in the BPBB
Amos 7 in the BPH
Amos 7 in the BSB
Amos 7 in the CCB
Amos 7 in the CUV
Amos 7 in the CUVS
Amos 7 in the DBT
Amos 7 in the DGDNT
Amos 7 in the DHNT
Amos 7 in the DNT
Amos 7 in the ELBE
Amos 7 in the EMTV
Amos 7 in the ESV
Amos 7 in the FBV
Amos 7 in the FEB
Amos 7 in the GGMNT
Amos 7 in the GNT
Amos 7 in the HARY
Amos 7 in the HNT
Amos 7 in the IRVA
Amos 7 in the IRVB
Amos 7 in the IRVG
Amos 7 in the IRVH
Amos 7 in the IRVK
Amos 7 in the IRVM
Amos 7 in the IRVM2
Amos 7 in the IRVO
Amos 7 in the IRVP
Amos 7 in the IRVT
Amos 7 in the IRVT2
Amos 7 in the IRVU
Amos 7 in the ISVN
Amos 7 in the JSNT
Amos 7 in the KAPI
Amos 7 in the KBT1ETNIK
Amos 7 in the KBV
Amos 7 in the KJV
Amos 7 in the KNFD
Amos 7 in the LBA
Amos 7 in the LBLA
Amos 7 in the LNT
Amos 7 in the LSV
Amos 7 in the MAAL
Amos 7 in the MBV
Amos 7 in the MBV2
Amos 7 in the MHNT
Amos 7 in the MKNFD
Amos 7 in the MNG
Amos 7 in the MNT
Amos 7 in the MNT2
Amos 7 in the MRS1T
Amos 7 in the NAA
Amos 7 in the NASB
Amos 7 in the NBLA
Amos 7 in the NBS
Amos 7 in the NBVTP
Amos 7 in the NET2
Amos 7 in the NIV11
Amos 7 in the NNT
Amos 7 in the NNT2
Amos 7 in the NNT3
Amos 7 in the PDDPT
Amos 7 in the PFNT
Amos 7 in the RMNT
Amos 7 in the SBIAS
Amos 7 in the SBIBS
Amos 7 in the SBIBS2
Amos 7 in the SBICS
Amos 7 in the SBIDS
Amos 7 in the SBIGS
Amos 7 in the SBIHS
Amos 7 in the SBIIS
Amos 7 in the SBIIS2
Amos 7 in the SBIIS3
Amos 7 in the SBIKS
Amos 7 in the SBIKS2
Amos 7 in the SBIMS
Amos 7 in the SBIOS
Amos 7 in the SBIPS
Amos 7 in the SBISS
Amos 7 in the SBITS
Amos 7 in the SBITS2
Amos 7 in the SBITS3
Amos 7 in the SBITS4
Amos 7 in the SBIUS
Amos 7 in the SBIVS
Amos 7 in the SBT
Amos 7 in the SBT1E
Amos 7 in the SCHL
Amos 7 in the SNT
Amos 7 in the SUSU
Amos 7 in the SUSU2
Amos 7 in the SYNO
Amos 7 in the TBIAOTANT
Amos 7 in the TBT1E
Amos 7 in the TBT1E2
Amos 7 in the TFTIP
Amos 7 in the TFTU
Amos 7 in the TGNTATF3T
Amos 7 in the THAI
Amos 7 in the TNFD
Amos 7 in the TNT
Amos 7 in the TNTIK
Amos 7 in the TNTIL
Amos 7 in the TNTIN
Amos 7 in the TNTIP
Amos 7 in the TNTIZ
Amos 7 in the TOMA
Amos 7 in the TTENT
Amos 7 in the UBG
Amos 7 in the UGV
Amos 7 in the UGV2
Amos 7 in the UGV3
Amos 7 in the VBL
Amos 7 in the VDCC
Amos 7 in the YALU
Amos 7 in the YAPE
Amos 7 in the YBVTP
Amos 7 in the ZBP