Deuteronomy 12 (BOLCB2)

1 Tala bikateli mpe mibeko oyo bosengeli kosalela malamu kati na mokili oyo Yawe, Nzambe ya bakoko na bino, azali kopesa bino mpo na kozwa, na tango nyonso oyo bokowumela kati na mokili yango. 2 Bobebisa bisika nyonso oyo bato ya bikolo oyo bozali kobengana bazalaki kogumbamela banzambe na bango na likolo ya bangomba ya milayi mpe ya mikuse mpe na se ya banzete nyonso oyo ezali na makasa ya mobesu. 3 Bokweyisa bitumbelo na bango, bobuka mabanga na bango ya bule, botumba na moto makonzi na bango ya bule, bopanza na biteni bikeko ya banzambe na bango mpe bolimwisa bakombo na bango na bisika wana. 4 Nzokande mpo na bino, bosengeli te kogumbamela Yawe, Nzambe na bino, na lolenge na bango. 5 Bosengeli koluka esika oyo Yawe, Nzambe na bino, akopona kati na bikolo na bino nyonso mpo na kotia Kombo na Ye mpe mpo na kokomisa yango esika na Ye. Ezali na esika yango kaka nde bosengeli kokende. 6 Ezali kuna nde bokomema bambeka na bino ya kotumba, makabo na bino, eteni na bino ya zomi, bakado ya ndenge na ndenge, makabo mpo na kokokisa ndayi, makabo oyo bokokata kopesa wuta na mokano ya mitema na bino moko mpe bana mibali ya liboso ya bangombe, ya bameme mpe ya bantaba na bino. 7 Kaka na esika yango, na miso ya Yawe, Nzambe na bino, bino mpe mabota na bino bokolia mpe bokosepela na eloko nyonso oyo bokosala na maboko na bino ; pamba te Yawe, Nzambe na bino, apamboli bino. 8 Bosengeli lisusu te kosala ndenge tozali kosala awa, na mokolo ya lelo : moto nyonso azali kosala ndenge alingi. 9 Pamba te kino lelo, bokoti nanu te na esika ya bopemi mpe bozwi nanu te libula oyo Yawe, Nzambe na bino, azali kopesa bino. 10 Kasi bokokatisa Yordani mpe bokovanda na mokili oyo Yawe, Nzambe na bino, azali kopesa bino lokola libula. Akopesa bino bopemi na kokangolaka bino na maboko ya banguna na bino nyonso oyo bazingeli bino, mpe bokovanda na kimia. 11 Boye, na esika oyo Yawe, Nzambe na bino, akopona mpo na kotia Kombo na Ye, bokomema eloko nyonso oyo natindi bino : bambeka na bino ya kotumba, makabo na bino, biteni na bino ya zomi, bakado na bino ya ndenge na ndenge mpe biloko nyonso ya kitoko oyo bozali na yango, oyo bolapaki ndayi mpo na kopesa epai na Yawe. 12 Kuna kaka nde bokosepela liboso ya Yawe, Nzambe na bino ; bino, bana na bino ya mibali mpe ya basi, bawumbu na bino ya mibali, basi bawumbu na bino, mpe Balevi oyo bazali kati na bingumba na bino, pamba te bazangi eteni ya mabele to libula kati na bino. 13 Bosala keba ete bobonza te bambeka na bino ya kotumba na bisika nyonso oyo bokomona. 14 Bokobonza bambeka yango kaka na esika oyo Yawe akopona kati na moko ya bikolo na bino, mpe kuna kaka nde bokosala makambo nyonso oyo natindi bino. 15 Nzokande, bokoki kokata kingo ya bibwele na bino mpe kolia misuni na yango ndenge bolingi kati na bingumba na bino nyonso, ezala mboloko to pambi, kolanda mapamboli oyo Yawe, Nzambe na bino, akopesa bino. Moto ya mbindo to moto ya peto akoki na ye kolia yango. 16 Kasi bosengeli te kolia makila ; bosopa yango lokola mayi na mabele. 17 Bosengeli te kolia kati na bingumba na bino eteni ya zomi ya bambuma na bino, ya vino na bino ya sika, ya mafuta na bino, bana ya liboso ya bangombe na bino, ya bameme na bino, ya bantaba na bino to makabo nyonso oyo bopesaki mpo na kokokisa ndayi, makabo oyo bokataki kopesa wuta na mokano ya mitema na bino moko to makabo ya ndenge na ndenge. 18 Kasi bokolia yango kaka na miso ya Yawe, Nzambe na bino, na esika oyo Yawe Nzambe akopona : bino, bana na bino ya mibali mpe ya basi, bawumbu na bino ya mibali, basi bawumbu na bino, Balevi oyo bazali kati na bingumba na bino mpe bokosepela liboso ya Yawe, Nzambe na bino, na mosala nyonso oyo maboko na bino ekosala. 19 Tango nyonso bokovanda kati na mokili na bino, bosala keba ete bobosana Balevi te. 20 Tango Yawe, Nzambe na bino, akokomisa mokili na bino monene ndenge alakaki bino mpe tango bokozala na posa ya kolia mosuni mpe bokoloba : « Nazali na posa ya kolia mosuni, » bokolia yango ndenge bolingi. 21 Soki esika oyo Yawe, Nzambe na bino, aponi mpo na kotia Kombo na Ye ezali mosika mingi mpo na bino, wana bokokata kingo ya bangombe na bino, ya bantaba na bino, ya bameme na bino, oyo Yawe apesaki bino ndenge natindaki bino mpe bokoki kolia yango ndenge bolingi kati na bingumba na bino. 22 Bokolia yango ndenge baliaka pambi to mboloko ; moto nyonso, azala mbindo to peto, akoki na ye kolia yango. 23 Kasi bosala keba ete bolia makila te, pamba te makila ezali bomoi, mpe bosengeli te kolia bomoi elongo na nyama. 24 Bosengeli te kolia makila ; kasi bosopa yango na mabele ndenge basopaka mayi. 25 Bolia yango te mpo ete bomona bolamu, bino mpe bana na bino ; na nzela wana nde bokosala oyo ezali alima na miso ya Yawe. 26 Kasi bokozwa biloko na bino ya bule mpe biloko nyonso oyo bolapaki ndayi mpo na kopesa, mpe bokokende na esika oyo Yawe akopona. 27 Bokotumba mosuni mpe makila ya bambeka na bino ya kotumba na etumbelo ya Yawe, Nzambe na bino. Bokosopa makila ya bambeka na bino mosusu na etumbelo ya Yawe, Nzambe na bino ; kasi mpo na mosuni na yango, bokoki na bino kolia yango. 28 Bosala keba mpo na kotosa mibeko oyo nazali kopesa bino mpo ete bomona bolamu tango nyonso, bino mpe bana na bino, pamba te na nzela wana nde bokosala oyo ezali malamu mpe alima na miso ya Yawe, Nzambe na bino. 29 Yawe, Nzambe na bino, akolimwisa na liboso na bino bikolo oyo bozali kokende kobundisa mpe kobotola. Kasi tango bokobengana bango mpe bokovanda na bamboka na bango, 30 mpe tango bokosilisa kobebisa bango liboso na bino, bosala keba ete bokweya te na motambo na bango ya kosalela banzambe na bango mpe na motambo ya koluka koyeba na komitunaka : « Ndenge nini bikolo oyo esalelaka banzambe na bango ? Tokosala ndenge moko mpe kati na bingumba na biso. » 31 Bokoki te kogumbamela Yawe, Nzambe na bino, ndenge bango basalaka. Pamba te Yawe amonaka yango lokola likambo ya nkele mpe ayinaka makambo oyo basalaki mpo na banzambe na bango : bazalaki ata kotumbaka na moto bana na bango ya mibali mpe ya basi lokola mbeka mpo na banzambe na bango.

In Other Versions

Deuteronomy 12 in the ANGEFD

Deuteronomy 12 in the ANTPNG2D

Deuteronomy 12 in the AS21

Deuteronomy 12 in the BAGH

Deuteronomy 12 in the BBPNG

Deuteronomy 12 in the BBT1E

Deuteronomy 12 in the BDS

Deuteronomy 12 in the BEV

Deuteronomy 12 in the BHAD

Deuteronomy 12 in the BIB

Deuteronomy 12 in the BLPT

Deuteronomy 12 in the BNT

Deuteronomy 12 in the BNTABOOT

Deuteronomy 12 in the BNTLV

Deuteronomy 12 in the BOATCB

Deuteronomy 12 in the BOATCB2

Deuteronomy 12 in the BOBCV

Deuteronomy 12 in the BOCNT

Deuteronomy 12 in the BOECS

Deuteronomy 12 in the BOGWICC

Deuteronomy 12 in the BOHCB

Deuteronomy 12 in the BOHCV

Deuteronomy 12 in the BOHLNT

Deuteronomy 12 in the BOHNTLTAL

Deuteronomy 12 in the BOICB

Deuteronomy 12 in the BOILNTAP

Deuteronomy 12 in the BOITCV

Deuteronomy 12 in the BOKCV

Deuteronomy 12 in the BOKCV2

Deuteronomy 12 in the BOKHWOG

Deuteronomy 12 in the BOKSSV

Deuteronomy 12 in the BOLCB

Deuteronomy 12 in the BOMCV

Deuteronomy 12 in the BONAV

Deuteronomy 12 in the BONCB

Deuteronomy 12 in the BONLT

Deuteronomy 12 in the BONUT2

Deuteronomy 12 in the BOPLNT

Deuteronomy 12 in the BOSCB

Deuteronomy 12 in the BOSNC

Deuteronomy 12 in the BOTLNT

Deuteronomy 12 in the BOVCB

Deuteronomy 12 in the BOYCB

Deuteronomy 12 in the BPBB

Deuteronomy 12 in the BPH

Deuteronomy 12 in the BSB

Deuteronomy 12 in the CCB

Deuteronomy 12 in the CUV

Deuteronomy 12 in the CUVS

Deuteronomy 12 in the DBT

Deuteronomy 12 in the DGDNT

Deuteronomy 12 in the DHNT

Deuteronomy 12 in the DNT

Deuteronomy 12 in the ELBE

Deuteronomy 12 in the EMTV

Deuteronomy 12 in the ESV

Deuteronomy 12 in the FBV

Deuteronomy 12 in the FEB

Deuteronomy 12 in the GGMNT

Deuteronomy 12 in the GNT

Deuteronomy 12 in the HARY

Deuteronomy 12 in the HNT

Deuteronomy 12 in the IRVA

Deuteronomy 12 in the IRVB

Deuteronomy 12 in the IRVG

Deuteronomy 12 in the IRVH

Deuteronomy 12 in the IRVK

Deuteronomy 12 in the IRVM

Deuteronomy 12 in the IRVM2

Deuteronomy 12 in the IRVO

Deuteronomy 12 in the IRVP

Deuteronomy 12 in the IRVT

Deuteronomy 12 in the IRVT2

Deuteronomy 12 in the IRVU

Deuteronomy 12 in the ISVN

Deuteronomy 12 in the JSNT

Deuteronomy 12 in the KAPI

Deuteronomy 12 in the KBT1ETNIK

Deuteronomy 12 in the KBV

Deuteronomy 12 in the KJV

Deuteronomy 12 in the KNFD

Deuteronomy 12 in the LBA

Deuteronomy 12 in the LBLA

Deuteronomy 12 in the LNT

Deuteronomy 12 in the LSV

Deuteronomy 12 in the MAAL

Deuteronomy 12 in the MBV

Deuteronomy 12 in the MBV2

Deuteronomy 12 in the MHNT

Deuteronomy 12 in the MKNFD

Deuteronomy 12 in the MNG

Deuteronomy 12 in the MNT

Deuteronomy 12 in the MNT2

Deuteronomy 12 in the MRS1T

Deuteronomy 12 in the NAA

Deuteronomy 12 in the NASB

Deuteronomy 12 in the NBLA

Deuteronomy 12 in the NBS

Deuteronomy 12 in the NBVTP

Deuteronomy 12 in the NET2

Deuteronomy 12 in the NIV11

Deuteronomy 12 in the NNT

Deuteronomy 12 in the NNT2

Deuteronomy 12 in the NNT3

Deuteronomy 12 in the PDDPT

Deuteronomy 12 in the PFNT

Deuteronomy 12 in the RMNT

Deuteronomy 12 in the SBIAS

Deuteronomy 12 in the SBIBS

Deuteronomy 12 in the SBIBS2

Deuteronomy 12 in the SBICS

Deuteronomy 12 in the SBIDS

Deuteronomy 12 in the SBIGS

Deuteronomy 12 in the SBIHS

Deuteronomy 12 in the SBIIS

Deuteronomy 12 in the SBIIS2

Deuteronomy 12 in the SBIIS3

Deuteronomy 12 in the SBIKS

Deuteronomy 12 in the SBIKS2

Deuteronomy 12 in the SBIMS

Deuteronomy 12 in the SBIOS

Deuteronomy 12 in the SBIPS

Deuteronomy 12 in the SBISS

Deuteronomy 12 in the SBITS

Deuteronomy 12 in the SBITS2

Deuteronomy 12 in the SBITS3

Deuteronomy 12 in the SBITS4

Deuteronomy 12 in the SBIUS

Deuteronomy 12 in the SBIVS

Deuteronomy 12 in the SBT

Deuteronomy 12 in the SBT1E

Deuteronomy 12 in the SCHL

Deuteronomy 12 in the SNT

Deuteronomy 12 in the SUSU

Deuteronomy 12 in the SUSU2

Deuteronomy 12 in the SYNO

Deuteronomy 12 in the TBIAOTANT

Deuteronomy 12 in the TBT1E

Deuteronomy 12 in the TBT1E2

Deuteronomy 12 in the TFTIP

Deuteronomy 12 in the TFTU

Deuteronomy 12 in the TGNTATF3T

Deuteronomy 12 in the THAI

Deuteronomy 12 in the TNFD

Deuteronomy 12 in the TNT

Deuteronomy 12 in the TNTIK

Deuteronomy 12 in the TNTIL

Deuteronomy 12 in the TNTIN

Deuteronomy 12 in the TNTIP

Deuteronomy 12 in the TNTIZ

Deuteronomy 12 in the TOMA

Deuteronomy 12 in the TTENT

Deuteronomy 12 in the UBG

Deuteronomy 12 in the UGV

Deuteronomy 12 in the UGV2

Deuteronomy 12 in the UGV3

Deuteronomy 12 in the VBL

Deuteronomy 12 in the VDCC

Deuteronomy 12 in the YALU

Deuteronomy 12 in the YAPE

Deuteronomy 12 in the YBVTP

Deuteronomy 12 in the ZBP