Deuteronomy 20 (BOLCB2)
1 Tango bokokende kobundisa banguna na bino mpe bokomona bampunda, bashar mpe mampinga ya basoda ebele koleka oyo ya bino, bobanga bango te, pamba te Yawe, Nzambe na bino, oyo abimisaki bino na Ejipito, akozala elongo na bino. 2 Tango bokobongama mpo na kokende na bitumba, Nganga-Nzambe asengeli koleka liboso ya mampinga mpe koloba na bango 3 maloba oyo : « Oh Isalaele, boyoka, awa bobongami lelo mpo na kokende na bitumba mpo na kobundisa banguna na bino ; boyika mpiko ! Bobanga te ! Bolenga te ! Bozala na somo te liboso ya banguna na bino. 4 Pamba te Yawe, Nzambe na bino, akotambola elongo na bino mpo na kobundela bino liboso ya banguna na bino mpe kopesa bino elonga. » 5 Bakonzi ya basoda basengeli koloba na mampinga : « Ezali na moko kati na bino oyo awuti kotonga ndako ya sika mpe avandi nanu kuna te ? Tika ete azonga na ndako na ye noki te akoki kokufa na bitumba, bongo moto mosusu akoya kovanda moto ya liboso na ndako yango. 6 Ezali na moto oyo awuti kolona elanga ya vino mpe nanu abuki bambuma ya liboso te ? Tika ete azonga na ndako na ye noki te akoki kokufa na bitumba, bongo moto mosusu akoya kozala moto ya liboso mpo na kobuka mbuma ya liboso na elanga na ye. 7 Ezali na moto oyo awuti kotuna mwasi na libala mpe abali nanu te ? Tika ete azonga na ndako, noki te akoki kokufa na bitumba mpe moto mosusu akoya kobala mwasi oyo ye atunaki na libala. » 8 Bakonzi ya basoda bakoloba lisusu : « Ezali na moto oyo azali kobanga to alembi nzoto ? Tika ete azonga na ndako mpo ete alembisa te baninga na ye na bitumba. » 9 Bongo tango bakonzi ya basoda bakosilisa koloba na mampinga, bakopona bakonzi mpo na kokamba mampinga. 10 Tango bokokende kobundisa engumba moko, boyebisa bato ya engumba yango ete bamipesa bango moko na maboko na bino na kimia. 11 Soki bandimi mpe bafungoli bikuke na bango, bokosalisa bato nyonso ya engumba wana misala makasi mpe bakosalela bino. 12 Kasi soki baboyi kosala kimia elongo na bino mpe babundisi bino, bobundisa engumba wana. 13 Tango Yawe, Nzambe na yo, akokaba engumba wana na maboko na yo, okoboma na mopanga bato nyonso oyo bazali kati na yango. 14 Kasi bokoki kozwa mpo na bino lokola bomengo ya bitumba : basi, bana, bibwele mpe biloko nyonso oyo ezali kati na engumba. Boye bokosalela bomengo ya bitumba oyo ekowuta epai ya banguna na bino oyo Yawe, Nzambe na bino, akokaba na maboko na bino. 15 Ezali ndenge wana nde bokosala bingumba nyonso oyo ezali mosika na bino, bingumba oyo ezali te kati na mokili oyo bokozwa. 16 Kasi mpo na bingumba ya bikolo oyo Yawe, Nzambe na yo, akopesa yo lokola libula, kotika ata eloko moko te na bomoi. 17 Bebisa bango nyonso : bato ya Iti, bato ya Amori, bato ya Kanana, bato ya Perizi, bato ya Evi mpe bato ya Yebusi, ndenge Yawe, Nzambe na yo, atindaki yo 18 mpo ete bateya yo te kosala makambo nyonso ya nkele oyo bango basalaka mpo na lokumu ya banzambe na bango ; noki te okosala masumu liboso ya Yawe, Nzambe na yo. 19 Tango okobundisa engumba moko tango molayi mpo na kobotola yango, okoki kosimba epasola te mpo na kokata banzete ya engumba yango, pamba te okoki kolia bambuma na yango ; kokata yango te. Boni, banzete ekomi bato mpo ete obundisa yango ? 20 Kasi okoki nde kokata banzete oyo oyebi ete ebotaka mbuma te mpo na kosala na yango bibundeli kino engumba yango ekokweya.
In Other Versions
Deuteronomy 20 in the ANGEFD
Deuteronomy 20 in the ANTPNG2D
Deuteronomy 20 in the AS21
Deuteronomy 20 in the BAGH
Deuteronomy 20 in the BBPNG
Deuteronomy 20 in the BBT1E
Deuteronomy 20 in the BDS
Deuteronomy 20 in the BEV
Deuteronomy 20 in the BHAD
Deuteronomy 20 in the BIB
Deuteronomy 20 in the BLPT
Deuteronomy 20 in the BNT
Deuteronomy 20 in the BNTABOOT
Deuteronomy 20 in the BNTLV
Deuteronomy 20 in the BOATCB
Deuteronomy 20 in the BOATCB2
Deuteronomy 20 in the BOBCV
Deuteronomy 20 in the BOCNT
Deuteronomy 20 in the BOECS
Deuteronomy 20 in the BOGWICC
Deuteronomy 20 in the BOHCB
Deuteronomy 20 in the BOHCV
Deuteronomy 20 in the BOHLNT
Deuteronomy 20 in the BOHNTLTAL
Deuteronomy 20 in the BOICB
Deuteronomy 20 in the BOILNTAP
Deuteronomy 20 in the BOITCV
Deuteronomy 20 in the BOKCV
Deuteronomy 20 in the BOKCV2
Deuteronomy 20 in the BOKHWOG
Deuteronomy 20 in the BOKSSV
Deuteronomy 20 in the BOLCB
Deuteronomy 20 in the BOMCV
Deuteronomy 20 in the BONAV
Deuteronomy 20 in the BONCB
Deuteronomy 20 in the BONLT
Deuteronomy 20 in the BONUT2
Deuteronomy 20 in the BOPLNT
Deuteronomy 20 in the BOSCB
Deuteronomy 20 in the BOSNC
Deuteronomy 20 in the BOTLNT
Deuteronomy 20 in the BOVCB
Deuteronomy 20 in the BOYCB
Deuteronomy 20 in the BPBB
Deuteronomy 20 in the BPH
Deuteronomy 20 in the BSB
Deuteronomy 20 in the CCB
Deuteronomy 20 in the CUV
Deuteronomy 20 in the CUVS
Deuteronomy 20 in the DBT
Deuteronomy 20 in the DGDNT
Deuteronomy 20 in the DHNT
Deuteronomy 20 in the DNT
Deuteronomy 20 in the ELBE
Deuteronomy 20 in the EMTV
Deuteronomy 20 in the ESV
Deuteronomy 20 in the FBV
Deuteronomy 20 in the FEB
Deuteronomy 20 in the GGMNT
Deuteronomy 20 in the GNT
Deuteronomy 20 in the HARY
Deuteronomy 20 in the HNT
Deuteronomy 20 in the IRVA
Deuteronomy 20 in the IRVB
Deuteronomy 20 in the IRVG
Deuteronomy 20 in the IRVH
Deuteronomy 20 in the IRVK
Deuteronomy 20 in the IRVM
Deuteronomy 20 in the IRVM2
Deuteronomy 20 in the IRVO
Deuteronomy 20 in the IRVP
Deuteronomy 20 in the IRVT
Deuteronomy 20 in the IRVT2
Deuteronomy 20 in the IRVU
Deuteronomy 20 in the ISVN
Deuteronomy 20 in the JSNT
Deuteronomy 20 in the KAPI
Deuteronomy 20 in the KBT1ETNIK
Deuteronomy 20 in the KBV
Deuteronomy 20 in the KJV
Deuteronomy 20 in the KNFD
Deuteronomy 20 in the LBA
Deuteronomy 20 in the LBLA
Deuteronomy 20 in the LNT
Deuteronomy 20 in the LSV
Deuteronomy 20 in the MAAL
Deuteronomy 20 in the MBV
Deuteronomy 20 in the MBV2
Deuteronomy 20 in the MHNT
Deuteronomy 20 in the MKNFD
Deuteronomy 20 in the MNG
Deuteronomy 20 in the MNT
Deuteronomy 20 in the MNT2
Deuteronomy 20 in the MRS1T
Deuteronomy 20 in the NAA
Deuteronomy 20 in the NASB
Deuteronomy 20 in the NBLA
Deuteronomy 20 in the NBS
Deuteronomy 20 in the NBVTP
Deuteronomy 20 in the NET2
Deuteronomy 20 in the NIV11
Deuteronomy 20 in the NNT
Deuteronomy 20 in the NNT2
Deuteronomy 20 in the NNT3
Deuteronomy 20 in the PDDPT
Deuteronomy 20 in the PFNT
Deuteronomy 20 in the RMNT
Deuteronomy 20 in the SBIAS
Deuteronomy 20 in the SBIBS
Deuteronomy 20 in the SBIBS2
Deuteronomy 20 in the SBICS
Deuteronomy 20 in the SBIDS
Deuteronomy 20 in the SBIGS
Deuteronomy 20 in the SBIHS
Deuteronomy 20 in the SBIIS
Deuteronomy 20 in the SBIIS2
Deuteronomy 20 in the SBIIS3
Deuteronomy 20 in the SBIKS
Deuteronomy 20 in the SBIKS2
Deuteronomy 20 in the SBIMS
Deuteronomy 20 in the SBIOS
Deuteronomy 20 in the SBIPS
Deuteronomy 20 in the SBISS
Deuteronomy 20 in the SBITS
Deuteronomy 20 in the SBITS2
Deuteronomy 20 in the SBITS3
Deuteronomy 20 in the SBITS4
Deuteronomy 20 in the SBIUS
Deuteronomy 20 in the SBIVS
Deuteronomy 20 in the SBT
Deuteronomy 20 in the SBT1E
Deuteronomy 20 in the SCHL
Deuteronomy 20 in the SNT
Deuteronomy 20 in the SUSU
Deuteronomy 20 in the SUSU2
Deuteronomy 20 in the SYNO
Deuteronomy 20 in the TBIAOTANT
Deuteronomy 20 in the TBT1E
Deuteronomy 20 in the TBT1E2
Deuteronomy 20 in the TFTIP
Deuteronomy 20 in the TFTU
Deuteronomy 20 in the TGNTATF3T
Deuteronomy 20 in the THAI
Deuteronomy 20 in the TNFD
Deuteronomy 20 in the TNT
Deuteronomy 20 in the TNTIK
Deuteronomy 20 in the TNTIL
Deuteronomy 20 in the TNTIN
Deuteronomy 20 in the TNTIP
Deuteronomy 20 in the TNTIZ
Deuteronomy 20 in the TOMA
Deuteronomy 20 in the TTENT
Deuteronomy 20 in the UBG
Deuteronomy 20 in the UGV
Deuteronomy 20 in the UGV2
Deuteronomy 20 in the UGV3
Deuteronomy 20 in the VBL
Deuteronomy 20 in the VDCC
Deuteronomy 20 in the YALU
Deuteronomy 20 in the YAPE
Deuteronomy 20 in the YBVTP
Deuteronomy 20 in the ZBP