Exodus 14 (BOLCB2)

1 Yawe alobaki na Moyize : 2 « Loba na bana ya Isalaele ete bazonga mpe batonga molako pembeni ya Pi-Ayiroti, kati ya Migidoli mpe ebale monene. Batonga yango etalana na Bala-Tsefoni pembeni ya ebale monene. 3 Faraon akokanisa ete bana ya Isalaele babungi na mokili, esobe ekangi bango. 4 Nakokomisa motema ya Faraon libanga, mpe ye akolanda bango ; kasi nakomonisa nkembo na Ngai, nakotelemela Faraon mpe mampinga na ye ; bongo bato ya Ejipito bakoyeba ete Ngai nazali Yawe. »Bana ya Isalaele basalaki bongo. 5 Tango bayebisaki mokonzi ya Ejipito ete bana ya Isalaele bakimi, Faraon mpe bakalaka na ye babongolaki makanisi na bango mpo na bana ya Isalaele mpe balobaki : « Likambo nini oyo tosali ? Totiki Isalaele kokende mpe tozangeli bato oyo bakoki kosalela biso ! » 6 Boye Faraon azwaki shar oyo ezalaki ya kobombama mpe azwaki mampinga na ye elongo na ye. 7 Akamataki bashar nkama motoba oyo eleki malamu elongo na bashar nyonso ya Ejipito ; shar moko na moko ezalaki na basoda misato. 8 Yawe akomisaki motema ya Faraon, mokonzi ya Ejipito, libanga mpo ete alanda bana ya Isalaele oyo bazalaki kotambola na bonsomi nyonso. 9 Bato ya Ejipito, bampunda nyonso ya Faraon mpe shar mosusu ya Faraon elongo na bato oyo batambolisaka yango mpe mampinga mosusu ya Faraon balandaki bana ya Isalaele mpe bazwaki bango tango batongaki molako na bango pembeni ya Pi-Ayiroti oyo etalana na Bala-Tsefoni. 10 Lokola Faraon apusanaki, bana ya Isalaele batombolaki miso na bango mpe bamonaki ete bato ya Ejipito bazali kolanda bango na sima. Bana ya Isalaele babangaki makasi mpe bagangaki epai na Yawe. 11 Balobaki na Moyize :— Boni, ezali mpo ete malita ezali te na Ejipito, yango wana omemi biso mpo ete tokufa na esobe ? Osali biso nini awa obimisi biso na Ejipito ? 12 Toyebisaki yo te tango tozalaki na Ejipito : « Tika biso kimia, tika biso tosalela bato ya Ejipito ? » Pamba te elekaki malamu mpo na biso kosalela bato ya Ejipito na esika ya kokufa na esobe. 13 Moyize azongiselaki bango :— Bobanga te, boyika mpiko ! Bokomona kokangolama oyo Yawe akomemela bino lelo ; bato ya Ejipito oyo bozali komona lelo, bokotikala komona bango lisusu te. 14 Yawe akobunda mpo na bino, mpe bino bovanda kimia. 15 Yawe alobaki na Moyize :— Mpo na nini ozali koganga boye epai na Ngai ? Loba na bana ya Isalaele ete batambola. 16 Kasi yo, tombola lingenda na yo, sembola loboko na yo likolo ya ebale monene mpe kabola mayi mpo ete bana ya Isalaele bakoka kokatisa ebale monene lokola na mabele ya kokawuka. 17 Bongo Ngai, nakoyeisa motema ya bato ya Ejipito libanga mpo ete balanda bino mpe nakomonisa nkembo na Ngai na kotelemela Faraon mpe mampinga na ye nyonso elongo na bashar na ye mpe bato na ye oyo batambolisaka bampunda. 18 Bongo bato ya Ejipito bakoyeba ete nazali Yawe tango nakomonisa nkembo na Ngai na kotelemela Faraon, bashar na ye mpe bato na ye oyo batambolisaka bampunda. 19 Anjelu na Nzambe oyo azalaki kotambola liboso ya mampinga ya Isalaele azongaki sima na bango, mpe likonzi ya lipata elongwaki liboso na bango mpo ete etelema sima na bango. 20 Likonzi ya lipata etelemaki kati ya mampinga ya bato ya Ejipito mpe ya bana ya Isalaele. Likonzi ya lipata epesaki molili na ngambo moko mpe engengisaki ngambo mosusu ; yango wana butu mobimba, bato ya Ejipito bakokaki kopusana te pembeni ya bana ya Isalaele. 21 Moyize asembolaki loboko na ye likolo ya ebale monene ; bongo na butu mobimba, Yawe atindaki na ebale monene mopepe makasi ya este oyo ekabolaki mayi ya ebale monene. 22 Bato ya Isalaele batambolaki na ebale monene lokola na mabele ya kokawuka. Mayi etelemaki lokola mir na ngambo ya loboko na bango ya mobali mpe na ngambo ya loboko na bango ya mwasi. 23 Bato ya Ejipito balandaki bango mpe bango nyonso bakotaki kati na ebale monene : bampunda nyonso ya Faraon, bashar na ye mpe batambolisi ya bampunda. 24 Liboso ete tongo etana, Yawe atelemaki na likolo ya likonzi ya moto mpe ya lipata, atalaki mampinga ya bato ya Ejipito mpe akotisaki mobulu kati na yango. 25 Alongolaki bapine na bashar na bango mpo ete bamona pasi mpo na kokumba. Boye bato ya Ejipito balobaki :— Tokima mosika ya bana ya Isalaele, pamba te Yawe azali kobundela bango liboso na biso. 26 Yawe alobaki na Moyize :— Sembola loboko na yo likolo ya ebale monene mpo ete mayi ezonga mpe ekweyela bato ya Ejipito, bashar na bango mpe batambolisi ya bampunda. 27 Moyize asembolaki loboko na ye likolo ya ebale monene, mpe liboso ete tongo etana, ebale monene ezongaki na esika na yango mpe bato ya Ejipito oyo balukaki kokima, bakutanaki na mayi liboso na bango. Boye Yawe azindisaki bango kati na ebale monene. 28 Mayi ezongaki mpe ezipaki bashar elongo na batambolisi ya bampunda mpe mampinga ya Faraon oyo elandaki bana ya Isalaele kati na ebale monene. Moko te kati na bango abikaki. 29 Kasi bana ya Isalaele batambolaki na ebale monene lokola na mabele ya kokawuka. Mayi etelemaki lokola mir na ngambo ya loboko na bango ya mobali mpe na ngambo ya loboko na bango ya mwasi. 30 Na mokolo wana, Yawe abikisaki bana ya Isalaele liboso ya bato ya Ejipito mpe bana ya Isalaele bamonaki bibembe ya bato ya Ejipito etandami na libongo ya ebale monene. 31 Tango bana ya Isalaele bamonaki nguya monene oyo Yawe atalisaki liboso ya bato ya Ejipito, babangaki Yawe mpe batiaki elikya na bango kati na Ye mpe kati na mosali na Ye Moyize.

In Other Versions

Exodus 14 in the ANGEFD

Exodus 14 in the ANTPNG2D

Exodus 14 in the AS21

Exodus 14 in the BAGH

Exodus 14 in the BBPNG

Exodus 14 in the BBT1E

Exodus 14 in the BDS

Exodus 14 in the BEV

Exodus 14 in the BHAD

Exodus 14 in the BIB

Exodus 14 in the BLPT

Exodus 14 in the BNT

Exodus 14 in the BNTABOOT

Exodus 14 in the BNTLV

Exodus 14 in the BOATCB

Exodus 14 in the BOATCB2

Exodus 14 in the BOBCV

Exodus 14 in the BOCNT

Exodus 14 in the BOECS

Exodus 14 in the BOGWICC

Exodus 14 in the BOHCB

Exodus 14 in the BOHCV

Exodus 14 in the BOHLNT

Exodus 14 in the BOHNTLTAL

Exodus 14 in the BOICB

Exodus 14 in the BOILNTAP

Exodus 14 in the BOITCV

Exodus 14 in the BOKCV

Exodus 14 in the BOKCV2

Exodus 14 in the BOKHWOG

Exodus 14 in the BOKSSV

Exodus 14 in the BOLCB

Exodus 14 in the BOMCV

Exodus 14 in the BONAV

Exodus 14 in the BONCB

Exodus 14 in the BONLT

Exodus 14 in the BONUT2

Exodus 14 in the BOPLNT

Exodus 14 in the BOSCB

Exodus 14 in the BOSNC

Exodus 14 in the BOTLNT

Exodus 14 in the BOVCB

Exodus 14 in the BOYCB

Exodus 14 in the BPBB

Exodus 14 in the BPH

Exodus 14 in the BSB

Exodus 14 in the CCB

Exodus 14 in the CUV

Exodus 14 in the CUVS

Exodus 14 in the DBT

Exodus 14 in the DGDNT

Exodus 14 in the DHNT

Exodus 14 in the DNT

Exodus 14 in the ELBE

Exodus 14 in the EMTV

Exodus 14 in the ESV

Exodus 14 in the FBV

Exodus 14 in the FEB

Exodus 14 in the GGMNT

Exodus 14 in the GNT

Exodus 14 in the HARY

Exodus 14 in the HNT

Exodus 14 in the IRVA

Exodus 14 in the IRVB

Exodus 14 in the IRVG

Exodus 14 in the IRVH

Exodus 14 in the IRVK

Exodus 14 in the IRVM

Exodus 14 in the IRVM2

Exodus 14 in the IRVO

Exodus 14 in the IRVP

Exodus 14 in the IRVT

Exodus 14 in the IRVT2

Exodus 14 in the IRVU

Exodus 14 in the ISVN

Exodus 14 in the JSNT

Exodus 14 in the KAPI

Exodus 14 in the KBT1ETNIK

Exodus 14 in the KBV

Exodus 14 in the KJV

Exodus 14 in the KNFD

Exodus 14 in the LBA

Exodus 14 in the LBLA

Exodus 14 in the LNT

Exodus 14 in the LSV

Exodus 14 in the MAAL

Exodus 14 in the MBV

Exodus 14 in the MBV2

Exodus 14 in the MHNT

Exodus 14 in the MKNFD

Exodus 14 in the MNG

Exodus 14 in the MNT

Exodus 14 in the MNT2

Exodus 14 in the MRS1T

Exodus 14 in the NAA

Exodus 14 in the NASB

Exodus 14 in the NBLA

Exodus 14 in the NBS

Exodus 14 in the NBVTP

Exodus 14 in the NET2

Exodus 14 in the NIV11

Exodus 14 in the NNT

Exodus 14 in the NNT2

Exodus 14 in the NNT3

Exodus 14 in the PDDPT

Exodus 14 in the PFNT

Exodus 14 in the RMNT

Exodus 14 in the SBIAS

Exodus 14 in the SBIBS

Exodus 14 in the SBIBS2

Exodus 14 in the SBICS

Exodus 14 in the SBIDS

Exodus 14 in the SBIGS

Exodus 14 in the SBIHS

Exodus 14 in the SBIIS

Exodus 14 in the SBIIS2

Exodus 14 in the SBIIS3

Exodus 14 in the SBIKS

Exodus 14 in the SBIKS2

Exodus 14 in the SBIMS

Exodus 14 in the SBIOS

Exodus 14 in the SBIPS

Exodus 14 in the SBISS

Exodus 14 in the SBITS

Exodus 14 in the SBITS2

Exodus 14 in the SBITS3

Exodus 14 in the SBITS4

Exodus 14 in the SBIUS

Exodus 14 in the SBIVS

Exodus 14 in the SBT

Exodus 14 in the SBT1E

Exodus 14 in the SCHL

Exodus 14 in the SNT

Exodus 14 in the SUSU

Exodus 14 in the SUSU2

Exodus 14 in the SYNO

Exodus 14 in the TBIAOTANT

Exodus 14 in the TBT1E

Exodus 14 in the TBT1E2

Exodus 14 in the TFTIP

Exodus 14 in the TFTU

Exodus 14 in the TGNTATF3T

Exodus 14 in the THAI

Exodus 14 in the TNFD

Exodus 14 in the TNT

Exodus 14 in the TNTIK

Exodus 14 in the TNTIL

Exodus 14 in the TNTIN

Exodus 14 in the TNTIP

Exodus 14 in the TNTIZ

Exodus 14 in the TOMA

Exodus 14 in the TTENT

Exodus 14 in the UBG

Exodus 14 in the UGV

Exodus 14 in the UGV2

Exodus 14 in the UGV3

Exodus 14 in the VBL

Exodus 14 in the VDCC

Exodus 14 in the YALU

Exodus 14 in the YAPE

Exodus 14 in the YBVTP

Exodus 14 in the ZBP