Exodus 4 (BOLCB2)

1 Moyize azongisaki :— Bongo soki bandimi ngai te, bayoki ngai te ? Solo, bakoloba kaka : « Yawe amonanaki na yo te. » 2 Yawe atunaki ye :— Ozali na nini na loboko na yo ?Moyize azongisaki :— Nazali na lingenda. 3 Yawe alobaki :— Bwaka yango na mabele.Moyize abwakaki lingenda yango na mabele mpe ebongwanaki nyoka. Bongo Moyize akimaki mosika na yango. 4 Kasi Yawe alobaki na ye :— Sembola loboko na yo mpe kanga nyoka yango na mokila !Moyize asembolaki loboko mpe akangaki nyoka ; mpe nyoka yango ebongwanaki lisusu lingenda na loboko na ye. 5 Yawe alobaki na ye :— Esalemi bongo mpo ete bandima solo ete Yawe, Nzambe ya bakoko na bango, Nzambe ya Abrayami, ya Izaki mpe ya Jakobi, amonanaki na yo. 6 Sima, Yawe alobaki na ye lisusu :— Tia loboko na yo na tolo na yo.Moyize atiaki loboko na ye na tolo na ye ; mpe tango alongolaki yango, loboko yango ezwaki bokono ya maba ; ekomaki pembe lokola mvula ya pembe. 7 Yawe alobaki na ye :— Sik’oyo, zongisa loboko na yo na tolo na yo.Moyize azongisaki loboko na ye na tolo na ye. Mpe tango alongolaki yango, loboko yango ekomaki lisusu malamu lokola biteni mosusu ya nzoto na ye. 8 Yawe alobaki na ye :— Soki bandimi yo te to soki babeti tembe mpo na elembo ya liboso, bakondima na elembo ya mibale. 9 Kasi soki na bilembo oyo mibale, bandimi kaka te to bayoki te, wana okotoka mayi na ebale Nili, okosopa yango na esobe. Mayi oyo okozwa na ebale Nili ekokoma makila tango okosopa yango na mabele. 10 Moyize alobaki na Yawe :— Ah, Nkolo, nakokaka koloba malamu te ! Yango ezali likambo ya lobi oyo eleki te to ya wuta tango obandi koloba na mosali na Yo te, pamba te nazali na monoko mpe na lolemo kilo. 11 Yawe alobaki na ye :— Nani apesaka monoko epai ya moto ? Nani akomisaka moto baba to mokufi matoyi ? Nani akomisaka moto, moto oyo amonaka to mokufi miso ? Boni, ezali Ngai Yawe te ? 12 Sik’oyo kende, Ngai moko nakosunga yo mpo ete oloba malamu, mpe nakoteya yo makambo oyo osengeli koloba. 13 Kasi Moyize azongisaki :— Te Nkolo ! Nabondeli Yo ! Tinda moto mosusu oyo olingi mpo na kosala yango. 14 Boye Yawe asilikelaki Moyize mpe alobaki na ye :— Boni, Aron, moto ya libota ya Levi, azali ndeko na yo te ? Nayebi ete alobaka malamu mpe ye wana azali koya kokutana na yo ; mpe motema na ye ekosepela tango akomona yo. 15 Okoloba na ye mpe okotia maloba na monoko na ye, bongo Ngai nakosunga bino mibale mpo ete bokoka koloba malamu, mpe nakoteya bino makambo oyo bosengeli kosala. 16 Ye akoloba epai ya bato na esika na yo, akozala molobeli na yo ; bongo yo okozala lokola nzambe na ye. 17 Kasi zwa lingenda oyo ezali na maboko na yo mpo ete osala bilembo ya kokamwa na nzela na yango. 18 Moyize azongaki epai ya Jetro, tata-bokilo na ye, mpe alobaki na ye :— Nasengeli kokende epai ya bandeko na ngai, na Ejipito, mpo ete natala soki ndambo kati na bango bazali nanu na bomoi.Jetro ozongisaki :— Kende na kimia ! 19 Yawe alobaki na Moyize tango azalaki nanu na mokili ya Madiani :— Telema mpe zonga na Ejipito, pamba te bato nyonso oyo balingaki koboma yo basili kokufa. 20 Moyize azwaki mwasi na ye mpe bana na ye ya mibali, atiaki bango likolo ya ane mpe azongaki na Ejipito. Azwaki lisusu lingenda ya Nzambe na loboko na ye. 21 Yawe alobaki na Moyize :— Sik’oyo, lokola ozali kozonga na Ejipito, tala bikamwa nyonso oyo napesi yo nguya ya kosala ; okosala yango liboso ya Faraon. Ngai nakokomisa motema na ye libanga mpo ete akoka kotika te bato na Ngai kokende. 22 Okoloba na Faraon : « Tala liloba oyo Yawe alobi : ‹ Isalaele azali mwana na Ngai ya liboso ya mobali. 23 Mpe nalobi na yo : Tika mwana na Ngai ya mobali kokende mpo ete asalela Ngai. Soki kaka oboyi kotika ye, nakoboma mwana na yo ya liboso ya mobali. › » 24 Nzokande na nzela, na esika oyo balekisaki butu, Yawe akutanaki na Moyize mpe alukaki koboma ye. 25 Kasi Sefora azwaki libanga ya songe, akataki ngenga ya mwana na ye ya mobali mpe atutisaki ngenga yango na makolo ya Moyize ; alobaki :— Solo, ozali penza mpo na ngai mobali ya makila. 26 Bongo Yawe atikaki Moyize. Ezalaki na tango wana nde Sefora alobaki na Moyize likolo na likambo ya kokatama ngenga :— Mobali ya makila. 27 Yawe alobaki na Aron :— Kende kokutana na Moyize na esobe.Aron akendeki, akutanaki na Moyize na ngomba ya Nzambe mpe apesaki ye beze. 28 Moyize ayebisaki Aron makambo nyonso oyo Yawe atindaki ye koloba mpe bikamwa nyonso oyo atindaki ye kosala. 29 Bongo Moyize mpe Aron bakendeki kosangisa bakambi nyonso ya Isalaele. 30 Aron ayebisaki bango maloba nyonso oyo Yawe alobaki na Moyize. Asalaki bikamwa liboso ya bato. 31 Bato bandimaki. Bongo tango bayokaki ete Yawe akanisaki bana ya Isalaele mpe amonaki pasi na bango, bafukamaki mpe bagumbamelaki Yawe.

In Other Versions

Exodus 4 in the ANGEFD

Exodus 4 in the ANTPNG2D

Exodus 4 in the AS21

Exodus 4 in the BAGH

Exodus 4 in the BBPNG

Exodus 4 in the BBT1E

Exodus 4 in the BDS

Exodus 4 in the BEV

Exodus 4 in the BHAD

Exodus 4 in the BIB

Exodus 4 in the BLPT

Exodus 4 in the BNT

Exodus 4 in the BNTABOOT

Exodus 4 in the BNTLV

Exodus 4 in the BOATCB

Exodus 4 in the BOATCB2

Exodus 4 in the BOBCV

Exodus 4 in the BOCNT

Exodus 4 in the BOECS

Exodus 4 in the BOGWICC

Exodus 4 in the BOHCB

Exodus 4 in the BOHCV

Exodus 4 in the BOHLNT

Exodus 4 in the BOHNTLTAL

Exodus 4 in the BOICB

Exodus 4 in the BOILNTAP

Exodus 4 in the BOITCV

Exodus 4 in the BOKCV

Exodus 4 in the BOKCV2

Exodus 4 in the BOKHWOG

Exodus 4 in the BOKSSV

Exodus 4 in the BOLCB

Exodus 4 in the BOMCV

Exodus 4 in the BONAV

Exodus 4 in the BONCB

Exodus 4 in the BONLT

Exodus 4 in the BONUT2

Exodus 4 in the BOPLNT

Exodus 4 in the BOSCB

Exodus 4 in the BOSNC

Exodus 4 in the BOTLNT

Exodus 4 in the BOVCB

Exodus 4 in the BOYCB

Exodus 4 in the BPBB

Exodus 4 in the BPH

Exodus 4 in the BSB

Exodus 4 in the CCB

Exodus 4 in the CUV

Exodus 4 in the CUVS

Exodus 4 in the DBT

Exodus 4 in the DGDNT

Exodus 4 in the DHNT

Exodus 4 in the DNT

Exodus 4 in the ELBE

Exodus 4 in the EMTV

Exodus 4 in the ESV

Exodus 4 in the FBV

Exodus 4 in the FEB

Exodus 4 in the GGMNT

Exodus 4 in the GNT

Exodus 4 in the HARY

Exodus 4 in the HNT

Exodus 4 in the IRVA

Exodus 4 in the IRVB

Exodus 4 in the IRVG

Exodus 4 in the IRVH

Exodus 4 in the IRVK

Exodus 4 in the IRVM

Exodus 4 in the IRVM2

Exodus 4 in the IRVO

Exodus 4 in the IRVP

Exodus 4 in the IRVT

Exodus 4 in the IRVT2

Exodus 4 in the IRVU

Exodus 4 in the ISVN

Exodus 4 in the JSNT

Exodus 4 in the KAPI

Exodus 4 in the KBT1ETNIK

Exodus 4 in the KBV

Exodus 4 in the KJV

Exodus 4 in the KNFD

Exodus 4 in the LBA

Exodus 4 in the LBLA

Exodus 4 in the LNT

Exodus 4 in the LSV

Exodus 4 in the MAAL

Exodus 4 in the MBV

Exodus 4 in the MBV2

Exodus 4 in the MHNT

Exodus 4 in the MKNFD

Exodus 4 in the MNG

Exodus 4 in the MNT

Exodus 4 in the MNT2

Exodus 4 in the MRS1T

Exodus 4 in the NAA

Exodus 4 in the NASB

Exodus 4 in the NBLA

Exodus 4 in the NBS

Exodus 4 in the NBVTP

Exodus 4 in the NET2

Exodus 4 in the NIV11

Exodus 4 in the NNT

Exodus 4 in the NNT2

Exodus 4 in the NNT3

Exodus 4 in the PDDPT

Exodus 4 in the PFNT

Exodus 4 in the RMNT

Exodus 4 in the SBIAS

Exodus 4 in the SBIBS

Exodus 4 in the SBIBS2

Exodus 4 in the SBICS

Exodus 4 in the SBIDS

Exodus 4 in the SBIGS

Exodus 4 in the SBIHS

Exodus 4 in the SBIIS

Exodus 4 in the SBIIS2

Exodus 4 in the SBIIS3

Exodus 4 in the SBIKS

Exodus 4 in the SBIKS2

Exodus 4 in the SBIMS

Exodus 4 in the SBIOS

Exodus 4 in the SBIPS

Exodus 4 in the SBISS

Exodus 4 in the SBITS

Exodus 4 in the SBITS2

Exodus 4 in the SBITS3

Exodus 4 in the SBITS4

Exodus 4 in the SBIUS

Exodus 4 in the SBIVS

Exodus 4 in the SBT

Exodus 4 in the SBT1E

Exodus 4 in the SCHL

Exodus 4 in the SNT

Exodus 4 in the SUSU

Exodus 4 in the SUSU2

Exodus 4 in the SYNO

Exodus 4 in the TBIAOTANT

Exodus 4 in the TBT1E

Exodus 4 in the TBT1E2

Exodus 4 in the TFTIP

Exodus 4 in the TFTU

Exodus 4 in the TGNTATF3T

Exodus 4 in the THAI

Exodus 4 in the TNFD

Exodus 4 in the TNT

Exodus 4 in the TNTIK

Exodus 4 in the TNTIL

Exodus 4 in the TNTIN

Exodus 4 in the TNTIP

Exodus 4 in the TNTIZ

Exodus 4 in the TOMA

Exodus 4 in the TTENT

Exodus 4 in the UBG

Exodus 4 in the UGV

Exodus 4 in the UGV2

Exodus 4 in the UGV3

Exodus 4 in the VBL

Exodus 4 in the VDCC

Exodus 4 in the YALU

Exodus 4 in the YAPE

Exodus 4 in the YBVTP

Exodus 4 in the ZBP