Exodus 8 (BOLCB2)

1 Yawe alobaki na Moyize : « Loba na Aron ete asembola loboko na ye mpe lingenda na ye na ngambo ya mayi, ya miluka mpe ya maziba, mpo ete abimisa magorodo na mokili ya Ejipito. » 2 Boye Aron asembolaki loboko na ye na ngambo ya mayi ya Ejipito ; bongo magorodo ebimaki mpe etondisaki mokili ya Ejipito. 3 Kasi bato ya maji ya Ejipito mpe basalaki bikamwa ya ndenge moko na nzela ya misala na bango ya soloka : bango mpe babimisaki magorodo na mokili ya Ejipito. 4 Faraon abengisaki Moyize mpe Aron, alobaki na bango :— Bobondela Yawe ete alongola magorodo pene na ngai mpe pene ya bato na ngai ; bongo nakotika bato na bino kokende kobonzela Yawe mbeka. 5 Moyize alobaki na Faraon :— Tika ete mokonzi apona tango nini nasengeli kobondela Yawe mpo na yo, basali na yo mpe bato na yo, mpo ete Yawe alongola magorodo pene na yo mpe pene ya bandako na yo ; kasi etikala kaka na ebale Nili. 6 Faraon azongisaki :— Tika ete esalema lobi.Moyize alobaki :— Iyo, ekosalema ndenge osengi, mpo oyeba ete moko te azali lokola Yawe, Nzambe na biso. 7 Magorodo ekolongwa pene na yo, pene na bandako na yo, ya basali na yo mpe ya bato na yo ; kasi ekotikala kaka na ebale Nili. 8 Sima, Moyize mpe Aron batikaki Faraon. Bongo Moyize agangaki epai na Yawe na tina na magorodo oyo atindelaki Faraon. 9 Yawe asalaki makambo oyo Moyize asengaki : magorodo ekufaki na bandako, na mapango mpe na bilanga. 10 Basangisaki yango na maboke mpe mabele elumbaki solo ya kopola. 11 Kasi tango Faraon amonaki ete kimia ekoti, ayeisaki lisusu motema na ye makasi lokola libanga mpe ayokelaki te Moyize mpe Aron ndenge kaka Yawe alobaki. 12 Yawe alobaki na Moyize :— Loba na Aron ete asembola lingenda na ye mpe abeta yango na putulu ya mabele ; mpe yango ekokoma bangungi kati na mokili mobimba ya Ejipito. 13 Basalaki kaka ndenge wana. Tango Aron asembolaki loboko mpe lingenda na ye, abetaki yango na putulu ya mabele ; bongo putulu yango ekomaki bangungi oyo ematelaki bato mpe banyama. Putulu nyonso ya mokili ya Ejipito ebongwanaki bangungi. 14 Kasi tango bato ya maji bamekaki kobimisa bangungi na nzela ya misala na bango ya soloka, balongaki te. Bongo bangungi ematelaki bato mpe banyama. 15 Boye bato ya maji balobaki na Faraon : « Oyo ezali penza mosapi ya Nzambe ! » Kasi Faraon ayeisaki lisusu motema na ye makasi lokola libanga mpe aboyaki koyoka, ndenge kaka Yawe alobaki. 16 Yawe alobaki na Moyize :— Lamuka na tongo-tongo mpe kende kokutana na Faraon na tango oyo abimaka mpo na kokende na mayi. Loba na ye : « Tala makambo oyo Yawe alobi : Tika bato na Ngai kokende kogumbamela Ngai. 17 Soki oboyi kotika bato na Ngai kokende, nakotinda banzinzi epai na yo, epai ya bakalaka na yo, epai ya bato na yo mpe kino na bandako na yo. Boye bandako ya bato na Ejipito, ezala mabele epai wapi bazali, ekotonda na banzinzi oyo eswaka. 18 Na mokolo wana, nakosala bokeseni mpo na etuka ya Gosheni epai wapi bato na Ngai bazali kovanda ; banzinzi oyo eswaka ekozala kuna te, mpo oyeba ete, Ngai Yawe, nazali kati na etuka yango. 19 Bongo nakotia bokeseni kati na bato na Ngai mpe bato na yo. Elembo yango ekosalema lobi. » 20 Yawe asalaki bongo : banzinzi ebele oyo eswaka ekotaki mpe epanzanaki kati na ndako ya Faraon, na bandako ya bakalaka na ye mpe kati na mokili mobimba ya Ejipito. Boye mokili ebebisamaki na banzinzi oyo eswaka. 21 Faraon abengisaki Moyize mpe Aron, alobaki na bango :— Bokende, bobonzela Nzambe na bino mbeka kati na mokili oyo. 22 Kasi Moyize azongisaki :— Ekoki kosalema bongo te ; noki te mbeka oyo tokobonzela Yawe, Nzambe na biso, ekomonana lokola eloko ya nkele na miso ya bato ya Ejipito. Boni, soki tobonzi mbeka oyo emonani lokola eloko ya nkele na miso na bango, bakobamba biso mabanga te ? 23 Tosengeli kotambola mikolo misato kati na esobe, sima tokobonzela Yawe, Nzambe na biso, mbeka ndenge atindaki biso. 24 Faraon alobaki :— Nakotika bino kokende kobonzela Yawe, Nzambe na bino, mbeka kati na esobe ; kasi bokende mosika te. Sik’oyo, bobondela mpo na ngai ! 25 Moyize azongisaki :— Ndenge nazali kobima boye na ndako na yo, nakobondela Yawe ; bongo lobi, banzinzi oyo eswaka ekolongwa epai ya Faraon, epai ya bakalaka na ye mpe epai ya bato na ye. Kasi tika ete Faraon akoba te kotiola Yawe na koboya kotika bato kokende kobonzela Yawe mbeka. 26 Tango Moyize abimaki na ndako ya Faraon, abondelaki Yawe 27 mpe Yawe akokisaki makambo oyo Moyize asengaki : banzinzi oyo eswaka etikaki Faraon, bakalaka na ye mpe bato na ye. Ata nzinzi moko te etikalaki. 28 Kasi na mbala oyo, Faraon ayeisaki lisusu motema na ye makasi lokola libanga mpe aboyaki kaka kotika bato kokende.

In Other Versions

Exodus 8 in the ANGEFD

Exodus 8 in the ANTPNG2D

Exodus 8 in the AS21

Exodus 8 in the BAGH

Exodus 8 in the BBPNG

Exodus 8 in the BBT1E

Exodus 8 in the BDS

Exodus 8 in the BEV

Exodus 8 in the BHAD

Exodus 8 in the BIB

Exodus 8 in the BLPT

Exodus 8 in the BNT

Exodus 8 in the BNTABOOT

Exodus 8 in the BNTLV

Exodus 8 in the BOATCB

Exodus 8 in the BOATCB2

Exodus 8 in the BOBCV

Exodus 8 in the BOCNT

Exodus 8 in the BOECS

Exodus 8 in the BOGWICC

Exodus 8 in the BOHCB

Exodus 8 in the BOHCV

Exodus 8 in the BOHLNT

Exodus 8 in the BOHNTLTAL

Exodus 8 in the BOICB

Exodus 8 in the BOILNTAP

Exodus 8 in the BOITCV

Exodus 8 in the BOKCV

Exodus 8 in the BOKCV2

Exodus 8 in the BOKHWOG

Exodus 8 in the BOKSSV

Exodus 8 in the BOLCB

Exodus 8 in the BOMCV

Exodus 8 in the BONAV

Exodus 8 in the BONCB

Exodus 8 in the BONLT

Exodus 8 in the BONUT2

Exodus 8 in the BOPLNT

Exodus 8 in the BOSCB

Exodus 8 in the BOSNC

Exodus 8 in the BOTLNT

Exodus 8 in the BOVCB

Exodus 8 in the BOYCB

Exodus 8 in the BPBB

Exodus 8 in the BPH

Exodus 8 in the BSB

Exodus 8 in the CCB

Exodus 8 in the CUV

Exodus 8 in the CUVS

Exodus 8 in the DBT

Exodus 8 in the DGDNT

Exodus 8 in the DHNT

Exodus 8 in the DNT

Exodus 8 in the ELBE

Exodus 8 in the EMTV

Exodus 8 in the ESV

Exodus 8 in the FBV

Exodus 8 in the FEB

Exodus 8 in the GGMNT

Exodus 8 in the GNT

Exodus 8 in the HARY

Exodus 8 in the HNT

Exodus 8 in the IRVA

Exodus 8 in the IRVB

Exodus 8 in the IRVG

Exodus 8 in the IRVH

Exodus 8 in the IRVK

Exodus 8 in the IRVM

Exodus 8 in the IRVM2

Exodus 8 in the IRVO

Exodus 8 in the IRVP

Exodus 8 in the IRVT

Exodus 8 in the IRVT2

Exodus 8 in the IRVU

Exodus 8 in the ISVN

Exodus 8 in the JSNT

Exodus 8 in the KAPI

Exodus 8 in the KBT1ETNIK

Exodus 8 in the KBV

Exodus 8 in the KJV

Exodus 8 in the KNFD

Exodus 8 in the LBA

Exodus 8 in the LBLA

Exodus 8 in the LNT

Exodus 8 in the LSV

Exodus 8 in the MAAL

Exodus 8 in the MBV

Exodus 8 in the MBV2

Exodus 8 in the MHNT

Exodus 8 in the MKNFD

Exodus 8 in the MNG

Exodus 8 in the MNT

Exodus 8 in the MNT2

Exodus 8 in the MRS1T

Exodus 8 in the NAA

Exodus 8 in the NASB

Exodus 8 in the NBLA

Exodus 8 in the NBS

Exodus 8 in the NBVTP

Exodus 8 in the NET2

Exodus 8 in the NIV11

Exodus 8 in the NNT

Exodus 8 in the NNT2

Exodus 8 in the NNT3

Exodus 8 in the PDDPT

Exodus 8 in the PFNT

Exodus 8 in the RMNT

Exodus 8 in the SBIAS

Exodus 8 in the SBIBS

Exodus 8 in the SBIBS2

Exodus 8 in the SBICS

Exodus 8 in the SBIDS

Exodus 8 in the SBIGS

Exodus 8 in the SBIHS

Exodus 8 in the SBIIS

Exodus 8 in the SBIIS2

Exodus 8 in the SBIIS3

Exodus 8 in the SBIKS

Exodus 8 in the SBIKS2

Exodus 8 in the SBIMS

Exodus 8 in the SBIOS

Exodus 8 in the SBIPS

Exodus 8 in the SBISS

Exodus 8 in the SBITS

Exodus 8 in the SBITS2

Exodus 8 in the SBITS3

Exodus 8 in the SBITS4

Exodus 8 in the SBIUS

Exodus 8 in the SBIVS

Exodus 8 in the SBT

Exodus 8 in the SBT1E

Exodus 8 in the SCHL

Exodus 8 in the SNT

Exodus 8 in the SUSU

Exodus 8 in the SUSU2

Exodus 8 in the SYNO

Exodus 8 in the TBIAOTANT

Exodus 8 in the TBT1E

Exodus 8 in the TBT1E2

Exodus 8 in the TFTIP

Exodus 8 in the TFTU

Exodus 8 in the TGNTATF3T

Exodus 8 in the THAI

Exodus 8 in the TNFD

Exodus 8 in the TNT

Exodus 8 in the TNTIK

Exodus 8 in the TNTIL

Exodus 8 in the TNTIN

Exodus 8 in the TNTIP

Exodus 8 in the TNTIZ

Exodus 8 in the TOMA

Exodus 8 in the TTENT

Exodus 8 in the UBG

Exodus 8 in the UGV

Exodus 8 in the UGV2

Exodus 8 in the UGV3

Exodus 8 in the VBL

Exodus 8 in the VDCC

Exodus 8 in the YALU

Exodus 8 in the YAPE

Exodus 8 in the YBVTP

Exodus 8 in the ZBP