Ezekiel 36 (BOLCB2)

1 « Mwana na moto, sakola na tina na bangomba ya Isalaele mpe loba : ‹ Bino bangomba ya Isalaele, boyoka Liloba na Yawe ! 2 Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Moyini alobaki na tina na bino : ‘ Ah, bangomba ya kala ekomi sik’oyo ya biso ! ’ › 3 Yango wana, sakola ! Loba : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Lokola babebisaki bino mpe bapanzaki bino bipai nyonso mpo ete bokoma libula ya bikolo mosusu mpe eloko ya masolo ya kotiola mpe ya kofinga kati na bato ; 4 mpo na yango, bino bangomba ya Isalaele, boyoka liloba na Nkolo Yawe : Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi na bangomba ya milayi mpe ya mikuse, na mabulu mpe na mabwaku, na bisika ya libebi mpe na bingumba oyo basundola mpe babebisa, bongo bato ya bikolo mosusu ya zingazinga bayibaki mpe bakomisaki yango eloko ya kotiola ; 5 tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : na zuwa na Ngai ya makasi, natombokeli bikolo oyo etikali mpe mokili mobimba ya Edomi, pamba te na esengo nyonso mpe na mayele mabe kati na mitema na bango, bakomisi mokili na Ngai lokola libula na bango moko mpo ete babotola bilanga na yango nyonso na makasi. › 6 Mpo na yango, sakola na tina na mokili ya Isalaele mpe loba na bangomba ya milayi mpe ya mikuse, na mabulu mpe na mabwaku : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Nazali koloba na zuwa mpe na kanda na Ngai ya makasi, pamba te bikolo mosusu emonisi bino pasi na kotiola. 7 Yango wana, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : nalapi ndayi, na kotombola loboko, ete ezali bikolo oyo ezingeli bino nde ekotiolama. 8 Kasi bino, bangomba ya Isalaele, bokobota bitape mpe bambuma mpo na Isalaele, bato na Ngai ; pamba te etikali kaka moke ete bazonga epai na bango. 9 Nazali kolandela likambo na bino mpe nazali kotala bino na liso ya ngolu ; bakobalola bino lisusu ndenge babalolaka mabele ya bilanga mpe bakolona lisusu bankona na mabele na bino. 10 Nakokomisa motango ya bato na bino ebele, na mabele na bino : yango nde libota mobimba ya Isalaele ; bato bakozongela lisusu kovanda kati na bingumba na bino mpe bakotonga lisusu bandako na bino oyo ebukana. 11 Nakokomisa motango ya bato mpe ya bibwele na bino ebele na mokili na bino : bakobotana mpe bakokoma ebele penza. Nakovandisa lisusu bato na mokili na bino ndenge ezalaka na tango ya kala mpe nakokomisa bino bato ya kofuluka koleka liboso. Boye, bokoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe. 12 Nakosala ete bato na Ngai, bana ya Isalaele, batambola na mokili na bino ; bakozwa mabele na bino mpe bokozala libula na bango ; bokotikala lisusu te koboma bana na bango. 13 Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Lokola bato balobaka na tina na bino : Bobomaka bato mpe bozangisaka ekolo na bino bana na yango ; 14 mpo na yango, bokoboma lisusu bato te mpe bokozangisa lisusu ekolo na bino bana te, elobi Nkolo Yawe. 15 Nakosala ete boyoka lisusu kotiolama ya bikolo mosusu te, mpe bato ya bikolo mosusu bakofinga bino lisusu te ; na bongo, bokokweyisa lisusu ekolo na bino te, elobi Nkolo Yawe. › » 16 Yawe alobaki na ngai lisusu : 17 « Mwana na moto, tango bana ya Isalaele bazalaki kovanda na mokili na bango, bazalaki kokomisa yango mbindo na ezaleli mpe na misala na bango ; ezaleli na bango ezalaki mbindo na miso na Ngai lokola makila ya mwasi oyo azali komona sanza na ye. 18 Boye, napeliselaki bango kanda na Ngai ya makasi, pamba te bazalaki kotangisa makila kati na mokili mpe bakomisaki yango mbindo na nzela ya banzambe na bango ya bikeko. 19 Napanzaki bango kati na bikolo, mpe bapalanganaki kati na mikili mosusu ; nasambisaki bango kolanda etamboli mpe misala na bango. 20 Nzokande, na bisika nyonso oyo bazalaki kokende, babebisaki bosantu ya Kombo na Ngai, pamba te bazalaki koloba na tina na bango : ‹ Bato wana bazali solo bato ya Yawe, kasi tala ndenge batiki mokili na Ye ! › 21 Boye, nabatelaki lokumu mpe bosantu ya Kombo na Ngai, oyo libota ya Isalaele babebisaki bosantu na yango kati na bikolo epai wapi bakendeki. 22 Mpo na yango, loba na libota ya Isalaele : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Oh libota ya Isalaele, ezali mpo na bino te nde nazali kosala makambo oyo nyonso, kasi mpo na bosantu ya Kombo na Ngai, oyo bobebisaki kati na bikolo epai wapi bokendeki. 23 Nakolakisa bosantu ya Kombo monene na Ngai, oyo esambwaki kati na bikolo, Kombo oyo bobebisaki bosantu na yango kati na bikolo yango. Boye, bikolo ekoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe, elobi Nkolo Yawe, tango nakomonisa bosantu na Ngai na nzela na bino na miso na bango. 24 Pamba te nakobimisa bino na bikolo, nakosangisa bino wuta na bikolo mpe nakozongisa bino na mabele na bino moko. 25 Nakobwakela bino mayi ya peto, mpe bokokoma peto ; nakopetola bino na mbindo na bino nyonso mpe na mbindo ya banzambe na bino nyonso ya bikeko. 26 Nakopesa bino motema ya sika mpe nakotia kati na bino molimo ya sika ; nakolongola kati na bino mitema ya mabanga mpe nakopesa bino mitema ya misuni. 27 Nakotia Molimo na Ngai kati na bino mpe nakosala ete botosa bikateli na Ngai mpe bobatela mibeko na Ngai na bokebi. 28 Bokovanda kati na mokili oyo napesaki epai ya bakoko na bino ; bokozala bato na Ngai, mpe Ngai, nakozala Nzambe na bino. 29 Nakobikisa bino na mbindo na bino nyonso, nakobotisa mbuma ya ble mpe nakokomisa yango ebele penza ; bongo nakotindela bino lisusu nzala te. 30 Nakosala ete banzete mpe milona ya bilanga ebota ebele, mpo ete boyoka lisusu soni te na miso ya bikolo likolo ya nzala. 31 Boye, tango bokokanisa lisusu etamboli mabe na bino mpe misala na bino ya mabe, bino moko bokomiyina likolo ya masumu mpe ya misala na bino ya nkele. 32 Nalingi bososola ete nazali kosala makambo oyo mpo na bino te, elobi Nkolo Yawe ! Oh libota ya Isalaele, boyoka mawa mpe soni mpo na etamboli na bino ! 33 Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Na mokolo oyo nakopetola bino na masumu na bino nyonso, nakosala ete bato bazongela kovanda na bingumba na bino mpe batonga yango lisusu ; 34 nakosala ete basala lisusu bilanga na mabele oyo ekomaki esobe, na esika ete etikala pamba na miso ya bato nyonso oyo bakoleka wana. 35 Bongo, bakoloba : ‘ Mokili oyo ebebisamaki ekomi lokola elanga ya Edeni ; bingumba oyo babuka, bongo etikala lisusu na bato te mpe babebisa, elendisami lisusu mpe bato bakomi lisusu kovanda kuna. ’ 36 Boye, bikolo oyo ekotikala zingazinga na bino ekoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe ; Ngai nde natongi lisusu bingumba oyo ebukana, mpe naloni lisusu biloko oyo ebebisama. Ngai Yawe nde nalobi mpe nakokokisa yango. › 37 Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Na mbala oyo lisusu, nakosala ete libota ya Isalaele eluka Ngai mpo ete natalisa bango ngolu na Ngai : nakosala ete bato na yango bakoma ebele lokola bibwele. 38 Bingumba oyo ebebisama ekotonda lisusu na bato ebele lokola bibwele oyo bapesaka na mbeka, lokola bibwele oyo bamemaka na Yelusalemi na tango ya bafeti oyo ekatama. Boye, bakoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe. »

In Other Versions

Ezekiel 36 in the ANGEFD

Ezekiel 36 in the ANTPNG2D

Ezekiel 36 in the AS21

Ezekiel 36 in the BAGH

Ezekiel 36 in the BBPNG

Ezekiel 36 in the BBT1E

Ezekiel 36 in the BDS

Ezekiel 36 in the BEV

Ezekiel 36 in the BHAD

Ezekiel 36 in the BIB

Ezekiel 36 in the BLPT

Ezekiel 36 in the BNT

Ezekiel 36 in the BNTABOOT

Ezekiel 36 in the BNTLV

Ezekiel 36 in the BOATCB

Ezekiel 36 in the BOATCB2

Ezekiel 36 in the BOBCV

Ezekiel 36 in the BOCNT

Ezekiel 36 in the BOECS

Ezekiel 36 in the BOGWICC

Ezekiel 36 in the BOHCB

Ezekiel 36 in the BOHCV

Ezekiel 36 in the BOHLNT

Ezekiel 36 in the BOHNTLTAL

Ezekiel 36 in the BOICB

Ezekiel 36 in the BOILNTAP

Ezekiel 36 in the BOITCV

Ezekiel 36 in the BOKCV

Ezekiel 36 in the BOKCV2

Ezekiel 36 in the BOKHWOG

Ezekiel 36 in the BOKSSV

Ezekiel 36 in the BOLCB

Ezekiel 36 in the BOMCV

Ezekiel 36 in the BONAV

Ezekiel 36 in the BONCB

Ezekiel 36 in the BONLT

Ezekiel 36 in the BONUT2

Ezekiel 36 in the BOPLNT

Ezekiel 36 in the BOSCB

Ezekiel 36 in the BOSNC

Ezekiel 36 in the BOTLNT

Ezekiel 36 in the BOVCB

Ezekiel 36 in the BOYCB

Ezekiel 36 in the BPBB

Ezekiel 36 in the BPH

Ezekiel 36 in the BSB

Ezekiel 36 in the CCB

Ezekiel 36 in the CUV

Ezekiel 36 in the CUVS

Ezekiel 36 in the DBT

Ezekiel 36 in the DGDNT

Ezekiel 36 in the DHNT

Ezekiel 36 in the DNT

Ezekiel 36 in the ELBE

Ezekiel 36 in the EMTV

Ezekiel 36 in the ESV

Ezekiel 36 in the FBV

Ezekiel 36 in the FEB

Ezekiel 36 in the GGMNT

Ezekiel 36 in the GNT

Ezekiel 36 in the HARY

Ezekiel 36 in the HNT

Ezekiel 36 in the IRVA

Ezekiel 36 in the IRVB

Ezekiel 36 in the IRVG

Ezekiel 36 in the IRVH

Ezekiel 36 in the IRVK

Ezekiel 36 in the IRVM

Ezekiel 36 in the IRVM2

Ezekiel 36 in the IRVO

Ezekiel 36 in the IRVP

Ezekiel 36 in the IRVT

Ezekiel 36 in the IRVT2

Ezekiel 36 in the IRVU

Ezekiel 36 in the ISVN

Ezekiel 36 in the JSNT

Ezekiel 36 in the KAPI

Ezekiel 36 in the KBT1ETNIK

Ezekiel 36 in the KBV

Ezekiel 36 in the KJV

Ezekiel 36 in the KNFD

Ezekiel 36 in the LBA

Ezekiel 36 in the LBLA

Ezekiel 36 in the LNT

Ezekiel 36 in the LSV

Ezekiel 36 in the MAAL

Ezekiel 36 in the MBV

Ezekiel 36 in the MBV2

Ezekiel 36 in the MHNT

Ezekiel 36 in the MKNFD

Ezekiel 36 in the MNG

Ezekiel 36 in the MNT

Ezekiel 36 in the MNT2

Ezekiel 36 in the MRS1T

Ezekiel 36 in the NAA

Ezekiel 36 in the NASB

Ezekiel 36 in the NBLA

Ezekiel 36 in the NBS

Ezekiel 36 in the NBVTP

Ezekiel 36 in the NET2

Ezekiel 36 in the NIV11

Ezekiel 36 in the NNT

Ezekiel 36 in the NNT2

Ezekiel 36 in the NNT3

Ezekiel 36 in the PDDPT

Ezekiel 36 in the PFNT

Ezekiel 36 in the RMNT

Ezekiel 36 in the SBIAS

Ezekiel 36 in the SBIBS

Ezekiel 36 in the SBIBS2

Ezekiel 36 in the SBICS

Ezekiel 36 in the SBIDS

Ezekiel 36 in the SBIGS

Ezekiel 36 in the SBIHS

Ezekiel 36 in the SBIIS

Ezekiel 36 in the SBIIS2

Ezekiel 36 in the SBIIS3

Ezekiel 36 in the SBIKS

Ezekiel 36 in the SBIKS2

Ezekiel 36 in the SBIMS

Ezekiel 36 in the SBIOS

Ezekiel 36 in the SBIPS

Ezekiel 36 in the SBISS

Ezekiel 36 in the SBITS

Ezekiel 36 in the SBITS2

Ezekiel 36 in the SBITS3

Ezekiel 36 in the SBITS4

Ezekiel 36 in the SBIUS

Ezekiel 36 in the SBIVS

Ezekiel 36 in the SBT

Ezekiel 36 in the SBT1E

Ezekiel 36 in the SCHL

Ezekiel 36 in the SNT

Ezekiel 36 in the SUSU

Ezekiel 36 in the SUSU2

Ezekiel 36 in the SYNO

Ezekiel 36 in the TBIAOTANT

Ezekiel 36 in the TBT1E

Ezekiel 36 in the TBT1E2

Ezekiel 36 in the TFTIP

Ezekiel 36 in the TFTU

Ezekiel 36 in the TGNTATF3T

Ezekiel 36 in the THAI

Ezekiel 36 in the TNFD

Ezekiel 36 in the TNT

Ezekiel 36 in the TNTIK

Ezekiel 36 in the TNTIL

Ezekiel 36 in the TNTIN

Ezekiel 36 in the TNTIP

Ezekiel 36 in the TNTIZ

Ezekiel 36 in the TOMA

Ezekiel 36 in the TTENT

Ezekiel 36 in the UBG

Ezekiel 36 in the UGV

Ezekiel 36 in the UGV2

Ezekiel 36 in the UGV3

Ezekiel 36 in the VBL

Ezekiel 36 in the VDCC

Ezekiel 36 in the YALU

Ezekiel 36 in the YAPE

Ezekiel 36 in the YBVTP

Ezekiel 36 in the ZBP