Ezra 9 (BOLCB2)

1 Sima na makambo nyonso oyo esalemaki, bakambi ya Isalaele bayaki epai na ngai mpe balobaki : « Bato ya Isalaele, Banganga-Nzambe mpe Balevi bakabwani te na bato ya bikolo, oyo bazali kati na bango ; bakabwani mpe te na misala na bango ya mbindo. Batamboli kaka kolanda misala ya mbindo ya bato ya Kanana, ya Iti, ya Perizi, ya Yebusi, ya Amoni, ya Moabi, ya Ejipito mpe ya Amori, 2 pamba te babali bana basi ya bikolo wana ya bapaya mpo na bango moko mpe mpo na bana na bango ya mibali. Boye, basangisi libota ya bule na bikolo ya bapaya oyo bazali kati na bango. Bakambi mpe bakalaka bazalaki bato ya liboso ya kosala makambo wana ya mbindo. » 3 Tango nayokaki bongo, napasolaki nzambala mpe kazaka na ngai, napikolaki suki ya moto na ngai mpe mandefu na ngai mpe namivandisaki wana na mabele. 4 Bato nyonso oyo bazalaki kolenga mpo na maloba na Nzambe ya Isalaele basanganaki pene na ngai, mpo na misala ya mbindo ya bato oyo bawutaki na bowumbu. Navandaki na mawa kino na tango ya likabo ya pokwa. 5 Bongo na tango ya likabo ya pokwa, nasalaki makasi atako nazalaki na pasi makasi kati na motema, natelemaki na nzambala mpe kazaka na ngai, oyo epasuka ; nafukamaki mpe natombolaki maboko na ngai epai na Yawe, Nzambe na ngai. 6 Nalobaki :« Oh Nzambe na ngai ! Nazali kati na mobulu mpe nazali koyoka soni makasi mpo na kotombola elongi na ngai epai na Yo, Nzambe na ngai ; pamba te masumu mpe mabe na biso ekomi ebele penza mpe emati kino na Likolo ! 7 Wuta na tango ya bakoko na biso kino na mokolo ya lelo, mabe na biso ekomi ebele. Likolo ya masumu na biso, biso elongo na bakonzi mpe Banganga-Nzambe na biso tokabamaki na mopanga, na bowumbu, na kobebisama mpe na soni makasi na maboko ya bakonzi ya bapaya, ndenge ezali komonana na mokolo ya lelo. 8 Kasi sik’oyo, oh Yawe, Nzambe na biso, na mwa tango moke, osaleli biso ngolu ya kobikisa ndambo ya bato kati na biso mpe ya kopesa biso esika kati na mokili na Yo ya bule. Na boye, Yo Nzambe na biso, ongengisi miso na biso na pole mpe opesi biso lisungi kati na bowumbu na biso. 9 Pamba te, atako tozali bawumbu, kasi Yo Nzambe na biso, osundoli biso te kati na bowumbu na biso. Omonisi biso bolamu na Yo na nzela ya bakonzi ya Persi : bapesi biso makasi ya sika mpo na kotonga lisusu Ndako ya Nzambe na biso, na kobongisa bamir na yango oyo ebukanaki-bukanaki mpe na kopesa biso mir ya kobombamela kati na Yuda mpe na Yelusalemi. 10 Sik’oyo, oh Nzambe na biso, toloba lisusu nini na makambo oyo ezali kosalema ? Pamba te tobateli te mibeko na Yo, 11 oyo opesaki na nzela ya basali na Yo, basakoli, tango olobaki : ‹ Mokili oyo bozali kokota mpo na kokamata yango ezali mokili oyo ebebisami na mbindo ya bato wana. Na nzela ya misala na bango ya nkele, batondisi mokili yango nyonso na mbindo na bango. 12 Boye, bopesa te na libala bana na bino ya basi epai ya bana na bango ya mibali to bozwa te na libala bana na bango ya basi mpo na bana na bino ya mibali. Tango nyonso, bosalaka te boyokani ya bondeko elongo na bango mpo ete bokoka kozala makasi, bokoka kolia bambuma malamu ya mokili mpe bokoka kotikela yango bana na bino lokola libula mpo na libela. › 13 Makambo nyonso oyo ekomeli biso ezali mbano ya etamboli mabe na biso mpe ya ngambo na biso monene. Mpe lisusu, oh Nzambe na biso, na kotala ebele ya masumu oyo tosali, etumbu oyo opesi biso ezali moke penza, mpo ete otikeli biso kutu ndambo ya bato oyo ! 14 Boni, tozongela lisusu kobuka mibeko na Yo mpe kobalana na bato oyo basalaka makambo ya nkele ? Boni, kanda makasi na Yo ekopela te kino kosilisa koboma biso mpe kotikela biso moto ata moko te na bomoi ? 15 Oh Yawe, Nzambe ya Isalaele, ozali penza sembo ! Na ngolu na Yo, na mokolo ya lelo, tozali batikali kati na bato na biso mpe tozali awa liboso na Yo, elongo na masumu na biso ; nzokande moko te kati na biso akoki kotelema bongo liboso na Yo ! »

In Other Versions

Ezra 9 in the ANGEFD

Ezra 9 in the ANTPNG2D

Ezra 9 in the AS21

Ezra 9 in the BAGH

Ezra 9 in the BBPNG

Ezra 9 in the BBT1E

Ezra 9 in the BDS

Ezra 9 in the BEV

Ezra 9 in the BHAD

Ezra 9 in the BIB

Ezra 9 in the BLPT

Ezra 9 in the BNT

Ezra 9 in the BNTABOOT

Ezra 9 in the BNTLV

Ezra 9 in the BOATCB

Ezra 9 in the BOATCB2

Ezra 9 in the BOBCV

Ezra 9 in the BOCNT

Ezra 9 in the BOECS

Ezra 9 in the BOGWICC

Ezra 9 in the BOHCB

Ezra 9 in the BOHCV

Ezra 9 in the BOHLNT

Ezra 9 in the BOHNTLTAL

Ezra 9 in the BOICB

Ezra 9 in the BOILNTAP

Ezra 9 in the BOITCV

Ezra 9 in the BOKCV

Ezra 9 in the BOKCV2

Ezra 9 in the BOKHWOG

Ezra 9 in the BOKSSV

Ezra 9 in the BOLCB

Ezra 9 in the BOMCV

Ezra 9 in the BONAV

Ezra 9 in the BONCB

Ezra 9 in the BONLT

Ezra 9 in the BONUT2

Ezra 9 in the BOPLNT

Ezra 9 in the BOSCB

Ezra 9 in the BOSNC

Ezra 9 in the BOTLNT

Ezra 9 in the BOVCB

Ezra 9 in the BOYCB

Ezra 9 in the BPBB

Ezra 9 in the BPH

Ezra 9 in the BSB

Ezra 9 in the CCB

Ezra 9 in the CUV

Ezra 9 in the CUVS

Ezra 9 in the DBT

Ezra 9 in the DGDNT

Ezra 9 in the DHNT

Ezra 9 in the DNT

Ezra 9 in the ELBE

Ezra 9 in the EMTV

Ezra 9 in the ESV

Ezra 9 in the FBV

Ezra 9 in the FEB

Ezra 9 in the GGMNT

Ezra 9 in the GNT

Ezra 9 in the HARY

Ezra 9 in the HNT

Ezra 9 in the IRVA

Ezra 9 in the IRVB

Ezra 9 in the IRVG

Ezra 9 in the IRVH

Ezra 9 in the IRVK

Ezra 9 in the IRVM

Ezra 9 in the IRVM2

Ezra 9 in the IRVO

Ezra 9 in the IRVP

Ezra 9 in the IRVT

Ezra 9 in the IRVT2

Ezra 9 in the IRVU

Ezra 9 in the ISVN

Ezra 9 in the JSNT

Ezra 9 in the KAPI

Ezra 9 in the KBT1ETNIK

Ezra 9 in the KBV

Ezra 9 in the KJV

Ezra 9 in the KNFD

Ezra 9 in the LBA

Ezra 9 in the LBLA

Ezra 9 in the LNT

Ezra 9 in the LSV

Ezra 9 in the MAAL

Ezra 9 in the MBV

Ezra 9 in the MBV2

Ezra 9 in the MHNT

Ezra 9 in the MKNFD

Ezra 9 in the MNG

Ezra 9 in the MNT

Ezra 9 in the MNT2

Ezra 9 in the MRS1T

Ezra 9 in the NAA

Ezra 9 in the NASB

Ezra 9 in the NBLA

Ezra 9 in the NBS

Ezra 9 in the NBVTP

Ezra 9 in the NET2

Ezra 9 in the NIV11

Ezra 9 in the NNT

Ezra 9 in the NNT2

Ezra 9 in the NNT3

Ezra 9 in the PDDPT

Ezra 9 in the PFNT

Ezra 9 in the RMNT

Ezra 9 in the SBIAS

Ezra 9 in the SBIBS

Ezra 9 in the SBIBS2

Ezra 9 in the SBICS

Ezra 9 in the SBIDS

Ezra 9 in the SBIGS

Ezra 9 in the SBIHS

Ezra 9 in the SBIIS

Ezra 9 in the SBIIS2

Ezra 9 in the SBIIS3

Ezra 9 in the SBIKS

Ezra 9 in the SBIKS2

Ezra 9 in the SBIMS

Ezra 9 in the SBIOS

Ezra 9 in the SBIPS

Ezra 9 in the SBISS

Ezra 9 in the SBITS

Ezra 9 in the SBITS2

Ezra 9 in the SBITS3

Ezra 9 in the SBITS4

Ezra 9 in the SBIUS

Ezra 9 in the SBIVS

Ezra 9 in the SBT

Ezra 9 in the SBT1E

Ezra 9 in the SCHL

Ezra 9 in the SNT

Ezra 9 in the SUSU

Ezra 9 in the SUSU2

Ezra 9 in the SYNO

Ezra 9 in the TBIAOTANT

Ezra 9 in the TBT1E

Ezra 9 in the TBT1E2

Ezra 9 in the TFTIP

Ezra 9 in the TFTU

Ezra 9 in the TGNTATF3T

Ezra 9 in the THAI

Ezra 9 in the TNFD

Ezra 9 in the TNT

Ezra 9 in the TNTIK

Ezra 9 in the TNTIL

Ezra 9 in the TNTIN

Ezra 9 in the TNTIP

Ezra 9 in the TNTIZ

Ezra 9 in the TOMA

Ezra 9 in the TTENT

Ezra 9 in the UBG

Ezra 9 in the UGV

Ezra 9 in the UGV2

Ezra 9 in the UGV3

Ezra 9 in the VBL

Ezra 9 in the VDCC

Ezra 9 in the YALU

Ezra 9 in the YAPE

Ezra 9 in the YBVTP

Ezra 9 in the ZBP