Genesis 12 (BOLCB2)

1 Yawe alobaki na Abrami : « Bima wuta na mokili na yo, wuta na libota na yo mpe wuta na ndako ya tata na yo, mpo na lobiko na yo, mpe kende na mokili oyo nakolakisa yo. 2 Nakokomisa yo ekolo monene mpe nakopambola yo ;nakokomisa kombo na yo monene,mpe okozala etima ya mapamboli. 3 Nakopambola bato oyo bakopambola yo,mpe nakolakela mabe moto oyo akolakela yo mabe ;mpe bato ya bituka nyonsoya mabele bakomipambola mpo na yo. » 4 Abrami akendeki ndenge Yawe alobaki na ye ; mpe Loti akendeki na ye elongo. Abrami azalaki na mibu tuku sambo na mitano tango abimaki na engumba Arani. 5 Abrami azwaki mwasi na ye Sarayi ; Loti, mwana ya ndeko na ye ; bomengo nyonso oyo akomaki na yango mpe bato oyo azwaki na Arani. Babimaki wuta na Arani mpo na kokende na Kanana mpe bakomaki kuna. 6 Abrami atambolaki kati na mokili yango kino na esika oyo babengaka Sishemi, na nzete monene ya More. Na tango wana, bato ya Kanana bazalaki kovanda na mokili yango. 7 Yawe amimonisaki epai ya Abrami mpe alobaki : « Nakopesa mokili oyo epai ya bakitani na yo. » Boye Abrami atongaki na esika yango etumbelo mpo na Yawe oyo amimonisaki epai na ye. 8 Longwa wana, akendeki na bangomba ya este ya Beteli. Atongaki ndako na ye ya kapo kati ya Beteli mpe Ayi, na esika oyo atongaki etumbelo mpo na Yawe mpe abelelaki Kombo ya Yawe. Beteli ezalaki na ngambo ya weste mpe Ayi, na ngambo ya este. 9 Sima, Abrami alongwaki wana mpe akendeki malembe-malembe kino na Negevi. 10 Nzala makasi ekotaki na mokili ; bongo Abrami akendeki kovanda na Ejipito mpo na tango moke, pamba te nzala makasi ekotaki na mokili. 11 Tango akomaki pene ya kokota na Ejipito, alobaki na mwasi na ye Sarayi : « Nayebi ete ozali mwasi kitoko penza. 12 Tango bato ya Ejipito bakomona yo, bakoloba : ‹ Azali mwasi na ye. › Boye, bakoboma ngai mpe bakotika yo na bomoi. 13 Kasi yo, loba na bango ete ozali ndeko na ngai ya mwasi. Na bongo, bakosalela ngai bolamu mpo na yo, mpe bomoi na ngai ekobika mpo na yo. » 14 Tango Abrami akomaki na Ejipito, bato ya Ejipito bamonaki ete Sarayi azalaki mwasi kitoko penza. 15 Wana bakonzi ya basali ya Faraon bamonaki ye, bakumisaki ye liboso ya Faraon mpe bamemaki ye na ndako ya Faraon mpo ete akoma mwasi na ye. 16 Basalelaki Abrami bolamu likolo ya Sarayi, mpe Abrami azwaki bameme, bantaba mpe bangombe, ba-ane, basali ya basi mpe ya mibali, bana ya ba-ane mpe bashamo. 17 Kasi Yawe apesaki etumbu makasi epai ya Faraon mpe ndako na ye mpo na Sarayi, mwasi ya Abrami. 18 Boye, Faraon abengisaki Abrami mpe alobaki na ye : « Likambo nini osali ngai ? Mpo na nini oyebisaki ngai te ete azali mwasi na yo ? 19 Mpo na nini olobaki : ‹ Azali ndeko na ngai ya mwasi ? › Mpo na yango, nakomisaki ye mwasi na ngai. Sik’oyo tala mwasi na yo, kamata ye mpe kende ! » 20 Boye, Faraon apesaki mitindo epai ya bato na ye na tina na Abrami ete babengana ye elongo na mwasi na ye mpe biloko nyonso oyo azalaki na yango.

In Other Versions

Genesis 12 in the ANGEFD

Genesis 12 in the ANTPNG2D

Genesis 12 in the AS21

Genesis 12 in the BAGH

Genesis 12 in the BBPNG

Genesis 12 in the BBT1E

Genesis 12 in the BDS

Genesis 12 in the BEV

Genesis 12 in the BHAD

Genesis 12 in the BIB

Genesis 12 in the BLPT

Genesis 12 in the BNT

Genesis 12 in the BNTABOOT

Genesis 12 in the BNTLV

Genesis 12 in the BOATCB

Genesis 12 in the BOATCB2

Genesis 12 in the BOBCV

Genesis 12 in the BOCNT

Genesis 12 in the BOECS

Genesis 12 in the BOGWICC

Genesis 12 in the BOHCB

Genesis 12 in the BOHCV

Genesis 12 in the BOHLNT

Genesis 12 in the BOHNTLTAL

Genesis 12 in the BOICB

Genesis 12 in the BOILNTAP

Genesis 12 in the BOITCV

Genesis 12 in the BOKCV

Genesis 12 in the BOKCV2

Genesis 12 in the BOKHWOG

Genesis 12 in the BOKSSV

Genesis 12 in the BOLCB

Genesis 12 in the BOMCV

Genesis 12 in the BONAV

Genesis 12 in the BONCB

Genesis 12 in the BONLT

Genesis 12 in the BONUT2

Genesis 12 in the BOPLNT

Genesis 12 in the BOSCB

Genesis 12 in the BOSNC

Genesis 12 in the BOTLNT

Genesis 12 in the BOVCB

Genesis 12 in the BOYCB

Genesis 12 in the BPBB

Genesis 12 in the BPH

Genesis 12 in the BSB

Genesis 12 in the CCB

Genesis 12 in the CUV

Genesis 12 in the CUVS

Genesis 12 in the DBT

Genesis 12 in the DGDNT

Genesis 12 in the DHNT

Genesis 12 in the DNT

Genesis 12 in the ELBE

Genesis 12 in the EMTV

Genesis 12 in the ESV

Genesis 12 in the FBV

Genesis 12 in the FEB

Genesis 12 in the GGMNT

Genesis 12 in the GNT

Genesis 12 in the HARY

Genesis 12 in the HNT

Genesis 12 in the IRVA

Genesis 12 in the IRVB

Genesis 12 in the IRVG

Genesis 12 in the IRVH

Genesis 12 in the IRVK

Genesis 12 in the IRVM

Genesis 12 in the IRVM2

Genesis 12 in the IRVO

Genesis 12 in the IRVP

Genesis 12 in the IRVT

Genesis 12 in the IRVT2

Genesis 12 in the IRVU

Genesis 12 in the ISVN

Genesis 12 in the JSNT

Genesis 12 in the KAPI

Genesis 12 in the KBT1ETNIK

Genesis 12 in the KBV

Genesis 12 in the KJV

Genesis 12 in the KNFD

Genesis 12 in the LBA

Genesis 12 in the LBLA

Genesis 12 in the LNT

Genesis 12 in the LSV

Genesis 12 in the MAAL

Genesis 12 in the MBV

Genesis 12 in the MBV2

Genesis 12 in the MHNT

Genesis 12 in the MKNFD

Genesis 12 in the MNG

Genesis 12 in the MNT

Genesis 12 in the MNT2

Genesis 12 in the MRS1T

Genesis 12 in the NAA

Genesis 12 in the NASB

Genesis 12 in the NBLA

Genesis 12 in the NBS

Genesis 12 in the NBVTP

Genesis 12 in the NET2

Genesis 12 in the NIV11

Genesis 12 in the NNT

Genesis 12 in the NNT2

Genesis 12 in the NNT3

Genesis 12 in the PDDPT

Genesis 12 in the PFNT

Genesis 12 in the RMNT

Genesis 12 in the SBIAS

Genesis 12 in the SBIBS

Genesis 12 in the SBIBS2

Genesis 12 in the SBICS

Genesis 12 in the SBIDS

Genesis 12 in the SBIGS

Genesis 12 in the SBIHS

Genesis 12 in the SBIIS

Genesis 12 in the SBIIS2

Genesis 12 in the SBIIS3

Genesis 12 in the SBIKS

Genesis 12 in the SBIKS2

Genesis 12 in the SBIMS

Genesis 12 in the SBIOS

Genesis 12 in the SBIPS

Genesis 12 in the SBISS

Genesis 12 in the SBITS

Genesis 12 in the SBITS2

Genesis 12 in the SBITS3

Genesis 12 in the SBITS4

Genesis 12 in the SBIUS

Genesis 12 in the SBIVS

Genesis 12 in the SBT

Genesis 12 in the SBT1E

Genesis 12 in the SCHL

Genesis 12 in the SNT

Genesis 12 in the SUSU

Genesis 12 in the SUSU2

Genesis 12 in the SYNO

Genesis 12 in the TBIAOTANT

Genesis 12 in the TBT1E

Genesis 12 in the TBT1E2

Genesis 12 in the TFTIP

Genesis 12 in the TFTU

Genesis 12 in the TGNTATF3T

Genesis 12 in the THAI

Genesis 12 in the TNFD

Genesis 12 in the TNT

Genesis 12 in the TNTIK

Genesis 12 in the TNTIL

Genesis 12 in the TNTIN

Genesis 12 in the TNTIP

Genesis 12 in the TNTIZ

Genesis 12 in the TOMA

Genesis 12 in the TTENT

Genesis 12 in the UBG

Genesis 12 in the UGV

Genesis 12 in the UGV2

Genesis 12 in the UGV3

Genesis 12 in the VBL

Genesis 12 in the VDCC

Genesis 12 in the YALU

Genesis 12 in the YAPE

Genesis 12 in the YBVTP

Genesis 12 in the ZBP