Genesis 23 (BOLCB2)

1 Sara awumelaki na bomoi mibu nkama moko na tuku mibale na sambo. 2 Akufaki na Kiriati-Ariba oyo ezali Ebron, na mokili ya Kanana. Abrayami asalaki matanga mpo na Sara mpe alelaki ye. 3 Abrayami alongwaki liboso ya ebembe ya mwasi na ye mpe asololaki na bato ya Iti. 4 Alobaki na bango :— Nazali mopaya mpe navandaka kati na bino ; botekela ngai eteni ya mabele kati na bino mpo ete nakunda mwasi na ngai. 5 Bato ya Iti bazongiselaki Abrayami : 6 — Yoka biso, nkolo na ngai ; ya solo, ozali moto monene kati na biso. Kunda mwasi na yo kati na kunda oyo eleki kitoko kati na bakunda na biso. Moko te kati na biso akoboya kopesa yo kunda na ye mpo ete okunda mwasi na yo. 7 Boye, Abrayami atelemaki mpe agumbamaki liboso ya bato ya mboka wana, bato ya Iti. 8 Ayebisaki bango :— Soki ezali mokano na bino ete nakunda nzoto ya mwasi na ngai awa, boyoka ngai mpe bosengela ngai epai ya Efroni, mwana mobali ya Tsoari, 9 ete atekela ngai libulu na ye ya mabanga oyo ezali na Makipela, na suka ya elanga na ye. Boyebisa ye ete atekela ngai yango na motuya oyo ekoki na yango mpo ete nakomisa yango mabele ya kokunda bato na ngai. 10 Nzokande, Efroni, moto ya Iti, oyo azalaki kovanda kati na bato na ye, azongiselaki Abrayami na miso ya bato ya Iti, liboso ya bato nyonso oyo bayaki na ekuke ya engumba na ye : 11 — Te, nkolo na ngai, yoka ngai ! Napesi yo elanga mpe libulu ya mabanga oyo ezali kati na yango. Napesi yo yango liboso ya bato na ngai mpo ete okunda mwasi na yo. 12 Abrayami agumbamaki liboso ya bato ya mboka 13 mpe azongiselaki Efroni :— Nabondeli yo, yoka ngai ! Soki olingi, nakopesa yo motuya oyo ekoki na elanga. Ndima yango mpo ete nakunda mwasi na ngai kuna. 14 Efroni azongiselaki Abrayami : 15 — Yoka, nkolo na ngai ! Mabele ya motuya ya mbongo ya bibende, nkama minei, ezali penza nini kati na ngai mpe yo ? Kamata mabele yango mpe kunda mwasi na yo. 16 Abrayami andimaki maloba ya Efroni mpe amemelaki ye motuya oyo alobaki na miso ya bato ya Iti : mbongo ya bibende, nkama minei, kolanda ndenge bazalaki kotanga mbongo na tango wana. 17 Boye elanga ya Efroni oyo ezalaki na Makipela, pembeni ya Mamire, elongo na libulu ya mabanga oyo ezalaki kati na yango, banzete nyonso oyo ezalaki kati na elanga mpe na bandelo ya zingazinga na yango, epesamaki 18 epai ya Abrayami mpe ekomaki ya ye na miso ya bato ya Iti oyo bayaki na ekuke ya engumba. 19 Sima na yango, Abrayami akundaki mwasi na ye Sara na libulu ya mabanga ya elanga ya Makipela, pembeni ya Mamire oyo ezali Ebron, na mokili ya Kanana. 20 Bato ya Iti bapesaki Abrayami elanga yango elongo na libulu ya mabanga oyo ezalaki na kati mpo ete ekoma ya ye mpe akundaka bato na ye kuna.

In Other Versions

Genesis 23 in the ANGEFD

Genesis 23 in the ANTPNG2D

Genesis 23 in the AS21

Genesis 23 in the BAGH

Genesis 23 in the BBPNG

Genesis 23 in the BBT1E

Genesis 23 in the BDS

Genesis 23 in the BEV

Genesis 23 in the BHAD

Genesis 23 in the BIB

Genesis 23 in the BLPT

Genesis 23 in the BNT

Genesis 23 in the BNTABOOT

Genesis 23 in the BNTLV

Genesis 23 in the BOATCB

Genesis 23 in the BOATCB2

Genesis 23 in the BOBCV

Genesis 23 in the BOCNT

Genesis 23 in the BOECS

Genesis 23 in the BOGWICC

Genesis 23 in the BOHCB

Genesis 23 in the BOHCV

Genesis 23 in the BOHLNT

Genesis 23 in the BOHNTLTAL

Genesis 23 in the BOICB

Genesis 23 in the BOILNTAP

Genesis 23 in the BOITCV

Genesis 23 in the BOKCV

Genesis 23 in the BOKCV2

Genesis 23 in the BOKHWOG

Genesis 23 in the BOKSSV

Genesis 23 in the BOLCB

Genesis 23 in the BOMCV

Genesis 23 in the BONAV

Genesis 23 in the BONCB

Genesis 23 in the BONLT

Genesis 23 in the BONUT2

Genesis 23 in the BOPLNT

Genesis 23 in the BOSCB

Genesis 23 in the BOSNC

Genesis 23 in the BOTLNT

Genesis 23 in the BOVCB

Genesis 23 in the BOYCB

Genesis 23 in the BPBB

Genesis 23 in the BPH

Genesis 23 in the BSB

Genesis 23 in the CCB

Genesis 23 in the CUV

Genesis 23 in the CUVS

Genesis 23 in the DBT

Genesis 23 in the DGDNT

Genesis 23 in the DHNT

Genesis 23 in the DNT

Genesis 23 in the ELBE

Genesis 23 in the EMTV

Genesis 23 in the ESV

Genesis 23 in the FBV

Genesis 23 in the FEB

Genesis 23 in the GGMNT

Genesis 23 in the GNT

Genesis 23 in the HARY

Genesis 23 in the HNT

Genesis 23 in the IRVA

Genesis 23 in the IRVB

Genesis 23 in the IRVG

Genesis 23 in the IRVH

Genesis 23 in the IRVK

Genesis 23 in the IRVM

Genesis 23 in the IRVM2

Genesis 23 in the IRVO

Genesis 23 in the IRVP

Genesis 23 in the IRVT

Genesis 23 in the IRVT2

Genesis 23 in the IRVU

Genesis 23 in the ISVN

Genesis 23 in the JSNT

Genesis 23 in the KAPI

Genesis 23 in the KBT1ETNIK

Genesis 23 in the KBV

Genesis 23 in the KJV

Genesis 23 in the KNFD

Genesis 23 in the LBA

Genesis 23 in the LBLA

Genesis 23 in the LNT

Genesis 23 in the LSV

Genesis 23 in the MAAL

Genesis 23 in the MBV

Genesis 23 in the MBV2

Genesis 23 in the MHNT

Genesis 23 in the MKNFD

Genesis 23 in the MNG

Genesis 23 in the MNT

Genesis 23 in the MNT2

Genesis 23 in the MRS1T

Genesis 23 in the NAA

Genesis 23 in the NASB

Genesis 23 in the NBLA

Genesis 23 in the NBS

Genesis 23 in the NBVTP

Genesis 23 in the NET2

Genesis 23 in the NIV11

Genesis 23 in the NNT

Genesis 23 in the NNT2

Genesis 23 in the NNT3

Genesis 23 in the PDDPT

Genesis 23 in the PFNT

Genesis 23 in the RMNT

Genesis 23 in the SBIAS

Genesis 23 in the SBIBS

Genesis 23 in the SBIBS2

Genesis 23 in the SBICS

Genesis 23 in the SBIDS

Genesis 23 in the SBIGS

Genesis 23 in the SBIHS

Genesis 23 in the SBIIS

Genesis 23 in the SBIIS2

Genesis 23 in the SBIIS3

Genesis 23 in the SBIKS

Genesis 23 in the SBIKS2

Genesis 23 in the SBIMS

Genesis 23 in the SBIOS

Genesis 23 in the SBIPS

Genesis 23 in the SBISS

Genesis 23 in the SBITS

Genesis 23 in the SBITS2

Genesis 23 in the SBITS3

Genesis 23 in the SBITS4

Genesis 23 in the SBIUS

Genesis 23 in the SBIVS

Genesis 23 in the SBT

Genesis 23 in the SBT1E

Genesis 23 in the SCHL

Genesis 23 in the SNT

Genesis 23 in the SUSU

Genesis 23 in the SUSU2

Genesis 23 in the SYNO

Genesis 23 in the TBIAOTANT

Genesis 23 in the TBT1E

Genesis 23 in the TBT1E2

Genesis 23 in the TFTIP

Genesis 23 in the TFTU

Genesis 23 in the TGNTATF3T

Genesis 23 in the THAI

Genesis 23 in the TNFD

Genesis 23 in the TNT

Genesis 23 in the TNTIK

Genesis 23 in the TNTIL

Genesis 23 in the TNTIN

Genesis 23 in the TNTIP

Genesis 23 in the TNTIZ

Genesis 23 in the TOMA

Genesis 23 in the TTENT

Genesis 23 in the UBG

Genesis 23 in the UGV

Genesis 23 in the UGV2

Genesis 23 in the UGV3

Genesis 23 in the VBL

Genesis 23 in the VDCC

Genesis 23 in the YALU

Genesis 23 in the YAPE

Genesis 23 in the YBVTP

Genesis 23 in the ZBP