Genesis 38 (BOLCB2)

1 Nzokande na tango wana, Yuda atikaki bandeko na ye mpe akendeki kovanda epai ya Ira, moto ya Adulami. 2 Yuda akutanaki kuna na mwana mwasi ya Shuwa, moto ya Kanana. Abalaki ye mpe asangisaki na ye nzoto. 3 Mwasi yango akomaki na zemi mpe abotelaki Yuda mwana mobali. Mpe Yuda apesaki ye kombo « Eri. » 4 Mwasi yango azwaki lisusu zemi mpe abotaki mwana mobali ; apesaki ye kombo « Onani. » 5 Abotaki mwana mobali mosusu mpe apesaki ye kombo « Shela. » Yuda azalaki na Kezibi tango mwasi na ye abotaki mwana ya misato. 6 Yuda abalelaki Eri, mwana na ye ya liboso, mwasi : Tamari. 7 Kasi Eri, mwana liboso ya Yuda, azalaki moto mabe na miso ya Yawe ; yango wana Yawe abomaki ye. 8 Bongo Yuda alobaki na Onani : « Sangisa nzoto na semeki na yo mpo ete obota bana mpo na ndeko na yo ya mobali oyo akufa. » 9 Kasi lokola Onani ayebaki ete bana oyo bakobotama bakozala ya ye te, azalaki kobwaka mayi na ye ya mibali na mabele tango nyonso azalaki kosangisa nzoto na semeki na ye, mpo ete abotela ndeko na ye ya mobali bana te. 10 Likambo oyo Onani azalaki kosala ezalaki kosepelisa Yawe te. Boye ye mpe lisusu, Yawe abomaki ye. 11 Yuda alobaki na Tamari, bokilo na ye ya mwasi : « Lokola okufisi mibali, kende kovanda na ndako ya tata na yo kino Shela, mwana na ngai ya mobali, akokoma mokolo. » Pamba te azalaki komilobela : « Tango mosusu ye mpe akoki kokufa lokola bandeko na ye ya mibali. » Boye Tamari akendeki kovanda na ndako ya tata na ye. 12 Sima na tango molayi, mwana mwasi ya Shuwa, mwasi ya Yuda, akufaki. Lokola tango na ye ya matanga esilaki, Yuda akendeki na Timina epai ya bato oyo bazalaki kolongola bapwale ya bameme na ye. Boye, moninga na ye Ira, moto ya Adulami, akendeki elongo na ye. 13 Tango bayebisaki Tamari : « Bokilo na yo ya mobali azali kokende na Timina mpo na kolongolisa bapwale ya bameme na ye, » 14 alongolaki bilamba na ye ya mwasi akufisa mobali mpe amizipaki elongi na vwale mpo ete bayeba ye lisusu te. Avandaki na ekuke ya Enayimi oyo ezalaki na nzela ya Timina, pamba te amonaki ete Shela akolaki, kasi bapesaki ye te na libala epai ya Shela. 15 Tango Yuda amonaki ye, akanisaki ete azali mwasi ya ndumba, pamba te azipaki elongi na ye. 16 Lokola Yuda ayebaki te ete ezali bokilo na ye ya mwasi, apusanaki na esika oyo azalaki, pembeni ya nzela, mpe alobaki na ye :— Yaka, ndima ete tosangisa na yo nzoto.Tamari atunaki :— Okopesa ngai nini soki osangisi na ngai nzoto ? 17 Yuda azongisaki :— Nakotindela yo mwana ntaba oyo nakozwa na etonga na ngai.Tamari atunaki lisusu :— Ndanga nini okosimbisa ngai kino tango okotindela ngai yango ? 18 Yuda alobaki :— Ndanga nini olingi ete nasimbisa yo ?Tamari azongisaki :— Lopete na yo, singa na yo mpe lingenda na yo, oyo osimbi na loboko.Boye Yuda apesaki ye yango, asangisaki na ye nzoto mpe Tamari akomaki na zemi. 19 Tamari atelemaki mpe akendeki ; alongolaki vwale na ye mpe azongisaki lisusu na nzoto bilamba na ye ya mwasi akufisa mobali. 20 Boye Yuda atindaki moninga na ye Ira, moto ya Adulami, mpo ete amemela mwasi yango mwana ntaba mpe azwa ndanga oyo asimbisaki ye. Kasi Ira amonaki ye te. 21 Boye atunaki epai ya bavandi ya esika wana, na Enayimi :— Wapi mwasi ya ndumba oyo azalaki na nzela, na Enayimi ?Bazongiselaki ye :— Esika oyo etikala kozala na mwasi ya ndumba te. 22 Ira azongaki epai ya Yuda mpe ayebisaki ye :— Namoni ye te ; kutu bavandi ya Enayimi bayebisi ngai ete mwasi ya ndumba atikala kozala na esika wana te. 23 Yuda alobaki :— Atikala na biloko oyo azwaki, noki te tokobima babolole. Ngai nazali na likambo te ; natindeli ye mwana ntaba, mpe yo omoni ye te. 24 Sima na sanza misato, bayebisaki Yuda :— Tamari, bokilo na yo ya mwasi, asalaki kindumba, mpe tala kutu akomi na zemi.Yuda alobaki :— Babimisa ye mpe batumba ye na moto ! 25 Wana bazalaki kobimisa ye libanda, Tamari atindaki sango oyo epai ya Yuda, bokilo na ye :— Nazali na zemi ya nkolo biloko oyo.Mpe abakisaki :— Tala soki okoki koyeba nani azali nkolo ya lopete oyo, ya singa oyo mpe ya lingenda oyo. 26 Yuda asosolaki ete ezali biloko na ye mpe alobaki :— Azali sembo koleka ngai, pamba te nabalisaki ye te epai ya Shela, mwana na ngai ya mobali.Boye Yuda atikalaki lisusu te kosangisa na ye nzoto. 27 Wana tango na ye ya kobota ekokaki, emonanaki ete ezalaki na mapasa mibale ya mibali kati na libumu na ye. 28 Na tango ya kobota, moko kati na bango abimisaki loboko ; mpe mwasi oyo abotisaka asimbaki loboko yango, akangaki yango singa ya motane mpe alobaki : « Mwana oyo nde abimi liboso. » 29 Kasi azongisaki loboko na ye, mpe ndeko na ye ya mobali abimaki. Bongo mwasi oyo abotisaka alobaki : « Ofungoli nzela nini mpo na kobima ? » Mpe bapesaki ye kombo « Peretsi. » 30 Sima, ndeko na ye oyo azalaki na singa ya motane na loboko mpe abotamaki ; bapesaki ye kombo « Zera. »

In Other Versions

Genesis 38 in the ANGEFD

Genesis 38 in the ANTPNG2D

Genesis 38 in the AS21

Genesis 38 in the BAGH

Genesis 38 in the BBPNG

Genesis 38 in the BBT1E

Genesis 38 in the BDS

Genesis 38 in the BEV

Genesis 38 in the BHAD

Genesis 38 in the BIB

Genesis 38 in the BLPT

Genesis 38 in the BNT

Genesis 38 in the BNTABOOT

Genesis 38 in the BNTLV

Genesis 38 in the BOATCB

Genesis 38 in the BOATCB2

Genesis 38 in the BOBCV

Genesis 38 in the BOCNT

Genesis 38 in the BOECS

Genesis 38 in the BOGWICC

Genesis 38 in the BOHCB

Genesis 38 in the BOHCV

Genesis 38 in the BOHLNT

Genesis 38 in the BOHNTLTAL

Genesis 38 in the BOICB

Genesis 38 in the BOILNTAP

Genesis 38 in the BOITCV

Genesis 38 in the BOKCV

Genesis 38 in the BOKCV2

Genesis 38 in the BOKHWOG

Genesis 38 in the BOKSSV

Genesis 38 in the BOLCB

Genesis 38 in the BOMCV

Genesis 38 in the BONAV

Genesis 38 in the BONCB

Genesis 38 in the BONLT

Genesis 38 in the BONUT2

Genesis 38 in the BOPLNT

Genesis 38 in the BOSCB

Genesis 38 in the BOSNC

Genesis 38 in the BOTLNT

Genesis 38 in the BOVCB

Genesis 38 in the BOYCB

Genesis 38 in the BPBB

Genesis 38 in the BPH

Genesis 38 in the BSB

Genesis 38 in the CCB

Genesis 38 in the CUV

Genesis 38 in the CUVS

Genesis 38 in the DBT

Genesis 38 in the DGDNT

Genesis 38 in the DHNT

Genesis 38 in the DNT

Genesis 38 in the ELBE

Genesis 38 in the EMTV

Genesis 38 in the ESV

Genesis 38 in the FBV

Genesis 38 in the FEB

Genesis 38 in the GGMNT

Genesis 38 in the GNT

Genesis 38 in the HARY

Genesis 38 in the HNT

Genesis 38 in the IRVA

Genesis 38 in the IRVB

Genesis 38 in the IRVG

Genesis 38 in the IRVH

Genesis 38 in the IRVK

Genesis 38 in the IRVM

Genesis 38 in the IRVM2

Genesis 38 in the IRVO

Genesis 38 in the IRVP

Genesis 38 in the IRVT

Genesis 38 in the IRVT2

Genesis 38 in the IRVU

Genesis 38 in the ISVN

Genesis 38 in the JSNT

Genesis 38 in the KAPI

Genesis 38 in the KBT1ETNIK

Genesis 38 in the KBV

Genesis 38 in the KJV

Genesis 38 in the KNFD

Genesis 38 in the LBA

Genesis 38 in the LBLA

Genesis 38 in the LNT

Genesis 38 in the LSV

Genesis 38 in the MAAL

Genesis 38 in the MBV

Genesis 38 in the MBV2

Genesis 38 in the MHNT

Genesis 38 in the MKNFD

Genesis 38 in the MNG

Genesis 38 in the MNT

Genesis 38 in the MNT2

Genesis 38 in the MRS1T

Genesis 38 in the NAA

Genesis 38 in the NASB

Genesis 38 in the NBLA

Genesis 38 in the NBS

Genesis 38 in the NBVTP

Genesis 38 in the NET2

Genesis 38 in the NIV11

Genesis 38 in the NNT

Genesis 38 in the NNT2

Genesis 38 in the NNT3

Genesis 38 in the PDDPT

Genesis 38 in the PFNT

Genesis 38 in the RMNT

Genesis 38 in the SBIAS

Genesis 38 in the SBIBS

Genesis 38 in the SBIBS2

Genesis 38 in the SBICS

Genesis 38 in the SBIDS

Genesis 38 in the SBIGS

Genesis 38 in the SBIHS

Genesis 38 in the SBIIS

Genesis 38 in the SBIIS2

Genesis 38 in the SBIIS3

Genesis 38 in the SBIKS

Genesis 38 in the SBIKS2

Genesis 38 in the SBIMS

Genesis 38 in the SBIOS

Genesis 38 in the SBIPS

Genesis 38 in the SBISS

Genesis 38 in the SBITS

Genesis 38 in the SBITS2

Genesis 38 in the SBITS3

Genesis 38 in the SBITS4

Genesis 38 in the SBIUS

Genesis 38 in the SBIVS

Genesis 38 in the SBT

Genesis 38 in the SBT1E

Genesis 38 in the SCHL

Genesis 38 in the SNT

Genesis 38 in the SUSU

Genesis 38 in the SUSU2

Genesis 38 in the SYNO

Genesis 38 in the TBIAOTANT

Genesis 38 in the TBT1E

Genesis 38 in the TBT1E2

Genesis 38 in the TFTIP

Genesis 38 in the TFTU

Genesis 38 in the TGNTATF3T

Genesis 38 in the THAI

Genesis 38 in the TNFD

Genesis 38 in the TNT

Genesis 38 in the TNTIK

Genesis 38 in the TNTIL

Genesis 38 in the TNTIN

Genesis 38 in the TNTIP

Genesis 38 in the TNTIZ

Genesis 38 in the TOMA

Genesis 38 in the TTENT

Genesis 38 in the UBG

Genesis 38 in the UGV

Genesis 38 in the UGV2

Genesis 38 in the UGV3

Genesis 38 in the VBL

Genesis 38 in the VDCC

Genesis 38 in the YALU

Genesis 38 in the YAPE

Genesis 38 in the YBVTP

Genesis 38 in the ZBP