Judges 1 (BOLCB2)

1 Sima na kufa ya Jozue, bana ya Isalaele batunaki Yawe :— Libota nini kati na biso ekokende liboso mpo na kobundisa bato ya Kanana ? 2 Yawe azongisaki :— Libota ya Yuda nde ekokende liboso, pamba te napesi mokili oyo na maboko na bango. 3 Bongo bato ya libota ya Yuda balobaki na bandeko na bango ya libota ya Simeoni :— Boya elongo na biso mpo ete tobundisa bato ya Kanana, mpo na eteni ya mabele oyo epesamelaki biso. Bongo, biso mpe tokokende elongo na bino, na eteni ya mabele na bino.Boye, bato ya libota ya Simeoni bakendeki elongo na bango. 4 Tango libota ya Yuda ekotaki na bitumba, Yawe akabaki bato ya Kanana mpe ya Perizi na maboko na bango, mpe babomaki bato nkoto zomi, na Bezeki. 5 Ezalaki kuna nde bakutaki Adoni-Bezeki mpe babundisaki ye. Balongaki bato ya Kanana mpe ya Perizi. 6 Adoni-Bezeki akimaki ; kasi balandaki ye mpe bakangaki ye, bakataki ye misapi ya minene ya maboko mpe ya makolo. 7 Adoni-Bezeki alobaki : « Bakonzi tuku sambo, oyo bakata bango misapi ya minene ya maboko mpe ya makolo, bazalaki kolokota biloko oyo ezalaki kokweya na se ya mesa na ngai. Sik’oyo, Nzambe azongiseli ngai makambo oyo nasalaki baninga. »Bamemaki ye na Yelusalemi, mpe akufaki kuna. 8 Bato ya libota ya Yuda babundisaki Yelusalemi mpe babotolaki yango ; babomaki bato ya engumba yango na mopanga mpe batiaki yango moto. 9 Sima na yango, bato ya libota ya Yuda bakendeki kobundisa bato ya Kanana oyo bazalaki kovanda na mokili ya bangomba, na Negevi, mpe na etando oyo ezalaki pembeni ya ebale. 10 Bato ya libota ya Yuda babundisaki lisusu bato ya Kanana oyo bazalaki kovanda na Ebron, oyo kombo na yango ezalaki na kala « Kiriati-Ariba. » Balongaki Sheshayi, Ayimani mpe Talimayi. 11 Longwa wana, bapusanaki mpe bakendeki kobundisa bavandi ya Debiri oyo kombo na yango ezalaki na kala « Kiriati-Seferi. » 12 Kalebi alobaki : « Nakopesa na libala Akisa, mwana na ngai ya mwasi, epai ya moto nyonso oyo akobundisa mpe akobotola Kiriati-Seferi. » 13 Otinieli, mwana mobali ya Kenazi, ndeko ya Kalebi, abotolaki yango ; boye Kalebi apesaki Akisa, mwana na ye ya mwasi, na libala epai ya Otinieli. 14 Nzokande, tango Akisa akomaki na ndako ya Otinieli, atindikaki ye ete asenga elanga epai ya Kalebi, tata na ye. Boye, tango Akisa akitaki wuta na ane na ye, Kalebi atunaki ye :— Olingi nini ? 15 Akisa azongisaki :— Salela ngai ngolu. Lokola opesaki ngai eteni ya mabele kati na Negevi, pesa ngai lisusu bitima.Boye, Kalebi apesaki ye bitima ya likolo mpe ya se. 16 Bakitani ya Keni oyo azalaki bokilo ya Moyize balongwaki na engumba ya banzete ya Mbila elongo na bato ya libota ya Yuda, mpe bakendeki kovanda esika moko na bavandi ya esobe ya Yuda, oyo ezali na sude ya Aradi. 17 Bato ya libota ya Yuda elongo na bandeko na bango ya libota ya Simeoni bakendeki kobundisa bato ya Kanana oyo bazalaki kovanda na Tsefati, mpe babebisaki bango. Yango wana, bapesaki engumba yango kombo « Orima. » 18 Bato ya libota ya Yuda babotolaki lisusu Gaza, Ashikeloni mpe Ekroni, elongo na mabele na yango ya pembeni. 19 Yawe azalaki elongo na bato ya libota ya Yuda. Babotolaki mokili ya bangomba, kasi balongaki te kobengana bavandi ya etando, pamba te bazalaki na bashar ya bibende. 20 Kolanda ndenge Moyize alobaki, bapesaki na Kalebi engumba Ebron. Mpe Kalebi abenganaki na Ebron bana mibali misato ya Anaki. 21 Nzokande, bato ya libota ya Benjame babenganaki te bato ya Yebusi oyo bazalaki kovanda na Yelusalemi. Boye, kino na mokolo ya lelo, bato ya Yebusi bavandaka esika moko na bato ya libota ya Benjame. 22 Bato kati na ndako ya Jozefi bamataki mpo na kobundisa Beteli, mpe Yawe azalaki elongo na bango. 23 Tango libota ya Jozefi etindaki bato ete bakende kononga engumba Beteli oyo bazalaki kobenga na kala Luze, 24 banongi bamonaki moto moko kobima na engumba mpe balobaki na ye : « Lakisa biso esika nini tokoki kokotela na kati ya engumba, mpe tokosalela yo bolamu. » 25 Boye, alakisaki bango esika ya kokotela na kati na engumba. Mpe babomaki bato ya engumba yango na mopanga, kasi babikisaki moto wana elongo na libota na ye mobimba. 26 Moto yango akendeki na mokili ya bato ya Iti mpe atongaki kuna engumba oyo apesaki kombo « Luze » oyo etikala kino lelo. 27 Kasi bato ya libota ya Manase babenganaki te bato ya Beti-Sheani mpe bamboka na yango ya mike, bato ya Taanaki mpe bamboka na yango ya mike, bato ya Dori mpe bamboka na yango ya mike, bato ya Yibileayimi mpe bamboka na yango ya mike, bato ya Megido mpe bamboka na yango ya mike ; pamba te bato ya Kanana batingamaki kaka kovanda na mokili yango. 28 Tango bana ya Isalaele bakomaki lisusu makasi, bakomaki kosalisa bato ya Kanana misala makasi, kasi babenganaki bango nyonso te. 29 Bato ya libota ya Efrayimi babenganaki te bato ya Kanana oyo bazalaki kovanda na Gezeri, mpe bato ya Kanana bakobaki kovanda esika moko na bango. 30 Bato ya libota ya Zabuloni babenganaki te bavandi ya Kitroni mpe ya Naaloli. Bato ya Kanana bakobaki kovanda esika moko na bango, kasi bakomaki kosalisa bango misala makasi. 31 Bato ya libota ya Aseri babenganaki te bato ya Ako, ya Sidoni, ya Ayilabi, ya Akizibi, ya Eliba, ya Afiki mpe ya Reobi. 32 Likolo na yango, bato ya libota ya Aseri bakomaki kovanda esika moko na bato ya Kanana oyo bazalaki kovanda na mokili yango. 33 Bato ya libota ya Nefitali babenganaki te bato oyo bazalaki kovanda na Beti-Shemeshi mpe na Beti-Anati. Boye, bakomaki kovanda esika moko na bato ya Kanana oyo bazalaki kovanda na mokili yango ; kasi bato ya Beti-Shemeshi mpe ya Beti-Anati bakomaki kosala misala makasi. 34 Bato ya Amori batindikaki libota ya Dani mosika, na likolo ya bangomba, mpo ete balonga te kokita na etando ya polele. 35 Boye, bato ya Amori mpe batingamaki kaka kovanda na Ari-Eresi, na Ayaloni mpe na Shaalibimi. Kasi tango ndako ya Jozefi ekomaki lisusu na nguya, bakomaki kosalisa bango misala makasi. 36 Mondelo ya mabele ya bato ya Amori ezalaki longwa na Libanga ya Sela, elekaki na bangomba ya Akarabimi kino na likolo.

In Other Versions

Judges 1 in the ANGEFD

Judges 1 in the ANTPNG2D

Judges 1 in the AS21

Judges 1 in the BAGH

Judges 1 in the BBPNG

Judges 1 in the BBT1E

Judges 1 in the BDS

Judges 1 in the BEV

Judges 1 in the BHAD

Judges 1 in the BIB

Judges 1 in the BLPT

Judges 1 in the BNT

Judges 1 in the BNTABOOT

Judges 1 in the BNTLV

Judges 1 in the BOATCB

Judges 1 in the BOATCB2

Judges 1 in the BOBCV

Judges 1 in the BOCNT

Judges 1 in the BOECS

Judges 1 in the BOGWICC

Judges 1 in the BOHCB

Judges 1 in the BOHCV

Judges 1 in the BOHLNT

Judges 1 in the BOHNTLTAL

Judges 1 in the BOICB

Judges 1 in the BOILNTAP

Judges 1 in the BOITCV

Judges 1 in the BOKCV

Judges 1 in the BOKCV2

Judges 1 in the BOKHWOG

Judges 1 in the BOKSSV

Judges 1 in the BOLCB

Judges 1 in the BOMCV

Judges 1 in the BONAV

Judges 1 in the BONCB

Judges 1 in the BONLT

Judges 1 in the BONUT2

Judges 1 in the BOPLNT

Judges 1 in the BOSCB

Judges 1 in the BOSNC

Judges 1 in the BOTLNT

Judges 1 in the BOVCB

Judges 1 in the BOYCB

Judges 1 in the BPBB

Judges 1 in the BPH

Judges 1 in the BSB

Judges 1 in the CCB

Judges 1 in the CUV

Judges 1 in the CUVS

Judges 1 in the DBT

Judges 1 in the DGDNT

Judges 1 in the DHNT

Judges 1 in the DNT

Judges 1 in the ELBE

Judges 1 in the EMTV

Judges 1 in the ESV

Judges 1 in the FBV

Judges 1 in the FEB

Judges 1 in the GGMNT

Judges 1 in the GNT

Judges 1 in the HARY

Judges 1 in the HNT

Judges 1 in the IRVA

Judges 1 in the IRVB

Judges 1 in the IRVG

Judges 1 in the IRVH

Judges 1 in the IRVK

Judges 1 in the IRVM

Judges 1 in the IRVM2

Judges 1 in the IRVO

Judges 1 in the IRVP

Judges 1 in the IRVT

Judges 1 in the IRVT2

Judges 1 in the IRVU

Judges 1 in the ISVN

Judges 1 in the JSNT

Judges 1 in the KAPI

Judges 1 in the KBT1ETNIK

Judges 1 in the KBV

Judges 1 in the KJV

Judges 1 in the KNFD

Judges 1 in the LBA

Judges 1 in the LBLA

Judges 1 in the LNT

Judges 1 in the LSV

Judges 1 in the MAAL

Judges 1 in the MBV

Judges 1 in the MBV2

Judges 1 in the MHNT

Judges 1 in the MKNFD

Judges 1 in the MNG

Judges 1 in the MNT

Judges 1 in the MNT2

Judges 1 in the MRS1T

Judges 1 in the NAA

Judges 1 in the NASB

Judges 1 in the NBLA

Judges 1 in the NBS

Judges 1 in the NBVTP

Judges 1 in the NET2

Judges 1 in the NIV11

Judges 1 in the NNT

Judges 1 in the NNT2

Judges 1 in the NNT3

Judges 1 in the PDDPT

Judges 1 in the PFNT

Judges 1 in the RMNT

Judges 1 in the SBIAS

Judges 1 in the SBIBS

Judges 1 in the SBIBS2

Judges 1 in the SBICS

Judges 1 in the SBIDS

Judges 1 in the SBIGS

Judges 1 in the SBIHS

Judges 1 in the SBIIS

Judges 1 in the SBIIS2

Judges 1 in the SBIIS3

Judges 1 in the SBIKS

Judges 1 in the SBIKS2

Judges 1 in the SBIMS

Judges 1 in the SBIOS

Judges 1 in the SBIPS

Judges 1 in the SBISS

Judges 1 in the SBITS

Judges 1 in the SBITS2

Judges 1 in the SBITS3

Judges 1 in the SBITS4

Judges 1 in the SBIUS

Judges 1 in the SBIVS

Judges 1 in the SBT

Judges 1 in the SBT1E

Judges 1 in the SCHL

Judges 1 in the SNT

Judges 1 in the SUSU

Judges 1 in the SUSU2

Judges 1 in the SYNO

Judges 1 in the TBIAOTANT

Judges 1 in the TBT1E

Judges 1 in the TBT1E2

Judges 1 in the TFTIP

Judges 1 in the TFTU

Judges 1 in the TGNTATF3T

Judges 1 in the THAI

Judges 1 in the TNFD

Judges 1 in the TNT

Judges 1 in the TNTIK

Judges 1 in the TNTIL

Judges 1 in the TNTIN

Judges 1 in the TNTIP

Judges 1 in the TNTIZ

Judges 1 in the TOMA

Judges 1 in the TTENT

Judges 1 in the UBG

Judges 1 in the UGV

Judges 1 in the UGV2

Judges 1 in the UGV3

Judges 1 in the VBL

Judges 1 in the VDCC

Judges 1 in the YALU

Judges 1 in the YAPE

Judges 1 in the YBVTP

Judges 1 in the ZBP