Judges 3 (BOLCB2)

1 Tala bikolo oyo Yawe atikaki mpo na komeka bana ya Isalaele oyo bazalaki na tango ya bitumba ya Kanana. 2 Asalaki bango bongo, kaka mpo ete milongo ya sika ya bana ya Isalaele oyo bazalaki te na tango ya bitumba, bayeba nini yango bitumba. 3 Yawe atikaki kati na mokili yango bakonzi mitano ya bato ya Filisitia, bato nyonso ya Kanana, bato nyonso ya Sidoni mpe bato nyonso ya Evi, oyo bazalaki kovanda na bangomba ya Libani, wuta na ngomba ya Bala-Erimoni kino na Lebo-Amati. 4 Bikolo wana etikalaki mpo na komeka bana ya Isalaele mpe kotala soki bakotosa mitindo oyo Yawe apesaki bakoko na bango na nzela ya Moyize. 5 Bana ya Isalaele bavandaki kati na bato ya Kanana, ya Iti, ya Amori, ya Perizi, ya Evi mpe ya Yebusi ; 6 babalaki bana basi na bango mpe babalisaki bana na bango ya basi epai ya bana na bango ya mibali, mpe basalelaki banzambe na bango. 7 Bana ya Isalaele basalaki makambo mabe na miso ya Yawe ; babosanaki Yawe, Nzambe na bango, mpe basalelaki banzambe Bala mpe Ashera. 8 Yawe asilikelaki bana ya Isalaele, mpe akabaki bango na maboko ya Kushani-Rishetayimi, mokonzi ya Arami. Bana ya Isalaele basalaki mibu mwambe na se ya bokonzi na ye. 9 Bana ya Isalaele bagangaki epai ya Yawe, mpe Yawe abimiselaki bango mokangoli : Otinieli, mwana mobali ya Kenazi, leki ya Kalebi. Mpe Otinieli abikisaki bana ya Isalaele. 10 Molimo na Yawe ayaki likolo na ye mpe akomaki elombe kati na bana ya Isalaele ; bongo akendeki kobunda bitumba. Yawe akabaki Kushani-Rishetayimi, mokonzi ya Arami, na maboko ya Otinieli ; mpe Otinieli alongaki ye. 11 Sima na yango, mokili ekomaki na kimia mibu tuku minei kino tango Otinieli, mwana mobali ya Kenazi, akufaki. 12 Bana ya Isalaele basalaki lisusu mabe na miso ya Yawe. Likolo ya mabe yango, Yawe apesaki Egiloni, mokonzi ya Moabi, bokonzi na likolo ya bana ya Isalaele. 13 Egiloni asanganaki na bato ya Amoni mpe ya Amaleki, bayaki mpe babundisaki bana ya Isalaele, bongo babotolaki engumba ya nzete ya Mbila. 14 Bana ya Isalaele bazalaki na se ya bokonzi ya Egiloni, mokonzi ya Moabi, mibu zomi na mwambe. 15 Bana ya Isalaele bagangaki lisusu epai na Yawe, mpe Yawe apesaki bango mokangoli moko na kombo Ewudi, mwana mobali ya Gera, ya libota ya Benjame. Ewudi azalaki kosalela loboko ya mwasi. Bana ya Isalaele batindaki ye epai ya Egiloni, mokonzi ya Moabi, mpo na kopesa ye mpako. 16 Ewudi amisalelaki mopanga ya minu mibale, ya ndambo ya metele na molayi. Akangaki yango na loketo na ye, na ngambo ya loboko ya mobali, mpe abombaki yango na se ya bilamba na ye. 17 Apesaki mpako epai ya Egiloni, mokonzi ya Moabi, oyo azalaki moto ya nzoto minene. 18 Tango Ewudi asilisaki kopesa mpako, azongisaki bato nyonso oyo bamemaki yango. 19 Kasi tango akomaki na esika ya banzambe ya bikeko oyo basala na mabanga, pembeni ya Giligali, azongaki epai ya mokonzi mpe alobaki na ye :— Mokonzi, nazali na sango ya sekele mpo na yo.Mokonzi azongisaki :— Kimia !Mpe bato nyonso oyo bazalaki pembeni na ye babimaki libanda. 20 Bongo Ewudi apusanaki pene ya mokonzi Egiloni oyo azalaki ya kovanda na shambre ya likolo ya ndako na ye ya kopema. Alobaki na ye :— Nazali na liloba ya koyebisa yo kowuta na Nzambe. 21 Ewudi asembolaki loboko na ye ya mwasi, akamataki mopanga oyo abombaki na loketo na ye, na ngambo ya loboko ya mobali, mpe atubaki yango na libumu ya mokonzi. 22 Boye, ezala esimbelo ya mopanga, nyonso ekotaki, mpe mafuta ezipaki mopanga ; pamba te Ewudi atikaki mopanga yango kati na libumu ya mokonzi. 23 Ewudi abimaki na sima ya ndako, akangaki bikuke ya shambre ya likolo sima na ye mpe atiaki yango bibende. 24 Tango akendeki, basali ya mokonzi bayaki na esika yango mpe bamonaki ete bikuke ya shambre ya likolo ya kokangama. Balobaki :— Tango mosusu mokonzi azali na zongo inene oyo ezali kati na shambre, na kati ya ndako. 25 Basali bazelaki mingi, kino ekomaki kosala bango soni. Lokola mokonzi azalaki kaka kofungola te bikuke ya shambre ya likolo, bazwaki fungola mpe bafungolaki bango moko. Mpe tala, bamonaki nkolo na bango azali ya kokufa, alala na se. 26 Wana balekisaki bongo ngonga, Ewudi abimaki ; alekaki na esika oyo ezalaki na banzambe oyo basala na mabanga mpe akimaki na Seira. 27 Tango akomaki kuna, abetaki kelelo na mokili ya bangomba ya Efrayimi, mpe bana ya Isalaele bakitaki elongo na ye, longwa na likolo na ngomba, mpe amitiaki na liboso mpo na kotambolisa bango. 28 Alobaki na bango :— Bolanda ngai, pamba te Yawe akabi Moabi, monguna na bino, na maboko na bino.Balandaki ye mpe babotolaki bato ya Moabi bisika oyo bakatisaka Yordani na makolo. Bapesaki lisusu ata na moto moko te nzela ya kokatisa mayi. 29 Na mokolo wana, babomaki bato ya Moabi pene nkoto zomi ; bango nyonso bazalaki bambinga mpe bato ya makasi, ata moto moko te abikaki. 30 Na mokolo wana, bana ya Isalaele balembisaki bato ya Moabi, mpe mokili ezalaki na kimia mibu tuku mwambe. 31 Sima na Ewudi, Shamagari, mwana mobali ya Anati, ayaki mpe abomaki bato ya Filisitia nkama motoba na nzela ya nzete ya moke oyo batambolisaka na yango bangombe. Ye mpe abikisaki Isalaele.

In Other Versions

Judges 3 in the ANGEFD

Judges 3 in the ANTPNG2D

Judges 3 in the AS21

Judges 3 in the BAGH

Judges 3 in the BBPNG

Judges 3 in the BBT1E

Judges 3 in the BDS

Judges 3 in the BEV

Judges 3 in the BHAD

Judges 3 in the BIB

Judges 3 in the BLPT

Judges 3 in the BNT

Judges 3 in the BNTABOOT

Judges 3 in the BNTLV

Judges 3 in the BOATCB

Judges 3 in the BOATCB2

Judges 3 in the BOBCV

Judges 3 in the BOCNT

Judges 3 in the BOECS

Judges 3 in the BOGWICC

Judges 3 in the BOHCB

Judges 3 in the BOHCV

Judges 3 in the BOHLNT

Judges 3 in the BOHNTLTAL

Judges 3 in the BOICB

Judges 3 in the BOILNTAP

Judges 3 in the BOITCV

Judges 3 in the BOKCV

Judges 3 in the BOKCV2

Judges 3 in the BOKHWOG

Judges 3 in the BOKSSV

Judges 3 in the BOLCB

Judges 3 in the BOMCV

Judges 3 in the BONAV

Judges 3 in the BONCB

Judges 3 in the BONLT

Judges 3 in the BONUT2

Judges 3 in the BOPLNT

Judges 3 in the BOSCB

Judges 3 in the BOSNC

Judges 3 in the BOTLNT

Judges 3 in the BOVCB

Judges 3 in the BOYCB

Judges 3 in the BPBB

Judges 3 in the BPH

Judges 3 in the BSB

Judges 3 in the CCB

Judges 3 in the CUV

Judges 3 in the CUVS

Judges 3 in the DBT

Judges 3 in the DGDNT

Judges 3 in the DHNT

Judges 3 in the DNT

Judges 3 in the ELBE

Judges 3 in the EMTV

Judges 3 in the ESV

Judges 3 in the FBV

Judges 3 in the FEB

Judges 3 in the GGMNT

Judges 3 in the GNT

Judges 3 in the HARY

Judges 3 in the HNT

Judges 3 in the IRVA

Judges 3 in the IRVB

Judges 3 in the IRVG

Judges 3 in the IRVH

Judges 3 in the IRVK

Judges 3 in the IRVM

Judges 3 in the IRVM2

Judges 3 in the IRVO

Judges 3 in the IRVP

Judges 3 in the IRVT

Judges 3 in the IRVT2

Judges 3 in the IRVU

Judges 3 in the ISVN

Judges 3 in the JSNT

Judges 3 in the KAPI

Judges 3 in the KBT1ETNIK

Judges 3 in the KBV

Judges 3 in the KJV

Judges 3 in the KNFD

Judges 3 in the LBA

Judges 3 in the LBLA

Judges 3 in the LNT

Judges 3 in the LSV

Judges 3 in the MAAL

Judges 3 in the MBV

Judges 3 in the MBV2

Judges 3 in the MHNT

Judges 3 in the MKNFD

Judges 3 in the MNG

Judges 3 in the MNT

Judges 3 in the MNT2

Judges 3 in the MRS1T

Judges 3 in the NAA

Judges 3 in the NASB

Judges 3 in the NBLA

Judges 3 in the NBS

Judges 3 in the NBVTP

Judges 3 in the NET2

Judges 3 in the NIV11

Judges 3 in the NNT

Judges 3 in the NNT2

Judges 3 in the NNT3

Judges 3 in the PDDPT

Judges 3 in the PFNT

Judges 3 in the RMNT

Judges 3 in the SBIAS

Judges 3 in the SBIBS

Judges 3 in the SBIBS2

Judges 3 in the SBICS

Judges 3 in the SBIDS

Judges 3 in the SBIGS

Judges 3 in the SBIHS

Judges 3 in the SBIIS

Judges 3 in the SBIIS2

Judges 3 in the SBIIS3

Judges 3 in the SBIKS

Judges 3 in the SBIKS2

Judges 3 in the SBIMS

Judges 3 in the SBIOS

Judges 3 in the SBIPS

Judges 3 in the SBISS

Judges 3 in the SBITS

Judges 3 in the SBITS2

Judges 3 in the SBITS3

Judges 3 in the SBITS4

Judges 3 in the SBIUS

Judges 3 in the SBIVS

Judges 3 in the SBT

Judges 3 in the SBT1E

Judges 3 in the SCHL

Judges 3 in the SNT

Judges 3 in the SUSU

Judges 3 in the SUSU2

Judges 3 in the SYNO

Judges 3 in the TBIAOTANT

Judges 3 in the TBT1E

Judges 3 in the TBT1E2

Judges 3 in the TFTIP

Judges 3 in the TFTU

Judges 3 in the TGNTATF3T

Judges 3 in the THAI

Judges 3 in the TNFD

Judges 3 in the TNT

Judges 3 in the TNTIK

Judges 3 in the TNTIL

Judges 3 in the TNTIN

Judges 3 in the TNTIP

Judges 3 in the TNTIZ

Judges 3 in the TOMA

Judges 3 in the TTENT

Judges 3 in the UBG

Judges 3 in the UGV

Judges 3 in the UGV2

Judges 3 in the UGV3

Judges 3 in the VBL

Judges 3 in the VDCC

Judges 3 in the YALU

Judges 3 in the YAPE

Judges 3 in the YBVTP

Judges 3 in the ZBP